Ntina oyo bato basalaka mobulu
NA MBOKA Denver, na etúká ya Colorado, na États-Unis, mwana moko ya mobali abotamaki matsombe ya sanza motoba na ndambo. Mwana yango akufaki te. Nsima ya kolekisa sanza misato na lopitalo mpo na kozwa lisungi ya minganga, azongaki na ndako epai ya baboti na ye. Kasi, nsima ya pɔsɔ misato, azongaki lisusu na lopitalo. Mpo na nini? Tata na ye aningisaki ye makasi mpamba te kolela ya mwana yango elɛmbisaki ye. Mwana azokaki makasi na bɔɔngɔ na ndenge baningisaki ye. Mwana akufaki miso mpe akómaki ebɔsɔnɔ. Minganga babikisaki mwana oyo abotamaki matsombe kasi bakokaki kobikisa ye na nkanda ya tata na ye te.
Bana mingi bazali kobebisama, bazali kobɛtama na ndenge ya nsɔmɔ, to mpe bazali kobomama na esika oyo eleki mobulu na mokili: na ndako! Bato mosusu bakanisi ete bobele na États-Unis, mbula na mbula baboti bazali koboma bana soki 5 000! Mpe bobele bana te nde bazali konyokwama. Zulunalo World Health eyebisi ete na États-Unis, “kosalela basi makambo mabe ezali likambo ya liboso oyo ezali konyokola basi oyo bazali na mbula oyo bakoki kobota.” Bongo na bikólo mosusu? “Ankɛtɛ moko emonisaki ete mwasi moko na kati ya basi misato to mpe koleka mwasi moko na kati ya basi mibale [na bikólo ya bobola] balobaki ete mibali na bango babɛtaka bango.” Mobulu ezali konyokola bato mingi, mingimingi na kati ya ndako.
Mibali mpe basi mingi balukaka kosilisa matata na bango na makofi. Na bikólo mosusu, baboti mpe balakisi, soki basiliki, babɛtaka bana. Bato mosusu ya mitema mabe bayokaka esengo na kotungisa to konyokola bato oyo bazali na makasi te. Mpo na nini bato bakómi na mobulu mingi boye?
Ntina oyo bato bazali kokóma na mobulu
Basusu balobaka ete mobulu ezali likambo oyo bato babotamaka na yango. Atako na bisika mingi na États-Unis mobulu ezali lisusu mingi te, nzokande epai ya bilenge ebakisami mpenza makasi. Mpe bato mingi bakómi kosepela na mobulu. Bastasyo misato ya minene ya televizyo ebandaki kolakisa mbala mibale koleka bafilime ya mobulu mpe mbala misato bansango ya koboma bato. Masano ya mobulu ezali kokɔtisa mbongo mingi! Karl Menninger, nganga-mayele ya psychiatrie alobaki ete, “Tozali kondima mobulu mpe tozali kokoma yango na bizipeli ya bazulunalo. Filime moko kati na misato to minei mpo na kominanola ya bana na biso ezali kolakisa makambo ya mobulu. Baninga na ngai, tozali kondima mobulu! Tolingi yango mpenza.”
Boyekoli ya bato ya siansi na mikolo oyo emonisi ete ndenge bɔɔngɔ ya moto esalemá mpe makambo oyo elekaka na esika oyo azali kokola esalaka bopusi mingi mpo ete moto azala na mobulu. Markus Kruesi, monganga oyo asalaka na eteyelo moko monene (University of Illinois Institute for Juvenile Research), alobi ete: “Biso nyonso tobandi komona ete makambo mabe oyo mazali kosalema zingazinga ya bana mingi ezali kopalanganisa mobulu. Makambo oyo mazali kosalema zingazinga mazali mpenza kobongola lolenge ya bɔɔngɔ ya bato mpe mazali kokómisa bango motema mokuse.” Buku moko (Inside the Brain) eyebisi ete, “Lokola mabota mazali kopanzana, mabota oyo mazali na moboti se moko mazali kokóma mingi, bobola ezali kosila te, boombo ya komela bangi, nyonso wana ekoki kobongola bɔɔngɔ ya moto mpe kokómisa ye nkandankanda. Liboso tozalaki kokanisa ete likambo yango ekoki kosalema te.”
Bato ya siansi balobi ete moko na makambo oyo mazali kobongola bɔɔngɔ ezali bongo kokita ya sérotonine, mai ya bɔɔngɔ oyo epekisaka ete nkanda ya moto emata. Boyekoli mingi oyo esalemaki emonisi ete alcool ekoki kokitisa sérotonine na kati ya bɔɔngɔ. Yango wana tomonaka ete bato mingi balingaka kosala mobulu soki balangwi masanga.
Kasi, soki mobulu ezali kobakisama mingi, ezali mpe na ntina mosusu. Biblia, mokanda ya bisakweli oyo tokoki kotyela motema ekebisi ete, “Yebá makambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango ya mpasi. Na mikolo yango bato bakozala boye: miyimi, bato ya lokoso ya mbongo, bakokóma lofundu mpe lolendo, . . . bakoyeba kotonda te, bakolanda makambo ya Nzambe te, bakozala na nko mingi, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakotomboka mpe bakongala, bakoyina makambo ya malamu; bakoteka baninga, bakosilika noki mpe bakovimba na lofundu. . . . Kimá bato ya ndenge wana.” (2 Timote 3:1-5, Boyokani ya Sika) Mobulu oyo tozali komona lelo ezali kokokisama ya esakweli ya Biblia mpo na “mikolo ya nsuka.”
Ezali mpe na likambo mosusu oyo ezali kosala ete mikolo oyo mizala mikolo ya mobulu mingi. Biblia elobi ete, “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Babenganaki Zabolo na bademo na ye na likoló mpe sikoyo bazali kotya mobulu kati na bato. Zabolo, oyo abéngami “mokóló na nguya na mopɛpɛ” azali kotambwisa ‘elimo oyo ezali sikawa kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi’; yango wana mobulu ezali se kobakisama na mokili.—Baefese 2:2, NW.
Boye, tokosala nini liboso ya “mopɛpɛ” ya mobulu na mokili ya lelo oyo? Ndenge nini tokoki kosilisa matata kozanga mobulu?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Bana mingi bazali kobebisama, bazali kobɛtama na ndenge ya mabe, to mpe bazali kobomama na esika oyo eleki mobulu na mokili: na ndako!