Ndenge ya kosilisa matata na kimya
MOBULU ya bato ebandá uta kala mpenza. Biblia elobeli mobulu kobanda na Kaina, ndeko ya Abele mpe mwana ya liboso ya Adama na Eva. Ntango Nzambe asepelaki na likabo ya Abele mpe aboyaki oyo ya ye, Kaina “asilikaki mingi.” Asalaki nini? “Kaina amibwakaki likoló na ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.” Na nsima, boyokani na ye na Nzambe ebebaki. (Genese 4:5, 8-12) Mobulu esilisaki mokakatano ya Kaina te, elingi koloba kozanga ngɔlu ya Mozalisi na ye.
Ndenge nini tokoki koboya kosala lokola Kaina; elingi koloba koboya kosalela makasi mpo na kosilisa matata?
Atikaki mobulu mpe akómaki kondima makanisi ya basusu
Tókamata ndakisa ya moto oyo amonaki mpe asepelaki ndenge babomaki Setefano, moklisto ya liboso oyo akufaki lokola martiru. (Misala 7:58; 8:1) Moto yango, Saulo moto na Talasia, azalaki kosepela na lingomba ya Setefano te mpe amonaki malamu lokola babomaki ye. Mpo na ye ezalaki lolenge malamu mpo na kosukisa misala ya Setefano. Ya solo, ekoki kozala ete Saulo azalaki moto ya mobulu te na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Kasi, andimaki kosala mobulu mpo na kosilisa matata. Mwa moke nsima ya koboma Setefano, Saulo abandaki ‘konyokola lingomba ya boklisto. Akɔtaki na ndako na ndako mpe abendaki mibali na basi, mpe abwakaki bango na bolɔkɔ.’—Misala 8:3.
Albert Barnes, nganga-mayele ya Biblia alobi ete liloba ya Greke oyo ebongolami awa na “konyokola” ezali kopesa likanisi ya koboma oyo banyama ya zamba, na ndakisa nkosi to mbwa ya zamba, basalaka. Barnes alobi ete, “Saulo angalelaki lingomba lokola nyama ya yauli—maloba makasi oyo mamonisi molende mpe nkanda oyo azalaki na yango mpo na konyokola.” Ntango Saulo azalaki kokende na Damaseke mpo na kokanga bayekoli mosusu ya Klisto, azalaki “naino kokanela bayekoli na Nkolo [Klisto] makaneli na kufa.” Ntango azalaki na nzela, ayokaki mongongo ya Yesu oyo asilaki kosekwa, mpe likambo yango ememaki Saulo na kokóma moklisto.—Misala 9:1-19.
Nsima ya kokóma moklisto, Saulo abongolaki mpe bomoto liboso ya bato mosusu. Likambo moko esalemaki mbula 16 na nsima emonisaki mbongwana yango. Bato bakendaki na lisangá oyo ezalaki na Antiokia basɛngisaki baklisto oyo bazalaki kuna ete bátosaka Mibeko ya Mose. ‘Ntembe mingi ebimaki.’ Saulo, oyo na ntango wana ayebanaki mingi na nkombo ya Paulo, amonisaki likanisi na ye na likambo yango. Emonani lokola ete ntembe yango ekómaki makasi mpenza. Kasi, Paulo asalelaki mobulu te. Andimaki ekateli oyo lisangá ezwaki ete bámema likambo yango liboso ya bantoma mpe bankulutu na lisangá ya Yelusaleme.—Misala 15:1, 2.
Kuna na Yelusaleme mpe “ntembe mingi” ebimaki na likita ya bankulutu. Paulo azelaki kino “ebele mobimba na bato bazalaki nyɛɛ,” bongo nde ayebisaki bango makambo ya kokamwa oyo elimo ya Nzambe esalaki epai na bandimi oyo bazalaki bato bakatami ngenga te. Nsima ya kotalela makanisi ya Makomami, bantoma mpe bankulutu ya Yelusaleme basukisaki “na motema moko” ete bátyela bandimi oyo bakatami ngenga te kilo ya mpambampamba te, kasi basɛngaki bango ete ‘báboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.’ (Misala 15:3-29) Ya solo, Paulo abongwanaki. Ayekolaki kosilisa matata na kimya.
Ndenge ya kolonga elimo ya mobulu
Bambula mingi na nsima, Paulo apesaki toli oyo: “Ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka kasi azala na boboto liboso na bato nyonso, azala molakisi malamu, azala na motema pɛtɛɛ, apamela batɛmɛli na ye na bopɔlɔ.” (2 Timote 2:24, 25) Paulo alobaki na Timote, elenge mokɛngɛli ete asilisaka mikakatano na kimya. Paulo azalaki na bokatikati. Ayebaki ete ata na kati ya baklisto, nkanda ekoki kobima. (Misala 15:37-41) Yango wana, apesaki toli ete: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” (Baefese 4:26) Koyeba komipekisa ntango ozali na nkanda mpe koboya kotomboka ezali lolenge malamu ya kolonga mayoki motindo wana. Kasi, ndenge nini tokoki kosala yango?
Lelo oyo, kopekisa nkanda ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Doktere Deborah Prothrow-Stith, mokambi-molandi na eteyelo moko monene (Harvard School of Public Health) alobaki ete, “Bato basepelaka kozala na bizaleli mabe. Kutu, koyeba kofanda na bato—kosolola, koyokana, koyokela mawa, kolimbisa—ezali makambo ya babolole.” Nzokande, yango nde bizaleli ya mobali ya solosolo, mpe yango nde sɛkɛlɛ mpo na kopekisa nkanda oyo ekoki kouta na motema na biso.
Ntango akómaki moklisto, Paulo ayekolaki lolenge malamu ya kosala ntango makanisi na ye na oyo ya moto mosusu eyokani te. Lolenge yango eutaki na mateya ya Biblia. Lokola ayekolaki mingi mateya ya Lingomba ya Bayuda, Paulo ayebaki Makomami ya Liebele malamu. Na ntembe te ayebaki makomami lokola oyo: “Yokelá moto na yauli zuwa te, [landá] ata moko na nzela na ye te.” “Ye oyo akosilika noki te aleki bato na makasi, mpe ye oyo akokanga motema na ye aleki mobuki na mboka.” “Lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango bongo moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na [elimo, NW] na ye te.” (Masese 3:31; 16:32; 25:28) Kasi, atako Paulo ayebaki makambo wana liboso ete abongwana, yango epekisaki ye te na kosalela baklisto mobulu. (Bagalatia 1:13, 14) Kasi, nini esalisaki Paulo, ntango akómaki moklisto, ete asilisaka matata na kosolola mpe kondimisa moto na esika ya kosala mobulu?
Paulo apesi biso likanisi na maloba oyo alobaki ete: “Bózala bamekoli na ngai ndenge ngai nazali komekola Klisto.” (1 Bakolinti 11:1, NW) Azalaki na botɔndi mingi na oyo Yesu Klisto asalelaki ye. (1 Timote 1:13, 14) Klisto akómaki ndakisa mpo na ye. Ayebaki ndenge oyo Yesu anyokwamaki mpo na bolamu ya bato ya masumu. (Baebele 2:18; 5:8-10) Paulo amonaki ete esakweli ya Yisaya na ntina na Masiya ekokanaki epai ya Yesu: “Anyokolami mpe anyatami, nde ata bongo azipoli monɔkɔ na ye te. Lokola mwana na mpate oyo akambami mpo na kobomama, mpe lokola mpate azali nyɛ liboso na bakati na [mikunge, NW] na ye, bongo azipoli monɔkɔ na ye te.” (Yisaya 53:7) Ntoma Petelo akomaki ete: “[Yesu] atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.”—1 Petelo 2:23, 24.
Paulo asepelaki mpenza na ndenge oyo Yesu asalaki ntango akutanaki na makambo ya mpasi mpe yango epusaki ye na kobongwana. Apesaki baninga na ye bandimi toli ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.” (Bakolose 3:13) Koyeba ete tosengeli kotika nkanda ekoki te. Soki tozali na botɔndi na makambo oyo Yehova mpe Yesu Klisto basaleli biso ekopesa biso bopusi oyo esengeli mpo na kolonga bamposa ya kosala mobulu.
Ekoki kosalema?
Moto moko na ekólo Japon azalaki na mposa makasi ya bopusi yango. Tata na ye, azalaki soda mpe azalaki kosilika mpambampamba, azalaki kotambwisa ndako na ye na mobulu. Lokola amesanaki na mobulu mpe amonaki ndenge mama na ye anyokwamaki mpo na yango, moto yango akómaki moto ya mobulu. Azalaki kotambola na mipanga mibale ya basamurai, moko ya molai, mosusu ya mokuse mpe azalaki kobimisa yango soki matata ebimi mpe azalaki kobangisa na yango bato.
Ntango mwasi na ye abandaki koyekola Biblia, azalaki kofanda wana mpo na kolanda, kasi azalaki mpenza kotyela yango likebi te. Kasi, ntango atángaki mwa buku oyo ezali na motó na likambo ete Cette bonne nouvelle du Royaume,a abongwanaki. Mpo na nini? Alobi boye: “Ntango natángaki makambo oyo ezali na nse ya motó na likambo moke ‘Yesu Klisto’ mpe ‘Lisiko,’ nayokaki nsɔni. Atako nazalaki na bomoi ya mobulu, nazalaki kosepela kozala na boboto epai ya baninga na ngai. Nalingaki kosepelisa baninga na ngai kasi, bobele soki yango ekotalela bomoi na ngai te. Kasi, Yesu, Mwana ya Nzambe andimaki kopesa bomoi na ye mpo na bato, na moto lokola ngai. Nazangaki likambo ya koloba, nakómaki lokola babɛti ngai nzete.”
Atikaki baninga na ye ya kala mpe aumelaki te kopesa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na lisangá ya Batatoli ya Yehova. Eteyelo yango esalisaka banakelasi na kokóma na makoki ya koteya bato mosusu Biblia. Mateya epesaki moto yango matomba mingi. Alobi boye mpo na bomoi na ye ya kala: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokanela bato mpe kosala mobulu mpamba te nazalaki kokoka komonisa mayoki na ngai epai ya bato mosusu te. Lokola nayekolaki kolimbola makanisi na ngai epai ya basusu, nakómaki kososolisa bango na esika ya kosala mobulu.”
Moto yango asalaki lokola Paulo ete akóma na bomoi lokola oyo ya Klisto? Kondima na ye emekamaki ntango moninga na ye moko ya kala oyo balapaki na ye ndai ya boninga alukaki kopekisa ye ete akóma moklisto te. “Moninga” na ye abɛtaki ye mpe afingaki Yehova, Nzambe na ye. Moto oyo kala azalaki moto ya mobulu amipekisaki mpe asɛngaki bolimbisi ete akoki kotosa ndai wana te. “Ndeko” na ye atikaki ye mpe akendaki na nkanda.
Lokola alongaki elimo ya mobulu, mobali oyo azalaki kala moto ya nkandankanda azwaki bandeko mingi ya elimo, baoyo basangani esika moko mpo balingaka Nzambe mpe balingaka bazalani na bango. (Bakolose 3:14) Banda akómá moklisto oyo amipesi, eleki mbula 20 mpe sikoyo azali mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova. Azali na esengo ya komonisa na lisalisi ya Biblia ete lokola ye ayekolaki yango, bato oyo bazali na elimo lokola banyama mabe bakoki koyekola kosilisa matata kozanga mobulu! Mpe azali na libaku malamu ya kolimbola kokokisama monene ya maloba ya esakweli oyo elobi ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana”!—Yisaya 11:9.
Lokola ntoma Paulo mpe moto oyo azalaki kala moto ya mobulu, yo mpe okoki koyekola ndenge ya kosala soki likambo moko esilikisi yo mpe ndenge ya kosilisa matata na kimya. Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kosalisa yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Paulo azalaki na bokatikati. Ayebaki ete ata na kati ya baklisto, nkanda ekoki kobima
[Elilingi na lokasa 7]
Botɔndi mpo na makambo oyo Nzambe asaleli biso ebotaka boyokani ya kimya