Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/11 nk. 3-4
  • Ozali na Anzelu mobateli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na Anzelu mobateli?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato bakómi kosepela na makambo ya baanzelu
  • Ozalaka na anzelu moko oyo abatelaka yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/11 nk. 3-4

Ozali na Anzelu mobateli?

ONDIMAKA ete ozali na anzelu mobateli? Bato mingi bandimaka yango. Yango wana, balobaka ete na wɛsti ya ekólo Canada, ezali na mwasi moko oyo azali na nguya ya koyokanisa bato na baanzelu. Mwasi yango alobaka ete soki oyebisi ye nkombo na yo mobimba mpe opesi ye dolare ya Canada 200, akoyokanisa yo na anzelu mobateli na yo. Akofanda naino nyɛɛ wana azali kotala mɔ́tɔ ya buji. Na nsima, akozwa emonaneli ya anzelu na yo mpe anzelu yango akopesa ye nsango ya koyebisa yo. Na nsuka, akoyebisa yo ndenge anzelu na yo azali.

Bato mosusu bakoki komona ete likambo yango ekokani na lisapo ya Louis IX, mokonzi ya kala ya ekólo France. Balobaka ete asombaká nsala oyo elongwaki na mapapu ya Mikaele, mokolo ya baanzelu na ntalo mingi. Atako bakoki kobɛtela lisapo yango ntembe, mingi bakakatanaka te mpo na kondima maloba ya mwasi wana ya ekólo Canada.

Bato bakómi kosepela na makambo ya baanzelu

Na bambula oyo, bato mingi bakómi kosepela na makambo ya baanzelu. Televizyo mpe bafilime, babuku, bazulunalo, mpe mikanda ya masapo ezali kolobela baanzelu oyo babɔndisaka bato oyo bazali na maladi makasi, bato oyo bakufeli bandeko, bapesaka mayele, mpe babikisaka bato na likama ya liwa. Na États-Unis, bato soki milio 20 balandaka bafilime ya televizyo oyo elobelaka makambo oyo baanzelu basalelaka bato. Na magazini moko ya babuku, batángaki babuku koleka 400 oyo ezali kolobela baanzelu.

Buku moko ebimi sika ezali kolobela ndenge oyo baanzelu babateli babikisaki bomoi ya basoda na kati ya etumba. Na mituka mosusu babaka mwa bapapye oyo ekomami ete baanzelu babateli bakɛngɛlaka basofele. Ezali na masangá mpe makita oyo ezali kolendisa bato na koyekola makambo ya baanzelu mpe bazali koloba ete bibongiseli yango esalisaka bato na kosolola na baanzelu.

Eileen Freeman akomaki buku misato oyo ezali kolobela baanzelu mpe asala zulunalo moko oyo elobelaka bobele makambo ya baanzelu. Alobi ete: “Nakanisi ete motuya ya baanzelu na likoló ezali ndenge moko na motuya ya baanzelu babateli awa na mabelé, bikelamu oyo bizali na mosala ya kosanzola Nzambe na likoló mpe kobatela bato mpe bikelamu mosusu ya bomoi awa na Mabelé. Uta na libumu ya mama, bapesaka biso anzelu mobateli oyo akobanda kokɛngɛla biso, ntango tokobotama, na bomoi na biso awa na mokili oyo, mpe anzelu yango akokamba biso kino na nkembo ya likoló.” Maloba oyo mamonisi mpenza likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na baanzelu babateli.

Na ntango oyo etondi na mpasi mpe na mikakatano, tokoki kobɔndisama na kondima ete tozalaka na anzelu mobateli na biso, oyo azali na mokumba ya kobatela biso. Biblia, Liloba ya Nzambe elobi nini na likambo yango? Tosengeli koluka kosolola na baanzelu? Bamibanzabanzaka mpo na etamboli mpe bindimeli na biso? Bakoki kosala nini mpo na biso? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto