Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/12 lok. 24
  • Bayibi balongi te na Afrika ya Wɛsti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayibi balongi te na Afrika ya Wɛsti
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Ntango bayibi bakɔteli bino na ndako na mindoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Motuka na yo​—Ekimelo to motámbo?
    Lamuká!—1995
  • Kebá na miyibi ya mituka na nzela!
    Lamuká!—2007
  • Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/12 lok. 24

Bayibi balongi te na Afrika ya Wɛsti

Lisolo ya Eunice Ebuh

“Bayibi oyo bazalaka na mindoki bakanaki kokɔtela biso na ndako mokolo oyo, na momeseno, tosalaka boyekoli ya mokanda na ndako na biso. Tofungolaka bikuke ya lopango polele mpo na bandeko na baninga ya solo oyo bayaka na likita. Na ntembe te bayibi bayebaki momeseno na biso mpe ngonga oyo tosalaka likita. Tondimi ete mokolo yango bayibaki motuka ya bato mpe bazalaki kozela ete tófungola ekuke ya lopango na ngonga ya boyekoli ya mokanda.

“Nzokande, na pɔsɔ yango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá na biso. Na esika ete tósala likita na ndako na biso, tosalaki makita na Ndako ya Bokonzi. Ntango makita esilaki, bankulutu bazalaki na likita. Lokola momeseno, ngai na bana tolingaki kozonga na ndako, kasi mobali na ngai, azali nkulutu na lisangá, alobaki na biso tózela ye. Alobaki ete akoumela te. Tozelaki ye.

“Na nsima tomonaki ete motuka ezalaki kopela te. Mokɛngɛli ya zongazonga na mobali na ngai balongaki te kobongisa yango. Ata mobongisi motuka oyo tobéngaki alongaki kobongisa yango te.

“Bana bazongaki na ndako na makolo. Mwa moke na nsima, ngai mpe nalandaki bango. Nakómaki soko na ngonga ya zomi [ya butu]. Ezala ngai to bana moto moko te akɔtaki na lopango na motuka, yango wana tofungolaki ekuke ya monene te.

“Ntango nakɔtaki na ndako ya kolala, nayokaki mondoki ebɛti makasi. Namitunaki soki likambo nini. Namekaki kobéngisa bapolisi, kasi telefone ekufaki. Nakitaki mbango na etaze mpo na kokanga ekuke ya lopango, na nsima nakangaki ekuke ya ndako. Nabomaki miinda. Bana babandaki kolɛnga, kasi nayebisaki bango ete bázala kimya. Tobondelaki Yehova ete abatela biso. Na ntango yango, mobali na ngai azalaki kaka na Ndako ya Bokonzi kobundana mpo na kobongisa motuka.

“Natalaki na lininisa mpe namonaki moto moko alali na balabala. Emonanaki ete bayibi bakei, bongo nakɔtisaki moto yango oyo azokaki na motuka na ngai mpe nakendaki na ye nokinoki na lopitalo. Ezalaki likama, kasi nasengelaki kosala bongo. Likambo ya mawa, moto yango akufaki na mokolo oyo elandaki.

“Na esika ya likama oyo, makambo elingaki nde kozala nsɔmɔ koleka. Boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga esalaki ete boyekoli ya mokanda esalema na ndako na biso te. Kokufa ya motuka esalaki ete libota mobimba tózonga na ndako na motuka te. Mobali na ngai oyo mbɛlɛ bayibi bakangaki ye soki bazwaki ye, azongaki na ndako noki te. Makambo oyo mpe makambo mosusu ebikisaki biso na mpokwa ya mokolo wana.

“Yehova azali nguya mpe ebombamelo na biso. Ndenge Biblia elobi yango: ‘Soko ezali [Yehova] te oyo akobatelaka mboka, basɛnzɛli bakosɛnzɛlaka yango bobele mpamba.’”—Nzembo 127:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto