Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/1 nk. 3-5
  • Lisalisi ya solosolo mpo na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi ya solosolo mpo na libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolongola likanisi ya koboma libala
  • Kokesana mangomba
  • Ntango tata azali kokokisa mikumba na ye te
  • Ezaleli ya kimya
  • Baninga mabe
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Batelá kimya kati na ndako na yo
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/1 nk. 3-5

Lisalisi ya solosolo mpo na libota

“Na bosembo nyonso, tokoki koloba ete na États-Unis, libota ezali na mikakatano. Tokoki kokanisa ndenge mosusu te soki totali motuya ya mabala oyo ezali kokufa, ya bana oyo bazali kobotama na zemi ya balabala, [mpe] konyokola bana to mpe babalani.”

MALOBA oyo ya Tom Brokaw, mopanzi-nsango na televizyo na États-Unis, mazali mpe solo mpo na bikólo mingi. Mikakatano oyo elimboli nini?

Na makambo mingi, libota ezali mosisa oyo esimbi lisangá mobimba ya bato. Soki libota ekɔti mobulungano, lisangá mobimba ya bato mpe ekozala na mobulungano. Lisusu, libota ezali esika oyo bana basengeli kokokisa bamposa na bango ya mayoki mpe ya mosuni. Ezali esika oyo bayekolaka mateya ya liboso mpe oyo eleki ntina na bomoi. Soki libota ekɔti mobulungano, bana bakoyekola bizaleli nini? Bakobatelama ndenge nini? Bakokóma mikóló ya ndenge nini?

Na ntango oyo ya mpasi, libota ekoki kozwa lisalisi? Ɛɛ. Libota ezali ebongiseli ya Nzambe. (Genese 1:27, 28) Na kati ya Biblia, Liloba na ye, Nzambe apesi litambwisi ya malamu mpenza mpo na libota. (Bakolose 3:18-21) Ya solo, tokoki kobongola bato nyonso te, kasi tokoki kosalela toli ya Biblia na libota na biso moko. Tolingi koyebisa yo ndenge bato mosusu oyo basalaki bongo mpe matomba malamu oyo bazwaki.

Kolongola likanisi ya koboma libala

Na bikólo mingi, soki tokamati mabala mibale, moko ezali kosuka na kokufa. Likambo yango emonisi ete boyokani ya bato ebebi mpenza! Ya solo, baboti mingi oyo mabala na bango ekufá bazali kosala mosala monene mpo na kobɔkɔla bana bango moko. Kasi mingi bakondima ete eleki malamu babalani básilisa matata na bango mpe báfanda esika moko.

Na bisanga Salomon, libala moko elingaki kosuka mabe. Mobali, oyo azali mwana ya mokonzi moko na mboka yango, azalaki kobɛta mwasi na ye mpe azalaki na bizaleli mabe mingi. Mpasi elekaki mpo na mwasi na boye ete alingaki kutu komiboma. Na nsima, mobali andimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ayekolaki ete moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli bobele koyeba te ete likambo boye to boye ezali mabe kasi asengeli mpe “koyina mabe.” (Nzembo 97:10) Yango elimboli koyina makambo lokola lokuta, moyibi, mobulu, mpe kolangwa masanga. Alandaki toli yango mpe mosika te, atikaki mimeseno na ye ya mabe mpe ezaleli na ye ya nkanda. Mbongwana oyo asalaki ekamwisaki mwasi na ye, mpe libala na bango ekómaki malamu mpenza. Nyonso wana na lisalisi ya Liloba ya Nzambe.

Na Afrika ya Sudi, mwasi moko Motatoli ya Yehova ayokaki ete nkolo-mosala na ye alingaki koboyana na mobali na ye. Motatoli yango ayebisaki nkolo-mosala na ye likanisi ya Nzambe mpo na libala mpe alakisaki ye buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Buku yango, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, emonisi mitinda ya Biblia mpo na libala, mpe mingimingi ezali kolakisa ndenge oyo Biblia ezali kosalisa babalani na kosilisa matata na bango. Nkolo-mosala atángaki buku yango na mobali na ye mpe bamekaki kolanda toli oyo epesami na kati. Litomba emonanaki: batikaki likanisi ya koboma libala. Kolanda toli ya Biblia ebikisaki libala mosusu.

Kokesana mangomba

Tokoloba boni mpo na mabala oyo babalani bazali na lingomba moko te? Biblia epesi baklisto toli ya malamu ete bábala “kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Kasi, esalemaka ntango mosusu ete mobalani moko akóma na lingomba mosusu. Yango esengeli koboma libala na bango? Te.

Na ekólo Botswana, batunaki mwasi moko oyo autaki kokóma Motatoli ya Yehova soki lingomba na ye ya sika ebongolaki ye. Mwasi yango asɛngaki na mobali na ye ete ayanola na esika na ye, mpe mobali alobaki boye: “Banda mwasi na ngai akómi Motatoli ya Yehova, namoni ete asali mbongwana mingi. Akómi na kimya mpe na mayele oyo azalaki na yango liboso te. Azwaki ekateli mpe makasi ya kotika komɛla likaya, bolɛmbu oyo ngai nazali kokoka kolonga te. Mwasi na ngai akómi na bolingo mingi epai ya bana mpe epai na ngai, mpe epai ya bato mosusu. Akómi kokanga motema mingi, mingimingi epai ya bana. Namonaka ye azali komipesa na mosala na ye ya kosakola mpo na kosalisa bato mosusu na kolonga mikakatano na bango. Namoni ete ngai moko mpe nabongwani. Nandimi ete nyonso oyo mpo na ndakisa na ye.” Talá bopusi malamu oyo mitinda ya Biblia esali na libala oyo! Bato mingi oyo bazali Batatoli te balobi makambo motindo oyo mpo na babalani na bango oyo bazali Batatoli.

Ntango tata azali kokokisa mikumba na ye te

Soki tata na bana bazali koyokana, libota ekozala malamu. Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:⁠4) Yango wana, tokoki kokamwa te ete lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo The Wilson Quarterly emonisaki ete mikakatano mingi oyo bato bazali na yango na bomoi na bango ezali mpo ete batata bazali kokokisa mikumba na bango te. Lisolo yango elobaki ete: “Kobanda 1960 kino 1990, motuya ya bana oyo bazali kofanda esika moko na batata na bango te ebakisami mbala mibale . . . Na États-Unis, bato bazali na mikakatano mingi oyo ezali kobulunganisa bango mpamba te batata bazali lisusu kokokisa mokumba na bango te.”

Yango elingi nde koloba ete bana oyo bazali kobɔkwama na batata na bango te bakoki kolonga te? Te. Mokomi ya nzembo na ntango ya kala alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Na ekólo Thaïlande, elenge mobali moko ya mbula libwa amonaki bosolo ya likambo yango. Mama na ye akufaki ntango oyo ye azalaki naino bebe, mpe lokola tata na ye aboyaki ye, asundolaki ye epai ya nkɔkɔ na ye. Lokola amonaki ete bazalaki na mposa na ye te mpe balingaki ye te, mwana yango akómaki motomboki mpe bato nyonso bayebaki ye lokola mwana ya mobulu. Kutu azalaki kokanela nkɔkɔ na ye. Batatoli ya Yehova mibale babongisi-nzela bamonaki ete mbala mingi azalaki kotɛlɛma na libándá ya Ndako ya Bokonzi. Mokolo mosusu babéngisaki ye na ndako na bango.

Basololaki na ye makambo ya Nzambe. Bayebisaki ye ete Nzambe azali tata, alingaka bana na ye. Bayebisaki ye lisusu ete Nzambe alaki kotya Paladiso awa na mabelé mpo na bato ya sembo. (Emoniseli 21:3, 4) Makambo nyonso wana esepelisaki elenge yango, mpe akómaki kokende kuna mikolo nyonso mpo na koyekola makambo mingi koleka. Batatoli bayebisaki ye ete, soki alingi mpenza ete Nzambe azala Tata na ye, asengeli kotika mobulu. Likanisi yango eyokanaki na maloba ya Paulo epai ya Baloma ete: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.” (Baloma 12:18) Asengelaki mpe kofanda na nkɔkɔ na ye na boboto. (1 Timote 5:1, 2) Mosika te, akómaki kolanda mitinda ya Biblia mpe na ntembe te, yango ebongisaki mpenza boyokani na ye na nkɔkɔ na ye. (Bagalatia 5:22, 23) Bato ya zingazinga bakamwaki ntango bamonaki mbongwana oyo asalaki mpe balingaki ete bana na bango mpe báyekola Biblia na Batatoli ya Yehova!

Ezaleli ya kimya

Ntoma Paulo akomelaki Bakolose ete: “Bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza. Lisusu, Tiká mpe kimya na Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino.” (Bakolose 3:14, 15) Kozala na kimya mpe bolingo ya motema esangisaka libota esika moko. Yango ekoki mpe kosilisa bokabwani oyo eumeli na kati ya libota. Rukia, oyo afandi na ekólo Albanie, azalaki kolobana te na ndeko na ye ya mobali na boumeli ya mbula 17 mpo na matata oyo ebimaki na libota na bango. Ntango ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova, akangaki ntina ete mosaleli nyonso ya Nzambe asengeli kozala na kimya na bato mosusu. “Aluka kimya mpe [alanda] yango.”​—⁠1 Petelo 3:11.

Rukia amonaki ete asengeli kozongisa kimya na ndeko na ye. Abondelaki butu mobimba, mpe na ntɔngɔ​—⁠na motema kobɛta​—⁠akendaki na ndako ya ndeko na ye. Mwana ya ndeko na ye afungolaki ndako mpe, na kokamwa mpenza, atunaki ete: “Oyei kosala nini awa?” Na kimya nyonso, Rukia asɛngaki akutana na ndeko na ye, alobaki ete alingi bázongisa kimya kati na bango. Mpo na nini? Mpamba te akangaki ntina ete Nzambe alingi bongo. Ndeko na ye andimaki, bayambanaki mpe balelaki na esengo​—⁠kolanda mitinda ya Biblia esangisaki libota.

Baninga mabe

Buku moko (The 7 Habits of Highly Effective Families) eyebisi ete, “Lelo oyo, mwana moke azali kolekisa ngonga 7 liboso ya televizyo na mokolo moko. Ntango asilisi eteyelo ya ebandeli, asili kotala bililingi koleka 8 000 oyo ezali kolakisa koboma bato mpe asili kotala bililingi ya makambo ya mobulu mbala 100 000.” Kotala makambo ya ndenge wana ezali na bopusi nini na bɔɔngɔ ya mwana? Na likambo yango, “bato ya mayele” bazali na likanisi moko te. Kasi, Biblia ezali kokebisa makasi na baninga mabe. Na ndakisa, Biblia elobi: “Ye oyo asali boninga na bazoba akoyoka eloko.” (Masese 13:20, NW ) Elobi lisusu: “Kotambola na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” (1 Bakolinti 15:33) Na kati ya libota makambo ekoki kobonga soki tondimi ete etinda yango ezali solo, ezala ete baninga mabe yango bazali mpenza bato oyo tofandi na bango to tozali komona bango na televizyo.

Na ekólo Luxembourg, mama moko azalaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Mokolo mosusu ayebisaki Motatoli yango ete na mpokwa bana na ye mibale ya basi, moko azali na mbula 7 mpe mosusu mbula 8 baswanaka mingi mpe bazalaka nkandankanda. Motatoli atunaki soki bana yango basalaka nini na mpokwa. Mama yango alobaki ete batalaka televizyo na ntango ye azali kosukola kuku. Batalaka nini? Ayanolaki ete “batalaka dessins animés.” Ntango Motatoli alobaki na ye ete mbala mingi bafilme yango elakisaka makambo ya mobulu, mama yango alakaki ete akotalela yango.

Mokolo oyo elandaki, mama yango alobaki ete ayokaki mabe ntango amonaki dessin animé oyo bana na ye bazalaki kotala. Ezalaki kolakisa bilima oyo eutaki na mokili mosusu mpe ezalaki kobebisa biloko nyonso na bisika oyo ezalaki koleka. Ayebisaki bana na ye ete Yehova ayini mobulu mpe asepelaka te ntango tozali kotala makambo mabe ndenge wana. (Nzembo 11:⁠5) Lokola balingaki kosepelisa Yehova, bana bandimaki ete bakobanda kosala mayemi na esika ya kotala televizyo. Mbala moko, batikaki ezaleli na bango ya nkandankanda, mpe ndako ekómaki na kimya.

Oyo ezali se mwa bandakisa mpo na komonisa ete kolanda mitinda ya Biblia ebongisaka boyokani na kati ya libota. Biblia ezali kopesa toli na makambo nyonso. Tokoki kotyela yango motema mpe ezali na nguya ya kopusa moto na kosala makambo ya malamu. (Baebele 4:12) Ntango bato bazali koyekola Biblia mpe bazali kosala milende ya kotosa maloba na yango, mabota elendisamaka, bato babongisaka bizaleli na bango mpe bapɛngolaka kosala mabunga. Ata soki bobele moto moko ya libota azali kolanda toli ya Nzambe, makambo ebongaka. Ya solo, na makambo nyonso ya bomoi, tosengeli kotalela Liloba ya Nzambe, lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Liloba na yo ezali mwinda na [makolo] na ngai mpe pole na nzela na ngai.”​—⁠Nzembo 119:105.

[Elilingi na lokasa 5]

Kosalela mitinda ya Biblia esilisi mikakatano ya libota

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto