Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/2 nk. 18-23
  • Nzela ya Bolingo ekosuka te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzela ya Bolingo ekosuka te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo esalisaka biso na kotika lolendo
  • Bolingo ebotaka kimya
  • Bolingo esalisaka biso na kokanga motema
  • Bolingo: “Nzela oyo eleki nyonso na malamu”
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tolanda bolingo, nzela eleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bolingo (agape): ezali nini te mpe ezali nini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tólona bolingo oyo esilaka soki moke te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/2 nk. 18-23

Nzela ya Bolingo ekosuka te

“Bólukaka na mposa makabo makolekaka na malamu. Nakomonisa bino nzela oyo eleki nyonso na malamu.”​—1 BAKOLINTI 12:31.

1-3. (a) Ndenge nini koyekola komonisa bolingo ekokani mpenza na koyekola monɔkɔ mosusu? (b) Makambo nini ekoki kokómisa koyekola komonisa bolingo komekama monene?

OSILÁ komeka koyekola monɔkɔ mosusu? Ezalaka komekama mpenza! Ya solo, mwana moke akoki koyeba koloba monɔkɔ moko soki kaka afandi na esika oyo balobaka yango. Bɔɔngɔ na ye ekangaka mingongo mpe bandimbola ya maloba na bolɛmbu mpenza, mpe mosika te okomona ete mwana abandi koloba yango malamu, mbala mosusu mpo na libela. Kasi ezali bongo te mpo na mikóló. Biso, mbala na mbala, tolukaka maloba ya sika na diksionere mpo na koyeba se mwa bafraze moke na monɔkɔ mosusu. Kasi, nsima ya ntango mpe na komimesenisa, tokobanda kokanisa na monɔkɔ yango mpe koloba yango malamu.

2 Koyekola komonisa bolingo ezali se lokola koyekola monɔkɔ ya sika. Ezali solo ete biso bato tozali na mwa ndambo ya ezaleli yango ya Nzambe. (Genese 1:27; talá 1 Yoane 4:8.) Kasi, koyekola komonisa bolingo esɛngaka milende makasi. Mingimingi lelo oyo, lokola bolingo ya motema ezali lisusu mingi te. (2 Timote 3:1-5) Mbala mosusu tozali kokuta likambo yango na kati ya libota. Bato mingi bazali kokola na esika oyo maloba ya bolingo mayokanaka mingi te, to mpe mayokanaka ata moke te. (Baefese 4:29-31; 6:4) Na bongo, ndenge nini tokoki koyekola komonisa bolingo, ata soki biso moko balakisaki biso mpenza bolingo te?

3 Biblia ekoki kosalisa biso. Na 1 Bakolinti 13:4-8, Paulo alimboli na maloba ya polele mpenza, kasi ya bongobongo te, ndenge oyo bolingo wana ya bozindo esalaka. Soki totaleli bavɛrsɛ yango, ekosalisa biso tóyeba malamu ezaleli wana ya Nzambe mpe ekobongisa biso mpo na komonisa bolingo. Sikoyo, tótalela mwa mitindo ya bolingo na ndenge oyo Paulo alobeli yango. Tokokabola yango na makambo minene misato: ya liboso, na etamboli na biso; na nsima, na boyokani na biso na bato mosusu; mpe na nsuka, na kokanga motema na biso.

Bolingo esalisaka biso na kotika lolendo

4. Ndenge nini Biblia elimboli zuwa?

4 Nsima ya maloba na ye ya ebandeli mpo na kolobela bolingo, Paulo akomelaki Bakolinti ete: “Bolingo . . . ezali na zuwa te.” (1 Bakolinti 13:4) Nzokande, zuwa ekoki mpe komonana na ndenge ya likunya mpo na bolamu oyo baninga bazali na yango to mpo na misala na bango. Zuwa motindo oyo ebebisaka nzoto, mayoki, mpe elimo.​—Masese 14:30; Baloma 13:13; Yakobo 3:14-16.

5. Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso na kolonga zuwa ntango tomoni lokola ete babosani biso na mokumba moko ya Teokrasi?

5 Na kotalela likambo oyo, omituna, ‘Nayokaka zuwa soki namoni lokola ete bazali kobosana ngai na mokumba moko na kati ya lisangá?’ Soki eyano ezali ɛɛ, kolɛmba nzoto te. Yakobo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobi na biso ete bato nyonso ya kozanga kokoka, bazalaka na “mposa ya bilulela.” (Yakobo 4:5, NW) Kolinga ndeko na yo ekoki kosalisa yo na kozala na bokatikati. Bolingo ekoki kosalisa yo osepela na baoyo bazali kosepela mpe oyoka motema mpasi te na ntango moto mosusu azwi lipamboli to lokumu.​—Talá 1 Samwele 18:7-9.

6. Likambo nini ya monene ebimaki na lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso?

6 Paulo abakisi ete bolingo “ezali na lolendo te, ekomivimbisaka [na lolendo] te.” (1 Bakolinti 13:4) Soki tozali na makoki to na mayele mingi, ezali na ntina te tómilakisa mpo na yango. Ekoki kozala ete likambo yango ezalaki epai ya bato mosusu oyo bazalaki koluka lokumu, oyo bakɔtaki na lisangá ya Kolinti ya kala. Mbala mosusu bato yango bayebaki mpenza kolimbola makambo to bazalaki na makoki mingi na ndenge ya kosala makambo. Lokola bazalaki koluka kobenda likebi ya bato mosusu likoló na bango, bakɔtisaki bokabwani na kati ya lisangá. (1 Bakolinti 3:3, 4; 2 Bakolinti 12:20) Makambo ebebaki mpenza; yango wana na nsima, Paulo apamelaki Bakolinti ete bazalaki ‘kokanga motema liboso ya bato oyo bazali na makanisi malamu te,’ baoyo Paulo abéngaki bango na lityo ete “bantoma mineneminene.”​—2 Bakolinti 11:5, 19, 20, NW.

7, 8. Na lisalisi ya Biblia, monisá ete tokoki kosalela makoki nyonso oyo tozali na yango mpo na kolendisa bomoko.

7 Likambo motindo yango ekoki kosalema lelo oyo. Na ndakisa, bato mosusu bakoki kozala na elimo ya komikumisa mpo na mbuma oyo bazali kobuka na mosala ya kosakola to mpo na mikumba oyo bazali na yango na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Ata soki tozali na mayele mingi to na makoki na likambo moko oyo bato mosusu na lisangá bazali na yango te, tosengeli komikumisa mpo na yango? Kutu tosengeli nde kosalela makoki nyonso oyo tozali na yango mpo na kolendisa bomoko, kasi mpo na komitombola te.​—Matai 23:12; 1 Petelo 5:6.

8 Paulo akomaki ete atako bato bazali mingi na lisangá, “Nzambe atongaki nzoto.” (1 Bakolinti 12:19-26) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “atongaki” elimboli kosangisa malamu, ndenge basangisaka balangi mingi. Yango wana, na kati ya lisangá, moto moko te asengeli kotombola mapeka mpo azali na makoki mingi to mpe koluka koyangela basusu. Lolendo mpe koluka bokonzi ezali na esika te na ebongiseli ya Nzambe.​—Masese 16:19; 1 Bakolinti 14:12; 1 Petelo 5:2, 3.

9. Mpo na kokebisa biso, Biblia elobeli banani oyo bazalaki koluka matomba na bango moko?

9 Bolingo “ekolukaka malamu na yango mpenza te.” (1 Bakolinti 13:5) Moto ya bolingo alukaka kozimbisa bato mosusu mpo na litomba na ye moko te. Biblia epesi bandakisa oyo ezali kokebisa biso na likambo yango. Na ndakisa, totángaka masolo ya Dalila, Yezabele, mpe Atalia, basi oyo bazimbisaki bato mosusu mpo na bolamu na bango moko. (Basambisi 16:16; 1 Mikonzi 21:25; 2 Ntango 22:10-12) Totángaka mpe lisolo ya Abesaloma, mwana ya Mokonzi Davidi. Azalaki kokutana na bato oyo bazalaki kokende na Yelusaleme mpo na kosamba makambo na bango; azalaki kondimisa bango na mayele mabe ete mokonzi azalaki mpenza kotya likebi na makambo na bango te. Na nsima azalaki koloba polele ete ebongaki ete moto ya motema malamu lokola ye azala mokonzi! (2 Samwele 15:2-4) Ya solo, Abesaloma azalaki komibanzabanza, mpo na bato oyo bazalaki konyokwama te, kasi mpo na ye moko. Na ndenge oyo azalaki kosala makambo lokola ete ye nde mokonzi, azimbisaki mitema ya bato ebele. Kasi na ntango na yango, Abesaloma asukaki mabe. Ntango akufaki, bakanisaki kutu te ete basengeli kokunda ye na esika oyo ebongi.​—2 Samwele 18:6-17.

10. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpe kotalela matomba ya basusu?

10 Likambo yango ezali likebisi mpo na baklisto lelo oyo. Ezala mobali to mwasi, tokoki kozala na makoki ya kondimisa makanisi na biso. Ekoki kozala mpasi te ete tóluka kosala makambo oyo tosepeli na yango. Na ndakisa, tokolinga ete na kati ya lisolo, biso nde tólobaka mingi, to mpe tótingama na likanisi na biso mpo na kolongisa yango soki baninga bazali na likanisi mosusu. Kasi, soki mpenza tozali na bolingo, tokoluka mpe matomba ya basusu. (Bafilipi 2:2-4) Tokoluka komatela basusu te to kobimisa makanisi oyo ezali sembo te mpo toyebi makambo mingi to tozali na mokumba moko na kati ya ebongiseli ya Nzambe, lokola ete biso kaka nde tokoki kobimisa makanisi ya malamu. Nzokande, tokobosana lisese oyo ya Biblia te: “Lolendo liboso na kobeba, [elimo, NW] na nzombo liboso na kokwea.”​—Masese 16:18.

Bolingo ebotaka kimya

11. (a) Ndenge nini tokoki komonisa bolingo oyo ezali na boboto mpe oyo esalaka na nsɔni te? (b) Ndenge nini tokoki kolakisa ete tosepelaka te na kozanga bosembo?

11 Paulo akomaki lisusu ete bolingo ezali na “boboto” mpe ete “ekosalaka na nsɔni te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Bolingo ekopekisa biso kosala makambo na mobulu, to na yauli, to na kozanga limemya. Kasi, tokotalela mayoki ya basusu. Na ndakisa, moto oyo azali na bolingo akoboya kosala makambo oyo ezali kotungisa lisosoli ya baninga. (Talá 1 Bakolinti 8:13.) Bolingo “ekosepelaka na masumu te nde ekosepelaka makambo na solo.” (1 Bakolinti 13:6) Soki tolingaka mibeko ya Yehova, tokotalela misala ya bosɔtɔ lokola likambo moke te mpe tokoboya kominanola na makambo oyo Nzambe ayini. (Nzembo 119:97) Bolingo ekopusa biso tósepela na makambo oyo etongaka kasi oyo ekitisaka lokumu ya moto te.​—Baloma 15:2; 1 Bakolinti 10:23, 24; 14:26.

12, 13. (a) Tosengeli kosala nini soki moto moko asali biso mabe? (b) Tángá bandakisa ya Biblia mpo na komonisa ete ata soki ebongi tósilika, nkanda ekoki kopusa biso na kosala makambo na bozoba.

12 Paulo akomi ete bolingo “ezali na nkanda te” (“esilikaka noki te,” Phillips). (1 Bakolinti 13:5) Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosilika to koyoka nkanda ntango moto moko asali biso mabe. Kasi, kobomba nkanda na motema to kosilika ntango molai ezali mabe. (Nzembo 4:4; Baefese 4:26) Ata soki ebongi tósilika na likambo moko, soki topekisi nkanda yango te, ekoki kopusa biso na kosala makambo na bozoba, mpe Yehova akoki kopesa biso foti.​—Genese 34:1-31; 49:5-7; Mituya 12:3; 20:10-12; Nzembo 106:32, 33.

13 Ezali na baoyo batiki ete mabunga ya bato mosusu epekisa bango koyangana na makita to mpe kobima na mosala ya kosakola. Mingi kati na bato yango babundaki liboso etumba makasi mpo na kondima. Mbala mosusu bakangaki motema na botɛmɛli ya libota, na ndenge baninga ya mosala mpe bato mosusu bazalaki kosɛka bango. Bakangaki motema liboso ya mikakatano wana mpo bamonaki ete ezali komekama ya bosembo na bango, mpe ezali mpenza bongo. Kasi nini emonanaka soki ndeko na bango moklisto alobi to asali likambo moko na kozanga bolingo? Yango mpe ezali komekama ya bosembo na bango, boye te? Ezali bongo, mpamba te soki toumeli na nkanda, tokoki ‘kotikela Zabolo nzela.’​—Baefese 4:27, NW.

14, 15. (a) “Kobomba mabe na motema” elimboli nini? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kolimbisa?

14 Yango wana, Paulo abakisi ete bolingo “ekobombaka mabe na motema te.” (1 Bakolinti 13:5) Na esika oyo, asaleli maloba ya comptabilité mpo na kopesa likanisi ya moto oyo azali kokoma na kaye ya kɔnti makambo mabe oyo basali ye mpo abosana yango te. Soki tokobomba na motema maloba mabe to makambo mabe oyo basalaki biso, lokola nde tokozala na mposa na yango na mikolo ekoya, yango ezali mpenza bolingo? Tokoki mpenza kosepela na komona ete Yehova alukalukaka makambo mabe epai na biso te na motindo wana ezangi mawa! (Nzembo 130:3) Soki tobongoli motema, abosanaka mabunga na biso.​—Misala 3:19.

15 Tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na likambo oyo. Tózala te bato oyo bazokaka noki ntango moto moko asali lokola kosilikisa biso. Soki tozali kozoka noki, tokoki komiyokisa mpasi koleka mpasi oyo moto oyo azokisi biso akoki koyokisa biso. (Mosakoli 7:9, 22) Nzokande, tosengeli kobosana te ete bolingo “ekondimaka nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Ya solo, kati na biso, moko te akondima azala moto oyo bakosaka ye na bolɛmbu nyonso. Kasi tosengeli kokaniselaka bandeko na biso mabe te. Mbala nyonso oyo esengeli, tóndima ete moninga azalaki na makanisi mabe te.​—Bakolose 3:13.

Bolingo esalisaka biso na kokanga motema

16. Ntango nini bolingo ekoki kosalisa biso na kozala na motema pɛtɛɛ?

16 Na nsima, Paulo alobi na biso ete “bolingo ezali na motema pɛtɛɛ.” (1 Bakolinti 13:4) Bolingo esalisaka biso tólɛmba te liboso ya bampasi, mbala mosusu mpo na ntango molai. Na ndakisa, baklisto mingi bafandaki bambula ebele na ndako oyo bato nyonso bazali na lingomba moko te. Basusu bazali minzemba, ezali te ete baponi kozala bongo, kasi ezali mpo ete bamoni naino molongani oyo abongi na bango te “kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39; 2 Bakolinti 6:14) Lisusu, ezali na baoyo bazali kobunda na bamaladi makasi. (Bagalatia 4:13, 14; Bafilipi 2:25-30) Ɛɛ, na ebongiseli oyo ezangi kokoka, moto nyonso azali na likambo moko na bomoi na ye oyo esɛngi kokanga motema.​—Matai 10:22; Yakobo 1:12.

17. Nini ekosalisa biso ete tókanga motema na makambo nyonso?

17 Paulo alobi na biso ete bolingo “ekomemaka makambo nyonso, . . . ekolikyaka makambo nyonso, [ekangaka motema na makambo nyonso, NW].” (1 Bakolinti 13:7) Bolingo mpo na Yehova ekopesa biso makasi ya kondima ata mpasi nini mpo na bosembo. (Matai 16:24; 1 Bakolinti 10:13) Tolukaka kokufa lokola bamartiru te. Nzokande, mposa na biso ezali ete tózala na bomoi ya kimya. (Baloma 12:18; 1 Batesaloniki 4:11, 12) Atako bongo, ntango kondima na biso emekami, tokangaka motema na esengo mpo toyebi ete ezali motuya oyo tozali kofuta lokola bayekoli ya Klisto. (Luka 14:28-33) Ntango tozali kokanga motema, tosalaka nyonso mpo na kobatela esengo mpe tozalaka na elikya ete nsima ya komekama, likambo ya malamu ekoya.

18. Ndenge nini kokanga motema ezali na ntina ata na ntango oyo makambo mazali malamu?

18 Kokanga motema esɛngami se na ntango ya komekama te. Ntango mosusu, kokanga motema elimboli se koumela, kokoba na nzela oyo etyami liboso na biso, ezala tozali na mikakatano to te. Kokanga motema elimboli mpe kobatela mimeseno malamu na makambo ya elimo. Na ndakisa, osalaka mosala ya kosakola na ndenge oyo esengeli mpenza, ndenge ezalela na yo ezali kopesa yo nzela? Otángaka mpe omanyolaka Liloba ya Nzambe mpe osololaka na Tata na yo ya likoló na libondeli? Oyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, mpe ozwaka litomba na kolendisana na baninga na yo bandimi? Soki ezali bongo, ezala ozali na kimya to na mikakatano, yebá ete ozali kokanga motema. Yango wana, kolɛmba te, “zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.”​—Bagalatia 6:9.

Bolingo: “Nzela oyo eleki nyonso na malamu”

19. Ndenge nini bolingo ezali “nzela oyo eleki nyonso na malamu”?

19 Paulo amonisaki mpenza ntina oyo tosengeli komonisa bolingo na ndenge abéngaki ezaleli wana ya Nzambe ete “nzela oyo eleki nyonso na malamu.” (1 Bakolinti 12:31) Na ndimbola nini “eleki nyonso na malamu”? Mpamba te, Paulo autaki kotánga makabo ya elimo oyo baklisto mingi ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Bamoko bazalaki basakoli, basusu bazalaki na nguya ya kosilisa maladi, mpe mingi bazalaki na nguya ya koloba minɔkɔ ndenge na ndenge. Ezalaki solo makabo minene! Kasi, Paulo ayebisaki Bakolinti ete: “Ata nakolobaka na maloba na bato mpe na [baanzelu, NW] nde nazangi bolingo, nazali bobele ngonga ekolobaka ngbaa ngbaa to elonza ekolobaka ngbengbele ngbengbele. Ata mpe nazali kosakola mpe koyeba makambo nyonso mabombami mpe makambo nyonso na mayele, ata nazali na kondima nyonso mpo na kolongola ngomba, nde soko nazangi bolingo, nazali mpamba.” (1 Bakolinti 13:1, 2) Ɛɛ, ata misala oyo ekoki kozala na motuya monene ekokóma “misala na kufa” soki esalemi na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na mozalani te.​—Baebele 6:1.

20. Mpo na nini esengeli ntango nyonso kosala milende mpo na kolona bolingo?

20 Yesu ayebisi biso ntina mosusu oyo tosengeli kolona ezaleli ya Nzambe oyo tobéngi bolingo. Alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozali na bolingo kati na bino.” (Yoane 13:35, NW) Liloba “soki” emonisi ete ezali likambo oyo etali moklisto mokomoko, soki akoyekola komonisa bolingo to te. Ya solo, toyebi ete ezali te mpo tofandi na mboka mopaya nde tokoyekola monɔkɔ oyo elobamaka kuna. Ndenge moko, ezali te mpo toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi to tozalaka na baninga baklisto nde mbala moko tokomonisa bolingo. Koyekola “monɔkɔ” yango esɛngi kosala milende ntango nyonso.

21, 22. (a) Tosengeli kosala nini soki tozali kolonga te kokokisa makambo mosusu ya bolingo oyo Paulo alobelaki? (b) Na likambo nini tokoki koloba ete “bolingo ekosuka te”?

21 Ntango mosusu, okolonga te kokokisa mitindo mosusu ya bolingo oyo Paulo alobeli. Kasi, kolɛmba te. Meká nzoto mpe zalá na etingya. Kotika kotánga Biblia te mpe salelaká mitinda na yango na bomoi na yo wana ofandi na bato mosusu. Kobosana te ndakisa oyo Yehova ye moko apesi biso. Paulo apesaki Baefese toli ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko [lokola] Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.”​—Baefese 4:32.

22 Ndenge moko lokola koyekola koloba monɔkɔ mosusu nsukansuka ekómaka pɛtɛɛ, na ntembe te nsima ya ntango okomona ete komonisa bolingo ekómi pɛtɛɛ. Paulo alobi na biso ete “bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8) Na bokeseni na makabo ya elimo, bolingo ekosila te. Yango wana, tótika te koyekola komonisa ezaleli wana ya Nzambe. Paulo alobi ete ezali “nzela oyo eleki nyonso na malamu.”

Okoki kolimbola?

◻ Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso na kotika lolendo?

◻ Na makambo nini bolingo ekoki kosalisa biso na kolendisa kimya na lisangá?

◻ Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso na kokanga motema?

◻ Ndenge nini bolingo ezali “nzela oyo eleki nyonso na malamu”?

[Elilingi na lokasa 19]

Bolingo ekosalisa biso tóbosana mabunga ya bandeko na biso bandimi

[Bililingi na lokasa 23]

Kokanga motema elimboli kobatela mimeseno na biso ya Teokrasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto