Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/2 nk. 26-29
  • Sila: Molendisi ya bandeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sila: Molendisi ya bandeko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo ya kokatama ngenga
  • Akei mibembo ye na Paulo
  • Babɛtami mpe batyami na bolɔkɔ
  • Banda na Makedonia kino na Babilone
  • Ndakisa ya kolanda
  • “Leká na masedonia”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ ayekoli solo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Paulo abengi Timote
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/2 nk. 26-29

Sila: Molendisi ya bandeko

BANDA na ebandeli ya lisolo ya baklisto, mosala ya bakɛngɛli-batamboli ya sembo ezalaki na ntina mingi mpo na kolendisa masangá ya basaleli ya Nzambe mpe kosakola nsango malamu kino na nsuka ya mokili. Sila azalaki moko na bakɛngɛli oyo baponamaki na ebandeli mpenza, azalaki lisusu mosakoli mpe nkulutu na lisangá ya Yelusaleme. Akokisaki mokumba ya ntina mingi na makambo oyo esalemaki na mosala ya kosakola mpe azalaki moko na bamisionere oyo bateyaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso na Mpoto. Eloko nini epesaki Sila makoki ya kosala mosala oyo nyonso? Mpe bizaleli nini azalaki na yango oyo ebongi ete biso tómekola yango?

Likambo ya kokatama ngenga

Na mobu 49 T.B., ntango babimisaki ntembe oyo elingaki kokabola bato na likambo ya kakatama ngenga, lisangani ya mikóló-bakambi ya Yelusaleme esengelaki kotindela bandeko malako ya polele mpo na kokata likambo yango. Mpo na mbala ya liboso, Biblia etángi nkombo ya Sila, oyo abéngami lisusu Silwano ntango elobeli makambo yango. Ekoki kozala ete azalaki moko na bato oyo bazwaki ekateli mpe moto oyo “bantoma mpe mikóló” batindaki mpo na koyebisa “bandeko na Antiokia, na Sulia, na Kilikia” ekateli oyo ekamatamaki. Na Antiokia, Sila na Yuda (Balasaba), elongo na Balanaba na Paulo, bayebisaki bandeko nsango oyo bamemaki, mpe emonani ete bayebisaki makambo malekaki na likita ya Yelusaleme, ndenge likita yango esukaki, mpe batángelaki bango makambo oyo ekomamaki na mokanda. Lisusu ‘balendisaki bandeko na maloba mingi, mpe babakisaki nguya na bango.’ Na nsuka, epesaki esengo, mpamba te baklisto ya Antiokia ‘basepelaki.’​—Misala 15:1-32.

Sila akokisaki mokumba monene mpo na kosilisa likambo monene wana. Kasi mokumba na ye ezalaki pɛtɛɛ te. Bayebaki te ndenge oyo lisangá ya Antiokia ekotalela ekateli oyo ezwamaki. Molimboli moko ya Biblia alobi boye: “Esɛngaki moto moko oyo azali na mayele mpe na makoki mingi mpo na kolimbola makambo oyo bantoma bakomaki na mokanda na bango.” Koponama ya Sila na mokumba monene wana epesi biso mwa likanisi ya bomoto na ye. Azalaki moto oyo bakoki kotyela ye motema mpo na koyebisa na bosembo nyonso bikateli ya lisangani ya mikóló-bakambi. Azalaki lisusu mokɛngɛli ya mayele oyo azalaki na makoki mpo na kozongisa kimya soki matata ebimi na lisangá.

Akei mibembo ye na Paulo

Eyebani malamu te soki Sila azongaki na Yelusaleme to te nsima ya mobembo wana. Atako bongo, nsima ya matata oyo ebimaki kati na Balanaba na Paulo likoló ya Yoane Malako, Paulo aponaki Sila, oyo na eleko wana azalaki na Antiokia, mpo bákende mobembo mosusu na bingumba oyo Paulo ateyaki nsango malamu na mobembo na ye ya liboso.​—Misala 15:36-41.

Ekoki mbala mosusu kozala ete Paulo aponaki Sila mpo na elimo malamu oyo amonisaki na mokumba akokisaki epai ya bato ya mabota mpe na bokonzi oyo azalaki na yango lokola mosakoli mpe molobeli oyo lisangani ya mikóló-bakambi batindaki mpo na koyebisa bikateli na bango epai ya bandimi na Sulia mpe na Kilikia. Matomba ezalaki malamu mpenza. Mokanda ya Misala elobi ete: “Ezalaki bango koleka kati na bamboka, bapesi bayekoli mibeko mikati bantoma, na mikóló na lingomba kuna na YelPicture Credit Lineusaleme, ete bátosa yango. Na bongo mangomba malendisami na kondima, mpe motuya na bango ezalaki koleka monene mokolo na mokolo.”​—Misala 16:4, 5.

Wana bamisionere bazalaki na mobembo, mbala mibale elimo santu epekisaki bango koleka na nzela oyo bakanaki koleka. (Misala 16:6, 7) Ntango bakómaki na Lusutula, Timote, akɔtaki na molɔngɔ na bango, nsima ya kozwa “bisakweli” oyo bilimbolami te. (1 Timote 1:18; 4:14) Ntoma Paulo, azalaki na likabo ya kosakola, azwaki emonaneli ete ye na baninga na ye ya mobembo basengeli kokende na Makedonia, na Mpoto.​—Misala 16:9, 10.

Babɛtami mpe batyami na bolɔkɔ

Na Filipi, “engumba eleki monene ya etúká,” Sila akutanaki na monyoko makasi oyo akokaki kobosana yango te. Ntango Paulo abimisaki demo ya kosakola na nzoto ya moombo moko ya mwasi, bankolo na ye, lokola bamonaki ete balongoli eloko oyo ezalaki kokɔtisela bango mbongo, bamemaki Sila na Paulo liboso ya basambisi ya engumba. Mpo na yango, basambwisaki bango mibale, bamonisaki bango na miso ya bato nyonso lokola bato ya misala mabe, bapasolaki bilamba na bango, mpe babɛtaki bango fimbo na zando.​—Misala 16:12, 16-22.

Kobɛtama fimbo ezalaki etumbu ya mpasi, oyo ezalaki konyokola mpenza moto, kasi, Paulo na Sila bakokaki kozwa etumbu yango te. Mpo na nini? Mibeko ya Loma epekisaki kobɛta mwana-mboka Loma fimbo. Paulo azalaki mwana-mboka Loma, mpe emonani ete na Sila lokola. Nsima ya kobɛta Paulo na Sila “fimbo mingi,” batyaki bango na bolɔkɔ mpe bakangaki bango makolo na mabaya. Gustav Stählin, alobi ete: “Bisaleli wana ezalaki nsɔmɔ, ezalaki kopanza makolo ya bakangami na boye ete bakoki kozwa mpɔngi te.” Kasi, na katikati ya butu, na ntembe te, atako mikɔngɔ na bango etondaki na bampota, “Paulo na Sila bazalaki kobondela mpe koyembela Nzambe nzembo.”​—Misala 16:23-25.

Yango emonisi biso ezaleli mosusu ya Sila. Azalaki na esengo mpamba te bazalaki konyokwama mpo na nkombo ya Klisto. (Matai 5:11, 12; 24:9) Na ntembe te elimo yango moko nde esalisaki Sila na baninga na ye na mobembo ya liboso na Antiokia ete bákoka kolendisa mpe koyeisa lisangá makasi, na boye ete bandeko baklisto basepelaki. Esengo ya Paulo na Sila ebakisamaki na ndenge babimaki na bolɔkɔ na ekamwiseli ntango mabelé eninganaki mpe basalisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ oyo alingaki komiboma mpe libota na ye ete bándimela Nzambe.​—Misala 16:26-34.

Ezala Paulo to Sila, moto moko te abangaki fimbo to bolɔkɔ. Ntango bapesaki etinda ete bábimisa bango, baboyaki kobima na engumba Filipi na kobombama mpe na nsɔni, ndenge basambisi balingaki. Balongisaki lotomo na bango mpe balandelaki bakonzi wana ya lolendo oyo babukaki mibeko. Paulo atunaki ete: “Babɛti biso fimbo na miso na bato, naino esambisi bango biso te, biso Baloma, mpe babwaki biso na bolɔkɔ. [Sikoyo] mpe balingi kobwaka biso libándá na nkuku? Wapi! kasi báya kokamba biso libándá bango mpenza.” Basambisi babangaki makambo oyo elingaki kokómela bango, bayaki kobondela bato oyo mibale bábima na engumba.​—Misala 16:35-39.

Nsima ya kondimisa bakonzi lotomo na bango ete bazali bana-mboka Loma, Paulo na Sila bayokelaki basambisi​—kasi liboso balakaki naino baninga na bango. Lokola ekómaki momeseno na bango na mobembo mpo na kosakola, Sila na moninga na ye ‘balendisaki’ lisusu bandeko mpe bakendaki.​—Misala 16:40.

Banda na Makedonia kino na Babilone

Na esika ya kolɛmba nzoto na likambo oyo ekokaki kozala na bopusi mabe, Paulo, Sila na baninga na bango bakobaki mosala ya misionere na teritware ya sika. Na Tesaloniki, bakutanaki lisusu na mikakatano. Lokola mosala ya kosakola ya Paulo ebimisaki matomba malamu na boumeli ya Sabata misato, banguna batindaki bato bátomboka; Paulo, Sila na bamisionere mosusu bamonaki malamu kobima na engumba yango na butu. Mpe bakendaki na Beloya. Ntango bayokaki makambo Paulo na baninga na ye bazalaki kosala na engumba yango, banguna bautaki bipai nyonso ya Tesaloniki mpe bayaki. Paulo azalaki ye moko, wana Sila na Timote batikalaki na Beloya mpo na kosunga bato ya sika oyo basepelaki na nsango malamu. (Misala 17:1-15) Sila na Timote balandaki Paulo na Kolinti, bamemaki nsango malamu mpe mbala mosusu makabo oyo eutaki na baninga ya sembo na Makedonia. Na ntembe te yango esalisaki ntoma wana akómaki na bosɛnga ete atika mosala ya mosuni, oyo abandaki kosala na eleko wana, mpe azongelaki mosala ya misionere na mpiko. (Misala 18:1-5; 2 Bakolinti 11:9) Na Kolinti, balobeli lisusu Sila na Timote lokola basakoli ya nsango malamu mpe baninga ya mosala ya Paulo. Emonani polele ete ata na engumba wana mosala na bango ekitaki te.​—2 Bakolinti 1:19.

Kosalelama ya liloba “biso” na mikanda epai na Batesaloniki​—oyo ekomamaki na engumba Kolinti na eleko wana​—ezali kolimbola ete Sila na Timote bapesaki mabɔkɔ na kokomama na yango. Nzokande, likanisi oyo ete Sila amipesaki na mosala ya kokoma, etongami na makambo ntoma Petelo alobi mpo na mokanda na ye moko. Ntoma Petelo alobi ete akomaki mokanda yango na Babilone “na mabɔkɔ na Silwano, . . . ndeko na sembo.” (1 Petelo 5:12, 13) Atako yango ekoki bobele komonisa ete Silwano nde amemaki mokanda yango, kasi bokeseni ya ekomeli na kati ya mikanda mibale ya Petelo ekoki komonisa ete asalelaki Sila mpo na kokoma mokanda ya liboso kasi ya mibale te. Yango wana, moko ya makoki mpe mikumba mingi ya Teokrasi oyo Sila azwaki ezalaki mbala mosusu ya kozala mokomeli.

Ndakisa ya kolanda

Soki tokanisi malamumalamu makambo oyo toyebi ete Sila nde asalaki yango, tokomona ete lisolo na ye ezali kosimba motema. Azali ndakisa malamu mpo na bamisionere mpe bakɛngɛli-batamboli ya mikolo na biso. Azalaki kokende mosika mpo na bolamu na ye moko te, to mpo na bozwi ya mosuni to lokumu te, kasi mpo na kosalisa bato mosusu. Mokano na ye ezalaki ya kolendisa bango na toli ya mayele mpe ya malamu, na masolo oyo ebongisami malamu mpe ya mɔ́tɔ, mpe lisusu na molende na ye na mosala ya kosakola. Ata soki ozali na mokumba nini na ebongiseli ya Yehova, soki na ndakisa ya Sila, okosala makasi ya kozala na makanisi ya kolonga​—ata liboso ya monyoko​—yo mpe okozala molendisi ya bandeko na yo bandimi.

[Karte na lokasa 29]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Mobembo ya mibale ya Paulo na mosala ya misionere

Mai Monene

Antiokia

Delebe

Lusutula

Ikoni

Toloa

Filipi

Amfipoli

Tesaloniki

Beloya

Atene

Kolinti

Efese

Yelusaleme

Kaisalia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto