Buku oyo ezali kolakisa mayele mpe ezali na nsango mpo na mikolo oyo
YOBO, moto moko ya kala oyo na ntembe te alekaki bato nyonso ya ntango na ye na bozwi alobaki ete: “Libenga oyo etondi na mayele ezali na motuya koleka libenga oyo etondi na pauni.” (Yobo 1:3; 28:18, NW; Yobo 42:12) Ya solo, mayele ezali na motuya mingi koleka bozwi ya mosuni mpo na kosalisa moto ete azala na bomoi ya malamu. Mokonzi Salomo, moto ya mayele mingi, alobá ete: “Mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.”—Mosakoli 7:12.
Kasi, epai wapi tokoki kozwa mayele ya ndenge yango na moi ya lelo? Bato mingi, ntango bakutani na mikakatano, balukaka toli epai ya bapesi-toli oyo bakomaka toli na bango na bazulunalo, epai ya bato ya pisikoloji, epai ya minganga ya maladi ya motó, mpe ata epai ya bakati-nsuki mpe basɔfɛlɛ ya taksi. Bapesi-toli yango bazali mingi mpe bandimaka kopesa toli ata na likambo nini ya bomoi, mpe lisusu, basɛngaka mbongo mingi te. Kasi, mingimingi maloba na bango ya “mayele” eboti mbuma mabe, to mpe makama. Na yango, ndenge nini tokoki kozwa mayele ya solosolo?
Yesu Klisto, moto oyo ayebaki malamu bizaleli ya bato, alobaki ete: “Mayele alongi na misala na ye.” (Matai 11:19) Tótalela mwa mikakatano oyo bato mingi bakutanaki na yango na bomoi na bango mpo tómona soki maloba nini ya mayele esalisaki bango mpe soki ezalaki mpenza na motuya koleka ‘libenga oyo etondi na pauni.’ Yo mpe okoki komona ‘libenga yango oyo etondi na mayele’ mpe kozwela yango litomba.
Ozali konyokwama na makanisi?
Zulunalo moko oyo ebimaka na Londres (International Herald Tribune) eyebisaki boye: “Soki eleko ya mitungisi ebandaki na ekeke ya 20, nsuka ya ekeke yango ezali nde ebandeli ya eleko ya konyokwama na makanisi.” Ebakisi ete “bolukiluki ya liboso oyo esalemi na mikili mingi mpo na likambo ya kotungisama makasi na makanisi emonisi ete mobulungano yango ezali se kobakisama na mokili mobimba. Soki totali na kati ya mikili oyo ekeseni moko na mosusu lokola Taïwan, Liban, mpe Nouvelle Zélande, tozali komona ete maladi yango ezali se kobakisama na nkola (génération) nyonso oyo ezali kolanda.” Ezali kolobama ete mpo na bato oyo babotami nsima ya 1955, likoki ya konyokwama makasi na makanisi ebakisami mbala misato koleka oyo ya bankɔkɔ na bango.
Likambo yango ekómelaki Tomoe. Ye anyokwamaki makasi na makanisi mpe azalaki se kolala na mbeto. Lokola akokaki lisusu te kobatela mwana na ye oyo azalaki na mbula mibale, azongaki epai ya baboti na ye. Mwa moke na nsima, akómaki moninga ya mwasi moko oyo bafandaki na ye kartye moko. Mwasi yango azalaki na mwana ya mwasi oyo azalaki mbula moko na mwana ya Tomoe. Ntango Tomoe ayebisaki moninga na ye ete azalaki komiyoka ete azali na ntina moko te, moninga yango atángisaki ye maloba ya buku moko. Buku yango elobi boye: “Liso ebongi koloba na lobɔkɔ te ete, Nazali na yo na bosɛnga te! Lisusu motó ebongi koloba na makolo te ete, Nazali na bosɛnga na bino te! Kasi ezali motindo mosusu. Bilembo na nzoto bimonani na bolɛmbu bikoki kozanga te.”a Tomoe atangisaki mpisoli ntango akangaki ntina ete mokili oyo ezali mpo na biso nyonso mpe moto na moto azali na ntina.
Moninga wana alendisaki ye atángaka buku oyo ezali na maloba yango. Tomoe aningisaki motó mpo na kolakisa ete andimi, atako tii na ntango wana azalaki kokoka kosala ata eloko moko te, ata kolaka ete akosala eloko. Mokolo na mokolo, moninga ya Tomoe azalaki kosalisa ye mpo na kosomba biloko mpe bazalaki kolamba elongo. Nsima ya sanza moko, Tomoe akómaki kolamuka ntɔngɔ nyonso, asukoli bilamba, abongisi ndako, akei kosomba biloko, mpe alambi, ndenge mwasi nyonso asalaka. Asengelaki kosilisa mikakatano ebele, kasi alobaki ete: “Nandimaki ete soki nasaleli maloba ya mayele oyo namonaki, nakokóma malamu.”
Lokola asalelaki maloba ya mayele oyo amonaki, Tomoe asilisaki mpasi ya makanisi oyo azalaki na yango. Lelo oyo, Tomoe azali kosala mosala ya ntango nyonso mpo na kosalisa bato mosusu ete básalela maloba oyo esalisaki ye alonga mikakatano na ye. Maloba wana ya mayele ezali na buku moko ya kala oyo ezali na nsango mpo na bato nyonso lelo oyo.
Ozali na mikakatano na libala na yo?
Na mokili mobimba, motango ya mabala oyo ezali kokufa ezali se kobakisama. Mikakatano ya libala ezali kobakisama ata na bikólo ya Azia, epai oyo kala bato bazalaki komikumisa na ntina na bomoko ya mabota na bango. Epai wapi tokoki kozwa litambwisi malamu mpo na libala?
Talá likambo oyo ekómelaki Shugo na Mihoko, babalani oyo bazalaki ntango nyonso na matata. Bazalaki koswana ata mpo na makambo oyo ezangi ntina. Shugo azalaki na motema mokuse, mpe Mihoko azalaki kozongisela ye maloba mabe soki kaka apameli ye. Kutu, Mihoko azalaki koloba ete, ‘Tokoki koyokana ata na likambo moko te.’
Mokolo mosusu, mwasi moko ayaki kotala Mihoko mpe atángelaki ye maloba oyo na buku moko: “Makambo nyonso malingi bino ete bato básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.”b Atako azalaki kosepela na makambo ya Nzambe te, Mihoko andimaki koyekola buku oyo ezalaki na maloba yango. Lokola azalaki na mposa ya kobongisa libala na ye, ntango babéngisaki ye na makita oyo bazalaki koyekola buku oyo ezali na motó ya likambo ete Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, Mihoko na mobali na ye bandimaki mbala moko.c
Na makita yango, Shugo amonaki ete bayangani bazalaki mpenza kosalela makambo oyo bazalaki koyekola mpe amonaki ete bazali na esengo. Azwaki ekateli ya kotánga buku oyo mwasi na ye azalaki koyekola. Eumelaki te, mwa maloba oyo ebendaki likebi na ye: “Ye oyo akosilika noki te azali na boyebi monene; kasi [motema, NW] mokuse ekopesa [bozoba, NW] nzela.”d Atako azwaki ntango mingi mpo na kobanda kosalela likambo yango na bomoi na ye, bato oyo bafandi na ye, na mwasi na ye lokola, bakómaki komona ete azali kobongwana mokemoke.
Ntango amonaki ete mobali na ye azali kobongwana, Mihoko akómaki mpe kosalela makambo oyo azalaki koyekola. Maloba oyo esalisaki ye mpenza yango oyo: “Bósambisaka te ete básambisa bino te. Zambi na esambiseli ekosambisaka bino, bakosambisa bino na yango.”e Yango wana, Mihoko na mobali na ye bayokanaki ete bábanda kosolola na ntina na makambo na bango ya malamu mpe kotalela ndenge nini bakoki kobongisa makambo mosusu na esika ya kopesanaka foti. Ebotaki mbuma nini? Mihoko alobi ete: “Epesi ngai mpenza esengo. Tokómaki kosala yango mpokwa nyonso ntango tozali kolya. Ata mwana na biso oyo azali na mbula misato asanganaka na masolo na biso. Ya solo, likambo yango esungaka biso mingi!”
Ntango bato yango basalelaki toli malamu oyo bazwaki, basilisaki mikakatano oyo elingaki kokabola bango. Tokoki mpenza koloba ete mpo na bango, toli yango ezalaki na motuya koleka libenga oyo etondi na pauni!
Olingi kozala na bomoi ya malamu?
Lelo oyo, bato mingi bazali na mokano se moko na bomoi na bango: konduka bozwi. Kasi, moto moko ya mombongo oyo azali na bozwi mingi na États-Unis mpe apesaki bamilio ya badolare mpo na kosalisa bato alobaki mokolo moko ete: “Mbongo esepelisaka bato mosusu, kasi moto moko te akoki kolata sapato mibale na lokolo mbala moko.” Bato mingi te bandimaka likambo yango mpe baoyo batikaka koluka bozwi bazali moke lisusu koleka.
Hitoshi abɔkwamaki na bobola, yango wana azalaki na mposa makasi ya kokóma mozwi. Ntango amonaki ndenge oyo badefisi bamonelaka badefi, alobaki ete: “Ye oyo azali na mbongo mingi ye wana akolonga.” Hitoshi atyelaki mpenza mbongo motema na boye ete akanisaki ete mbongo ekoki kosomba ata bomoi ya moto. Mpo na kokóma na bozwi mingi, amipesaki mobimba na kompanyi na ye oyo ezalaki kosala misala ya kobongisa batiyo ya mai (plomberie) mpe azalaki kosala mikolo nyonso oyo Nzambe asala, azalaki kopema te. Wana azalaki koboma nzoto, mosika te Hitoshi amonaki ete ekoki kosalema ata mokolo moko te ete moto oyo azali kosala misala akokana na baoyo bazali kopesa ye misala. Mokolo na mokolo azalaki komitungisa mpe kobanga ete kompanyi na ye ekokwea.
Bongo, moto moko ayaki na ndako ya Hitoshi mpe atunaki ye soki ayebi ete Yesu Klisto akufaki mpo na ye. Lokola Hitoshi akanisaki ete moto moko te akoki kokufa mpo na moto lokola ye, alukaki koyeba likambo yango malamu mpe andimaki ete moto yango azongela ye mpo na kokoba lisolo. Na pɔsɔ oyo elandaki, akendaki kolanda lisukulu moko mpe akamwaki ntango ayokaki ete tosengeli ‘kozala na liso ya mindɔndɔ te.’ Molobi alimbolaki ete liso “ya mindɔndɔ te” ezali liso oyo emonaka mosika mpe etyaka likebi na yango na makambo ya elimo; nzokande, liso “mabe” to “oyo elulaka” etyaka likebi nyonso se na bamposa ya mosuni oyo ekoki kokokisama nokinoki mpe liso yango emonaka mosika te. Toli oyo elobi ete, “Esika oyo biloko na yo na motuya ezali, motema na yo ekozala mpe wana,” esimbaki motema na ye.f Ezali na likambo oyo ezali na ntina koleka likambo ya konduka bozwi! Ayokaki naino likambo ya bongo liboso te.
Lokola lisukulu yango esimbaki motema na ye, abandaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola. Na esika ya koboma nzoto mpo na koluka mbongo, akómaki kotya bozwi ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye. Akómaki mpe kopesa ntango mpo na koluka bolamu ya elimo ya libota na ye. Ya solo, nyonso wana esɛngaki ete akitisa ntango oyo azalaki kopesa na mosala na ye. Atako bongo, mosala na ye ebongaki. Mpo na nini?
Lokola andimaki toli oyo bapesaki ye, atikaki ezaleli na ye ya nkandankanda; bomoto na ye ebongwanaki mpe akómaki moto ya boboto oyo afandaka malamu na bato. Toli oyo esimbaki mpenza motema na ye yango oyo: ‘Kasi [sikoyo] bólongola na minɔkɔ na bino makambo yango nyonso: nkɛlɛ, nkanda, kotɔnga, kotuka, maloba na nsɔni. Bóbukanaka lokuta te mpo bosili kobwaka [bomoto ya, NW] kala na misala na yango nyonso, mpe bólata [bomoto ya sika, NW] oyo ezalisami sika mpo na boyebi, kino ekozwa motindo na Mozalisi na yango.’g Akómaki mozwi te na ndenge alandaki toli wana, kasi bato oyo bazalaki kopesa ye misala bakamwaki mpe basepelaki na ‘bomoto na ye ya sika’ mpe bakómaki kotyela ye motema. Ya solo, maloba ya mayele oyo amonaki esalisaki ye azala na bomoi ya malamu. Mpo na ye, maloba yango ezalaki mpenza na motuya koleka libenga oyo etondi na pauni to mbongo.
Okofungola libenga yango?
Okoki koyeba libenga oyo etondi na mayele oyo ezalaki na motuya mingi mpo na bato oyo touti kolobela? Ezali nde mayele oyo ezali na Biblia, buku oyo bato mingi bazali na yango mpe oyo ezali na mpasi te mpo na kozwa yango koleka buku mosusu nyonso na mokili. Ekoki kozala ete ozali na Biblia na yo to mpe ezali na mpasi te mpo ozwa yango. Kasi, ndenge moko kozala na libenga oyo etondi na pauni ya motuya kasi ezali kosalelama te epesaka litomba moko te, kozala na Biblia oyo ozali kosalela yango te ekopesa litomba moko te. “Fungolá” libenga yango, mpe salelá toli malamu ya Biblia mpe malako malamu na yango, okomona ndenge ekosalisa yo na kolonga mikakatano ya bomoi.
Soki bapesi yo libenga oyo etondi na pauni, na ntembe te, okozala na botɔndi mpe okoluka moto oyo apesi yo yango mpo opesa ye matɔndi, boye te? Oyebi Ye oyo apesi biso Biblia?
Biblia eyebisi nani azali Liziba ya mayele oyo ezali na kati na yango na maloba oyo: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” (2 Timote 3:16, NW) Elobi na biso lisusu ete “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Yango wana maloba ya mayele oyo ezali na Biblia mabongi mpenza mpe mazali kopesa biso bolamu lelo oyo. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo na koyekola makambo mingi na ntina na Yehova Nzambe, Ye akabaka mingi; mpe okozala na likoki ya kozwa “libenga oyo etondi na mayele” oyo ezali na Biblia, buku oyo ezali kolakisa mayele mpe ezali na nsango mpo na bato lelo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba yango euti na 1 Bakolinti 12:21, 22.
c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
f Matai 6:21-23, NW; maloba na nse ya lokasa.
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
Maloba ya mayele mpo na kobatela mayoki malamu
“Ɛɛ [Yehova], soko yo okotalaka [mabunga, NW], ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali na ntina ete obangama.”—Nzembo 130:3, 4.
“Motema na esengo ekopelisa elongi, nde mawa na motema ekobuka [elimo, NW].”—Masese 15:13.
“Zalá na [bosembo, NW] na koleka te mpe omibongisa na mayele na koleka te. Mpo na nini okomibebisa?”—Mosakoli 7:16.
“Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”—Misala 20:35.
“Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.”—Baefese 4:26.
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Maloba ya mayele mpo na kozala na libota ya esengo
“Myango ikokufa wana bato na toli bazangi, nde ikolonga wana bamonisi bayei mingi.”—Masese 15:22.
“Motema na moto na mayele ekozwa boyebi; litoi na moto na bososoli ekoluka mpe boyebi.”—Masese 18:15.
“Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami kati na palata.”—Masese 25:11.
“Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na nyonso oyo, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:13, 14.
“Bóyeba bongo, bandeko na ngai na bolingo. [Moto na moto asengeli koyokaka noki, awelaka koloba te, NW].”—Yakobo 1:19.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Maloba ya mayele mpo na kozala na bomoi ya malamu
“Epimelo na bozito na lokuta eboyami na [Yehova]; nde bozito na sembo esepelisi ye.”—Masese 11:1.
“Lolendo liboso na kobeba, [elimo, NW] na nzombo liboso na kokwea.”—Masese 16:18.
“Lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango bongo moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na [elimo, NW] na ye te.”—Masese 25:28.
“Yoká nkanda noki na [elimo, NW] na yo te, zambi nkanda ekoumela na motema na bazoba.”—Mosakoli 7:9.
“Bwaká kwanga na yo likoló na mai zambi okozwa yango lisusu nsima na mikolo mingi.”—Mosakoli 11:1.
“Tiká te ete maloba na bosɔtɔ mábima na minɔkɔ na bino kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa, [lokola] ezali bosɛnga, ete mápesa bayoki ngɔlu.”—Baefese 4:29.
[Elilingi na lokasa 7]
Koyekola Biblia ezali litambe ya liboso mpo na kozwa “libenga ya mayele”