Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/4 nk. 23-27
  • Nazalaki Koluka Paladiso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazalaki Koluka Paladiso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakei kofanda na mboka ya zamba
  • Nakómi kondima ete Nzambe azali
  • Nzambe ayoki mabondeli
  • Nabandi kokola na elimo
  • Lisungi na ntango ya mpasi
  • Nakómi na mposa ya eloko oyo eleki malamu
  • Betele​—Paladiso kitoko ya elimo
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Natiká ata moke te koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/4 nk. 23-27

Nazalaki Koluka Paladiso

LISOLO YA PASCAL STISI

Butu ekómaki makasi, mpe bato bazalaki lisusu na balabala te na Béziers, engumba moko na sudi ya ekólo France. Lokola tomonaki ndako moko oyo batɛkisaka mikanda ya lingomba, oyo bautaki kopakola langi sika, ngai na moninga na ngai tokomaki na efelo na yango na makomi minene ya moindo makambo oyo Nietzsche, moto ya filozofi ya ekólo Allemagne alobaki: ‘Banzambe bakufá. Tiká ete elombe aumela na bomoi!’ Kasi, nini etindaki ngai nasala makambo ya ndenge wana?

NABOTAMÁ na ekólo France na 1951, na libota ya Bakatolike. Bankɔkɔ na ngai bazalaki bato ya ekólo Italie. Ntango nazalaki mwana moke, tozalaki kokende konje na sudi ya ekólo Italie. Kuna, mboka na mboka ezalaki na ekeko na yango ya Ngɔndɔ Malia. Tozalaki kokende na nkɔkɔ ya mobali, elongo na molɔngɔ ya bato kosambela bikeko minene yango oyo batɛlɛmisá na bangomba; kasi nazalaki kondimela yango te. Nasilisaki kelasi ya ebandeli na eteyelo moko ya Bajesuite. Nzokande, nayokaki ata eloko moko te oyo elendisaki kondima na ngai epai na Nzambe.

Ezali ntango nakɔtaki na iniversite ya engumba Montpellier mpo na koyekola mosala ya monganga nde nabandaki komituna soki ntina ya bomoi ezali nini. Tata na ngai azokaki na etumba mpe ntango nyonso minganga bazalaki kosalisa ye. Eleki malamu kosilisa etumba na esika ya kolekisa ntango mingi mpe kosala milende mpo na kobikisa bato oyo bazwi makama na bitumba, boye te? Kasi, etumba ya Viêt-nam ezalaki kongala. Mpo na ngai, lolenge malamu ya kosilisa maladi lokola kanser ya mimpululu (poumon) ezalaki kolimwisa eloko ya liboso oyo ebandisaka yango, elingi koloba likaya. Mpe tokoloba boni mpo na maladi oyo eutaka na nzala mpe emonanaka mingi na mikili ya bobola mpe na maladi oyo ezwamaka soki nzoto ezali na mafuta mingi oyo emonanaka mingi na mikili ya bozwi? Eleki malamu kolongola biloko oyo epesaka mpasi yango na esika ya kobikisa bampasi oyo yango ezali kobimisa, boye te? Mpo na nini mpasi ezali mingi na mokili? Namonaki ete makambo mazalaki kotambola malamu te na mokili oyo ya likama, mpe nazalaki kopesa foti na baguvernema.

Buku oyo nazalaki kotánga mingi ekomamaki na moto moko oyo alingaka kotosa bokonzi te. Nazalaki kokoma na bifelo makambo oyo nazalaki kotánga na buku yango. Mokemoke ngai mpe nakómaki koboya kotosa bokonzi, nazalaki kondima lisusu eloko te mpe kotosa mibeko te. Nalingaki te ete moto moko azala mokonzi na ngai, ezala Nzambe to nani. Mpo na ngai, Nzambe mpe lingomba ezalaki eloko oyo bato ya mbongo babimisaki mpo na koyangela mpe konyokola biso. Ezalaki lokola nde bato ya mbongo bazali koloba na biso ete: ‘Bósala makasi mpo na biso awa na mabelé, bino bokozwa likabo monene na paladiso na likoló.’ Kasi ntango ya banzambe esilaki koleka. Esengelaki koyebisa bato likambo yango. Kokoma na efelo ezalaki lolenge moko mpo na koyebisa bango.

Mpo na yango, kotánga kelasi ezalaki lisusu na ntina mingi te mpo na ngai. Na ntango yango, nakɔtaki na iniversite mosusu ya Montpellier; mpo na koyekola geografi na ekoloji, kuna elimo ya kotombokela bakonzi ezalaki makasi. Wana boyebi na ngai na ekoloji ezalaki kokola, nabandaki kosilika ntango nazali komona ndenge oyo etando na biso kitoko ezali kobebisama.

Mbula na mbula na ntango ya konje na eleko ya molunge, nazalaki kosɛnga basɔfɛlɛ bámema ngai. Na ndenge yango, natambolaki mikili mingi ya Mpoto. Lokola nazalaki kosala mobembo mpe kosolola na basɔfɛlɛ mingi, namonaki makambo mabe mpe ndenge bato bazalaki kotungisama. Mokolo moko, wana nazalaki koluka paladiso, nakómaki na libongo moko kitoko ya esanga ya Kelete mpe namonaki etondi na petrole. Nayokaki mawa mingi. Namitunaki soki ezali na esika moko lokola paladiso awa na mabelé.

Nakei kofanda na mboka ya zamba

Na ekólo France, bato ya ekoloji bazalaki koloba ete mpo na kosilisa mikakatano na bango, bato basengeli kozonga kofanda na bamboka ya zamba. Nasepelaki kosala mosala na mabɔkɔ na ngai moko. Nasombaki ndako moko ya kala batongaki yango na mabanga na mwa mboka moko ya bangomba ya Cévennes, na sudi ya ekólo France. Na ekuke, nakomaki ete, “Sikoyo Paladiso,” maloba ya bilenge batomboki ya Amerika (hippies). Elenge mwasi moko ya ekólo Allemagne oyo azalaki koleka na mboka na biso akómaki makango na ngai. Naboyaki kokomisa libala na buku ya Leta epai ya mokambi ya engumba oyo azalaki momonisi ya guvernema. Bongo libala ya ndakonzambe? Oyo wana kutu koloba te!

Mingimingi, tozalaki kotambola makolo-ngulu, nazalaki na nsuki mingi mpe nazalaki kokata mandɛfu te. Nazalaki kosepela mingi kolona bambuma na ndunda. Na eleko ya molunge, likoló ezalaki na langi ya bule mpe banyamankɛkɛ babéngi likenge (cigales) ezalaki koganga. Bafololo ya zamba ezalaki kobimisa nsolo kitoko, mpe bambuma oyo tolonaki, na ndakisa mbuma ya vinyo mpe figi ezalaki elɛngi! Tokanisaki lokola tozwi esika na paladiso.

Nakómi kondima ete Nzambe azali

Na iniversite nayekolaki biologie cellulaire, embryologie, mpe anatomie. Nazalaki kokamwa mingi, selile, likei ya mwana, mpe nzoto na biso esalemi na ndenge ya kokamwa mpe esalaka na mɔlɔngɔ. Lokola mokolo na mokolo nakokaki komona mpe kotala ndenge biloko bizalisami ezali kokola, bonzenga na yango mpe makoki na yango ezalaki kokamwisa ngai. Mokolo na mokolo biloko bizalisami bizalaki koteya ngai makambo ya sika. Mokolo moko nakendaki kotambola mosika na bangomba mpe nsima ya kokanisa bomoi na mozindo, namonaki ete Mozalisi asengeli kozala. Na motema na ngai nazwaki ekateli ya kondima ete Nzambe azali. Liboso, nazalaki koyoka eloko moko ezali kozanga na motema na ngai, nazalaki kokanisa ete nazali na moto te. Mokolo oyo nabandaki kondima ete Nzambe azali, nalobaki ete, ‘Pascal, esili okozala lisusu yo moko te.’ Namiyokaki malamu mpenza.

Mwa moke na nsima, ngai na makango na ngai tobotaki mwana ya mwasi mpe topesaki ye nkombo Amandine. Nalingaki ye mingi. Lokola nakómaki kondima ete Nzambe azali, nabandaki kotosa mwa mibeko ya bizaleli malamu oyo nayebaki. Natikaki koyiba mpe kokosa, mpe nayaki komona ete yango esalisaki ngai napɛngola matata na bato oyo tozalaki kofanda na bango. Ɛɛ, tozalaki na mikakatano na biso, mpe paladiso na ngai ezalaki mpenza oyo nazalaki kolikya te. Baloni ya vinyo na esika yango bazalaki kosalela bankisi oyo ebomaka banyamankɛkɛ mpe matiti mabe. Bankisi yango ezalaki kobebisa milona na ngai. Nazwaki naino eyano te na motuna na ngai mpo na ntina ya bampasi. Na koleka, atako natángaki makambo mingi na ntina na bomoi ya libota, ngai na makango na ngai tozalaki ntango nyonso koswana. Tozalaki na baninga mingi te, mpe baninga yango bazalaki mabe; bamoko kutu bazalaki koluka mama ya mwana na ngai makango. Esengelaki kozala na paladiso oyo ezali malamu koleka.

Nzambe ayoki mabondeli

Nazalaki kobondela mingi na ndenge na ngai moko mpo Nzambe atambwisa bomoi na ngai. Mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ, mwasi moko ya boboto nkombo na ye Irène Lopez na mwana na ye ya moke ya mobali babɛtaki na ekuke ya ndako na biso. Azalaki Motatoli ya Yehova. Nayokaki makambo oyo ateyaki ngai mpe nandimaki ete aya mokolo mosusu. Mibali mibale bayaki kotala ngai. Na lisolo na biso nabombaki makambo mibale: Paladiso mpe Bokonzi ya Nzambe. Nabombaki makambo wana na motema, mpe nsima ya basanza, nakangaki ntina ete soki nalingi kozala na lisosoli malamu mpe kozala na bolamu ya solosolo nasengeli koyokanisa bomoi na ngai na mitinda ya Nzambe.

Liboso, mama ya mwana na ngai andimaki tóbalana, mpo na koyokanisa bomoi na biso na Liloba ya Nzambe. Na nsima, asalaki boninga na bato mabe oyo bazalaki kotyola Nzambe na mibeko na ye. Mokolo moko na eleko ya prɛnta ntango nazongaki na ndako na mpokwa, likambo moko esalaki ngai mpasi mingi na motema. Ndako na biso etikalaki polele. Mama ya mwana na ngai akangaki bisaka mpe akimaki na mwana na biso ya mwasi ya mbula misato. Nazelaki bango mikolo mingi ete bakozonga, kasi bazongaki te. Na esika ete napamela Nzambe, nabondelaki ye mpo asalisa ngai.

Mwa moke na nsima, nakamataki Biblia, nafandaki na nse ya nzete ya figi, mpe nabandi kotánga. Nasepelaki mingi na maloba na yango. Atako natángaki mikanda ya ndenge na ndenge oyo minganga oyo basalisaka maladi ya motó na bato ya pisikoloji bakomaki, kasi namonaki naino mayele ya boye te. Esengeli mpenza kozala ete mokanda oyo epemami na Nzambe. Nakamwaki na mateya ya Yesu mpe lolenge oyo azalaki komitya na esika ya bato. Mokanda ya nzembo ebɔndisaki ngai mpe nakamwaki na mayele mabongi oyo mazwami na mokanda ya Masese. Nokinoki nandimaki ete atako boyekoli ya biloko bizalisami ezali malamu mingi mpo na komema moto andima ete Nzambe azali, kasi ekoki komonisa bobele “ndambo na nzela na ye.”​—Yobo 26:14.

Batatoli batikelaki ngai lisusu buku moko: Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na buku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo.a Botángi ya mikanda wana efungolaki ngai miso. Buku Solo esalisaki ngai nakanga ntina ya kobeba ya mopɛpɛ, bitumba, mobulu oyo ezali kobakisama, mpe likama ya bibundeli ya nikleere. Likoló motane oyo nazalaki komona soki nafandi na elanga ezalaki koyebisa ngai ete lobi ekozala mokolo kitoko, makambo oyo mpe emonisaki mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Mpo na buku Libota, nakanaki kolakisa yango na mama ya mwana na ngai mpe koyebisa ye ete tokoki kozala malamu soki tosaleli toli ya Biblia. Kasi mwaye ezalaki lisusu te.

Nabandi kokola na elimo

Lokola nalingaki koyeba makambo mingi, nayebisaki Motatoli moko na nkombo Robert ete aya kotala ngai. Akamwaki ntango nayebisaki ye ete nalingi kozwa batisimo. Mbala moko tobandaki boyekoli ya Biblia. Kaka na ntango yango nabandaki koyebisa bato makambo oyo nazalaki koyekola mpe kokabola mikanda oyo nazalaki kozwa na Ndako ya Bokonzi.

Mpo na kobikela, nakɔtaki kelasi ya masɔ. Lokola nayebaki bolamu oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosala mpo na moto, nazalaki kopesa litatoli na baninga ya kelasi mpe na balakisi mbala nyonso oyo likoki ezalaki komonana. Mokolo moko na mpokwa nakutanaki na Serge na kulware moko. Asimbaki mwa bazulunalo. Nalobaki na ye ete, “Namoni lokola olingaka kotánga mingi.” Ayanolaki ete, “Ɛɛ, kasi nalɛmbi mikanda oyo.” Natunaki ye ete, “Napesa yo eloko moko ya malamu mpo na kotánga?” Tosololaki malamu na ntina na Bokonzi ya Nzambe, mpe na nsima azwaki mwa mikanda oyo milimbolaka Biblia. Na pɔsɔ oyo elandaki, tokendaki na ye na Ndako ya Bokonzi, mpe tobandaki koyekola Biblia.

Mokolo moko natunaki Robert soki nakoki kobima mosala ya kosakola ndako na ndako. Akendaki kofungola armware na ye mpe apesaki ngai kazaka ya malamu. Na mokolo ya lomingo oyo elandaki, nabimaki mpo na mbala ya liboso na mosala ya kosakola elongo na ye. Bongo, na mokolo ya 7 Marsi 1981, nazwaki batisimo mpo na komonisa polele ete namipesi na Yehova Nzambe.

Lisungi na ntango ya mpasi

Na ntango yango nayebaki mboka oyo Amandine na mama na ye bazalaki kofanda. Kasi likambo ya mawa, mama na ye, kolanda mibeko ya mboka oyo azalaki kofanda, apekisaki ngai komona mwana na ngai. Namitungisaki mingi. Mama ya Amandine abalaki, mpe elikya nyonso esilaki lisusu ntango nazwaki mokanda ya Leta oyo emonisaki ete bapesi mobali wana lotomo ya kozala tata ya mwana na ngai, kozanga ete bátuna ngai moko. Nazalaki lisusu na lotomo ata moke te likoló ya mwana na ngai. Atako namekaki kolandela likambo yango na tribinale, baboyaki kopesa ngai ndingisa ya kotalaka ye. Mpasi na ngai ezalaki lokola nde nazali komema eloko moko ya kilo 50 na mokɔngɔ.

Kasi Liloba ya Yehova esungaki ngai na ndenge mingi. Mokolo moko ntango natungisamaki makasi, nazongelaki mbala na mbala maloba ya Masese 24:10 ete: “Soko okosɛnzwa na mokolo na mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” Vɛrsɛ oyo esalisaki ngai nalɛmba nzoto te. Mokolo mosusu, nakendaki komeka soki nakomona mwana na ngai kasi nalongaki te. Ntango nazongaki, nakangaki makasi esimbeli ya sakosi na ngai mpe nabimaki na mosala ya kosakola. Na bantango wana ya mpasi, namonaki bosolo ya Nzembo 126:6, oyo elobi ete: “Ye oyo atamboli na kolela mpe [amemi] nkona mpo na kokona, [akozonga] solo na konganga na esengo mpe [akomema] mbuma na ye.” Liteya ya ntina mingi oyo nazwaki na likambo yango ezali ete soki ozali na mikakatano makasi, nsima ya kosala nyonso oyo okoki mpo na kosilisa yango, zongisá mikakatano yango nsima mpe landá kosalela Yehova na molende. Yango ezali nzela se moko mpo na kobatela esengo na yo.

Nakómi na mposa ya eloko oyo eleki malamu

Ntango baboti na ngai bamonaki mbongwana oyo nasalaki, balobaki ete balingi kopesa ngai lisalisi mpo na kolanda kelasi na iniversite. Napesaki bango matɔndi, kasi sikoyo nazalaki na mokano mosusu. Solo esikolaki ngai na boombo ya makanisi ya bato, ya maji, mpe ya astroloji. Nakómaki na baninga ya malamu oyo bakoki kobomana te na etumba. Mpe nazwaki eyano na mituna na ngai, mpo na nini bampasi mingi ezali na mokili. Na botɔndi nyonso nalingaki kosalela Nzambe na makasi na ngai mobimba. Yesu amipesaki mobimba na mosala na ye, mpe nalingaki kolanda ndakisa na ye.

Na 1983, natikaki mosala ya masɔ mpo na kokóma mosakoli ya ntango nyonso. Nzambe ayokaki mabondeli na ngai, nazwaki mosala oyo nazalaki kosala bobele na ndambo ya mokolo mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Nasepelaki mingi na ndenge tokɔtaki kelasi ya babongisi-nzela esika moko na Serge, elenge mobali oyo nateyaki na eteyelo ya mosala ya masɔ! Nsima ya mbula misato ya mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nakomaki na mposa ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Na 1986, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na Provence, engumba moko kitoko pene na Paris. Mbala mingi, soki nazongi na ndako nazalaki kofukama mpo na kotɔnda Yehova na mokolo malamu oyo nalekisaki na koteya bato mosusu nsango na ye. Makambo mibale oyo eleki esengo na bomoi na ngai yango oyo: kosolola na Nzambe mpe koteya nsango ya Nzambe.

Likambo mosusu ya esengo mingi mpo na ngai ezalaki ndenge mama azwaki batisimo wana azalaki na mbula 68, na Cébazan, mwa mboka moke na sudi ya ekólo France. Ntango mama abandaki kotánga Biblia, natindelaki ye abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! Azalaki moto oyo ayebi kokanisa malamu, mpe mosika te akangaki ntina ete makambo oyo azalaki kotánga ezali solo.

Betele​—Paladiso kitoko ya elimo

Ntango la Société Watch Tower azwaki meko ya kokitisa motango ya babongisi-nzela minene, natondisaki lokasa mpo na kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe lokasa mosusu mpo na kosala na Betele, na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo France. Natikaki ete Yehova ye moko apona esika oyo nakosalela ye malamu koleka. Nsima ya mwa basanza, na Desɛmbɛ 1989, babéngisaki ngai na Betele na Louviers, na nɔrdi-wɛsti ya ekólo France. Yango ezalaki likambo ya malamu mpenza, mpamba te na Louviers nakokaki kopesa leki na ngai ya mobali na mwasi na ye mabɔkɔ mpo na kosunga baboti na ngai ntango babɛlaki makasi. Nakokaki kosala bongo te ntango nazalaki kosala mosala ya misionere mosika na bango.

Mama azalaki koya kotala ngai mbala mingi na Betele. Atako andimaki koyoka mpasi ya kofanda mosika na ngai, ntango nyonso azalaki koloba na ngai ete: “Mwana na ngai, fandá na Betele. Nazali na esengo na ndenge ozali kosalela Yehova boye.” Likambo ya mawa, baboti na ngai nyonso mibale basili kokufa. Nazali kolikya komona bango na mabelé oyo ekobongwana paladiso!

Nandimi ete soki ezali na ndako moko esika ebongi bákoma ete “Sikoyo Paladiso,” ezali bongo Betele, elingi koloba “Ndako ya Nzambe”​—mpamba te paladiso ya solosolo ezali libosoliboso paladiso ya elimo, mpe bato ya bizaleli ya elimo bazali na Betele. Tozali na libaku malamu ya kolona mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Bilei kitoko ya elimo oyo tozwaka na ntango ya botaleli mokapo ya Biblia mokolo na mokolo mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kati ya libota ya Betele elendisaka ngai mpo na mosala na Betele. Lisusu, kofanda esika moko na bandeko mibali mpe basi oyo bamibanzabanzaka mingi na makambo ya elimo mpe baumeli na mosala ya Yehova esalaka ete Betele ezala esika oyo eleki malamu mpo na kokola na elimo. Atako nakabwani na mwana na ngai eleki sikoyo mbula 17, nakuti bilenge mingi ya molende na Betele, baoyo natalelaka lokola bana na ngai, mpe nasepelaka na bokoli na bango ya elimo. Na mbula mwambe oyo eleki, nasali mosala na bisika nsambo. Atako kotika mosala moko mpe kobanda mosala mosusu ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, kobongisama ya motindo wana ekopesa litomba na mikolo ekoya.

Nazalaki kokona lolenge moko ya madesu oyo ebotaka mbuma mingi. Bobele bongo, nandimi solo ete soki okokona mbuma ya mabe, okobuka mbuma mabe mbala nkama mpe ekobima kaka mbala moko te. Koyeba likambo na milende na yo moko kozanga ete bátambwisa yo ekokani na eteyelo oyo esɛngaka mbongo mingi liboso ya kolanda mateya. Nakolinga soki moke te kokɔta na eteyelo ya ndenge wana, kasi, nakolinga nde kobɔkwama na banzela ya Yehova. Bilenge oyo bazali kobɔkwama na baboti oyo bazali baklisto bazali na libaku malamu! Na ntembe te, eleki malamu kokona mbuma ya malamu na mosala ya Yehova mpe kobuka mbala monkama kimya mpe esengo.​—Bagalatia 6:7, 8.

Ntango nazalaki mobongisi-nzela, mbala mosusu nazalaki koleka na ndako oyo batɛkisaka mikanda ya lingomba esika tokomaki na bifelo na yango maloba ya moto oyo alingaka kotosa bokonzi te. Kutu, nakɔtaki na kati mpe nasololaki na nkolo na yango na ntina na Nzambe ya bomoi mpe mokano na ye. Ɛɛ, Nzambe azali na bomoi! Na koleka, Yehova, Nzambe ya solo, azali Tata ya sembo, oyo asundolaka bana na ye te. (Emoniseli 15:4) Tiká ete ebele ya bato ya mabota nyonso básambela mpe bákumisa Yehova, Nzambe ya bomoi, mpo na kokɔta na paladiso ya elimo sikoyo mpe na paladiso oyo ekozongisama na mabelé na mikolo mizali koya!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Bililingi na lokasa 26]

Biloko bizalisami bikamwisaki ngai, yango wana nazwaki ekateli ya kondima ete Nzambe azali. (Na lobɔkɔ ya mobali) Na mosala na Betele lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto