Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/5 nk. 14-20
  • “Tiká ete motangi asosola”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tiká ete motangi asosola”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mbindo-na-Libebisi” na mikolo na biso
  • Etumba na mikolo ekoya
  • Ndenge nini ‘kokima’?
  • Kimá na esika ya libateli liboso ete “bolɔ́zi monene” eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Yebisá biso: makambo yango ekosalema ntango nini?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/5 nk. 14-20

“Tiká ete motangi asosola”

“Wana ekomona bino Mbindo-na-Libebisi ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ, . . . bongo baoyo bazali na [Yudea] bákima kuna na ngomba.”​—MATAI 24:15, 16.

1. Ndenge nini maloba ya Yesu na Luka 19:43, 44 ekokisamaki?

SOKI toyebi ete likama moko ezali koya, tokoki kokima yango. (Masese 22:3) Kanisá sikoyo ndenge baklisto ya Yelusaleme bazalaki nsima wana Baloma bayaki kobundisa mboka yango na mobu 66 T.B. Yesu alobaki ete bakozinga mboka yango mpe bakoboma yango. (Luka 19:43, 44) Bayuda mingi batyelaki maloba na ye likebi te. Kasi bayekoli na ye balandaki likebisi na ye. Yango wana babikaki na likama oyo ebimaki na mobu 70 T.B.

2, 3. Mpo na nini tosengeli kotalela malamumalamu esakweli ya Yesu oyo ezali na Matai 24:15-⁠21?

2 Na esakweli moko oyo ezali mpe kokokisama na mikolo na biso, Yesu alobelaki elembo moko oyo ezali na makambo mingi lokola bitumba, nzala, koningana ya mabelé, maladi, mpe monyoko ya baklisto oyo bakosakola Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:4-14; Luka 21:10-19) Yesu ayebisaki mpe elembo oyo ekosalisa bayekoli na ye na koyeba ete nsuka ekómi pene: ‘Mbindo-na-Libebisi ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ.’ (Matai 24:15) Tótalela lisusu maloba yango ya ntina mingi mpo na komona ndenge nini ekoki kotalela bomoi na biso lelo oyo mpe na mikolo ezali koya.

3 Nsima ya koyebisa makambo oyo etali elembo, Yesu alobaki boye: “Wana ekomona bino Mbindo-na-Libebisi ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ, lokola na likambo lilobaki mosakoli Danyele (tiká ete motángi [asosola]), bongo baoyo bazali na [Yudea] bákima kuna na ngomba mpe ye oyo azali likoló na ndako akita te mpo na [kozwa] eloko ezali kati na ndako na ye. Ye oyo azali kati na elanga azonga nsima te mpo na kozwa elamba monene na ye. Mawa epai na basi bazali na zemi mpe na bango bakonungisa bana na mikolo yango. Bondelá ete kokima na bino ezala na ntango na mpiɔ te soko na mokolo na sabata te. Ekozala na mpasi mingi lokola emonanaki longwa na ebandeli te. Ekobima mpe boye lisusu te.”​—Matai 24:15-⁠21.

4. Eloko nini emonisi ete Matai 24:15 ekokisamaki na ekeke ya liboso?

4 Masolo ya Malako na Luka ebakisi mwa makambo mosusu. Na esika oyo Matai asaleli “ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ,” Malako 13:14 elobi “kotɛlɛma kuna ekoki te.” Luka 21:20 ebakisi maloba ya Yesu oyo: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma.” Yango ezali kosalisa biso na kososola ete makambo yango ekokisamaki mbala ya liboso na mobu 66 T.B. ntango Baloma bakendaki kobundisa Yelusaleme na tempelo na yango oyo Bayuda bazalaki komona ete ezali bulɛɛ, nzokande ezalaki lisusu bulɛɛ te na miso ya Yehova. Na mobu 70 T.B., Baloma babebisaki mboka mobimba nyɛɛ na tempelo na yango. Na eleko wana, “Mbindo-na-Libebisi” ezalaki nini? Mpe ndenge nini ‘etɛlɛmaki na esika ya bulɛɛ’? Soki tozwi biyano na mituna yango ekosalisa biso tósosola malamumalamu ndenge oyo maloba yango ezali kokokisama na mikolo na biso.

5, 6. (a) Mpo na nini batangi ya Danyele mokapo 9 basengeli kososola? (b) Ndenge nini esakweli ya Yesu mpo na “Mbindo-na-Libebisi” ekokisamaki?

5 Yesu alendisaki batangi ete básosola. Batangi ya nini? Esengeli kozala batangi ya mokanda ya Danyele mokapo 9. Na mokapo yango tozali kokuta esakweli oyo eyebisi ntango Masiya asengelaki komonana mpe elobi ete asengelaki ‘kobomama’ nsima ya mbula misato na ndambo. Esakweli yango elobi ete: “Moto na kobebisa akokóma na mapapu na makambo na mbindo, kino nsuka oyo elakami ekokwela mobebisi.”​—Danyele 9:26, 27; talá lisusu Danyele 11:31; 12:11.

6 Bayuda bazalaki kokanisa ete likambo yango ekokisamaki mbula soki 200 liboso ntango Antiochus IV asambwisaki tempelo. Kasi, Yesu amonisaki ete ezali bongo te, alobaki ete básosola mpamba te “eloko ya mbindo” ebimaki naino te mpe na ntango oyo ekobima, ekotɛlɛma na “esika ya bulɛɛ.” Tomoni mpenza ete Yesu Azalaki kolobela basoda ya Loma oyo bayaki na mobu 66 T.B. na bilembo na bango. Badrapo yango, biloko oyo ebanda kosalelama kala, ezalaki mpenza bikeko mpe ezalaki mbindo mpo na Bayuda.a Kasi, ntango nini basoda ya Loma ‘batɛlɛmaki na esika ya bulɛɛ’? Ezalaki na ntango oyo bayaki na badrapo na bango kobundisa Yelusaleme na tempelo na yango, oyo ezalaki esika ya bulɛɛ mpo na Bayuda. Kutu, Baloma babandaki kobuka efelo ya lopango ya tempelo. Eloko oyo ezalaki komonana mbindo banda kala etɛlɛmaki sikoyo na esika ya bulɛɛ!​—Yisaya 52:1; Matai 4:5; 27:53; Misala 6:13.

“Mbindo-na-Libebisi” na mikolo na biso

7. Esakweli nini ya Yesu ezali kokokisama na ntango na biso?

7 Banda na Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, tozali komona ndenge elembo oyo Yesu asakolaki na Matai mokapo 24 ezali kokokisama na mokili mobimba. Kasi, kanisá lisusu maloba na ye: “Wana ekomona bino Mbindo-na-Libebisi ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ, . . . baoyo bazali na Yuda bákima kuna na ngomba.” (Matai 24:15, 16) Likambo oyo ya esakweli esengeli mpe kokokisama na mikolo na biso.

8. Na boumeli ya bambula mingi, ndenge nini Batatoli ya Yehova bazalaki koyebela “Mbindo-na-Libebisi” na mikolo na biso?

8 Mpo na komonisa ete basaleli ya Nzambe bazali na elikya ete esakweli yango ekokokisama, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1921 (ebimeli ya Lingelesi) elobelaki yango na boyokani na makambo oyo ezalaki koleka na Moyen-Orient. Na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1929, lokasa 374 (ebimeli ya Lingelesi) elobaki ete: “Mokano monene ya Société des Nations ezali ete bato bápesa Nzambe na Klisto mokɔngɔ; mpo na yango, ezali eloko oyo ezali kobebisa, euti na Satana, mpe ezali bosɔtɔ mpenza na miso ya Nzambe.” Na bongo, “Mbindo-na-Libebisi” emonanaki na 1919. Na nsima, Société des Nations etikaki esika na Nations unies (ONU). Banda kala, Batatoli ya Yehova bamonisaka ete bibongiseli yango, oyo bato basali mpo na kotya kimya, ezali biloko ya mbindo na miso ya Nzambe.

9, 10. Makanisi oyo tozalaki na yango liboso mpo na bolɔzi monene etindaki biso na kokanisa nini na ntina na ntango oyo “Mbindo-na-Libebisi” esangelaki kotɛlɛma na esika ya bulɛɛ?

9 Lisolo oyo eleki epesaki ndimbola mokuse mpe ya polele ya Matai mikapo 24 na 25. Tozali nde na mposa ya engɛngiseli na ndenge oyo ‘Mbindo-na-Libebisi ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ’? Ɛɛ, ezali bongo. Esakweli ya Yesu emonisaki ete “kotɛlɛma na esika ya bulɛɛ” ekolandana na ebandeli ya “bolɔzi” oyo Biblia esakolaki. Yango wana, atako “Mbindo-na-Libebisi” ezali banda kala, tosengeli koluka koyeba boyokani oyo ezali kati na ndenge oyo ‘ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ’ na bolɔzi monene. Ndenge nini?

10 Kala, basaleli ya Nzambe bazalaki kokanisa ete eteni ya liboso ya bolɔzi monene ebandaki na 1914 mpe eteni ya nsuka ekozala na etumba ya Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1939, lokasa 110 [ebimeli ya Lingelesi].) Tokoki sikoyo kokanga ntina oyo bazalaki kokanisa ete “Mbindo-na-Libebisi” ya mikolo ya nsuka etɛlɛmaki na esika ya bulɛɛ kaka ntango Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba esilaki.

11, 12. Na 1969, ndimbola nini ya malamu epesamaki mpo na bolɔzi monene?

11 Nzokande, na bambula oyo eleki tomonaki ete ezali bongo te. Na mokolo ya mibale, mwa 10 Yuli 1969, na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na mboka New York oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kimya na mabelé,” Frederick Franz, oyo na ntango wana azalaki prezida-molandi ya la Société Watch Tower, asalaki lisukulu moko ya kafukafu. Ntango azalaki kozongela ndenge oyo bazalaki kolimbola esakweli ya Yesu kala, Ndeko Franz alobaki boye: “Liboso, tozalaki kolimbola ete ‘bolɔzi monene’ ebandaki na 1914 T.B. mpe ete ekendaki tii na nsuka te, kasi Nzambe asukisaki Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba na Novɛmbɛ 1918. Banda ntango wana, Nzambe atikaki ntango mpo ete batikali baponami na ye básala mosala na bango liboso atika nzela na eteni ya nsuka ya ‘bolɔzi monene’ na etumba ya Armagedon.”

12 Na nsima, apesaki ndimbola oyo esembolaki makanisi yango: “Na boyokani na makambo oyo esalemaki na ekeke ya liboso, . . . ‘bolɔzi monene’ ya mikolo na biso ebandaki na 1914 T.B. te. Nzokande, makambo oyo esalemaki na 1914-1918 lokola elilingi ya makambo ekwealaki Yelusaleme ya kala ezalaki se ‘ebandeli ya bolɔzi’ . . . ‘Bolɔzi monene’ na ndenge oyo ekomonana lisusu te ebandi naino te, mpamba te ekoboma lisangá mobimba ya mangomba ya lokuta (bakisa mpe mangomba ya boklisto), bongo Armagedon, ‘etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso’ ekolanda.” Nyonso wana emonisaki ete bolɔzi monene na mobimba na yango ebandaki naino te.

13. Mpo na nini ebongi mpenza tóloba ete “Mbindo-na-Libebisi” ‘ekotɛlɛma na esika mosantu’ na mikolo ezali koya?

13 Likambo oyo ebongolaki mpe ndenge na biso ya kososola ntango oyo “Mbindo-na-Libebisi” esengelaki kotɛlɛma na esika ya bulɛɛ. Tókanisa lisusu makambo oyo esalemaki na ekeke ya liboso. Baloma babundisaki Yelusaleme na mobu 66 T.B., kasi bazongaki na mbalakaka; yango epesaki “mosuni” to baklisto likoki ya kobika. (Matai 24:22) Ndenge moko mpe, tokoki kolikya ete etikali moke bolɔzi monene ebanda, kasi ekozala mokuse mpo na baponami ya Nzambe. Tósimba likambo ya ntina mingi oyo: Na ndenge oyo esakweli ekokisamaki na ntango ya kala, ‘Mbindo-na-Libebisi oyo etɛlɛmi na esika ya bulɛɛ’ etalelaki etumba oyo basoda ya Loma basalaki na litambwisi ya Général Gallus na mobu 66 T.B. Na mikolo na biso, eloko oyo ekokani na etumba wana, elingi koloba ebandeli ya bolɔzi monene, eyei naino te. Na yango, tomoni ete “Mbindo-na-Libebisi,” oyo emonanaki banda 1919, etɛlɛmi naino na esika mosantu te.b Yango ekosalema ndenge nini? Mpe ekoki kotalela biso?

Etumba na mikolo ekoya

14, 15. Ndenge nini Emoniseli mokapo 17 esalisi biso na kososola makambo oyo ekomema na Armagedon?

14 Mokanda ya Emoniseli elobeli etumba oyo ekosalema mpo na koboma mangomba ya lokuta. Mokapo 17 elobeli ndenge oyo Nzambe akosambisa “Babilone Monene, mama na pite na bosɔtɔ na mokili,” elingi koloba lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Mangomba ya boklisto ezali eteni monene ya lisangá yango mpe ezali kotuta ntolo ete ezali na boyokani to na kondimana na Nzambe. (Talá Yilimia 7:4.) Banda kala, mangomba ya lokuta, bakisa mpe mangomba ya boklisto, ezalaka na boyokani oyo ebongi te na “bakonzi ya mokili,” kasi boyokani yango ekosuka na kobomama ya mangomba yango. (Emoniseli 17:2, 5) Nani akoboma mangomba yango?

15 Emoniseli elobeli “nyama ya yauli ya langi motane” oyo ezali mpo na mwa ntango, na nsima elimwe, bongo ebimi lisusu. (Emoniseli 17:3, 8, NW) Bakonzi ya mokili nde bazali kopesa nyama yango makasi. Makambo mosusu oyo elobami na esakweli ezali kosalisa biso na koyeba ete nyama yango ya elilingi ezali ebongiseli oyo esalemaki na 1919 mpo na kotya kimya; ebéngamaki Société des Nations (“eloko ya mbindo”) mpe lelo oyo ezali Organisation des Nations unies (ONU). Emoniseli 17:16, 17 emonisi ete Nzambe akopesa bakonzi mosusu oyo bazali na bopusi mingi na “nyama” yango likanisi ya koboma lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Yango nde ekozala ebandeli ya bolɔzi monene.

16. Tozali komona makambo nini mpo na mangomba?

16 Lokola bolɔzi monene ebandi naino te, tokoki mpe koloba ete Mbindo-na-Libebisi ‘etɛlɛmi naino na esika ya bulɛɛ’ te? Tomoni mpenza ete ezali bongo. Atako “Mbindo-na-Libebisi” ebandaki komonana na ebandeli ya ekeke oyo mpe eumeli bambula mingi, etikali moke ekotɛlɛma na “esika ya bulɛɛ” na ndenge oyo ekomonana polele. Se lokola baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kolanda makambo na likebi mpenza mpo na komona ndenge nini “ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ,” lelo oyo mpe baklisto bazali kosala bongo. Ezali solo ete tosengeli kozela tómona kokokisama na yango mpenza mpo na koyeba makambo nyonso. Kasi, ezali komonana ete na mikili mosusu, elimo ya koyina mangomba ebandi mpenza kokola. Bakonzi mosusu ya politiki bazali koyokana na bato oyo bazalaki liboso baklisto mpe bapɛngwaki na kondima ya solo, bango bazali kolendisa elimo ya koyina mangomba nyonso mpe na koleka, koyina baklisto ya solo. (Nzembo 94:20, 21; 1 Timote 6:20, 21) Yango wana, ata sikoyo, banguya ya politiki ezali ‘kobunda na Mwana ya Mpate,’ mpe ndenge Emoniseli 17:14 elobi; etumba yango ekoya ndɔngɔ. Lokola bakoki kobundisa ye moko Mwana ya Mpate ya Nzambe te, elingi koloba Yesu Klisto oyo atɛlɛmi na esika ya lokumu mpe ya nkembo, bakongalisa botɛmɛli na bango epai na basambeli ya solo ya Nzambe, mingimingi “babulami” na ye. (Danyele 7:25; talá Baloma 8:27; Bakolose 1:2; Emoniseli 12:17.) Nzambe alaki biso ete Mwana ya Mpate na baoyo basangani na ye bakolonga.​—Emoniseli 19:11-⁠21.

17. Kozanga ete tómindimisa mingi koleka, tokoki koloba nini na ndenge oyo “Mbindo-na-Libebisi” ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ?

17 Toyebi ete mangomba nyonso ekobomama. Babilone Monene ‘alangwe na makila ya bapɛtwi’ mpe asali makambo lokola mokonzi-mwasi, kasi akobomama kaka. Atako bakonzi ya mokili bazali kondima makambo na ye, bakobalukela ye na ndenge ya kokamwa ntango ‘maseke zomi mpe nyama ya yauli’ bakoyina ye makasi. (Emoniseli 17:6, 16; 18:7, 8) Ntango “nyama ya yauli ya langi motane” ekobundisa mwasi ya pite, elingi koloba mangomba ya mokili, “Mbindo-na-Libebisi” ekotɛlɛma na esika oyo mangomba ya boklisto ezali kobénga esika ya bulɛɛ mpe yango ekozala likama mpo na mangomba yango.c Na bongo, koboma ekobanda na mangomba ya boklisto oyo ezangi kondima, oyo ezali koloba ete ezali bulɛɛ.

Ndenge nini ‘kokima’?

18, 19. Bantina nini epesami mpo na komonisa ete “kokima na bangomba” elimboli te kolongwa na lingomba moko mpe kokɔta na lingomba mosusu?

18 Nsima ya kosakola ete ‘Mbindo-na-Libebisi ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ,’ Yesu ayebisaki bato oyo bazali na bososoli ete bákanga mabɔkɔ te. Alingaki nde koloba ete na ntango wana ya nsuka, wana ‘Mbindo-na-Libebisi ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ,’ bato ebele bakokima mangomba ya lokuta mpo na koya na losambo ya solo? Te. Tótalela ndenge esakweli ekokisamaki na mbala ya liboso. Yesu alobaki ete: “Baoyo bazali na Yudea bákima kuna na ngomba mpe ye oyo azali likoló na ndako akita te mpo na [kozwa] eloko ezali kati na ndako na ye. Ye oyo azali kati na elanga azonga nsima te mpo na kozwa elamba monene na ye. Mawa epai na basi bazali na zemi mpe na bango bakonungisa bana na mikolo yango.”​—Malako 13:14-⁠18.

19 Yesu alobaki te ete kaka baoyo bazalaki na Yelusaleme nde basengelaki kokima, lokola nde likanisi na ye ezalaki ete basengelaki kobima na mboka oyo ezalaki esika monene ya losambo ya Bayuda. Na likebisi oyo apesaki, alobelaki mpe kokɔta na lingomba mosusu te; elingi koloba kokima lingomba ya lokuta mpe kokɔta na lingomba ya solo. Ezalaki na ntina te bákebisa bayekoli ya Yesu ete bákima lingomba moko mpe bákɔta na lingomba mosusu. Bazalaki baklisto ya solo. Mpe etumba ya mobu 66 T.B. esalaki te ete bandimi ya Lingomba ya Bayuda oyo bafandaki na Yelusaleme mpe na Yudea bátika lingomba wana mpo bákóma baklisto. Profesere Heinrich Graetz alobi ete bato oyo balandaki Baloma na nsima ntango bazalaki kokima bazongaki na Yelusaleme: “Bazelote, bazalaki koyemba nzembo ya bitumba, bazongaki na Yelusaleme (na mwa 8 Okɔtɔbɛ), na esengo ya kokanisa ete bazwi bonsomi mpe lipanda. . . . Bakanisaki ete Nzambe asalisaki bango na ngɔlu na ye ndenge asalaki mpo na batata na bango. Bazelote bazalaki kobanga eloko moko te mpo na mikolo ezali koya.”

20. Ndenge nini baklisto ya liboso balandaki likebisi ya Yesu ya kokima na bangomba?

20 Kasi, ndenge nini mwa etuluku moke ya baponami balandaki toli ya Yesu na ntango wana? Balongwaki na Yudea mpe bakimaki na bangomba na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene. Likambo oyo basalaki elakisaki ete basanganaki na na ebongiseli ya Bayuda te, ezala na makambo ya losambo to ya politiki. Basundolaki bilanga na bandako, batikaki ata biloko oyo bazalaki na yango na bandako. Elikya na bango nyonso ezalaki na libateli mpe lisungi ya Yehova, batyaki losambo na ye liboso ya eloko mosusu nyonso oyo ekokaki komonana ete ezali na ntina.​—Malako 10:29, 30; Luka 9:57-⁠62.

21. Eloko nini tozali na likanisi ya komona yango te ntango “Mbindo-na-Libebisi” ekosala etumba?

21 Sikoyo, tótalela ndenge esakweli ekokokisama na mokili mobimba. Esali sikoyo bambula ebele tozali kolendisa bato bábima na mangomba ya lokuta mpe báya na losambo ya solo. (Emoniseli 18:4, 5) Bato mingi basali yango. Esakweli ya Yesu elobi ata esika moko te ete ntango bolɔzi monene ekobanda, ebele ya bato bakoya na losambo ya solo. Tokanisi te ete na mobu 66 T.B., ebele ya bato babongwanaki mbala moko. Kasi, ekozala na likambo moko oyo ekopusa baklisto ya solo bálanda likebisi ya Yesu mpe bákima.

22. Kolanda toli ya Yesu ya kokima na ngomba ekoki kozala na makambo nini?

22 Sikoyo tokoki koyeba makambo nyonso oyo etali bolɔzi monene te, kasi tokoki mpenza kokanisa ete mpo na biso, kokima oyo Yesu alobelaki ekozala likambo ya kolongwa na esika moko mpe kokende na esika mosusu te. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali na mokili mobimba, tokoki ata koloba ete bazali na nsuka nyonso ya mokili. Kasi, tokoki kozala na elikya ete na ntango oyo ekosɛnga tókima, baklisto bakolanda komikesenisa na ndenge ya polele na mangomba ya lokuta. Likambo mosusu ya ntina ezali ete Yesu akebisaki ete moto azonga na ndako na ye te mpo na kokamata bilamba to biloko mosusu. (Matai 24:17, 18) Na yango, mbala mosusu tokokutana na komekama na ndenge oyo totalelaka biloko ya mosuni; biloko yango nde eleki ntina mpo na biso, to lobiko oyo Nzambe akopesa mpo na bato nyonso nde eleki ntina? Ɛɛ, kokima na biso ekoki kotalela mikakatano to kozanga biloko. Tokozala pene ya kosala nyonso oyo esengeli, ndenge baklisto ya ekeke ya liboso bakimaki Yudea mpe bakendaki kobombama na Pelea, na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene.

23, 24. (a) Wapi esika se moko oyo tokozwa libateli? (b) Likebisi ya Yesu na ntina na ‘Mbindo-na-Libebisi oyo etɛlɛmi na esika ya bulɛɛ’ esengeli kopusa biso na nini?

23 Tosengeli ntango nyonso komindimisa ete Yehova na ebongiseli na ye oyo ekokanisami na ngomba nde ezali ekimelo na biso. (2 Samwele 22:2, 3; Nzembo 18:2; Danyele 2:35, 44) Kuna nde tokozwa libateli! Tokolanda te bato oyo bakokima na “madusu, mpe bakomibomba na mabanga na ngomba,” elingi koloba bibongiseli ya bato oyo mbala mosusu ekotikala mpo na mwa ntango nsima ya kobomama ya Babilone Monene. (Emoniseli 6:15; 18:9-11) Ya solo, ekoki kozala ete mpasi ekobakisama, ndenge oyo ezalaki na mobu 66 T.B. mpo na basi ya zemi oyo bakimaki Yudea to moto nyonso oyo asengelaki kosala mobembo na eleko ya mpiɔ mpe ya mbula. Kasi tokoki kozala na elikya ete Nzambe akobikisa biso. Tiká elikya na biso epai na Yehova mpe Mwana na ye oyo azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe eya makasi lisusu koleka.

24 Tozali na ntina moko te ya kobanga makambo oyo ekoya. Na ekeke ya liboso, Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábanga, mpe alingi te ete biso tóbanga ezala sikoyo to na mikolo oyo ezali koya. Akebisi biso mpo tóbongisa mitema mpe makanisi na biso. Toyebi malamu ete baklisto oyo bazali na botosi bakozwa etumbu te ntango mangomba ya lokuta mpe ebongiseli nyonso ya mabe ekobomama. Bakososola mpe bakolanda likebisi na ntina na ‘Mbindo-na-Libebisi oyo etɛlɛmi na esika ya bulɛɛ.’ Bakosala na mpiko mpo na kondima makasi oyo bazali na yango. Tóbosana ata moke te elaka ya Yesu ete: “Ye oyo akokanga motema tii na nsuka, ye wana akobika.”​—Malako 13:13, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Badrapo ya Loma ezalaki kobatelama na lokumu lokola biloko ya losambo na kati ya batempelo na Loma; mpe ndenge bato ya Loma bazalaki kokumisa badrapo na bango ekokani na lofundo oyo bazalaki na yango mpo na ekólo na bango mpamba te elekaki bikólo mosusu . . . [Mpo na basoda], na ntembe te drapo ezalaki eloko oyo eleki bosantu na mokili. Soda ya Loma azalaki kolapa ndai na drapo na ye.”​—The Encyclopædia Britannica, ebimeli ya 11.

b Tosengeli kosimba likambo oyo ete atako ndenge maloba ya Yesu ekokisamaki na mobu 66-70 T.B. ekoki kosalisa biso na koyeba ndenge ekokokisama na bolɔzi monene, makambo nyonso ekokokisama ndenge moko te mpamba te esalemi na bileko oyo ekeseni.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1976, nkasa 165-168 (ebimeli ya Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

◻ Ndenge nini “Mbindo-na-Libebisi” emonanaki na ekeke ya liboso?

◻ Mpo na nini ezali malamu mpenza tókanisa ete “Mbindo-na-Libebisi” ekotɛlɛma esika ya bulɛɛ na mikolo ezali koya?

◻ Emoniseli esakoli etumba nini oyo “Mbindo-na-Libebisi” ekobunda?

◻ Basɛngi biso ‘tókima’ na ndenge nini?

[Elilingi na lokasa 16]

Babilone Monene ebéngami “mama na pite na bosɔtɔ na mokili”

[Elilingi na lokasa 17]

Nyama ya yauli na langi motane ya Emoniseli mokapo 17 ezali “Mbindo-na-Libebisi” oyo Yesu alobelaki

[Elilingi na lokasa 18]

Nyama ya yauli ekobundisa mangomba mpo na koboma yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto