Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/5 nk. 3-6
  • Olekisaka ntango elongo na libota na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olekisaka ntango elongo na libota na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki masolo ezali te
  • Esengeli kosala milende mingi
  • Lisalisi ya Liloba ya Nzambe
  • Baboti mpe bana—Bómonisa bolingo ntango bozali kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kosolola na kati ya libota mpe na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tosala makasi mpo na kobatela libota na biso ete likɔta na mokili ya sika molakami na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/5 nk. 3-6

Olekisaka ntango elongo na libota na yo?

ELEKI sikoyo mwa bambula, lisolo moko ebimaki na zulunalo Mainichi Shimbun ezalaki na motó ya likambo oyo: “Na Japon bana balingaka batata na bango​—Ata bamipesaka mingi na mosala mpe bazalaka na ntango te ya kosakana na bango.” Lisolo wana eyebisaki ete na ankɛtɛ moko oyo guvernema ya ekólo Japon esalaki, bana mingi oyo batunaki (87,8 %) balobaki ete soki baboti na bango banuni, bakosepela kosalisa bango. Kasi, lisolo yango ezalaki na motó ya likambo mosusu ntango ebimaki na Lingelesi. Bakomaki boye: “Boyokani ya batata na bana ezali kotyelama likebi mingi te.” Lisolo yango ekesanaki mwa moke na oyo ebimaki na lokota ya Japonais; elobelaki mingi likambo mosusu oyo bamonaki na ankɛtɛ yango: Na Japon, mokolo nyonso ya mosala, batata bazalaki kolekisa kaka miniti 36 elongo na bana na bango. Nzokande, na Allemagne ya Wɛsti batata bazalaki kolekisa miniti 44 na mokolo elongo na bana na bango, mpe na États-Unis, batata bazalaki kolekisa miniti 56.

Ezali kaka batata te nde balekisaki ntango moke na bana na bango. Bamama mingi mpe bakómi kosala. Na ndakisa, bamama mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko basalaka mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Likambo yango ezali kosala ete baboti, ezala batata to bamama, bákóma kolekisa ntango moke elongo na bana na bango.

Na 1997, bayekolaki makambo ya bilenge 12 000 ya Amerika mpe bamonaki ete bilenge oyo bayokanaka malamu na baboti na bango banyokwamaka mpenza na makanisi te, bazwaka makanisi ya komiboma te, bamipesaka na mobulu te, to komela bangi te. Na kati ya bato oyo bayekolaki makambo yango, moko alobaki ete: “Moboti akoyokana malamu na bana na ye se soki azali kolekisa ntango elongo na bango mpe soki azali wana mpo na kosunga bango.” Ezali na ntina mingi ofandaka elongo na bana na yo mpe osololaka na bango.

Soki masolo ezali te

Mabota oyo bato basololaka te ezali mingimingi mabota oyo moboti moko akendá kofanda mosika mpo na mosala. Ya solo, masolo ezangaka kaka na mabota oyo moboti moko akendá kofanda mosika te. Baboti mosusu, atako bazalaka esika moko na mabota na bango, bakendaka mosala na ntango oyo bana na bango balamuki naino te mpe bazongaka na ntango oyo bana basilaki kolala. Lokola na kati ya pɔsɔ, bamonanaka mingi te, baboti mosusu balekisaka bawikende mpe bakonje elongo na mabota na bango. Babéngaka yango kolekisa ntango “malamu” elongo na bana.

Kasi, kolekisa ntango malamu ekoki kozwa esika ya kolekisa ntango mingi? Laurence Steinberg, moto moko oyo asalaka bolukiluki, alobi boye: “Emonanaka mingi ete bana oyo balekisaka ntango mingi elongo na baboti na bango basalaka makambo malamu koleka bana oyo balekisaka ntango mingi te elongo na baboti. Soki moto azali kozwa ntango ya kolekisa na libota na ye te, akoki kosala eloko mosusu te mpo na kobongisa likambo yango. Bato bapesaki motuya moko eleki ndelo na likanisi ya ntango malamu.” Mwasi moko ya ekólo Birmanie andimi ete ezali mpenza bongo. Mobali na ye, oyo azali na makambo lokola bato ya Japon, azongaka na ndako na ngonga ya liboso to ya mibale mikolo nyonso. Atako alekisaka ntango na libota na ye na bawikende, mwasi na ye alobi ete: “Kozala na ndako mikolo ya pɔsɔ mpe mikolo ya lomingo ekoki te mpo na kobongisa makambo lokola ozalaki na libota na yo te na mikolo mosusu ya pɔsɔ. . . . Okoki kolekisa kolya bilei ya pɔsɔ mobimba mpo oya kolya yango na mokolo ya pɔsɔ mpe mokolo ya lomingo?”

Esengeli kosala milende mingi

Koloba ete esengeli bato ya libota básololaka ntango nyonso ezali mpasi te, kasi kosala yango nde. Ezali lisɛki te ete tata to mama oyo asalaka mpo akokisa bamposa ya libota mpe kolekisa ntango elongo na bango. Bato mingi oyo misala na bango esɛngaka ete bázala na ndako te, mbala mingi babéngaka na telefone to bakomaka mikanda. Kasi, ezala bozali esika moko na ndako to te, esengeli kosala milende mpo na kozala ntango nyonso na momeseno ya kosololaka na kati ya libota.

Baboti oyo basalaka makasi te mpo na kozwa ntango ya kosolola na mabota na bango bazali komikɔtisa nyongo. Tata moko oyo azalaki kolekisa ntango mingi te na libota na ye, mpe azalaki ata kolya elongo na bango te, akutanaki na mikakatano makasi na nsima. Mwana na ye ya mobali akómaki moto ya mobulu, mpe mwana na ye ya mwasi bakangaki ye azali koyiba na magazini. Mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ, ntango tata azalaki komibongisa mpo akende na lisano na ye ya golf, mwana ya mobali asilikaki mpe alobaki ete: “Yango na ndako oyo kaka mama nde azalaka moboti?” Mwana alakisaki ete azalaki kosepela te, alobaki ete: “Kaka mama azwaka bikateli nyonso na libota. Yo Papa ata mokolo moko te . . . ”

Maloba wana epusaki tata afanda mpe akanisa. Na nsima azwaki ekateli ete, ya liboso, akobanda komela tii elongo na libota na ye. Na ebandeli ezalaki kaka ye na mwasi na ye. Mokemoke, bana mpe bayaki, mpe ngonga ya komela tii ekómaki ntango malamu ya kosolola. Na nsima, bakómaki kolya esika moko na mpokwa. Na ndenge yango, tata wana asalaki makasi mpo na kobikisa libota na ye oyo elingaki kobeba.

Lisalisi ya Liloba ya Nzambe

Biblia ezali kolendisa baboti ete bázwa ntango ya kosolola na bana na bango. Na monɔkɔ ya mosakoli Mose, Nzambe ateyaki Bayisalaele maloba oyo: “Yoká, ɛ Yisalaele, [Yehova] azali Nzambe na biso, [Yehova] moko, mpe okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” (Deteronome 6:4-⁠7) Baboti basengeli mpenza kosala makasi mpo bázwa ntango ya kolekisa elongo na mabota na bango mpo na kokɔtisa Liloba ya Nzambe na makanisi mpe na mitema ya bana.

Likambo moko ezali kobenda likebi na biso ezali ete ankɛtɛ oyo touti kolobela esalemaki na 1997 epai ya bilenge koleka 12 000 ya États-Unis; emonanaki ete “pene na bato 88 likoló na monkama . . . ya bato oyo balobaki ete bazali bandimi, lingomba na bango mpe libondeli ezalaki kobatela bango.” Baklisto ya solo bayebi ete koteya bilenge makambo ya Nzambe na kati ya libota ebatelaka bango ete bámela bangi te, bányokwama na makanisi te, bámiboma te, básala mobulu te, mpe na makambo mosusu mingi.

Baboti mosusu bamonaka ete ezali mpasi mpo bázwa ntango ya kolekisa elongo na mabota na bango. Likambo yango ezali mingimingi epai ya bamama oyo bazali na mibali te, oyo atako na mitema na bango basepelaka kolekisa ntango na bana na bango, kasi bomoi ezali kosɛnga bango básalaka mosala mpo bázwaka lifuti. Bakoki kosala nini mpo na kozwa mwa ntango ya kolekisa elongo na mabota na bango? Biblia epesi toli ete: “Batelá mayele ya solo mpe bososoli.” (Masese 3:21) Baboti bakoki kosalela “bososoli” mpo na kozwa ntango ya kolekisa na mabota na bango. Ndenge nini?

Soki ozali mama oyo asalaka mpe olɛmbaka mingi nsima ya mosala, okanisi boni soki osɛngi bana na yo básalisa yo ntango ozali kolamba? Ntango oyo bokolekisa elongo ekopesa yo nzela okóma moninga na bango mpenza. Na ebandeli, kosala misala na bana na yo ekoki kozwa ntango mingi. Kasi, nsima ya mwa ntango, okomona ete ezali esengo mpe ekosalisa bino bósala misala yango nokinoki.

Mbala mosusu ozali tata mpe ozali na makambo mingi ya kosala na wikende. Okanisi boni soki osali misala mosusu elongo na bana na yo? Okoki kosolola na bango ntango bozali kosala elongo mpe na ntango yango okoki koteya bango makambo ya ntina mingi. Toli ya Biblia oyo etindi koteya bana Liloba ya Nzambe elendisi yo ete osolola na bango ‘ntango ofandi na ndako, ntango ozali kotambola na nzela,’ to na maloba mosusu, na libaku nyonso. Kosolola na bana na yo na ntango bozali kosala elongo ezali ndenge ya komonisa “mayele ya solo”

Kolekisa ntango elongo na libota epesaka matomba oyo eumelaka. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Baoyo bakoyokaka toli bazali na mayele.” (Masese 13:10) Soki ozali kozwa ntango ya kosolola na libota na yo, ekopesa yo likoki ya kolakisa bango nzela malamu mpo bálonga mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Nzela oyo okolakisa bango sikoyo ekosalisa yo osomba ntango mpe okima mikakatano oyo mbala mosusu elingaki kobimela yo nsima. Ekoki mpe kobakisa esengo na yo mpe esengo ya bana na yo. Mpo olakisa bango nzela yango, osengeli kotoka mayele na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ezali liziba ya mayele. Salelá Biblia mpo na koteya bana na yo mpe kotambwisa libota na yo.​—Nzembo 119:105.

[Elilingi na lokasa 4]

Bilenge oyo bayokanaka malamu na baboti na bango banyokwamaka mpenza na makanisi te

[Elilingi na lokasa 5]

Kosolola malamu ememaka bolamu na libota

[Elilingi na lokasa 6]

Ntango ozali kosala elongo na bana na yo, okoki kosolola na bango mpe koteya bango makambo ya ntina mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto