Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/5 nk. 10-15
  • Tozali na esengo mpo Yehova alakisi biso nzela na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na esengo mpo Yehova alakisi biso nzela na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova alakisi nzela
  • Bato mosusu batambolaki na nzela ya Yehova
  • Ntina oyo bato mosusu batikaki nzela ya Yehova
  • Ndakisa mabe ya Ahaza
  • Bayuda elongo na Yilimia na Ezipito
  • Yehova apambolaka baoyo bazali kotambola na nzela na ye
  • Tyelá Yehova motema na ntango ya mpasi
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Likambo lizali kosambama na molongo mobimba etali mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Batatoli mpo na kotɛmɛla banzambe ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla bikólo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/5 nk. 10-15

Tozali na esengo mpo Yehova alakisi biso nzela na ye

“Mpo na Nzambe ya solo, nzela na ye ezali malamu; liloba ya Yehova ezali pɛto.”​—2 SAMWELE 22:31, NW.

1, 2. (a) Moto nyonso azalaka mpenza na mposa nini? (b) Ezali malamu tólanda ndakisa ya nani?

MOTO nyonso azalaka na mposa bálakisa ye ndenge oyo asengeli komitambwisa. Mpo tótambola malamu na bomoi, basengeli kosunga biso. Ezali solo ete Yehova apesi biso mwa mayele mpe lisosoli mpo esalisa biso tókesenisa malamu na mabe. Kasi, mpo lisosoli na biso ezala motambwisi oyo tokoki kotyela motema, esengeli naino koteyama. (Baebele 5:14) Bɔɔngɔ na biso mpe ezali na mposa ya makambo ya solo mpe esengeli kolakisama mpo eyeba kotalela makambo yango malamumalamu mpo tózwa bikateli ya malamu. (Masese 2:1-⁠5) Ata bongo, lokola makambo ya mokili ebongwanaka, bikateli na biso ekoki kobota mbuma oyo tokanisaki te. (Mosakoli 9:11) Biso moko tozali na likoki ya koyeba makambo ekoya lobi te.

2 Yango wana mosakoli Yilimia akomaki boye: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso, andimaki bátambwisa ye. Alobaki ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala, zambi yango ekosalaka ye, Mwana akosalaka yango lokola.” (Yoane 5:19) Yango wana, ezali mpenza malamu tólanda ndakisa ya Yesu mpe tóluka lisalisi ya Yehova mpo na komitambwisa! Mokonzi Davidi alobaki boye na kati ya nzembo: “Mpo na Nzambe ya solo, nzela na ye ezali malamu; liloba ya Yehova ezali pɛto. Azali nguba ya baoyo nyonso bamibombaka epai na ye.” (2 Samwele 22:31, NW) Soki toluki kotambola na nzela ya Yehova na esika tótyela mayele na biso moko motema, tokotambola malamu. Soki toboyi nzela ya Nzambe, tokosuka mabe.

Yehova alakisi nzela

3. Ndenge nini Yehova atambwisaki Adama na Eva, mpe alakaki bango bomoi ya ndenge nini?

3 Tókamata ndakisa ya Adama na Eva. Atako bazalaki na lisumu te, bazalaki na mposa ete bátambwisa bango. Na elanga kitoko ya Edene, Yehova atikaki te ete Adama asala makambo nyonso ndenge alingi. Nzambe apesaki ye mosala ya kosala. Ya liboso, Adama asengelaki kopesa nyama nyonso nkombo. Na nsima, Yehova atyelaki Adama na Eva mikano oyo basengelaki kokokisa nsima. Basengelaki koyangela mabelé, kobota bana mpe kotondisa mokili, mpe lisusu kobatela banyama ya mokili. (Genese 1:28) Ezalaki mosala monene, kasi na nsuka, mokili mobimba elingaki kokóma paladiso oyo etondi na bato oyo bazangi lisumu mpe bazali kofanda na kimya na banyama. Ezalaki mpenza elikya kitoko! Lisusu, ntango Adama na Eva bazalaki kotambola na nzela ya Yehova na bosembo nyonso, bazalaki na likoki ya kosolola na ye. (Talá Genese 3:8.) Kanisá libaku malamu boye: kozala na boyokani ya libela na Mokeli na bango!

4. Ndenge nini Adama na Eva bamonisaki ete batyelaki Nzambe motema te mpe bazalaki sembo te, mpe likambo yango ememelaki bango mabe nini?

4 Yehova apekisaki mobali na mwasi ya liboso bálya mbuma ya nzete ya koyeba malamu na mabe oyo ezalaki na kati ya Edene, mpe banda ntango yango bakokaki kolakisa ete bazali bato ya batosi, bazali na mposa ya kotambola na nzela ya Yehova. (Genese 2:17) Kasi eumelaki te, botosi wana emekamaki. Mpo bázala ntango nyonso bato ya botosi, ntango Satana ayaki na maloba ya lokuta, Adama na Eva basengelaki kolakisa ete bazali sembo epai ya Yehova mpe bazali kotyela bilaka na Ye motema. Likambo ya mawa ezali ete bazalaki sembo te mpe batyelaki Nzambe motema te. Ntango Satana ayebisaki Eva ete akokóma na lipanda mpe alobaki na ye ete Yehova akosaki bango, Eva andimelaki ye mpe abukaki mobeko ya Nzambe. Adama alandaki ye; ye mpe asalaki lisumu. (Genese 3:1-⁠6; 1 Timote 2:14) Babungisaki makambo mingi. Kotambola na nzela ya Yehova elingaki kobakisela bango esengo na bango ntango nyonso wana balingaki bábanda kokokisa mokano na ye. Nzokande, bakómaki kokelela mpe na bwale, mpe na nsuka na yango bakufaki.​—Genese 3:16-19; 5:1-⁠5.

5. Yehova azali na mokano nini mpo na mikolo ekoya, mpe ndenge nini azali kosalisa bato ya sembo bámona ndenge akokokisa yango?

5 Atako bongo, Yehova atikaki mokano na ye te ete mokolo mosusu mabelé oyo ezala paladiso mpo na bato oyo bazali na lisumu te. (Nzembo 37:11, 29) Mpe atambwisaka bato na nzela na ye na ndenge oyo eleki malamu mpe bato yango bazali na elikya ete bakomona ndenge elaka wana ekokokisama. Mpo na baoyo bazali na matoi ya koyoka, mongongo ya Yehova ezali koloba na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”​—Yisaya 30:21.

Bato mosusu batambolaki na nzela ya Yehova

6. Tángá nkombo ya bato mibale ya ntango ya kala oyo batambolaki na nzela ya Yehova, mpe yebisá mbano nini bazwaki?

6 Biblia elobi ete na kati ya bana ya Adama na Eva, bato moke kaka nde batambolaki na nzela ya Yehova. Moto ya liboso ezalaki Abele. Atako akufaki noki, Yehova akobosana ye te mpe na yango, azali na elikya ya solo ete akosekwa na ‘lisekwa ya bato ya sembo’ na ntango oyo Nzambe aponi. (Misala 24:15) Akomona ndenge Yehova akokokisa mokano na ye monene mpo na mabelé mpe mpo na bato. (Baebele 11:4) Moto mosusu oyo atambolaki na nzela ya Yehova ezalaki Enoka, ye asakolaki ete makambo ya mokili oyo ekosuka mpe maloba yango ezali na mokanda ya Yuda. (Yuda 14, 15) Bomoi ya Enoka mpe esukaki na mbalakaka. (Genese 5:21-24) Kasi, “azwaki litatoli ete asepelisi Nzambe.” (Baebele 11:5) Ndenge moko na Abele, ntango Enoka akufaki, azalaki na elikya ete akosekwa mpe akozala na kati ya bato oyo bakomona ndenge mikano ya Yehova ekokokisama.

7. Ndenge nini Noa na libota na ye bamonisaki ete bazalaki sembo epai ya Yehova mpe batyelaki ye motema?

7 Liboso ya Mpela, lokola bato bamipesaki mingi na misala ya mabe, bosembo ya bato oyo bazalaki kotosa Yehova ezalaki komekama mokolo na mokolo. Wana etikalaki moke mokili yango ebomama, mwa bato moke kaka bazalaki kotambola na nzela ya Yehova. Noa na libota na ye bayokaki maloba ya Nzambe mpe bandimaki yango. Basalaki mosala oyo bapesaki bango na bosembo nyonso mpe baboyaki kobendama na misala mabe ya mokili na ntango wana. (Genese 6:5-7, 13-16; Baebele 11:7; 2 Petelo 2:5) Tokoki mpenza kozala na esengo ete bazalaki na botosi mpe batyelaki Nzambe motema. Yango wana, babikaki na Mpela mpe bakómaki bankɔkɔ na biso.​—Genese 6:22; 1 Petelo 3:20.

8. Mpo na Bayisalaele, kotambola na nzela ya Nzambe esɛngaki makambo nini?

8 Nsima ya bambula mingi, Yehova asalaki kondimana na bana ya Yakobo, moto ya sembo, mpe bana yango bakómaki libota na ye. (Exode 19:5, 6) Yehova atambwisaki libota oyo asalaki na yango kondimana na nzela ya Mibeko oyo ekomamaki, na bonganga, mpe azalaki ntango nyonso kotindela bango basakoli mpo bálakisa bango nzela oyo basengeli kotambola. Kasi, kolanda litambwisi yango etalaki Bayisalaele bango moko. Yehova atindaki mosakoli na ye ayebisa Bayisalaele ete: “Talá, natii na liboso na bino lelo lipamboli mpe elakeli mabe, lipamboli soko bokotosa malako na [Yehova] Nzambe na bino, oyo elakeli ngai bino lelo, mpe elakeli mabe soko bokotosa malako na [Yehova] Nzambe na bino te, kasi soko bokopɛngwa na nzela oyo elakeli ngai bino lelo, mpo na [kolanda] banzambe mosusu oyo boyebaki te.”​—Deteronome 11:26-⁠28.

Ntina oyo bato mosusu batikaki nzela ya Yehova

9, 10. Mpo na nini Bayisalaele basengelaki kotyela Yehova motema mpe kozala sembo epai na ye?

9 Lokola Adama na Eva, mpo Bayisalaele bázala ntango nyonso bato ya botosi, basengelaki kotyela Yehova motema mpe kozala sembo epai na ye. Yisalaele ezalaki mwa ekólo moke oyo ezingamaki na bikólo oyo elingaki bitumba. Na sudi-wɛsti na yango, ezalaki na Ezipito na Etiopia. Sulia na Asulia ezalaki na nɔrdi-ɛsti. Bongo pene na bango mpenza, ezalaki na Filistia, Amona, Moaba, mpe Edome. Na eleko moko to mosusu bikólo yango nyonso ekómaki banguna ya Yisalaele. Lisusu, bikólo yango nyonso ezalaki na losambo ya lokuta, bazalaki kosambela bikeko, bazalaki kotala minzoto mpo na koyeba makambo ekoya, mpe ntango mosusu bazalaki kosangisa nzoto na ndenge ya bosɔtɔ mpe kosala likambo ya nsɔmɔ: kotumba bana lokola mbeka. Bikólo oyo ezalaki pene ya Yisalaele ezalaki kosambela banzambe na yango mpo na kobota bana mingi, kobuka mbuma mingi, mpe kolonga na bitumba.

10 Kaka Yisalaele nde ezalaki kosambela Nzambe moko: Yehova. Ye alakaki bango ete soki batosi mibeko na ye, akopambola bango mpe bakobota bana ebele, bilanga na bango ekobota mingi, mpe akobatela bango liboso ya banguna na bango. (Deteronome 28:1-14) Kasi likambo ya mawa ezali ete na Yisalaele, bato mingi batosaki mibeko na ye te. Na kati ya bato oyo batambolaki na nzela ya Yehova, mingi banyokwamaki mpo ete bazalaki sembo. Kutu, bamoko babɛtamaki na ndenge ya nsɔmɔ, basusu basɛkaki bango, babɛtaki bango fimbo, batyaki bango na bolɔkɔ, babambaki bango mabanga, mpe babomaki bango na bandeko na bango Bayisalaele. (Misala 7:51, 52; Baebele 11:35-38) Bato ya sembo bamekamaki makasi! Kasi, mpo na nini bato mingi batikaki nzela ya Yehova? Ndakisa mibale oyo tozwi na lisolo ya Bayisalaele ekosalisa biso na komona ndenge oyo bazalaki komikosa.

Ndakisa mabe ya Ahaza

11, 12. (a) Likambo nini Ahaza aboyaki kosala ntango ekólo ya Sulia eyaki kobundisa ekólo na ye? (b) Tángá bisika mibale oyo Ahaza alukaki libateli?

11 Na ekeke ya mwambe L.T.B., Ahaza azalaki mokonzi ya Yuda, bokonzi oyo ezalaki na sudi. Na ntango oyo azalaki koyangela, mboka ezalaki na kimya te. Ekómaki na ntango moko, Sulia na Yisalaele, bokonzi oyo ezalaki na nɔrdi, bayaki kobundisa Ahaza, mpe “motema na ye mpe mitema na bato na ye [elengaki].” (Yisaya 7:1, 2) Kasi, ntango Yehova alingaki kosunga ye, asɛngaki Ahaza ete ameka ye, Ahaza aboyaki na motema moko! (Yisaya 7:10-12) Nsuka na yango ezalaki ete balongaki Yuda na etumba mpe makambo mingi ebebaki na ekólo.​—2 Ntango 28:1-⁠8.

12 Ahaza aboyaki komeka Yehova, kasi akakatanaki te kosɛnga mokonzi ya Asulia asunga ye. Atako bongo, bikólo oyo ezalaki zingazinga etikaki konyokola Yuda te. Ntango Asulia ebalukelaki Ahaza mpe ‘ebebisaki ye,’ mokonzi “apesaki banzambe na Damaseke makabo baoyo balekaki ye na etumba. Alobaki ete, Mpo ete banzambe na mikonzi na Sulia basungaki bango, nakopesaka bango makabo ete básunga ngai.”​—2 Ntango 28:20, 23.

13. Ahaza amonisaki nini lokola asambelaki banzambe ya Sulia?

13 Na nsima, Yehova ayebisaki Yisalaele boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soko oyokaki malako na ngai! mbɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge na mai-na-monana.” (Yisaya 48:17, 18) Lokola asambelaki banzambe ya Sulia, Ahaza amonisaki ete aboyaki mpenza ‘bákamba ye na nzela ebongi na ye kotambola.’ Makanisi ya bato ya bikólo ya bapaya ekosaki ye mpe alukaki libateli ya lokuta na esika aluka libateli epai ya Yehova.

14. Mpo na nini tokoloba ete Ahaza asalaki mabe mpenza ntango asambelaki banzambe ya lokuta?

14 Banda kala, basakoli bazalaki komonisa ete banzambe ya bikólo ya bapaya, bakisa mpe banzambe ya Sulia, ezalaki “bikeko” mpamba. (Yisaya 2:8) Na bambula oyo elekaki, ntango Mokonzi Davidi azalaki koyangela, Yehova amonisaki ete azali na makasi koleka banzambe ya Sulia; na ntango yango, Basulia bakómaki basaleli ya Davidi. (1 Ntango 18:5, 6) Kaka Yehova, “Nzambe na banzambe mpe Nkolo na bankolo, Nzambe monene mpe makasi mpe na nsɔmɔ,” nde akoki mpenza kobatela. (Deteronome 10:17) Kasi, Ahaza apesaki Yehova mokɔngɔ mpe alukaki banzambe ya bapaya mpo bábatela ye. Nsuka na yango ezalaki mabe mpo na Yuda.​—2 Ntango 28:24, 25.

Bayuda elongo na Yilimia na Ezipito

15. Na mikolo ya Yilimia, Bayuda oyo bakendaki na Ezipito basalaki lisumu nini?

15 Lokola Bayuda bazalaki sembo ata moke te, Yehova atikaki ete bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme na tempelo na yango na mobu 607 L.T.B. Bato mingi bakendaki boombo na Babilone. Kasi, bato mosusu batikalaki, mpe moko na bango ezalaki mosakoli Yilimia. Ntango babomaki Guvernere Gedalia, bato oyo batikalaki bakimaki na Ezipito mpe bakendaki na Yilimia. (2 Mikonzi 25:22-26; Yilimia 43:5-⁠7) Kuna na Ezipito, babandaki kotumbela banzambe ya lokuta mbeka. Yilimia asalaki nyonso mpo na komonisa Bayuda yango oyo bazangaki sembo ete likambo yango ezali mabe, kasi bazalaki matoi mangbongi. Baboyaki kozonga epai ya Yehova mpe batikaki kotumbela “mokonzi mwasi na lola” mpaka ya malasi te. Mpo na nini? Mpo ete bango na bankɔkɔ na bango basalaki bongo ‘na Yuda mpe na nzela ya Yelusaleme, ntango bazalaki na bilei mingi, bazalaki malamu mpe bamonaki mabe te.’ (Yilimia 44:16, 17) Bayuda balobaki lisusu boye: “Longwa ntango wana totiki kotumbela mokonzi mwasi na lola mpaka na malasi mpe kosopela ye mbeka na komela, tozali kozanga biloko nyonso mpe tobebisami na mopanga mpe na nzala.”​—Yilimia 44:18.

16. Mpo na nini Bayuda oyo bazalaki na Ezipito bazalaki na libunga monene na makanisi na bango?

16 Talá ndenge bato babosanaka bolamu oyo basaleli bango! Makambo elekaki mpenza ndenge nini? Ezali solo ete Bayuda batumbelaki banzambe ya lokuta mbeka na mokili oyo Yehova apesaki bango. Bantango mosusu, lokola na mikolo ya Ahaza, bazalaki konyokwama mpo na likambo yango oyo ezalaki kolakisa ete bapɛngwi na nzela ya Yehova. Kasi, Yehova azalaki ‘kosilika noki te’ na libota oyo asalaki na yango kondimana. (Exode 34:6; Nzembo 86:15) Azalaki kotinda basakoli na ye mpo na kolendisa bango ete bábongola mitema. Ntango mosusu, soki mokonzi azali sembo, Yehova azalaki kopambola ye, mpe bato nyonso bazalaki kozwa bolamu na lipamboli yango, ata soki bato mingi bazali sembo te. (2 Ntango 20:29-33; 27:1-⁠6) Bayuda oyo bazalaki na Ezipito bazalaki mpenza na libunga na koloba ete bolamu nyonso oyo bazwaki na mokili na bango ezalaki kouta na banzambe na bango ya lokuta!

17. Mpo na nini mokili ya Yuda na tempelo na yango ebebisamaki?

17 Liboso ya mobu 607 L.T.B., Yehova alendisaki libota ya Yuda na maloba oyo: “Bótosa mongongo na ngai mpe nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na ngai; bótambola na nzela nyonso isili ngai kolakisa bino ete ezala na bino malamu.” (Yilimia 7:23) Soki babebisaki tempelo na mokili ya Bayuda ezali mingimingi mpo Bayuda baboyaki kotambola ‘na nzela nyonso oyo Yehova alakisaki bango.’ Tólinga te ete libunga monene ndenge wana ekómela biso te.

Yehova apambolaka baoyo bazali kotambola na nzela na ye

18. Baoyo bazali kotambola na nzela ya Yehova basengeli kosala nini?

18 Lelo oyo, ndenge moko na ntango ya kala, kotambola na nzela ya Yehova esɛngi kozala sembo, elingi koloba kozala na ekateli ya kosalela kaka ye. Yango esɛngi kotyela ye motema​—kozala na kondima makasi ete makambo oyo Yehova alaki ezali solo mpe ekokokisama. Kotambola na nzela ya Yehova esɛngi botosi: kotosa mibeko na ye mpe kokangama na yango mpe kobatela mitinda na ye oyo esɛngi etamboli malamu. “[Yehova] azali moyengebene mpe alingi boyengebene.”​—Nzembo 11:7.

19. Lelo oyo bato mingi basambelaka banzambe nini, mpe bazwaka matomba nini?

19 Ahaza alukaki ete banzambe ya Sulia bábatela ye. Bayisalaele oyo bakendaki na Ezipito batyaki elikya ete “mokonzi mwasi na lola,” nzambe mwasi oyo bato mingi bazalaki kosambela na Moyen-Orient ya kala, akopesa bango bozwi mingi na mosuni. Lelo oyo, banzambe mingi ezali mpenza bikeko ya solo te. Yesu akebisaki na kosalela “Bozwi” na esika ya kosalela Yehova. (Matai 6:24, NW) Ntoma Paulo alobelaki “bilulela oyo ezali losambo na bikeko.” (Bakolose 3:5) Alobelaki mpe baoyo “nzambe na bango bobele libumu.” (Bafilipi 3:19) Ɛɛ, mbongo mpe biloko ya mosuni ezali mpe na kati ya banzambe oyo bato bazali kosambela lelo oyo. Mpo na koloba solo, bato mingi, na bandimi mingi ya mangomba, ‘batii bilikya na bango na bozwi oyo eumelaka solo te.’ (1 Timote 6:17) Mingi bazali koboma mpenza nzoto na kosalela banzambe yango mpe ezali na baoyo bazali kozwa matomba: bafandi na bandako ya kitoko, bazali na biloko ya ntalo, mpe bazali kolya bilei ya lokumu. Kasi, bato nyonso te nde bazali na bomɛngo ya ndenge wana. Mpe ata baoyo bazali na yango, nsukansuka bamonaka kaka ete epesaka bango eloko moko ya malonga te. Biloko yango eumelaka solo te, ezali ya ntango mokuse, mpe ekokisaka bamposa na bango ya elimo te.​—Matai 5:3.

20. Makanisi nini ya bokatikati tosengeli ntango nyonso kobatela?

20 Ya solo, biso oyo tozali na bomoi na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, tosengeli koluka kosala makambo oyo ezali mpenza na ntina. Tosengeli kozala na bokatikati mpe kosala makambo oyo ebongi mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya mabota na biso. Kasi soki tomipesi na koluka bomoi ya lokumu, koluka mbongo, to biloko mosusu koleka mosala ya Nzambe, tóyeba ete tozwami na losambo moko ya bikeko mpe tozali kotambola lisusu na nzela ya Yehova te. (1 Timote 6:9, 10) Kasi, ezali boni soki tokutani na mokakatano lokola maladi makasi, kozanga mbongo, to likambo mosusu? Tózala te lokola Bayuda oyo bakendaki na Ezipito mpe balobaki ete bakutanaki na mikakatano mpo bazalaki kosalela Nzambe. Nzokande, tómeka Yehova, ndenge oyo ebongaki ete Ahaza asala. Na bosembo nyonso, tóluka litambwisi ya Yehova. Tólanda nzela na ye na elikya nyonso, mpe tóbondela ye apesa biso makasi mpe mayele oyo tokoki kolonga na yango mokakatano nyonso oyo eyeli biso. Na nsima, tótya elikya epai ya Yehova mpe tózela mapamboli na ye.

21. Baoyo batambolaka na nzela ya Yehova bazwaka mapamboli nini?

21 Na lisolo mobimba ya Yisalaele, Yehova azalaki kopambola mingi baoyo bazalaki kotambola na nzela na ye. Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Ɛ [Yehova], tambolisá ngai kati na boyengebene na yo mpo na bango bazali [kozela] ngai.” (Nzembo 5:8) Yehova asalisaki ye alonga bitumba na bikólo ya zingazinga; bikólo oyo na nsima ekómaki konyokola Ahaza. Na ntango Salomo azalaki mokonzi, Yisalaele ezalaki na kimya mpe bomɛngo oyo Bayuda oyo bakendaki na Ezipito bazalaki kokanisa. Yehova asalisaki Hizikiya, mwana ya Ahaza, ete alonga ntango abundaki na basoda makasi ya Asulia. (Yisaya 59:1) Ɛɛ, lobɔkɔ ya Yehova ezalaki mokuse te epai na bato oyo bazalaki sembo epai na ye, baoyo ‘batɛlɛmaki na nzela ya bato ya masumu te’ kasi bazalaki kosepela na Mobeko ya Nzambe. (Nzembo 1:1, 2) Ezali mpe bongo ata lelo oyo. Kasi, lelo oyo ndenge nini tokoki koyeba ete tozali mpenza kotambola na nzela ya Yehova? Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.

Ozali koyeba lisusu?

◻ Bizaleli nini ezali na ntina mingi soki tolingi kotambola na nzela ya Yehova?

◻ Mpo na nini tokoloba ete makanisi ya Ahaza ezalaki mabe?

◻ Bayuda oyo bakendaki na Ezipito bazalaki na libunga nini na makanisi na bango?

◻ Ndenge nini tokoki kolendisa ekateli na biso ya kotambola na nzela ya Yehova?

[Elilingi na lokasa 13]

Ahaza asambelaki banzambe ya Sulia na esika asambela Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto