Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/5 nk. 29-31
  • Saulo: Nkolo aponi ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Saulo: Nkolo aponi ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota ya Saulo
  • Kelasi oyo Saulo atángaki
  • Asaleli makoki na ye malamu
  • Yesu aponi Saulo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Lisangá “ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Kotosa eleki mbeka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/5 nk. 29-31

Saulo: Nkolo aponi ye

SAULO moto na Talasia, azalaki monguna oyo azalaki koboma bayekoli ya Klisto. Kasi, Nkolo azalaki na mokano mosusu mpo na ye. Saulo asengelaki kokóma moteyi ya nsango oyo abundisaki na makasi nyonso. Yesu alobaki boye: “Nasili kopona ye [Saulo] na komema nkombo na ngai liboso na [bato ya mabota], mpe na mikonzi, mpe na bato na Yisalaele.”​—Misala 9:15.

Bomoi ya Saulo “motyoli” ebongwanaki mobimba ntango Nkolo Yesu Klisto ayokelaki ye mawa mpe ‘aponaki’ ye. (1 Timote 1:12, 13) Ntango Saulo akómaki na nkombo ntoma Paulo, milende oyo epusaki ye na kosangana na koboma Setefano na mabanga mpe konyokola bayekoli ya Yesu esalelamaki mpo na mikano mosusu. Ezali polele ete Yesu amonaki bizaleli ya motuya na bomoto ya Saulo. Bizaleli nini? Saulo azalaki nani? Ndenge nini bomoi na ye ya kala esalaki ete azala moto oyo abongi kosalelama mpo na kopalanganisa mateya ya solo? Tokoki kozwa liteya na makambo oyo ekómelaki ye?

Libota ya Saulo

Saulo azalaki “elenge mobali” ntango babomaki Setefano mwa moke nsima ya Pentekote ya mobu 33 T.B. Ntango akomelaki Filemona mokanda soki na mobu 60-61 T.B., azalaki “mobange.” (Misala 7:58; Filemona 9) Banganga-mayele balobi ete, na ndenge oyo bazalaki kotalela bambula kala, “elenge” ezalaki moto oyo azali na mbula kobanda 24 tii 40, nzokande “mobange” ezalaki kobanda na mbula 50 tii 56. Boye, Saulo abotamaki mwa bambula nsima ya kobotama ya Yesu.

Na ntango yango Bayuda bapalanganaki na mikili mingi. Bitumba mpo na kobɔtɔla mabelé, boombo, komemama na mboka mopaya, mombongo, mpe mibembo esalaki ete Bayuda bápalangana mosika na Yudea. Atako baboti na ye bazalaki Bayuda oyo bakendaki kofanda na mboka mopaya, Saulo amonisi polele ete bazalaki kotosa Mibeko. Alobi ete “nakatami ngenga mokolo na mwambe, nauti na libota na Yisalaele na [libota] ya Benyamina, nazali [Moebele] kati na Baebele, Mofalisai mpo na Mibeko.” Saulo azalaki na nkombo ya Liebele oyo ekokani na nkombo ya moto moko ya lokumu na libota na ye, elingi koloba mokonzi ya liboso ya Yisalaele. Lokola abotamaki Moloma, Saulo moto na Talasia azalaki lisusu na nkombo ya Latin, Paullus.​—Bafilipi 3:5; Misala 13:21; 22:25-⁠29.

Lokola Saulo abotamaki Moloma elimbolaki ete nkɔkɔ na ye moko ya mobali azwaki libaku ya kokóma mwanamboka Loma. Ndenge nini? Ezalaki kosalama na ndenge mingi. Longola kozwa yango na nzela ya bankɔkɔ, bazalaki kopesa yango na moto moko to bato mpo na likambo moko oyo basalaki, ezala na politiki, to lokola mbano na mosala moko oyo basaleli ekólo. Moombo oyo akokaki kosomba bonsomi epai ya nkolo na ye oyo azali Moloma, to moto oyo mwanamboka Loma asikoli ye, azalaki kokóma mpe Moloma. Soda ya mboka mopaya oyo ayaki kosunga Loma, na nsuka ya mosala akokaki mpe kokóma Moloma. Moto oyo abotami na mboka oyo Loma ezalaki koyangela, akokaki kokóma Moloma. Bato mosusu mpe balobaka ete na bileko mosusu bazalaki kosomba lotomo ya kozala Moloma na mbongo mingi. Toyebi te ndenge oyo libota ya Saulo ezwaki lotomo ya kozala Baloma.

Toyebi kaka ete Saulo autaki na Talasia, engumba monene mpe mboka-mokonzi ya etúká ya Kilikya oyo eyangelamaki na Loma (lelo oyo ezali na sudi-ɛsti ya ekólo Turquie). Atako mwa Bayuda mingi bazalaki kofanda kuna, makambo oyo ezalaki koleka na engumba yango esalaki ete Saulo ayeba mimeseno ya bato ya mabota mosusu. Talasia ezalaki mboka monene mpe ya bozwi, eyebanaki lokola esika oyo bato bazalaki koyekola makambo ya Bagreke. Bato bakanisaka ete na ekeke ya liboso bato soki 300 000 to 500 000 bafandaki kuna. Ezalaki esika monene ya mombongo na nzela monene kati na Asie Mineure, Sulia, na Mesopotamia. Bozwi ya Talasia ezalaki kouta na mombongo mpe na mabelé oyo ezalaki kobota malamu, ezalaki kobota mingimingi masangu, vinyo, mpe nzete babéngi lin. Na baizini na yango ya bilamba, bazalaki kosala mpe bilamba ya mposo ya ntaba oyo bazalaki kosala na yango bahema.

Kelasi oyo Saulo atángaki

Saulo, to ntoma Paulo azalaki kotonga bahema mpo na kokokisa bamposa na ye moko mpe kosunga mosala na ye ya misionere. (Misala 18:2, 3; 20:34) Kosala hema ezalaki mpenza mosala oyo ezalaki kosalema mingi na mboka Talasia esika abotamaki. Ekoki kozala ete Saulo ayekolaki kosala bahema epai ya tata na ye ntango azalaki elenge.

Lokola Saulo ayebaki koloba minɔkɔ ya bapaya​—mingimingi Greke, na minɔkɔ oyo ezalaki kolobama na bamboka oyo Loma eyangelaki​—yango esalisaki ye mingi na mosala na ye ya misionere. (Misala 21:37–22:2) Banganga-mayele oyo bayekoli mikanda na ye balobi ete ayebaki lokota ya Greke malamu mpenza. Maloba na ye ezali ya Greke ya mikanda te to mpe ya bato batánga mingi kasi, ekokani na oyo ya Septante, libongoli ya Makomami ya Liebele na Greke oyo mbala mingi azalaki kotánga to kozongela maloba na yango. Mpo na yango, banganga-mayele mingi bandimaka ete Saulo ayekolaki Greke ya malamu na kelasi ya ebandeli, ekoki kozala na eteyelo ya Bayuda. Nganga-mayele Martin Hengel, alobi ete: “Na ntango ya kala mpo na kotánga kelasi ya malamu​—mpenzampenza kelasi ya Greke​—ezalaki ofele te; esɛngaki kozala na moto oyo akofutela yo kelasi.” Lokola Saulo atángaki kelasi mingi emonisi ete autaki na libota ya bato ya mbongo.

Emonaki ete, ntango akómaki naino na mbula 13 te, Saulo akendaki na Yelusaleme, na kilomɛtɛlɛ soki 840 ya Talasia, mpo na kotánga kelasi na ye. Gamaliele azalaki molakisi na ye, molakisi moko ya bonkɔkɔ ya Bafalisai oyo ayebanaki mingi mpe oyo bazalaki kopesa ye lokumu mingi. (Misala 22:3; 23:6) Kelasi wana, oyo ekokani lelo oyo na iniversite, epesaki ye likoki ya kozala na mikumba mingi na Lingomba ya Bayuda.a

Asaleli makoki na ye malamu

Lokola abotamaki na libota ya Bayuda na engumba ya Bagreke oyo eyangelamaki na Loma, Saulo azalaki moto ya mimeseno ya mikili misato. Na ntembe te, koyeba mimeseno ya bato mpe minɔkɔ ndenge na ndenge esalisaki ye akóma “ndenge nyonso epai na bato nyonso.” (1 Bakolinti 9:19-23) Kozala mwanamboka Loma esalisaki ye na nsima mpo na kolongisa mosala na ye na mibeko mpe koteya nsango malamu liboso ya bakonzi minene ya Loma. (Misala 16:37-40; 25:11, 12) Ezali solo ete Yesu ntango wana asekwaki ayebaki bomoi oyo Saulo azalaki na yango kala, kelasi atángaki, mpe bomoto na ye. Yango wana alobaki na Anania ete: “Kendá na yo, mpo ete nasili kopona ye na komema nkombo na ngai liboso na [bato ya mabota], mpe na mikonzi, mpe na bato na Yisalaele. Mpo ete ngai nakotalisa ye makambo mingi makokoka na ye koyoka mpasi na yango mpo na nkombo na ngai.” (Misala 9:13-16) Ntango Yesu atyaki ye na nzela ya malamu, Saulo asalelaki molende na ye mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi na bamboka ya mosika.

Ndenge oyo Yesu aponaki Saulo mpo na kosala mosala monene esalemaki epai ya moto mosusu te na lisolo mobimba ya boklisto. Kasi, moklisto mokomoko lelo oyo azali na makoki mpe na makambo oyo akoki kosalela malamu mpo na kopalanganisa nsango malamu. Saulo azongaki nsima te ntango ayebaki makambo oyo Yesu alingaki mpo na ye. Asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosala ete matomba ya Bokonzi ekende liboso. Yo mpe osalaka bongo?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu mpe kelasi oyo Saulo atángaki epai ya Gamaliele, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1996, nkasa 26-⁠29.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 30]

Kokomisa nkombo mpe kondimama lokola mwanamboka Loma

Auguste abandisaki likambo ya kokomisa nkombo ya bana nsomi ya bato ya Loma na mibeko mibale oyo abimisaki na mobu 4 mpe mobu 9 T.B. Kokomisa nkombo ezalaki kosalema na kati ya mikolo 30 banda kobotama ya mwana. Na bitúká, baboti basengelaki kokende liboso ya zuzi na biro oyo ebongisamaki, koloba ete mwana na bango azali mwana nsomi mpe azali Moloma. Bazalaki mpe kokoma nkombo ya baboti, mwana mwasi to mobali mpe nkombo na ye, mpe mokolo oyo abotamaki. Ata liboso mibeko wana ebima, bazalaki kosala lesansema mpo na kokoma nkombo ya banamboka na bakomine, bamboka, mpe bitúká nyonso ya Loma mpe nsima ya mbula mitano bazalaki kozongela yango.

Mpo na koyeba soki moto azali mwanamboka Loma, bazalaki kotala mikanda ya kala oyo bazalaki kobatela malamu. Bazalaki kopesa moto na moto kalati oyo bakomá makambo wana; kalati oyo moto akoki kogumba yango. Banganga-mayele mosusu balobi ete, ntango ntoma Paulo alobaki ete azali Moloma, ekoki kozala ete alakisaki kalati mpo na kondimisa ete alobi solo. (Misala 16:37; 22:25-29; 25:11) Lokola likambo ya kozala mwanamboka Loma ezalaki kotalelama lokola “likambo ya bulɛɛ” mpe ezalaki kopesa moto likoki ya kosala makambo mingi, kosala kalati ya lokuta ezalaki mpenza mbeba monene. Moto oyo asali mikanda ya lokuta bazalaki kokatela ye etumbu ya liwa.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na bililingi: Molato ya ntango ya kala/Dover Publications, Inc., New York

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

Nkombo ya Baloma oyo Saulo azalaki na yango

Mobali nyonso na Loma azalaki na nkombo misato to koleka. Azalaki na nkombo ya ndako, nkombo ya mboka (euti na libota na ye), mpe nkombo ya kobakisa. Ndakisa moko eyebani mingi ezali Gaius Julius Caesar. Biblia eyebisi bankombo ya Baloma na mobimba na yango te, kasi mikanda mosusu ya mokili elobi ete nkombo ya Akalipa ezalaki Marcus Julius Agrippa. Nkombo ya Galio ezalaki Lucius Junius Gallio. (Misala 18:12; 25:13) Biblia eyebisi biso bato oyo bazalaki na bankombo misato, kasi bobele bankombo mibale ya nsuka nde etángami. Bato yango bango oyo: Ponto Pilata (talá makomi na nse), Selegi Paulo, Klaudio Lusia, mpe Poloki Fesete.​—Misala 4:27; 13:7; 23:26; 24:27.

Toyebi mpenza te soki mpo na Saulo, nkombo Paulo ezalaki ya ndako to ya kobakisa. Ezalaki kosalema ete moto amipesa nkombo oyo bandeko mpe bayebani na ye bakobanda kobénga ye. To mpe, nkombo oyo ezali ya Baloma te lokola Saulo ekokaki kosalelama lokola nkombo ya kobakisa. Nganga-mayele moko alobi: “[Saulo] ekokaki kozala nkombo ya Baloma te, kasi nkombo ya kobotama oyo bapesaki na Moloma lokola nkombo ya kobakisa.” Na bamboka oyo bato bazalaki koloba minɔkɔ mingi, moto na moto akokaki kopona kati na bankombo na ye nkombo oyo alingi babéngaka ye na yango.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Photograph by Israel Museum, ©Israel Antiquities Authority

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto