Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/6 nk. 28-31
  • Baninga ya paulo na mosala​—Ezalaki banani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baninga ya paulo na mosala​—Ezalaki banani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baninga ya mobembo, basi na mibali oyo bayambaki ye na bandako na bango
  • Baninga ebele
  • Basungaki ye malamu ntango azalaki na bolɔkɔ
  • “Tozali basalani na Nzambe elongo”
  • “Apesaki litatoli malamumalamu.”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Zalá na mpiko mpo Yehova azali mosungi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Paulo akómi na Roma
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/6 nk. 28-31

Baninga ya paulo na mosala​—Ezalaki banani?

NA KATI ya Biblia, na mokanda ya Misala ya bantoma mpe na mikanda mosusu oyo ntoma Paulo akomaki, batángi bankombo ya bato ebele ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso oyo basalaki elongo na ntoma ‘Paulo mpo na koteya bato ya bikólo mosusu.’ Toyebi makambo mingi mpo na bamoko na bango. Ekoki kozala ete oyebi malamu misala oyo Apolo, Balanaba, na Sila basalaki. Nzokande, mbala mosusu okokoka koloba makambo mingi te mpo na bato lokola Akapulu, Kalaudia, Damali, Lini, Pelesisi, Pude, to Sopatele.

Na eleko moko to mosusu mpe na makambo ndenge na ndenge, bato mingi basalaki misala ya ntina mpo na kosunga Paulo na mosala na ye ya kosakola. Bato lokola Alisitalaka, Luka, na Timote basalaki na ntoma Paulo bambula mingi. Bamoko bazalaki na ye ntango azalaki na bolɔkɔ. Bamosusu bazalaki kotambola na ye. Nzokande, ezalaki mpe na basi na mibali oyo bazalaki koyamba ye na bandako na bango ntango akómi na mboka na bango. Likambo ya mawa, bato mosusu lokola Alesandala, Dema, Elemogene, mpe Fugelo, bapɛngwaki.

Baninga mosusu ya ntoma Paulo, na ndakisa Asunkilito, Elema, Yulia, to Filologo​—totángi se mwa ndambo​—toyebi kaka bankombo na bango, kasi toyebi mpenza makambo na bango te. Mpo na ndeko mwasi ya Nelea, to mama ya Lufu, to mpe bato ya ndako ya Koloe, toyebi makambo na bango te ata mpe bankombo na bango eyebani te. (Baloma 16:13-15; 1 Bakolinti 1:11) Kasi, soki totaleli malamu mwa makambo oyo toyebi mpo na bato yango oyo bazali soki monkama, ezali kosalisa biso tómona ndenge ntoma Paulo asalaki mosala na ye ya kosakola. Ezali mpe komonisa biso bolamu ya kozala esika moko na ebele ya bandeko mpe kosala na bango elongo.

Baninga ya mobembo, basi na mibali oyo bayambaki ye na bandako na bango

Mosala ya ntoma Paulo esɛngaki kosala mibembo mingi. Mokomi moko atángaki bakilomɛtɛlɛ oyo asalaki na mibembo na nzela ya mokili mpe ya ebale oyo elobelami kaka na mokanda ya Misala ya bantoma, nyonso esalaki soki kilomɛtɛlɛ 16 000. Kosala mobembo na ntango wana ezalaki kolɛmbisa mpe ezalaki na makama. Kati na makama oyo akutanaki na yango tokoki kotánga: masuwa oyo ememaki ye ezindaki, makama na bibale mpe na makama na babɔtɔli, makama kati na mokili mokauki, mpe makama na mai monene. (2 Bakolinti 11:25, 26) Yango wana, mbala mingi Paulo azalaki kozanga moninga ya mobembo te ntango alongwe na esika moko mpo akende na esika mosusu.

Baoyo bazalaki kokende mibembo na Paulo bazalaki mpenza baninga na ye, bazalaki kopesa ye makasi, mpe bazalaki kosunga ye na mosala ya kosakola. Ntango mosusu, Paulo azalaki kotika bango na bamboka mosusu mpo bákokisa bamposa ya elimo ya bandimi ya sika. (Misala 17:14; Tito 1:5) Kasi, ezalaki mpenza malamu kotambola na baninga mpo na libateli mpe mpo básungaka ye na bampasi ya mobembo. Yango wana, bato lokola Sopatele, Sekundu, Gayo, na Tolofimi, oyo toyebi ete basalaki mibembo na Paulo, basalaki mosala monene mpo na kosunga ye ete mosala na ye elonga.​—Misala 20:4.

Basi na mibali oyo bayambaki ye na bandako na bango basalisaki ye mingi. Ntango Paulo akómi na mboka moko epai akanaki koteya to kolala, azalaki koluka libosoliboso esika ya kofanda. Moto nyonso oyo azalaki kosala mibembo mingi lokola ntoma Paulo, asengelaki kolala na bandako ya ndenge na ndenge. Akokaki kolala na otɛlɛ. Kasi, banganga-mayele ya masolo ya kala balobi ete ezalaki “bisika ya likama mpe ya mabe,” yango wana, soki likoki ezali, Paulo azalaki kofanda na ndako ya bandeko na ye bandimi.

Toyebi bankombo ya basi na mibali mosusu oyo bayambaki Paulo na bandako na bango: Akula na Pilisikila, Gayo, Yasona, Ludia, Manasono, Filemona, mpe Filipo. (Misala 16:14, 15; 17:7; 18:2, 3; 21:8, 16; Baloma 16:23; Filemona 1, 22) Na Filipi, na Tesaloniki, mpe na Kolinti, bandako ya bandeko yango ezalaki bisika oyo Paulo azalaki kobongisa mosala na ye ya misionere. Na Kolinti, Tito Yusutu apesaki ntoma Paulo esika ya kofanda na ndako na ye mpo asala mosala na ye ya koteya.​—Misala 18:7.

Baninga ebele

Bato oyo bayebanaki na Paulo balobelami moto na moto na ndenge na ye mpamba te akutanaki na bango na bisika bikeseni. Na ndakisa, Malia, Pelesisi, Foibe, Tulufaina, mpe Tulufosa, bazalaki basi bandimi mpe apesaki bango longonya mpo basalaki misala mingi mpe ya makasi. (Baloma 16:1, 2, 6, 12) Ntoma Paulo abatisaki Kilisipi, Gayo, na bato ya ndako ya Setefana. Ntango ateyaki na engumba Atene, Dionusi na Damali bakómaki bandimi. (Misala 17:34; 1 Bakolinti 1:14, 16) Adoloniko na Yunia, “bato na lokumu kati na bantoma” oyo bakómaki bandimi liboso ya ntoma Paulo, abéngaki bango “bakangami na ngai esika moko na bolɔkɔ.” Ekoki kozala ete mbala moko bakɔtaki bolɔkɔ na Paulo esika moko. Paulo abéngi bango mibale, bakisa mpe Elodonia, Yasona, Luki mpe Sosipatalo, “bandeko” na ye na mosuni. (Baloma 16:7, 11, 21) Atako liloba ya Greke oyo esalelami awa ekoki kolimbola “bato ya mboka moko,” ndimbola na yango ya libosoliboso ezali “bandeko ya makila oyo babotami na eleko moko.”

Ebele ya baninga ya Paulo bazalaki kosala mibembo mpo na nsango malamu. Longola baoyo bayebani malamu, ezalaki lisusu na Akaiko, Folotunato, na Setefana, baoyo bautaki na Kolinti mpe bayaki na Efese kosolola na ntoma Paulo ndenge lisangá ezalaki kotambola na makambo ya elimo. Alatema na Tukiko bamibongisaki mpo na koya kokutana na Tito na esanga ya Kelete esika azalaki koteya, mpe Zena alingaki kokende elongo na Apolo.​—1 Bakolinti 16:17; Tito 3:12, 13.

Paulo alobeli na mokuse makambo malamu ya bamoko na bango. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete Epaineto azalaki “moto na liboso mpo na Klisto kati na Asia,” mpe Elasata azalaki “mobateli na mosolo” na Kolinti, Luka azalaki monganga, Ludia azalaki motɛkisi ya bilamba motane, mpe Teletio nde moto oyo Paulo asalelaki mpo na kokoma mokanda epai ya Baloma. (Baloma 16:5, 22, 23; Misala 16:14; Bakolose 4:14) Moto nyonso oyo alingi koyeba makambo mingi mpo na bato wana, makambo mikemike oyo ekotika ye mpenza na mposa.

Ntoma Paulo akomelaki bato mosusu mokanda oyo ayebisaki bango makambo oyo etalaki kaka bango; lelo oyo makambo yango ekomami na kati ya Biblia. Na ndakisa, na mokanda epai na Bakolose, Paulo alendisaki Alakipi na maloba oyo: “Okebaka na mosala oyo ondimi kati na Nkolo ete okokisa yango.” (Bakolose 4:17, NW) Ewodia na Suntuke bazalaki na matata oyo basengelaki kosilisa. Na nzela ya ndeko moko ya mboka Filipi oyo nkombo na ye etángami te kasi abéngaki ye “mozalani . . . na ngai na ekanganelo” ntoma Paulo alendisaki bango “bándimana kati na Nkolo.” (Bafilipi 4:2, 3) Yango ezali mpenza toli malamu mpo na biso nyonso.

Basungaki ye malamu ntango azalaki na bolɔkɔ

Paulo akɔtaki bolɔkɔ mbala mingi. (2 Bakolinti 11:23) Na ntango yango soki baklisto bazali na mboka yango, bazalaki kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosunga ye. Ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ na mbala ya liboso na Loma, bapesaki ye nzela afutelaka ndako mpe afandaki wana mbula mibale mpe baninga na ye bazalaki kokende kotala ye. (Misala 28:30) Na eleko yango, akomaki mikanda oyo atindaki na masangá ya Efese, Filipi, Kolose, mpe epai ya Filemona. Mikanda yango ezali koyebisa biso makambo mingi mpo na bato oyo bazalaki elongo na Paulo ntango azalaki mokangami.

Na ndakisa, moko ya mikanda yango emonisi biso ete Onesimo azalaki moombo ya Filemona. Ye akimaki nkolo na ye, mpe akutanaki na Paulo na Loma. Tukiko oyo azongaki na Onesimo epai ya nkolo na ye, ye mpe akutanaki na Paulo na Loma. (Bakolose 4:7-⁠9) Batángi mpe Epafalodito, oyo asalaki mobembo molai banda na Filipi mpo na kotika makabo oyo eutaki na lisangá na bango mpe kuna na Loma, maladi ekangaki ye. (Bafilipi 2:25; 4:18) Baoyo basalaki elongo na Paulo na Loma ezalaki: Alisitalaka, Malako, na Yesu oyo bazalaki kobénga Yusutu. Mpo na bato yango ntoma Paulo alobaki boye: “Bobele bato yango . . . basalani na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe. Basili mpe kobɔndisa ngai.” (Bakolose 4:10, 11) Longola bato nyonso oyo ya sembo, ezalaki lisusu na bato oyo bayebani malamu lokola Timote, Luka, na Dema, oyo na nsima, lokola alingaki makambo ya mokili, asundolaki Paulo.​—Bakolose 1:1; 4:14; 2 Timote 4:10; Filemona 24.

Emonani lokola ete moko te kati na bango azalaki moto ya Loma, kasi bazalaki kuna pembeni ya Paulo. Mbala mosusu, bamoko bakendaki kuna se mpo na kosunga ye ntango azalaki na bolɔkɔ. Na ntembe te ezalaki na baoyo bazalaki kosalela ye misala, azalaki kotinda bamosusu na bamboka mosika, mpe bamosusu ntoma Paulo azalaki koyebisa bango makambo oyo bazalaki kokoma na mikanda. Yango emonisi mpenza ete bato wana nyonso balingaki Paulo mingi, bazalaki sembo epai ya Paulo mpe na mosala ya Nzambe!

Soki totali maloba ya nsuka na mikanda mosusu ya Paulo, tokomona mpenza ete bandeko baklisto ya basi na mibali oyo bazalaki na ye bazalaki ebele koleka baoyo toyebi bankombo na bango. Na mikanda mosusu, akomaki ete: “Babulami nyonso bazali kotindela bino mbote” mpe “Nyonso bazali na ngai, bazali kotindela yo mbote.”​—2 Bakolinti 13:13; Tito 3:15; Bafilipi 4:22.

Ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale, oyo na boumeli na yango anyokwamaki mingi mpe wana etikalaki moke akufa lokola martiru, azalaki kokanisa mingi baninga na ye ya mosala. Azalaki ntango nyonso kotambwisa mpe kobongisa misala ya bamoko na bango. Atindaki Tito na Tukiko na bamboka mosusu, Keleseke akendaki na Galatia, Elasata atikalaki na Kolinti, Tolofimi atikalaki na Milete mpo azalaki na maladi, kasi Malako na Timote basengelaki koya epai na ye na Loma. Nzokande, Luka, azalaki elongo na Paulo, mpe ntango ntoma akomaki mokanda na ye ya mibale epai ya Timote, bandimi mosusu mingi, bakisa mpe Yubulu, Pude, Lini, na Kalaudia, bazalaki wana mpe batindaki bambote na bango. Na ntembe te, bazalaki kosala nyonso oyo ekokaki mpo na kosunga Paulo. Bobele na libaku yango, Paulo atindelaki Pilisika na Akula mpe libota ya Onesifolo mbote. Kasi, likambo ya mawa ezali ete na ntango wana ya mpasi mingi, Dema asundolaki ye, mpe Alesandala asalaki ye mabe mingi.​—2 Timote 4:9-⁠21.

“Tozali basalani na Nzambe elongo”

Paulo azalaki kozanga baninga te na mosala na ye ya kosakola. Earle Ellis, oyo azali molimboli ya makambo ya Biblia, alobi ete: “Tozali komona ete azalaki misionere oyo azalaki kosala elongo na baninga ebele. Mbala mingi te balobeli Paulo bongo azanga baninga.” Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, Paulo alongaki kotambwisa bato mingi mpe kobongisa mosala ya solosolo ya misionere. Asalaki elongo na bato oyo bazalaki baninga mpenza ya mosala, bamosusu basungaki ye mpo na mwa ntango, basusu bazalaki bato minene, mpe ebele bazalaki basali mpamba. Kasi, bazalaki se baninga ya mosala te. Ata soki basalaki to bafandaki mingi na Paulo to te, tozali komona ete bazalaki na bolingo ya boklisto mpe bazalaki baninga ya solosolo.

Ntoma Paulo azalaki na ezaleli oyo babéngi “koyeba kofanda na baninga.” Asalaki mosala makasi mpo bato ya bikólo mosusu báyoka nsango malamu, kasi alukaki kosala yango ye moko te. Asalaki na boyokani na ebongiseli ya boklisto mpe atosaki bibongiseli na yango. Ntoma Paulo amikumisaki te mpo na matomba oyo mosala na ye ebimisaki, kasi na komikitisa nyonso andimaki ete azali moombo mpe lokumu nyonso esengeli kopesama na Nzambe moto oyo akolisaka.​—1 Bakolinti 3:5-⁠7; 9:16; Bafilipi 1:1.

Na ntango oyo Paulo azalaki na bomoi, makambo ezalaki ndenge ezali lelo te, atako bongo, moklisto moko te lelo oyo asengeli kokanisa ete akoki to abongi kosala makambo na ndenge ye moko alingi. Kasi, tosengeli ntango nyonso kosala elongo na ebongiseli ya Nzambe, na lisangá na biso, mpe na bandeko na biso bandimi. Tozali na mposa ya lisungi mpe bilendiseli na bango na ntango ya esengo mpe ya mpasi. Tozali na libaku malamu ya kozala na kati ya ‘libota ya bandeko na mokili mobimba’ (1 Petelo 5:9) Soki tozali kosala na bosembo, na bolingo mpe na boyokani elongo na bandeko na biso nyonso, biso mpe tokoki koloba ndenge Paulo alobaki ete “tozali basalani na Nzambe elongo.”​—1 Bakolinti 3:9.

Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 31]

APOLO

ALISITALAKA

BALANABA

LUDIA

ONESIFOLO

TELETIO

TUKIKO

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto