Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/8 nk. 26-31
  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nabongisi mikano ya bomoi na ngai
  • Tomibongisi malamu mpo na mosala ya mobongisi-nzela
  • Tomipesi mpo na mosala na mboka mopaya
  • Na Washington mpe na Gileadi
  • Mosala na biro monene
  • Nakómi kosala mikolo nyonso na Gileadi
  • Kosala elongo na banakelasi
  • Elikya mpo na mikolo ekoya
  • Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bamisionere mingi mpo na kobuka mbuma na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Eteyelo ya Gileadi​—Mosala na yango na mokili mobimba
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Bauti kolónga lokola bayekoli, bakei kolónga lokola Bamisionere
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/8 nk. 26-31

Nandimaki na motema mobimba ete Yehova atambwisa ngai

LISOLO YA ULYSSES GLASS

Ezalaki libaku moko monene. Banakelasi 127 mpamba bazwaki diplome. Kasi bayangani bazalaki 126 387. Bautaki na bikólo mingi. Bango nyonso bazalaki na esengo. Ezalaki mokolo ya 19 Yuli 1953, ntango banakelasi ya mbala ya 21 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, bazwaki badiplome na bango na Yankee Stadium, na engumba New York. Mpo na nini yango ezalaki likambo monene na bomoi na ngai? Tiká nayebisa bino mwa makambo mosusu oyo elekaki liboso.

NABOTAMÁ mokolo ya 17 Febwali 1912, na Vincennes, na etúká ya Indiana, na États-Unis, mbula soki mibale liboso Bokonzi ya Masiya ebanda koyangela ndenge elobelami na Emoniseli 12:1-5. Mbula moko liboso bábota ngai, baboti na ngai babandaki koyekola Biblia na lisalisi ya babuku Étude des Écritures. Mokolo nyonso ya lomingo na ntɔngɔ, tata azalaki kotánga moko na babuku yango mpe libota mobimba tozalaki kolanda mpe tozalaki kolobela makambo oyo tozalaki koyoka.

Mama azalaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola mpo na kobongisa makanisi ya bana na ye. Azalaki mpenza mwasi malamu, ya boboto, mpe azalaki na mposa ya kosalisa. Tozalaki bana minei; kasi mama, na bolingo na ye, azalaki kosangisa bana mosusu ya kartye. Azalaki kolekisa ntango elongo na biso. Azalaki kosepela kobɛtela biso masolo ya Biblia mpe koyemba elongo na biso.

Azalaki lisusu kobéngisa, na ndako, bandeko ndenge na ndenge oyo bazalaki kosala mosala ya ntango nyonso. Bazalaki kofanda mokolo moko to mibale, mpe mbala mingi bazalaki kosala makita mpe masukulu na ndako na biso. Mingimingi tozalaki kosepela na baoyo bazalaki kosalela bandakisa na masukulu na bango mpe kobɛtela biso masolo. Mokolo moko na 1919, soki mbula moko banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, ndeko oyo ayaki kotala biso alobelaki mingi makambo oyo etalelaki mpenza biso bilenge. Alobelaki komipesa mpe asalisaki biso tóyeba ndenge yango ezalaki kotalela bomoi na biso. Na mpokwa ya mokolo yango ntango nakendaki kolala, nabondelaki Tata na ngai ya likoló mpe nayebisaki ye ete nalingi kosalela ye libela na libela.

Kasi, nsima ya 1922 makambo mosusu ya bomoi eyaki kozongisa mokano yango nsima. Mbala na mbala tozalaki kolongwa esika moko mpo na kokende kofanda na esika mosusu mpe tozalaki lisusu kosangana na lisangá ya basambeli ya Yehova te. Tata azalaki kofanda mingi na ndako te lokola azalaki kosala na kompanyi ya engbunduka. Boyekoli na biso ya Biblia ezalaki kosalema lisusu pɔsɔ na pɔsɔ te. Nakɔtaki kelasi na mokano ya kokóma graphiste mpe nazalaki kokana kokende na iniversite moko ya lokumu.

Nabongisi mikano ya bomoi na ngai

Na katikati ya bambula ya 1930, etumba mosusu ya mokili mobimba elingaki kobanda. Tozalaki kofanda na Cleveland, na etúká ya Ohio, ntango Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na biso. Tobandaki lisusu kokanisa malamu makambo oyo toyekolaki ntango tozalaki bana mike. Russell, yaya na ngai ya mobali, ye mpenza amipesaki mingi, mpe azwaki batisimo moto ya liboso. Ngai nakesanaki na ye mwa moke, kasi na mokolo ya 3 Febwali 1936, nazwaki mpe batisimo. Nakómaki sikoyo kokanisa malamu mpo na nini namipesi na Nzambe, mpe nazalaki komitika ete Yehova atambwisa ngai. Kaka na mbula yango, bandeko na ngai mibale ya basi, Kathryn mpe Gertrude, bazwaki batisimo. Biso nyonso tobandaki mosala ya mobongisi-nzela.

Kasi, yango elingi koloba te ete tozalaki kokanisa makambo mosusu te. Nafungolaki matoi malamumalamu ntango mwasi ya yaya na ngai abɛtelaki ngai lisolo ya Ann, elenge mwasi moko kitoko oyo azalaki na “molende” banda ayokaki solo mpe asengelaki koya na makita na ndako na biso. Ntango yango, Ann azalaki sekretere na biro moko ya baavoka, mpe mbula moko esilaki te azwaki batisimo. Na ntango wana, nazalaki naino na mokano ya kobala te, kasi emonanaki ete Ann amipesaki mobimba mpo na solo. Alingaki asalela Yehova mingi koleka. Azalaki te moto oyo alobaka ete: “Nakokoka kosala yango?” Kasi, ye azalaki kotuna ete: “Ndenge nini nakoki kosala yango malamu koleka?” Mpe azalaki kosala makasi mpo na kokokisa yango. Elimo wana ya kokende liboso esepelisaki ngai. Longola yango, azalaki mpenza kitoko, mpe azali kaka kitoko. Nabalaki ye, mpe mosika te ye mpe akómaki mobongisi-nzela lokola ngai.

Tomibongisi malamu mpo na mosala ya mobongisi-nzela

Na mosala ya mobongisi-nzela toyekolaki sɛkɛlɛ ya kozala na esengo ntango tozali kokelela mpe ntango tozali na biloko mingi. (Bafilipi 4:11-13) Mokolo moko, mpokwa ebandaki kopusana, mpe tozalaki na eloko ya kolya te. Tozalaki kaka na santime mitano. Tokendaki na butike ya moto moko, mpe natunaki ete, “Okoki kokatela biso boudin ya santime mitano?” Atalaki biso mpe akatelaki biso biteni minei. Nandimi ete boudin oyo apesaki biso ezalaki na ntalo koleka santime mitano. Mpe yango nde tolyaki.

Mbala mingi tozalaki kokutana na botɛmɛli na mosala ya kosakola. Na engumba moko pene na Syracuse, na etúká ya New York, tozalaki kokabola nkasa ya libyangi na balabala mpe tolataki bitanda oyo bakomaki motó ya likambo ya lisukulu mpo na kobéngisa bato na likita yango. Bingambe mibale basimbaki ngai mpe babendaki ngai na makasi. Moko azalaki mokonzi ya bapolisi, kasi alataki sokoto te, mpe ntango nasɛngaki ye alakisa ngai kalati na ye aboyaki. Mosika te, Ndeko Grant Suiter oyo autaki na Betele ya Brooklyn ayaki mpe alobaki tokokende na biro ya bapolisi mpo na kosilisa likambo yango. Na nsima asololaki na bandeko ya Brooklyn na telefone, mpe basɛngaki ngai na mwasi na ngai tóbima lisusu kaka na mokolo yango mpe tólata bitanda mpe tóbanda kokabola bankasa mpo na kobéngisa bato mpo bákanga biso, bongo tósamba. Se ndenge tolikyaki, bakangaki biso. Kasi, ntango toyebisaki bapolisi ete tokofunda bango na tribinale mpo bakangi biso mpo na ntina moko te, batikaki biso.

Mokolo elandaki, sango moko atindaki ebele ya bilenge ya mobulu na esika oyo tozalaki kosala liyangani na biso, mpe bapolisi bazalaki komonana te. Bilenge yango babandaki kobamba nzete ya baseball na mabaya oyo batandaki na nse, bakweisaki bato mosusu na bisika oyo bafandaki, mpe bamataki na estrade, basimbaki drapo ya États-Unis mpe bazalaki koganga ete, “Bópesa yango losako! Bópesa yango losako!” Na nsima, babandaki koyemba loyembo moko babéngi “Beer Barrel Polka.” Bakataki likita na biso. Tozalaki komona na miso makambo Yesu alingaki koloba ntango ayebisaki ete: “Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.”—Yoane 15:19.

Lisukulu ya bato nyonso yango ezalaki mpenza nde diskɛ ya fɔnɔ ya lisukulu oyo Ndeko Joseph Rutherford asalaki; ye azalaki prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana. Ngai na Ann tolekisaki lisusu mwa mikolo na engumba yango mpe tozalaki kokende kotala bato na bandako na bango mpo na kopesa bango libaku báyoka lisukulu. Mwa bato moke bandimaki koyoka.

Tomipesi mpo na mosala na mboka mopaya

Na nsima, tozwaki mabaku ya kosala mosala ya Nzambe na bisika mosusu. Ndeko na ngai Russell na mwasi na ye Dorothy, babéngisaki bango na kelasi ya mbala ya liboso ya Gileadi, na 1943, mpe na nsima batindaki bango bamisionere na ekólo Cuba. Ndeko na ngai ya mwasi Kathryn akɔtaki na kelasi ya mbala ya minei ya Gileadi. Batindaki ye mpe na Cuba. Na nsima batindaki ye na République dominicaine mpe na nsuka na ekólo Porto Rico. Bongo ngai na Ann?

Ntango toyokaki nsango ya Eteyelo ya Gileadi mpe ete la Société alingi kotinda bamisionere na bikólo mosusu, tomonaki ete tokosepela komipesa mpo na mosala na mboka mopaya. Na ebandeli, tolingaki kokende na ndenge na biso moko, ata na ekólo Mexique. Kasi, na nsima tomonaki ete ekozala malamu tózela la Société atinda biso nsima ya kokɔta na Gileadi. Tomonaki ete yango ezalaki ebongiseli oyo Yehova azalaki kosalela.

Babéngaki biso mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya minei na Eteyelo ya Gileadi. Kasi, mwa moke liboso kelasi ebanda, Nathan Knorr, prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana, ayaki koyeba malamu ete Ann azalaki kokoka te kosala misala mosusu mpo na bukabuka oyo abɛlaki na bomwana. Asololaki na ngai likambo yango mpe alobaki na ngai ete ekozala malamu te kotinda biso kosala na mboka mopaya.

Soki mbula mibale na nsima, ntango nazalaki kobongisa liyangani, Ndeko Knorr akutanaki na ngai lisusu mpe atunaki ngai soki tozali kaka kosepela kokɔta kelasi ya Gileadi. Ayebisaki ngai ete ata soki tokɔti kelasi tokokende kosala na mboka mopaya te; azalaki kokanisa likambo mosusu mpo na biso. Na yango, mokolo ya 26 Febwali 1946, ntango bakomaki nkombo ya bato oyo bakokɔta kelasi ya mbala ya libwa, bakomaki mpe nkombo na biso.

Mikolo oyo tolekisaki na Gileadi tokobosana yango te. Bateyaki biso makambo ya elimo mingi. Tosalaki boninga oyo ekoumela bomoi na biso mobimba. Kasi, mpo na ngai, makambo ya Gileadi esukaki kaka na kelasi oyo tokɔtaki te.

Na Washington mpe na Gileadi

Eteyelo ya Gileadi eumelaki mpenza naino mingi te. Guvernema ya États-Unis eyebaki malamumalamu mikano ya eteyelo yango te; na yango, bazalaki kotuna mituna mingi. La Société alingaki kozala na moto moko na Washington. Mwa basanza nsima ya kozwa diplome na Gileadi, batindaki biso na Washington. Mosala na ngai ezalaki ya kozwa baviza mpo na bandeko ya mikili mosusu oyo bazalaki kobénga bango mpo na kokɔta na Gileadi mpe kozwa mikanda ya Leta mpo na banakelasi oyo bakozwa diplome bákende kosala mosala ya misionere na mikili mosusu. Bakonzi mosusu bazalaki na boboto mpe bazalaki kosunga biso. Bamosusu bazalaki kolinga Batatoli ata moke te. Mwa ndambo ya bato ya politiki bazalaki komona ete tozali na boyokani na bato oyo bango bazali kotalela lokola bato mabe.

Moto moko, oyo nakendaki na biro na ye, alobaki mabe mpo na biso mpo tokumisaka drapo te mpe tokendaka na etumba te. Ntango asilisaki koganga bongo, nalobaki ete: “Nalingi oyeba, mpe oyebi yango, ete na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakɔtaka na bitumba te. Tokɔtaka na makambo ya mokili te. Tokɔtaka na etumba na bango te, na politiki na bango te. Tokɔtaka na makambo yango ata moke te. Tosilá kolonga mikakatano oyo bino bozali kobunda na yango; tozali na bomoko na ebongiseli na biso. . . . Sikoyo, olingi tósala nini? Olingi tóbanda lisusu kosala makambo lokola bino mpe tótika ndenge tozali kosala?” Nsima alobaki lisusu eloko moko te.

Toponaki mikolo mibale mpo na kokende na babiro ya bakonzi ya Leta. Longola yango, tozalaki babongisi-nzela monene. Na eleko wana, mobongisi-nzela monene azalaki kolekisa ngonga 175 na mosala ya kosakola sanza na sanza (na nsima ekitaki na ngonga 140), na yango, mbala mingi tozalaki koteya tii na butu. Tozalaki kosepela mingi. Tozalaki koyekola Biblia na mabota mobimba mpe yango ezalaki malamu mingi. Bato yango bakolaki malamu na elimo. Ngai na Ann toyokanaki tóbota bana te, kasi na elimo, toboti bana, tozwi bankɔkɔ, na bankɔkɔ ya bankɔkɔ na biso. Bapesaka biso esengo mingi na motema!

Na 1948, nazwaki mokumba mosusu. Ndeko Knorr ayebisaki ngai ete Ndeko Schroeder, sekretere mpe molakisi na Eteyelo ya Gileadi, akozwa mokumba mosusu ya ntina mingi, yango wana asɛngaki ngai nakendaka kotángisa na Gileadi soki esengeli. Mokolo ya 18 Desɛmbɛ, ngai na Ann tozongaki lisusu na Gileadi, na South Lansing, na etúká ya New York. Nazalaki motema likoló. Na ebandeli, tozalaki kolekisa kaka mwa bapɔsɔ na Gileadi, mpe na nsima tozalaki kozonga na Washington. Kasi, na nsima, tokómaki koumela mingi na Gileadi koleka Washington.

Ezalaki na eleko yango, ndenge nalobaki na ebandeli, nde banakelasi ya mbala ya 21 ya Gileadi bazwaki badiplome na Yankee Stadium, na New York. Lokola nazalaki mpe molakisi na bango, nazwaki libaku ya kosala mwa mikumba na likita yango.

Mosala na biro monene

Mokolo ya 12 Febwali 1955, tobandaki mosala mosusu. Tokómaki kosala na Betele na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Kasi, yango esɛngaki makambo nini? Libosoliboso, kondima mosala nyonso oyo bapesi biso, kopesa mabɔkɔ na misala oyo esɛngaka kosala na bato mosusu. Ya solo, tosalaki yango liboso, kasi mbala oyo tosangani na bato ebele, elingi koloba libota ya Betele na biro monene. Tondimaki mosala yango ya sika na esengo mpe totalelaki yango lokola elembo ete Yehova azali kotambwisa biso.

Mosala na ngai ezalaki mingi kotalela makambo ya bapanzi-nsango. Bapanzi-nsango bakomaki makambo ya mabe mpenza mpo na Batatoli ya Yehova. Bazalaki kokoma masolo yango mpo na kobenda likebi ya bato mpe bazalaki kozwa makambo yango epai ya bato oyo bazalaki na makanisi mabe mpo na biso. Tosalaki makasi mpo na kosilisa likambo yango.

Ndeko Knorr azalaki na mposa ete biso nyonso tózala na mosala mingi, yango bapesaki biso mpe mikumba mosusu. Misala ya graphiste oyo nayekolaki esalisaki ngai na kokokisa mikumba mosusu. Misala mosusu etalaki radio WBBR ya la Société. Mosusu mpe etalaki kobongisa bafilme oyo la Société azalaki kobimisa. Ya solo, lisolo ya ebongiseli ya Teokrasi ezalaki moko na mateya ya Gileadi, kasi sikoyo bibongiseli mingi bikamatamaki mpo basaleli ya Yehova mingi mpe bato nyonso báyeba malamu lisolo yango ya ebongiseli ya Teokrasi na mikolo na biso. Mateya mosusu ya Gileadi etalelaki kolakisa ndenge ya koloba liboso ya bato, mpe tosengelaki kosala mosala mpo na kopesa bandeko na kati ya masangá mateya oyo esengeli mpo na koloba liboso ya bato. Na yango, misala ya kosala ezalaki mingi.

Nakómi kosala mikolo nyonso na Gileadi

Na 1961, lokola tozalaki kobongisa kelasi mpo na bandeko oyo, na mikolo ya nsima, bakoki kosala lokola bakɛngɛli-batamboli to na filiale, Eteyelo ya Gileadi ekómaki na Brooklyn, na biro monene ya la Société Watch Tower. Nakómaki lisusu kotángisa. Na mbala oyo lokola molakisi-mosungi te kasi lokola molakisi mpenza oyo azali koteya mikolo nyonso. Libaku monene mpenza! Nandimi solo ete Eteyelo ya Gileadi ezali likabo ya Yehova, likabo oyo epesi litomba na ebongiseli na ye mobimba.

Na Brooklyn, banakelasi ya Gileadi bazwaki mabaku malamu mingi oyo banakelasi ya liboso bazwaki te. Balakisi oyo bazalaki bapaya bazalaki koya mingi mpo na koteya banakelasi. Banakelasi bazalaki kokutana na bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi na bandeko ya libota ya Betele ya biro monene. Bazalaki lisusu na likoki ya koyekola ndenge misala esalemaka na biro ya la Société, misala ya Betele, mpe na misala ndenge na ndenge ya imprimeri.

Lokola bambula ezalaki koleka, motángo ya banakelasi ezalaki mpe kobongwana, ndenge moko mpe mpo na balakisi. Kelasi ezalaki kosalema kaka na esika moko te. Sikoyo ezali na esika moko kitoko na Patterson, na etúká ya New York.

Kosala elongo na banakelasi

Nazalaki na esengo monene ya kotángisa banakelasi yango! Bilenge yango basepeli kolanda makambo ya mokili oyo te. Bazali kotika mabota na bango, baninga na bango, bandako na bango, mpe bato oyo balobaka monɔkɔ moko na bango. Esika bakofanda, biloko bakolya, nyonso ekokesena na oyo bamesenaki na yango. Bayebi kutu te mboka nini bakotinda bango, kasi mokano na bango ezali ete bázala bamisionere. Ntina ya kopusa bato ya boye na makasi ezali te.

Ntango nazalaki kokɔta na kelasi, mokano na ngai ezalaki ya kosala ete mwanakelasi mokomoko amiyoka malamu. Moto ayekolaka malamu te soki azali komiyoka malamu te to soki likambo moko ezali kotungisa ye. Ya solo, nazalaki molakisi, kasi nayebaki mpe ndenge bayekoli bazalaka. Ngai mpe nazaláká moyekoli. Ɛɛ, na Gileadi banakelasi bazalaki kotánga mingi mpe bazalaki koyekola makambo mingi, kasi nalingaki lisusu ete básepela na ntango oyo bazali na Gileadi.

Nayebaki ete ntango bazalaki kokende na bisika oyo batindaki bango, ezali na makambo oyo basengelaki na yango mpo na kokokisa mosala na bango. Basengelaki kozala na kondima makasi. Basengelaki kozala na komikitisa mingi. Basengelaki koyekola kofanda na bato mosusu, kondima makambo oyo ekómeli bango, kolimbisa na motema moko. Basengelaki kolona ntango nyonso mbuma ya elimo. Basengelaki lisusu kolinga bato mpe kolinga mosala oyo batindaki bango básala. Yango ezali makambo oyo nazalaki koyebisa banakelasi ntango nyonso ntango bazalaki na Gileadi.

Nayebi te soki natángisá banakelasi boni. Kasi nayebi ndenge motema na ngai eyokaka mpo na bango. Nsima ya kolekisa sanza mitano elongo na bango na kelasi, nakómaki kolinga bango mingi. Na yango, mokolo ya kopesa badiplome, ntango nazali kotala bango bazali komata na ebaelo mpo na kozwa badiplome na bango, nayebaki ete balandaki mateya na bango malamu tii na nsuka mpe mosika te bakokende. Ezalaki lokola bato ya libota na ngai bazali kokende. Soki natali ndenge bilenge yango bazalaki komipesa mpe mosala oyo bandimaki bákende kosala, motema na ngai ezalaki kaka kolinga bango!

Nsima ya bambula, ntango bazongaka awa, nayokaka bango bazali kolobela esengo oyo bazali koyoka na mosala na bango, mpe nayebi ete bazali kaka na mosala na bango, kosalela makambo oyo bayekolaki. Yango esalaka ngai ndenge nini? Ya solo, epesaka ngai esengo mpenza.

Elikya mpo na mikolo ekoya

Sikoyo, miso na ngai emonaka lisusu malamu te, mpe namoni mpenza mokakatano oyo yango epesaka. Nakokoka lisusu kotángisa na Gileadi te. Na ebandeli, ezalaki mpasi, kasi na bomoi na ngai mobimba nayekolaki kondima makambo oyo ekómeli ngai mpe kobunda na yango. Mbala mingi nakanisaka ntoma Paulo na “monzube kati na nzoto” na ye. Mbala misato Paulo abondelaki mpo mpasi yango esila, kasi Nkolo alobaki na ye ete: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo, zambi nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.” (2 Bakolinti 12:7-10) Paulo afandaki na yango. Soki ye asalaki bongo, ngai mpe nasengeli komeka. Atako natángisaka lisusu te, nazali na esengo mpo biro na ngai ezali pene na Eteyelo mpe namonaka banakelasi mikolo nyonso. Na bantango mosusu nasololaka na bango, mpe nasepelaka komona elimo malamu oyo bazalaka na yango.

Makambo oyo tokozwa na mikolo ekoya ezali malamu mingi. Tozali komibongisa mpo na yango kobanda sikoyo. Eteyelo ya Gileadi esali mosala monene na likambo yango. Nsima ya bolɔzi monene, ntango barulo oyo Emoniseli 20:12 elobeli ekofungwama, bakoteya bato banzela ya Yehova na boumeli ya mbula nkóto. (Yisaya 11:9) Kasi ata yango ekozala nsuka na mateya te. Ekozala kaka ebandeli. Seko na seko, tokozala na makambo mingi ya koyekola mpo na Yehova mpe tokozala na makambo mingi ya kosala ntango tokobanda kokanga ntina mokemoke ya mikano na ye. Nazali na elikya makasi ete Yehova akokokisa makambo minene oyo alaki, mpe nalingi kozala wana mpo na kondima ete Yehova atambwisa biso na ntango wana.

[Elilingi na lokasa 26]

Banakelasi ya Gileadi bazali kozwa badiplome na Yankee Stadium na 1953

[Elilingi na lokasa 26]

Gertrude, ngai, Kathryn, na Russell

[Elilingi na lokasa 26]

Tozali kobongisa liyangani na N. H. Knorr (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe M. G. Henschel

[Elilingi na lokasa 26]

Na radio WBBR

[Elilingi na lokasa 29]

Na kelasi ya Gileadi

[Elilingi na lokasa 31]

Elongo na Ann, eleki mpenza mbula mingi te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto