Yehova azali Nzambe na ngai ya boboto
LISOLO YA JOHN ANDRONIKOS
Ezalaki na 1956. Kaka mikolo libwa nsima ya libala na ngai, nakendaki kosamba na tribinale moko na engumba Comotini, na nɔrdi ya Grèce. Nazalaki na elikya ete bakolongola etumbu ya bolɔkɔ sanza 12 oyo bakatelaki ngai mpo nazalaki koteya Bokonzi ya Nzambe. Tribinale wana ekatelaki ngai sanza motoba ya bolɔkɔ, mpe elikya na ngai ezindaki na mai. Wana ezalaki nde ebandeli ya kosamba na kosamba oyo elandaki na nsima. Kasi, na nyonso wana, Yehova azalaki Nzambe na ngai ya boboto.
NTANGO nabotamaki na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1931, tozalaki kofanda na engumba Kaválla, oyo ezalaki kala Néapolis ya Macédoine esika oyo ntoma Paulo alekaki mpe na mobembo na ye ya mibale ya misionere. Mama na ngai akómaki Motatoli ya Yehova ntango nazalaki na mbula mitano, mpe atako ayebaki kotánga mpe kokoma te, asalaki nyonso mpo na koteya ngai ete nasengeli kolinga mpe kobanga Nzambe. Tata na ngai azalaki mondimi ya makila mpenza na Lingomba ya Ortodokse ya Grèce mpe akangamaki makasi na makambo na yango. Azalaki kosepela na mateya ya solo ya Biblia te mpe azalaki kotɛmɛla mama, mbala mingi azalaki kobɛta ye.
Na yango, nakolaki na libota moko oyo ekabwani, epai Tata azalaki kobɛta Mama mpe kofinga ye mpe kutu asundolaki biso. Banda bomwana, Mama azalaki komema ngai na leki na ngai ya mwasi na makita ya Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango nakómaki na mbula 15, nalandaki bamposa ya bolenge mpe elimo ya lipanda, natikaki kosangana na Batatoli ya Yehova. Atako bongo, mama azalaki mondimi ya sembo, asalaki makasi mpo na kosunga ngai, mpe mbala mingi azalaki kosala yango na mai na miso.
Lokola tozalaki babola mpe lokola nazalaki na etamboli ya mabe, nabɛlaki makasi mpe nakɔtaki ndako sanza misato. Ntango yango nde ndeko moko ya boboto mpenza, oyo ateyaki mama mateya ya Biblia, asosolaki ete nazali mpenza na bolingo ya solo mpo na Nzambe. Amonaki ete bakoki kosalisa ngai nazongela makambo ya elimo. Bato mosusu balobaki na ye ete: “Ozali kolekisa ntango na yo mpamba mpo na kosalisa John, akosepela lisusu na makambo ya elimo te.” Kasi, motema molai mpe kolendendela oyo ndeko yango amonisaki ebotaki mbuma. Na mokolo ya 15 Augusto 1952, wana nazalaki na mbula 21, nazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete namipesi na Yehova.
Nauti kobala mpe mbala moko nakɔti bolɔkɔ
Nsima ya mbula misato, nayebanaki na Martha, ndeko mwasi moko oyo alingaki makambo ya elimo mingi mpe azalaki na bizaleli malamu; mpe mosika te tokómaki bafianse. Mokolo moko nakamwaki ntango Martha alobaki na ngai ete: “Lelo nakokende koteya ndako na ndako. Olingi tókende biso mibale?” Kino ntango yango nasanganaki naino na mosala ya ndako na ndako te, mbala mingi nazalaki koteya soki libaku emonani. Na ntango yango mosala na biso ya kosakola na Grèce epekisamaki, mpe tozalaki koteya na mayele. Bazalaki kokanga bandeko mingi, mingi bazalaki kosamba, mpe mingi bazalaki kokɔta bolɔkɔ. Kasi, nakokaki koboya te likambo oyo fianse na ngai asɛngaki ngai!
Na 1956, nabalaki Martha. Ezalaki ntango yango nde, nsima ya mikolo libwa ya libala na biso, tribinale ya Comotini ekatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ ya sanza motoba. Likambo yango ezongisaki na makanisi na ngai motuna moko oyo natunaká ndeko mwasi moko, moninga ya mama ete: “Ndenge nini nakoki komonisa ete nazali Motatoli ya Yehova ya solo? Nazwaki naino libaku te ya komonisa ete nazali mpenza na kondima.” Ntango ndeko mwasi yango ayaki kotala ngai na bolɔkɔ, akundwelaki ngai motuna yango mpe alobaki ete: “Sikoyo okoki komonisa Yehova ete olingaka ye mingi. Yango nde mokumba na yo.”
Ntango nayokaki ete avoka na ngai azali koluka kofuta mbongo mpo bábimisa ngai na bolɔkɔ, nayebisaki ye ete malamu nasala bolɔkɔ na ngai tii na nsuka. Nazalaki na esengo na nsuka ya sanza motoba ya bolɔkɔ ya komona baninga na ngai mibale ya bolɔkɔ bandimi mateya ya solo! Na bambula oyo elandaki, nasambaki makambo mingi na tribinale mpo na nsango malamu.
Toyokaka mawa te mpo na makambo oyo toponaki
Na 1959, mbula mibale nsima ya kobima na bolɔkɔ, nazalaki mosaleli ya lisangá, ndenge oyo bazalaki kobenga mokɛngɛli-mokambi ntango yango mpe babengaki ngai na Eteyelo ya Mosala ya Bokonzi, kelasi ya bankulutu ya lisangá. Nzokande, kaka na ntango yango, bazwaki ngai na mosala na lopitalo moko ya Leta; na mosala oyo balingaki kofuta ngai mbongo mingi mpo na ngai na libota na ngai. Nakopona nini? Na boumeli ya sanza misato, nazalaki na lopitalo yango lokola mosali ya mwa ntango, mpe mokambi azalaki kosepela na mosala na ngai, kasi banda nazwaki mokanda ete babengi ngai na eteyelo, aboyaki kopesa ngai ata konje oyo bakofuta ngai te. Nsima ya kokanisa malamu makambo mibale yango, naponaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe naboyaki mosala wana.—Matai 6:33.
Na eleko yango, mokɛngɛli ya etúká na mokɛngɛli ya zongazonga bayaki kotala lisangá na biso. Tozalaki kosala makita na kobombama na bandako ya bandeko mpamba te bakonzi ya Lingomba ya Ortodokse na bakonzi ya Leta bazalaki kotɛmɛla biso makasi. Nsima ya likita moko, mokɛngɛli ya etúká atunaki ngai soki nakanisaka kosala mosala ya ntango nyonso. Likanisi na ye esimbaki motema na ngai mpamba te nazalaki kokanisa yango banda nazwaki batisimo. Nalobaki ete: “Nalingi yango mingi.” Nzokande, nakómaki na mwana moko ya mwasi. Ndeko yango alobaki na ngai ete: “Tyá elikya na Yehova, akosalisa yo okokisa mokano na yo.” Na bongo, kozanga kosundola mikumba na biso ya libota, ngai na mwasi na ngai tobongisaki makambo na biso, na boye ete na Desɛmbɛ 1960, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela monene na ɛsti ya Macédoine. Tozalaki babongisi-nzela monene kaka mitano na ekólo mobimba.
Nsima ya kosala mbula moko lokola mobongisi-nzela monene, biro ya filiale na Athènes esɛngaki ngai nasala lokola mokɛngɛli-motamboli. Ntango nazongaki na ndako nsima ya kolanda mateya ya sanza mobimba mpo na mosala yango, mpe wana nazalaki koyebisa Martha ndenge makambo elekaki, mokambi ya kompanyi moko monene ya manganèse ayaki na ndako mpe asɛngaki ngai nakóma motambwisi ya misala na departema ya kopɛtola manganèse, asɛngaki ngai nandima kontra ya mbula mitano, nakozala na ndako ya kitoko, mpe motuka. Atikelaki ngai mikolo mibale mpo na kokanisa. Ya mbala oyo lisusu, nakakatanaki te, nabondelaki Yehova ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Mwasi na ngai andimaki likanisi na ngai. Totyaki elikya na Nzambe mpe tobandaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli, mpe Yehova na boboto na ye atikaki biso te.
Nazali kosala na kati ya mikakatano
Atako tozalaki na mikakatano ya mbongo, tozalaki se kokoba na mosala mpe Yehova azalaki kopesa biso oyo tosengelaki na yango. Na ebandeli, nazalaki kotambola na mwa tukutuku mpo na kotala masangá, nazalaki kosala kino kilomɛtɛlɛ 500. Mbala mingi nazalaki na mikakatano, mpe nazwaki mwa makama. Mokolo moko, na eleko ya mpiɔ, nautaki na lisangá moko mpe nazalaki kozonga na ndako, nazalaki kokatisa mwa mai moko mpe tukutuku ekufi, napolaki tii na mabɔlɔngɔ. Na nsima pine ya tukutuku esilaki mopɛpɛ. Moto moko azalaki koleka asalisaki ngai na pɔmpi natya mopɛpɛ, mpe bongo nakómaki na mboka ya penepene epai nabongisaki pine yango. Nakómaki na ndako na ngonga ya misato ya ntɔngɔ, nazalaki koyoka malili makasi mpe nalɛmbaki.
Mokolo mosusu, nazalaki kotala masangá, tukutuku ebalukaki na mosɛlu mpe ekwelaki ngai na mabɔlɔngɔ. Patalo na ngai etɔbɔkaki mpe epolaki na makila. Lokola mpe nazalaki na patalo mosusu te, na mpokwa yango nasalaki lisukulu na patalo ya ndeko moko; patalo yango elekaki ngai na monene. Atako bongo, mokakatano moko te ekokaki kolɛmbisa mposa na ngai ya kosalela Yehova mpe bandeko na ngai ya bolingo.
Nazwaki likama mosusu, nazokaki mpota monene, nabukanaki lobɔkɔ mpe nabukanaki mino. Na ntango yango nde leki na ngai ya mwasi oyo azalaki kofanda na États-Unis ayaki kotala ngai. Ye azalaki Motatoli te. Asungaki ngai mpenza mpo apesaki ngai mbongo nasomba motuka! Ntango bandeko na Betele ya Athènes bayokaki ete nazwi likama, batindelaki ngai mokanda ya kolendisa, na kati na yango bakomaki vɛrsɛ ya Baloma 8:28 (NW), oyo elobaka ete: “Nzambe asalaka ete misala na ye nyonso esala na bomoko mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe.” Likambo yango ekokisamaki mbala na mbala na bomoi na ngai!
Likambo moko ya kosepelisa mpenza
Na 1963, nazalaki kosakola na mobongisi-nzela monene moko na mboka moko moke oyo bato bazalaki kosepela na nsango malamu te. Toyokanaki ete tókabwana, moto na moto azwa ngámbo moko ya balabala. Na ndako moko, ntango kaka nabɛtaki porte, mwasi moko afungolaki mbala moko, abendaki ngai na kati ya ndako mpe akangaki ndako na fungola. Nakamwaki, mpe namitunaki likambo nini elingi koleka. Mosika te, abengaki lisusu mobongisi-nzela monene oyo nazalaki na ye mpe akɔtisaki ye nokinoki na ndako. Na nsima, alobaki na biso ete: “Bófanda nyɛɛ! Bóningana te!” Mwa moke na nsima, toyokaki mingongo ya bato bazali kokanela biso na libándá, bazalaki koluka biso. Ntango makɛlɛlɛ esilaki, mwasi yango alobaki na biso ete: “Nasali boye mpo na kobatela bino. Nandimaka bino mpo namonaka ete bozali baklisto ya solo.” Totɔndaki ye mingi mpe tokendaki, totikelaki ye mikanda mingi.
Nsima ya mbula zomi na minei, nazalaki na liyangani ya etúká na Grèce, mwasi moko ayaki pene na ngai mpe alobi na ngai ete: “Ndeko, ozali koyeba ngai lisusu? Ngai nde moto nabombaki bino mokolo banguna bazalaki koluka bino ntango boyaki koteya na mboka na biso.” Akendaki kofanda na Allemagne, ayekolaki Biblia, mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Libota na ye mobimba ezali na solo.
Ya solo, na boumeli ya bambula yango, tozwaki bato mingi oyo bakokani na “mokanda na kolobela.” (2 Bakolinti 3:1) Bato mosusu oyo tosalisaki bango na kozwa boyebi ya solo ya Biblia, bazali lelo oyo bankulutu, basaleli ya misala, mpe babongisi-nzela. Nazali na esengo ya komona basakoli oyo bazalaki moke na bazongazonga oyo nasalaki na bambula 1960 bakómi ebele ya basambeli ya Yehova koleka 10 000! Lokumu nyonso ezali ya Nzambe na biso ya boboto, oyo asalelaki biso na ndenge ye moko alingaki.
“Na mbeto ya maladi”
Na bambula oyo nazalaki mokɛngɛli-motamboli, Martha asungaki ngai mingi, ntango nyonso azalaki na esengo. Kasi, na Ɔkɔtɔbɛ 1976, azwaki maladi makasi mpe basalaki ye lipaso moko ya monene. Makolo na ye elɛmbaki mpe akómaki kotambola na kiti ya kotindika. Tozalaki na mbongo te mpe makanisi ezwaki mobulu. Totyaki lisusu elikya na Yehova, asalisaki biso na bolingo mpe boboto na ye. Ntango nazalaki kokende kotala masangá na Macédoine, Martha azalaki kotikala na ndako ya ndeko moko na Athènes mpo na kozwa nkisi. Soki abengi ngai na telefone, azalaki koloba mpo na kolendisa ngai boye: “Nazali malamu. Kobá mosala, mpe soki nazongeli kotambola, tokokende elongo kotala masangá na kiti na ngai ya kotindika.” Asalaki mpenza bongo. Bandeko na biso ya bolingo na Betele batindelaki biso mikanda ya kolendisa mingi. Mbala na mbala, bazalaki kokomela Martha maloba ya Nzembo 41:3 ete: “Yawe akolendisa ye na mbeto na ye na maladi; kati na maladi na ye, okobikisa ye na mpasi na ye nyonso.”
Na 1986, lokola tozalaki kaka na mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, bandeko bamonaki malamu ete nakóma mobongisi-nzela monene na Kaválla, esika tozali kofanda pene ya libota ya mwana na biso ya mwasi. Martha mwasi na ngai ya bolingo auti kokufa na sanza ya Marsi oyo eleki; azalaki sembo tii na nsuka. Liboso akufa soki bandeko batuni ye “Nsango nini?” Ntango nyonso azalaki koloba boye: “Lokola nazali pene na Yehova, nazali mpenza malamu!” Ntango tozalaki kobongisa makita to soki babengi biso tókende kosala esika mbuma ya kobuka ezali mingi, tii lelo oyo Martha azalaki koloba ete: “John, tókende kosala na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi.” Azalaki molende tii na nsuka.
Eleki mwa bambula, ngai mpe nakutanaki na mikakatano ya nzoto. Na Marsi 1994, minganga bazwaki ngai na maladi ya motema, mpe esɛngaki básala ngai lipaso. Mbala oyo lisusu na bolingo na ye, Yehova asalisaki ngai na ntango ya mpasi. Nakobosana ata mokolo moko te libondeli oyo mokɛngɛli moko ya zongazonga asalaki na mbeto na ngai ya lopitalo ntango nabimaki na ndako oyo basɛnzɛlaka bato ya maladi butu mpe moi, mpe Ekaniseli ya liwa ya Yesu oyo nasalaki kuna elongo na bato minei ya maladi oyo basepelaki na mateya ya solo.
Yehova azali Mosungi na biso
Mikolo ezali koleka nokinoki, mpe nzoto na biso ezali kolɛmba, kasi ntango tozali koyekola mpe kosala mosala, elimo na biso ezali kozonga ya sika. (2 Bakolinti 4:16) Ekoki sikoyo mbula 39 banda nalobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Na bomoi na ngai namoni makambo mingi, esengo mingi, mpe nazwaki mbano mingi. Ya solo, ntango mosusu nayokaka ete “nazali mobola mpe nazangi,” kasi nakoki koloba na elikya nyonso epai ya Yehova ete: “Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai.” (Nzembo 40:17) Azalaki mpenza Nzambe na ngai ya boboto.
[Elilingi na lokasa 25]
Ngai na Martha na 1956
[Elilingi na lokasa 26]
Esika tofandaki na Kaválla
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na Martha na 1997.