Biblia epesi biyano na mituna ya ntina mpo na mikolo na biso
BIBLIA ezali na ntina lelo oyo? Mpo tóndima, mokanda yango ya kala esengeli kolakisa bato oyo bazali kotánga yango eloko nini bakoki kosala na makambo oyo bazali kokutana na yango lelo. Biblia epesaka toli malamu na makambo oyo ezali mpenza na ntina na mokili ya lelo?
Tótalela naino makambo mibale oyo tokutanaka na yango lelo oyo. Na bongo, tokotalela makambo oyo Biblia elobi mpo na yango.
Mpo na nini Nzambe atiki ete bampasi ezala?
Soki totali makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo, motuna oyo bato bamitunaka mingi yango oyo: Mpo na nini Nzambe azali kotika ete bato oyo basali likambo te bányokwamaka? Motuna oyo ezali na ntina mpamba te, mobulu ezali konyokola bato mingi, makambo ezali se kobeba, bato bazali kobomana, bampasi, mpe bongo na bongo.
Na ndakisa, na sanza ya Yuni 1998, na nɔrdi ya Allemagne, engbunduka moko etutaki gbagba (pont), mpe bato koleka 100 oyo bazalaki na engbunduka yango bakufaki. Ata minganga mpe babomi-mɔ́tɔ oyo bakendaki kosalisa bato oyo bazwaki makama, bamitungisaki mingi na komona ndenge bato ebele bakufaki na ndenge ya nsɔmɔ. Episkɔpɔ ya Lingomba ya Évangélique atunaki boye: “Nzambe, mpo na nini likambo oyo esalemi?” Episkɔpɔ ye moko apesaki eyano te.
Emonanaka ete ntango bato oyo basali likambo te bazali konyokwama mpe bazali koyeba ntina ya minyoko na bango te, mbala mingi bayokaka nkanda. Na ntango yango nde bakoki kozala na mposa ya Biblia, mpamba te Biblia ezali kolimbola mpo na nini bato oyo basali likambo te bakutanaka na mikakatano mpe na bampasi.
Ntango Yehova asalaki mabelé mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, akanaki te ete bato bákutanaka na mikakatano to bámonaka mpasi. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te ntango asilisaki kokela biloko nyonso, “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Sikoyo, omituna motuna oyo: ‘Soki namoni eloko moko ya mabe, nakoki koloba ete ezali “malamu mingi”?’ Te! Ndenge moko mpe, ntango Nzambe alobaki ete biloko nyonso oyo asalaki ezalaki “malamu mingi,” yango emonisi ete ata mabe moko te ezalaki na mabelé. Na bongo mabe ebandaki ntango nini mpe ndenge nini?
Mwa moke na nsima ya kokela baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, ekelamu moko ya nguya eyaki epai ya mwasi mpe elobaki ete, Yehova akosaki bango. Mpo na yango, ekelamu yango etyaki ntembe na lotomo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Genese 3:1-5) Na nsima, ekelamu yango, Satana, alobaki lisusu ete bato bakoki kotikala sembo epai ya Yehova te soki banyokwami. (Yobo 2:1-5) Na likambo yango Yehova asalaki nini? Atikaki ntango eleka mpo emonana ete bato bakoki komiyangela malamu te soki ye atambwisi bango te. (Yilimia 10:23) Ntango bikelamu ya Nzambe bazali kosala makambo oyo eyokani te na mibeko na ye, yango ememaka lisumu, oyo na nsima ebimisaka bampasi. (Mosakoli 8:9; 1 Yoane 3:4) Yehova ayebaki ete atako bampasi ekozala, bato mosusu bakotikala sembo epai na ye.
Eleki sikoyo mbula soki 6 000 banda Adama na Eva batombokelaki Nzambe na kati ya Edene. Tokoki nde koloba ete ntango yango eumeli mingi? Yehova akokaki koboma Satana na bato na ye banda kala. Kasi ezalaki malamu azela tii ntango ekomonana polele ete Yehova azali na lotomo ya kozala mokonzi mpe bato bakoki kotikala sembo epai na ye. Lelo oyo mpe, tomonaka na batribinale ete balekisaka ata bambula mingi liboso ya kokata likambo moko, boye te?
Soki totaleli ntembe monene oyo ebimaki mpo na koyeba soki Yehova azali na lotomo ya kozala mokonzi mpe soki bato bakoki kozala sembo epai na ye, tokomona ete ezalaki malamu Nzambe atika ntango! Sikoyo tozali komona polele likambo oyo ekómaka ntango bato baboyi kotosa mibeko ya Nzambe mpe balingi komitambwisa bango moko. Nsuka na yango ezali ete mabe ekómi mingi. Ezali mpo na yango nde bato mingi oyo basali likambo te bazali konyokwama lelo oyo.
Kasi, ezali esengo koyoka ete Liloba ya Nzambe elobi ete mabe ekoumela libela te. Etikali moke Yehova akosukisa mabe mpe bato oyo bazali kosala yango. Masese 2:22 elobi ete: “Bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakopikolama wana.” Nzokande, bato oyo bazali sembo epai ya Nzambe bazali na elikya ete etikali moke, ‘liwa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.’—Emoniseli 21:4.
Boye, Biblia ezali komonisa polele ntina oyo bato oyo basali likambo te bazali konyokwama. Ezali mpe kopesa biso elikya ete mosika te mabe na bampasi ekosila. Ntango tozali komona bampasi na mokili lelo oyo, tosengeli mpe koluka eyano na motuna mosusu ya ntina.
Ntina ya bomoi ezali nini?
Ekoki kozala ete lelo oyo, bato bazali koluka koyeba ntina ya bomoi koleka bileko mosusu nyonso. Bato mingi bazali komituna mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini nazali na bomoi? Nasala nini mpo bomoi na ngai ezala na ntina?’ Bato bazali kokutana na makambo mingi oyo ezali kotinda bango bámituna mituna yango.
Moto akoki kokutana na likama moko oyo ekoki kobebisa bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, na ebandeli ya 1998, bato ya mobulu bakangaki elenge mwasi moko ya mbula 12 oyo azalaki kofanda na mboka Bavaria, na ekólo Allemagne mpe babomaki ye. Nsima ya mbula mobimba, mama na ye alobaki ete mokolo na mokolo alukaka koyeba ntina ya bomoi, kasi azwaka eyano te. Bilenge mosusu bazali komituna, bomoi ezali na ntina nini. Bazali na mposa ya kozala na bomoi ya malamu, bomoi oyo ezali na ntina, mpe ntango bafandi na bato mosusu, bámiyokaka ete bango mpe bazali na ntina; kasi bazali komona ete bamposa na bango ezali kokokisama te na kati ya mokili mabe oyo etondi na lokuta. Bato mosusu bamipesaka mobimba na mosala moko, kasi bamonaka ete kozala moto monene, kozala na lokumu, mpe kozala na biloko mingi ekoki kosalisa bango te mpo báyeba ntina oyo bazali na bomoi.
Ezala makambo nini oyo ezali kopusa moto amituna soki ntina ya bomoi ezali nini, motuna yango ezali kosɛnga eyano ya malamu. Na likambo oyo lisusu, Biblia ekoki kosalisa biso mingi. Biblia elobi ete Yehova azali na mokano, ye azali na mikano malamu mpo na eloko nyonso oyo asalá. Tókanisa naino likambo oyo: Okoki kotonga ndako kozanga ntina? Eyano ezali ete te. Mpamba te kotonga ndako esɛngaka mbongo mingi mpe basanza mingi to bambula. Moto atongaka ndako mpo ye moko to moto mosusu afanda wana. Ezali mpe bongo mpo na Yehova. Asalaki mabelé na bikelamu ya bomoi oyo ezali kati na yango mpamba te, kasi akelaki yango na ntina, na mokano. (Talá Baebele 3:4.) Azali na mokano nini mpo na mabelé?
Mokanda ya Yisaya elobi ete Yehova azali ‘Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango.’ Ya solo, azali “Ye oyo apikaki [mabelé] makasi, akelaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18, NW) Banda Yehova akela mabelé, mokano na ye ezalaka kaka ete bato báfanda wana. Nzembo 115:16 elobi boye: “Lola mpe likoló-na-lola ezali na [Yehova], kasi apesaki mokili na bana na bato.” Na yango, Biblia ezali komonisa ete Yehova asalaki mabelé mpo bato ya botosi, baoyo bakobatela yango, báfanda wana.—Genese 1:27, 28.
Yehova abongolaki mokano na ye mpo Adama na Eva batombokelaki ye? Te. Mpo na nini tolobi bongo? Tótalela likambo oyo: Bambula mingi elekaki kobanda Adama na Eva batombokelaki Nzambe na Edene tii ntango bakomaki Biblia. Soki Nzambe atikaki likanisi oyo azalaki na yango na ebandeli, mpo na nini likanisi yango ekomami na Biblia? Soki totali malamu, tokoloba ete Nzambe atiki mokano na ye te mpo na bato mpe mabelé.
Lisusu, soki Yehova azwi mokano, ekokokisama kaka. Na nzela ya Yisaya, Nzambe apesi elikya oyo: ‘Mpo ete lokola mbula mpe mbula mpɛmbɛ ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopolisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe etɔisa yango, kopesaka mbóto epai na mokoni mpe kwanga epai na molei, boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; [ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.’—Yisaya 55:10, 11.
Nzambe azali kosɛnga biso nini?
Na yango, tomoni polele ete tokoki kotya motema ete mokano ya Nzambe oyo elobi ete bato ya botosi báfanda libela na mabelé ekokokisama. Soki tolingi kozala na kati ya bato oyo bakozwa libaku ya kofanda libela na libela awa na mabelé, tosengeli kosala likambo oyo Mokonzi Salomo, moto ya mayele mingi, alobaki: “Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali [makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi na bato, NW].”—Mosakoli 12:13; Yoane 17:3.
Kosala mokano ya Yehova mpo na biso bato ya bomoi elimboli koyeba Nzambe ya solo mpe kosala makambo oyo azali kosɛnga biso na kati ya Makomami Mosantu. Soki tosali yango sikoyo, tokoki kozala na elikya ya bomoi ya seko na mabelé oyo ekokóma paladiso, epai tokoyekola ntango nyonso makambo ya sika ebele na ntina na Nzambe mpe biloko kitoko oyo akelá. (Luka 23:43) Talá elikya malamu boye!
Bato mingi oyo bazali koluka ntina ya bomoi bazali koyekola Biblia mpe bazali kozwa bolamu banda sikoyo. Na ndakisa, elenge mobali moko na nkombo Alfred azalaki komona ntina ya bomoi te. Azalaki kosepela te na komona mangomba ezali kokɔta na bitumba, na lokuta ya bato ya politiki, mpe lokola bazali na bosembo te ezalaki kopesa ye mpasi na motema. Alfred akendaki na bamboka ya BaIndiens na Amerika ya Nɔrdi mpo na koluka ntina ya bomoi, kasi azwaki yango te, alɛmbaki nzoto mpe azongaki na Mpoto. Lokola azalaki lisusu na elikya te, akómaki komela bangi mpe koyoka miziki ya makasi (rock). Nzokande, ntango Alfred akómaki kotánga Biblia mbala na mbala mpe na likebi mpenza, esalisaki ye ayeba ntina mpenza ya bomoi mpe akóma na esengo.
Ezali kongɛngisa nzela na biso malamu
Tokoloba nini mpo na Biblia? Ezali na ntina lelo oyo? Ezali mpenza na ntina, mpamba te ezali kolakisa biso ndenge tokoki kosala ntango tokutani na mikakatano lelo oyo. Biblia ezali komonisa ete mabe euti epai ya Nzambe te mpe ezali kosalisa biso tózala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Biblia ezali mpe na makambo mingi ya ntina mpo na ntango na biso. Liloba ya Nzambe elobeli makambo lokola libala, ndenge ya kobɔkɔla bana, koyeba kofanda na bato, mpe elikya mpo na bato oyo bakufá.
Soki otaleli naino makambo oyo ezali na Biblia te, tolendisi yo osala yango sikoyo. Ntango okomona ete toli na yango ezali malamu mpo na bomoi na yo, okoyoka lokola mokomi na nzembo oyo asɛngaki ete Yehova Nzambe atambwisa ye wana ayembaki ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105.
[Elilingi na lokasa 6]
Oyebi ntina oyo Nzambe atiki bato oyo basali likambo te bányokwama?
[Elilingi na lokasa 7]
Bomoi na yo ezali na ntina