Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/1 nk. 11-17
  • “Oyo moke” ekómi “nkóto”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo moke” ekómi “nkóto”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basaleli ya Yehova ya molende
  • “Misala nyonso malamu”
  • Bazali ‘kopumbwa likoló lokola lipata’
  • Bazali kobanga botɛmɛli te
  • Bizaleli malamu
  • Yehova akolisi
  • Losambo ya solo ekómi na mokili mobimba
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko na pole
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nkembo ya Yehova ezali kongɛngɛla basaleli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bamemi na pole​—Mpo na mokano nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/1 nk. 11-17

“Oyo moke” ekómi “nkóto”

“Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi.”​—YISAYA 60:22.

1, 2. (a) Mpo na nini molili ezipi mokili lelo oyo? (b) Ndenge nini kongɛnga ya Yehova ezalaki kobimela basaleli na ye mokemoke?

“MOLILI ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota; nde [Yehova akongɛngɛla, NW] yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.” (Yisaya 60:2) Maloba oyo emonisi mpenza ndenge mokili ezali banda 1919. Mangomba ya boklisto elingi kotya likebi te na elembo oyo ezali komonisa ete Yesu Klisto, “moi ya mokili” azali sikoyo mokonzi. (Yoane 8:12; Matai 24:3) Lokola Satana, mokonzi ya “mokili oyo ya molili” azali na “kongala mingi,” yango wana mabe ezalaki mingi na ekeke ya 20 koleka bantango mosusu nyonso liboso. (Emoniseli 12:12; Baefese 6:12) Bato mingi bazali na molili ya elimo.

2 Atako bongo, kongɛnga ezali lelo oyo. Yehova azali ‘kongɛngɛla’ basaleli na ye, elingi koloba batikali bapakolami na elimo. Awa na mabelé, bango nde bazali komonisa “mwasi” ya Yehova. (Yisaya 60:1) Banda balongwaki na boombo ya Babilone na 1919, bazali mpenza komonisa nkembo ya Yehova mpe ‘bazali kongɛngisa moi na bango liboso ya bato.’ (Matai 5:16) Banda 1919 tii 1931, kongɛnga ya Bokonzi ebandaki kobakisama mokemoke lokola bapakolami bazalaki kokata bansinga oyo ekangisaki bango naino na mateya ya Babilone. Bakómaki bankóto mingi mpamba te Yehova akokisaki likambo oyo alakaki ete: “Nakoyanganisa koyanganisa litika na Yisalaele; nakotya bango elongo moko lokola bampate na [lopango, NW]; lokola bibwele na kati ya elanga, bakosala makɛlɛlɛ monene mpo ete bazali bato mingi mpenza.” (Mika 2:12) Na 1931, basaleli ya Yehova bamonisaki lisusu nkembo na Ye makasi ntango bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova.​—Yisaya 43:10, 12.

3. Nini emonisaki ete bato mosusu mpe, longola bapakolami, bakomona kongɛnga ya Yehova?

3 Yehova asengelaki kongɛngɛla kaka “etonga moke” ya batikali bapakolami? (Luka 12:32) Te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1931 elobelaki bato mosusu. Elimbolaki malamu mpenza mokapo ya Ezekiele 9:1-11 mpe emonisaki ete moto oyo asimbi molangi ya mai ya mokanda, oyo balobeli na bavɛrsɛ yango ezali nde batikali bapakolami. “Moto” yango azali kotya banani bilembo na elongi? “Bampate” mosusu oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Yoane 10:16; Nzembo 37:29) Na 1935, bayebaki ete “bampate mosusu” yango ezali nde “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso” oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli. (Emoniseli 7:9-14) Banda 1935 tii lelo oyo, bazali kosala makasi mpenza na koyanganisa ebele monene yango.

4. Banani bazali “mikonzi” mpe “mabota” oyo balobelami na Yisaya 60:3?

4 Esakweli ya Yisaya elobelaki mosala yango ya koyanganisa na maloba oyo: “Mabota bakoya epai na pole na yo mpe mikonzi kino kongɛnga na kobima na yo.” (Yisaya 60:3) “Mikonzi” oyo balobelami na vɛrsɛ yango ezali banani? Ezali nde batikali kati na ba 144 000 baoyo bakozwa Bokonzi ya likoló elongo na Yesu Klisto mpe bazali na molɔngɔ ya liboso na mosala ya kopesa litatoli. (Baloma 8:17; Emoniseli 12:17; 14:1) Lelo oyo, mwa bankóto ya batikali bapakolami bazali moke liboso ya “mabota,” elingi koloba baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé mpe bazali koya epai ya Yehova mpo báteya bango mpe bazali kobenga bato mosusu básala lokola bango.​—Yisaya 2:3.

Basaleli ya Yehova ya molende

5. (a) Makambo nini ezali komonisa ete molende ya basaleli ya Yehova ekiti te? (b) Na mikili nini bokoli emonanaki mingi na 1999? (Talá etanda na nkasa 17 tii 20.)

5 Batatoli ya Yehova na mikolo na biso balakisaki molende ya solosolo na ekeke ya 20! Mpe atako bazalaki kozwa mikakatano likoló ya mikakatano, molende na bango ekitaki te ntango mobu 2000 ekómaki pene. Bazalaki ntango nyonso kotosa mpenza likambo oyo Yesu atindaki ete: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19, 20) Na mbula ya mosala oyo eleki, mbula ya nsuka mpo na ekeke ya 20, basakoli ya nsango malamu bakómaki 5 912 492. Basalaki ngonga 1 144 566 849 mpo na koyebisa bato makambo ya Nzambe mpe mikano na ye. Mbala 420 047 796, bazongelaki bato oyo basepelaki mpe bayekolaki Biblia na bato 4 433 884. Talá molende ya ndenge boye na mosala!

6. Ebongiseli nini esalemi sika mpo na babongisi-nzela, mpe makambo nini emonanaki?

6 Na sanza ya Yanuali ya mbula eleki, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekitisaki bangonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela. Bato mingi basepelaki na ebongiseli yango mpe bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza to babongisi-nzela basungi. Na ndakisa, banda na sanza ya Yanuali tii na sanza ya Aprili, baformilɛrɛ ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo bandeko batindaki na filiale ya Pays-Bas elekaki mbala minei baformilɛrɛ oyo filiale yango ezwaki na Yanuali tii Aprili ya mbula oyo elekaki liboso. Lapolo ya filiale ya Ghana elobi boye: “Banda bakitisi bangonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela, babongisi-nzela babakisami mingi mpenza.” Na 1999, na mokili mobimba babongisi-nzela bakómaki 738 343; yango ezali ndenge malamu mpenza ya komonisa ‘molende mpo na misala malamu.’​—Tito 2:14.

7. Ndenge nini Yehova apamboli mosala ya basaleli na ye ya molende?

7 Yehova apambolaki mosala yango ya molende? Ɛɛ. Yehova alobi boye na monɔkɔ ya Yisaya: “Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá; bazali koyangana nyonso elongo, bazali koya epai na yo; bana babali na yo bakolongwa na mosika mpe bana basi na yo bakokumbama na loketo.” (Yisaya 60:4) “Bana babali” na “bana basi” bapakolami oyo bayanganisami bazali kaka kosalela Nzambe na molende. Mpe sikoyo, bampate mosusu ya Yesu bazali koyanganisama pembeni ya “bana babali” na “bana basi” bapakolami ya Yehova na mikili mpe bisanga ya mai monene 234.

“Misala nyonso malamu”

8. Batatoli ya Yehova bazali kosala ‘misala malamu’ nini?

8 Baklisto bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kosalisa bato oyo bazali kosepela na nsango yango bákóma bayekoli. Bazali mpe na ‘nyonso oyo esengeli mpo na misala nyonso malamu.’ (2 Timote 3:17, NW) Yango wana, na bolingo nyonso bazali kokokisa bamposa ya mabota na bango, bazali koyamba bapaya, mpe bazali kotala bato ya maladi. (1 Timote 5:8; Baebele 13:16) Lisusu, bandeko ya bolingo malamu bazali kosala misala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Mosala yango mpe ezali kopesa bato litatoli. Na Togo, ntango basilisaki kotonga Ndako ya Bokonzi moko, mokonzi ya lingomba moko ya mboka yango alukaki koyeba soki Batatoli ya Yehova basalaka ndenge nini mpo bátonga bandako na bango ya makita, nzokande bango mpo bázwa bisika ya losambo, basengeli kofuta bato ya misala! Lapolo ya filiale ya Togo elobi ete bato ya bakartye epai batongaki Bandako ya Bokonzi basepelaki mingi na boye ete bato mosusu bazali koluka kofutela to kotonga bandako na bango penepene ya bisika oyo bakotonga Bandako ya Bokonzi.

9. Batatoli ya Yehova basalaki nini ntango makama esalemaki?

9 Ntango mosusu, esɛngaka kosala mosala mosusu ya malamu. Na mbula ya mosala oyo eleki, makama ebimaki na mikili ebele, mpe mbala mingi, Batatoli ya Yehova bazalaki bato ya liboso oyo bakómaki na bisika yango mpo na kosunga bato oyo bazwaki makama. Na ndakisa, mopɛpɛ makasi babengi cyclone Mitch ebebisaki eteni monene ya ekólo Honduras. Mbala moko, filiale ya mboka yango esalaki bakomite mpo na kosunga bandeko. Batatoli ya Honduras mpe ya bikólo mosusu bapesaki bilamba, bilei, nkisi, mpe biloko mosusu ya ntina. Bandeko ya bakomite ya kotonga bandako ya makita basalaki nyonso mpo na kotonga lisusu bandako ya bandeko oyo ekweaki. Eumelaki te, basalisaki bandeko na biso oyo bazwaki makama na kozongela misala na bango. Na ekólo Équateur, Batatoli ya Yehova basungaki bandeko na bango ntango mai ezindisaki bandako ebele. Ntango mokonzi moko ya Leta amonaki ndenge malamu oyo bandeko basalaki, alobaki boye: “Soki nazalaki na bato ya ndenge oyo, mbɛlɛ nasali makambo ya kokamwa! Bato lokola bino bosengeli kozala na bisika nyonso na mokili.” Mosala malamu motindo wana ezali kokumisa Yehova Nzambe mpe ezali komonisa ete tozali na “bizaleli ya moto ya Nzambe [oyo] ikopesaka litomba na nzela nyonso.”​—1 Timote 4:8.

Bazali ‘kopumbwa likoló lokola lipata’

10. Atako bapakolami na elimo bazali se kokóma moke, mpo na nini nkombo ya Yehova ezali kosakolama na ndenge oyo esalemá naino liboso te?

10 Yehova atuni motuna oyo: “Banani baoyo bakopumbwa likoló lokola lipata mpe lokola bibenga kino maninisa na bango? Zambi mabongo [“bisanga,” NW] ya mai [ekozela] ngai, masuwa na Talasisi liboso; mpo na koyeisa bana na yo longwa na mosika. . . . Bapaya bakotonga mapango na yo, mpe mikonzi na bango bakosalela yo.” (Yisaya 60:8-10) Bato ya liboso oyo bandimaki ‘kongɛnga’ ya Yehova ezali “bana” na ye, elingi koloba baklisto bapakolami. Nde na nsima “bapaya,” elingi koloba ebele monene oyo bazali kosalela bandeko na bango bapakolami na bosembo nyonso, mpe bazali kolanda ndakisa na bango na mosala ya kosakola nsango malamu. Yango wana, atako bapakolami bazali se kokóma moke, nkombo ya Yehova ezali kosakolama na mokili mobimba na ndenge oyo esalemá naino liboso te.

11. (a) Likambo nini ezali naino kosalema mpe ebotaki mbuma nini na 1999? (b) Na 1999, na mikili nini bato mingi mpenza bazwaki batisimo? (Talá etanda na nkasa 17 tii 20.)

11 Yango ezali kosala ete bamilio ya bato básopana “lokola bibenga kino maninisa na bango,” bazali koya na lisangá ya baklisto epai bakobatelama. Mbula na mbula bankóto mingi bazali koya mpe nzela ezali naino polele mpo bamosusu bákɔta. Yisaya alobi boye: “Bikuke na yo ikozipwana libela na moi mpe na butu ikokangana te; ete bato báyeisela yo bozwi na mabota mpe mikonzi na bango bákambama elongo.” (Yisaya 60:11) Na mbula eleki, bato 323 439 bazwaki batisimo mpo na kolakisa ete bamipesi na Yehova, mpe ye akangi naino bikuke te. “Biloko kitoko ya mabota nyonso,” elingi koloba bato oyo bazali na kati ya ebele monene, bazali se koya. (Hagai 2:7, NW) Bazali koboya ata moto moko te oyo alingi kolongwa na molili. (Yoane 12:46) Tiká ete bato yango nyonso básepela ntango nyonso na kongɛnga!

Bazali kobanga botɛmɛli te

12. Ndenge nini bato oyo balingaka molili balukaki kolimwisa kongɛnga?

12 Bato oyo balingaka molili bazali koyina kongɛnga ya Yehova. (Yoane 3:19) Kutu, bamosusu bazali koluka koboma kongɛnga yango. Yango ezali likambo ya kokamwa te. Ata Yesu, “moi ya solo oyo ekotanelaka moto na moto,” basɛkaki ye, batɛmɛlaki ye, mpe na nsuka, bato ya ekólo na ye babomaki ye. (Yoane 1:9) Na boumeli ya ekeke ya 20, basɛkaki Batatoli ya Yehova, bakɔtisaki bango bolɔkɔ, bapekisaki mosala na bango, mpe babomaki bango mpo bazalaki kopanza kongɛnga ya Yehova na bosembo nyonso. Na bambula oyo euti koleka, banguna balobaki makambo ya lokuta na baradio, na batelevizyo mpe na bazulunalo likoló ya bato oyo bazali komonisa kongɛnga ya Nzambe. Bato mosusu balingi ete bato bátalelaka Batatoli ya Yehova lokola bato mabe oyo bakoki kotya mboka na likama, yango wana basengeli kotikela bango bonsomi mingi te to mpe kopekisa mosala na bango. Banguna yango balongaki?

13. Matomba nini emonanaki na koyebisa bapanzi-nsango bosolo ya makambo oyo etali mosala na biso?

13 Te. Na bisika oyo bamonaki ete ezali malamu básala yango, Batatoli ya Yehova bakutanaki na bapanzi-nsango mpo na komonisa bango bosolo ya makambo. Yango esalaki ete bálobela nkombo ya Yehova na bazulunalo, na radio, mpe na televizyo. Likambo yango ememaki litomba na mosala ya kosakola. Na ndakisa, na ekólo Danemark, emisyo moko oyo elekaki na televizyo ya mboka yango ezalaki na motó ya likambo oyo: “Mpo na nini kondima ya bato ya Danemark ezali kolɛmba.” Batunaki bato ya mangomba ndenge na ndenge, na Batatoli ya Yehova lokola. Nsima na yango, mwasi moko oyo alandaki emisyo yango alobaki boye: “Emonanaki polele banani bazali na elimo ya Nzambe.” Mwasi yango abandaki koyekola Biblia.

14. Etikali moke banguna bakoyeba likambo nini oyo ekopesa bango mawa?

14 Batatoli ya Yehova bayebi ete na mokili oyo, bato mingi bakotɛmɛla bango. (Yoane 17:14) Atako bongo, esakweli ya Yisaya elendisaka bango: “Bana ya baoyo banyokolaki bino bakoyela yo wana bazali kokumbama na nse; bango nyonso mpe baoyo batyolaki yo bakomikitisa na makolo na yo; bakobyanga yo Mboka ya [Yehova], Siona na Oyo na Bulɛɛ na Yisalaele.” (Yisaya 60:14) Etikali moke, banguna bakotikala na nsɔni ntango bakoyeba ete bazalaki nde kobundisa Nzambe. Nani akoki kolonga soki abundisi Nzambe?

15. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali ‘konunga mabɛlɛ ya mabota,’ mpe ndenge nini yango emonani na mosala na bango ya koteya mpe ya kosakola?

15 Yehova alaki lisusu boye: “Nakokembisa yo libela, esengo na [libela na libela, NW] . . . Okonunga mabɛlɛ ya mabota, okonunga mabɛlɛ ya mikonzi; mpe okoyeba ete ngai, [Yehova], nazali mobikisi na yo.” (Yisaya 60:15, 16) Ya solo, Yehova azali Mobikisi ya bato na ye. Soki batii mitema na bango epai na ye, bakoumela “libela na libela.” Mpe lisusu ‘bakonunga mabɛlɛ ya mabota,’ elingi koloba bakosalela biloko mosusu mpo losambo ya solo ekende liboso. Na ndakisa, ordinatɛrɛ mpe biloko mosusu mpo na kotinda bansango oyo ezali kobima ezali kosalisa mpo na kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na minɔkɔ 121 mpe Lamuká! na minɔkɔ 62 nzela moko. La Société asali programɛ ya ordinatɛrɛ mpo na kobongola Biblia Traduction du monde nouveau na minɔkɔ mosusu, mpe Biblia yango ezali kopesa esengo mingi. Ntango Makomami ya Greke ebimaki na monɔkɔ ya Croate na 1999, bandeko ebele batangisaki mpisoli na esengo. Ndeko moko mobange alobaki boye: “Nazelaki Biblia oyo banda kala. Sikoyo nakoki kokufa na kimya!” Lelo Babiblia Traduction du monde nouveau milio 100, na mobimba to ndambo na yango, esili kokabolama na minɔkɔ 34.

Bizaleli malamu

16, 17. (a) Atako ezali mpasi, mpo na nini ezali na ntina mingi tózala ntango nyonso na bizaleli malamu? (b) Ndakisa nini emonisi ete bilenge bakoki kokima bizaleli mabe ya mokili oyo?

16 Yesu alobaki ete: “Moto na moto oyo azali kosalaka na yauli ayini moi.” (Yoane 3:20) Nzokande, baoyo bazali na moi balingaka bizaleli malamu oyo Yehova asɛngaka. Yehova alobi boye na monɔkɔ ya Yisaya: “Bato na yo nyonso bakozala bayengebene.” (Yisaya 60:21a) Kobatela bizaleli malamu na mokili oyo etondi na pite, lokuta, lokoso, mpe lolendo, ezali likambo ya kosakana te. Na ndakisa, na bamboka mosusu, nkita ezali kobonga mpe ezali mpasi te na kobendama na makanisi ya komipesa na koluka bomɛngo. Kasi, Paulo akebisaki ete: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na [motambo, NW], mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ.” (1 Timote 6:9) Soki moto amipesi na makambo ya mombongo mpe atiki makambo ya ntina mpenza, na ndakisa makambo lokola makita ya lisangá, mosala ya kosakola, bizaleli ya bosembo, mpe mikumba na ye na libota, ezali likama mpo na ye!

17 Kokangama na bizaleli malamu ezali mpenza mpasi mpo na bilenge, mpamba te baninga na bango mingi bamipesi na komela bangi mpe kosala pite. Na ekólo Suriname, mwana mobali moko kitoko alingaki elenge mwasi ya mbula 14 na kelasi mpe asɛngaki ye básangisa nzoto. Elenge mwasi yango aboyaki mpe alobaki na ye ete Biblia epekisi likambo wana mpo na bato oyo babalani te. Bana basi mosusu na kelasi basɛkaki ye mpe bamekaki kondimisa ye atika makanisi wana, balobaki na ye ete mwana mwasi nyonso na kelasi wana azalaka na mposa ete mwana mobali yango alinga ye mpe asangisa na ye nzoto. Kasi, elenge mwasi yango aboyaki na motema moko. Mwa bapɔsɔ na nsima, ekizame ya monganga emonisaki ete elenge mobali yango azali na sida mpe abɛlaki makasi. Elenge mwasi yango asepelaki lokola atosaki mobeko ya Yehova oyo elobi ‘tóboya pite.’ (Misala 15:28, 29, NW) Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kozala na bilenge oyo bayokaka nsɔni te na kosala oyo ezali malamu. Kondima na bango mpe ya baboti na bango ezali ‘kopesa bonzenga,’ to kokumisa nkombo ya Yehova.​—Yisaya 60:21b, NW.

Yehova akolisi

18. (a) Likambo ya monene nini Yehova asali mpo na basaleli na ye? (b) Nini emonisi ete bokoli esuki naino te, mpe bato oyo bazali kotikala na kongɛnga bakoki kolikya komona makambo nini ya kitoko?

18 Ya solo, Yehova azali kongɛngisa, kopambola, kokamba, mpe kolendisa basaleli na ye. Na boumeli ya ekeke ya 20, bamonaki ndenge maloba ya Yisaya ekokisamaki ete: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbangu.” (Yisaya 60:22) Banda na mwa bato moke oyo bazalaki na 1919, “oyo moke” ekómi koleka “nkóto.” Mpe libota yango ezali naino kokola! Na mbula eleki, bato 14 088 751 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Mingi kati na bango bazali Batatoli te. Tozali na esengo ya komona ete bayanganaki na molulu wana ya ntina, mpe tozali kosɛnga bango bátika te kopusana epai oyo kongɛnga ezali. Yehova azali naino kongɛngɛla basaleli na ye. Na ebongiseli na ye bisika ezali naino mpo na baoyo balingi kokɔta. Yango wana, tiká ete mposa ya mokomoko na biso ezala ya kotikala na kongɛnga ya Yehova. Yango ezali komemela biso mapamboli mingi sikoyo! Mpe esengo ekozala mingi na mikolo oyo ezali koya ntango bikelamu nyonso ekokumisa Yehova mpe ekosepela na nkembo na ye!​—Emoniseli 5:13, 14.

Okoki kolimbola?

• Banani oyo bamonisi nkembo ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka?

• Makambo nini emonisi ete molende ya basaleli ya Yehova ekiti te?

• Tángá mwa ndambo ya misala malamu oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala.

• Atako bazali kotɛmɛla biso makasi, elikya nini tozali na yango?

[Etanda na nkasa 17-20]

LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 1999

(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)

[Bililingi na lokasa 15]

Bato bazali naino koya ebele na ebongiseli ya Yehova

[Elilingi na lokasa 16]

Tozali na esengo ya komona ete Yehova atiki naino ekuke polele mpo na baoyo balingaka pole

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto