Tozali na mposa ya ebongiseli ya Yehova
OYOKÁ naino te moto moko alobi ete: “Nandimaka Nzambe kasi nandimaka mangomba te”? Maloba ya ndenge wana toyokaka yango mingi epai ya bato oyo liboso bazalaki na molende ya kokende ndakonzambe kasi balɛmbaki mpo lingomba na bango ekokisaki bamposa na bango ya elimo te. Atako mangomba ekokisaka bamposa na bango te, bato mingi balingaka kosambela Nzambe. Kasi, bamonaka ete eleki malamu básambela Nzambe na ndenge na bango moko na esika ete bákendaka na ndakonzambe to bákɔta na lingomba moko.
Biblia elobi nini na likambo yango? Nzambe alingi ete baklisto bázala na kati ya ebongiseli moko?
Baklisto ya liboso bazwaki matomba mingi mpo bazalaki na ebongiseli
Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova asopaki elimo santu na ye likoló ya mwa bandimi oyo bazalaki epai na epai te, kasi likoló ya etuluku ya mibali na basi oyo basanganaki “esika moko,” elingi koloba na ndako moko ya likoló na Yelusaleme. (Misala 2:1) Lisangá ya baklisto, oyo ekómaki ebongiseli ya mokili mobimba, ebotamaki nde na ntango wana. Yango epesaki bayekoli ya liboso bolamu mingi. Mpo na nini? Mpamba te bazwaki mokumba monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe “na mokili mobimba.” (Matai 24:14) Na kati ya lisangá, bandimi ya sika, bazalaki na likoki ya koyekola ndenge ya kosala mosala ya kosakola epai ya bandeko oyo bamesanaki na mosala yango.
Nsima ya ntango moke, nsango ya Bokonzi esakolamaki mosika koleka Yelusaleme. Kati na mobu 62 mpe 64 T.B., ntoma Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na baklisto oyo ‘bapalanganaki na Ponto, na Galatia, na Kapadokia, na Azia, mpe na Bitunia,’ bisika yango nyonso ezali lelo oyo na ekólo Turquie. (1 Petelo 1:1) Bandimi mosusu bazalaki na Palestine, na Lebanona, na Sulia, na Kupulu, na Grèce, na Kelete, mpe na Italia. Lokola ntoma Paulo akomaki yango epai ya Bakolose na mobu 60-61 T.B., nsango malamu ‘esakolamaki epai na bato nyonso na nse ya likoló.’—Bakolose 1:23.
Litomba mosusu ya kozala na ebongiseli ezalaki ete baklisto bakokaki kolendisana. Na kati ya lisangá, baklisto bakokaki koyoka masukulu ya malamu, koyekola Makomami Mosantu esika moko, kolendisa kondima na bango na makambo oyo bakutanaki na yango, mpe kobondela elongo na bandeko. (1 Bakolinti, mokapo 14) Mpe mibali oyo bakɔmeli bakokaki ‘kobatela etonga ya Nzambe.’—1 Petelo 5:2.
Lokola bazalaki na kati ya lisangá, baklisto bazalaki lisusu koyebana mpe kolingana. Baklisto ya liboso bazalaki koyoka nkaka te mpo bazalaki na kati ya lisangá, kutu bamonaki ete lisangá nde ezalaki kotonga mpe kolendisa bango.—Misala 2:42; 14:27; 1 Bakolinti 14:26; Bakolose 4:15, 16.
Esengelaki lisusu ete lisangá ya mokili mobimba, to ebongiseli ezala mpo na kobatela bomoko. Yango esalisaki baklisto ‘bálobaka na motindo moko.’ (1 Bakolinti 1:10) Likambo yango ezalaki na ntina mingi. Bandeko ya lisangá bautaki na bisika ndenge na ndenge; mateya oyo bayebaki kala mpe bizaleli na bango ya kala ekesanaki. Bazalaki koloba monɔkɔ moko te mpe bazalaki na bomoto ndenge moko te. (Misala 2:1-11) Ntango mosusu bazalaki komona makambo ndenge moko te. Kasi, basalisaki baklisto báyokanaka na kati ya lisangá. —Misala 15:1, 2; Bafilipi 4:2, 3.
Makambo oyo bankulutu na masangá bakokaki kosilisa yango te bazalaki koyebisa yango bakɛngɛli-batamboli oyo bateli na elimo lokola Paulo. Bazalaki kotinda mituna minene oyo etali mateya na lisangani ya mikóló-bakambi na Yelusaleme. Na ebandeli, kaka bantoma ya Yesu nde bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi, kasi na nsima babakisaki bankulutu mosusu oyo bazalaki na lisangá ya Yelusaleme. Masangá nyonso ezalaki kotosa bokonzi oyo Nzambe apesaki na lisangani ya mikóló-bakambi mpe bato oyo lisangani yango ezalaki kotinda mpo na kobongisa mosala ya kosakola, kopesa mikumba na bandeko mibali na kati ya masangá, mpe kokata makambo etali mateya. Ntango lisangani ya mikóló-bakambi ekati likambo moko, masangá ezalaki kondima ekateli yango mpe ‘kosepela na elendiseli na yango.’—Misala 15:1, 2, 28, 30, 31.
Ya solo, Yehova azalaki kosalela ebongiseli moko na ekeke ya liboso. Kasi makambo ezali ndenge nini lelo oyo?
Tozali na mposa ya ebongiseli lelo oyo
Lokola bandeko na bango na ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova lelo oyo bazwaka mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na lisɛki te. Mpo na kosala mosala yango bakabolaka Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia; nyonso wana esɛngi kozala na ebongiseli.
Mikanda ya baklisto esengeli kobongisama malamumalamu, basengeli kotala yango malamu soki ezali na libunga te, kosala yango na masini (imprimerie), mpe na nsima kotinda yango na masangá. Na bongo, moklisto mokomoko na bolingo na ye akomema mikanda yango epai ya bato oyo balingi kotánga yango. Na ndenge yango nde bamilio ya bato bayoki nsango ya Bokonzi. Basakoli ya nsango malamu basalaka makasi mpo na kokokisa mosala na bango na mobulu te; basalaka na boye ete básakola na bisika nyonso na kati ya teritware na bango mpe bábosana ata esika moko te. Nyonso wana esɛngi kozala na ebongiseli.
Lokola “Nzambe akokabolaka bato te,” Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia esengeli kobongolama na minɔkɔ mingi. (Misala 10:34) Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima na minɔkɔ 132, mpe Lamuká! ezali kobima na minɔkɔ 83. Yango ezali kosɛnga kozala na babongoli oyo babongisami malamu na mokili mobimba.
Bandeko ya lisangá balendisamaka ntango bakendaka na makita ya baklisto mpe na mayangani. Kuna bayokaka masukulu ya kolendisa, bayekolaka Biblia esika moko, bayebisanaka masolo oyo etongaka kondima, mpe basanganaka na bandeko na bango bandimi na mabondeli. Mpe lokola bandeko na bango na ekeke ya liboso, balendisamaka na kondima ntango bakɛngɛli-batamboli ya bolingo bayaka kotala bango. Yango wana, lelo oyo baklisto bazali “etonga moko mpe na mobateli moko.” —Yoane 10:16.
Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali bato ya kokoka te, ndenge moko mpe bandeko na bango na ekeke ya liboso bazalaki bato ya kokoka te. Kasi, bango nyonso bazali kosala lokola moto moko. Yango wana, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali kosalema na mabelé mobimba.—Misala 15:36-40; Baefese 4:13.
[Elilingi na lokasa 31]
Lelo oyo baklisto bazali “etonga moko mpe na mobateli moko”