Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/3 nk. 3-4
  • Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokozwa nyonso oyo tokosɛnga te
  • Ntango ya kobikisama na elimo
  • Bakei koluka mwasi mpo na Yisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Rebeka alingaki kosepelisa Yehova
    Teyá bana na yo
  • Rebeka andimaki kosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Libala oyo ekopesa matomba epai na bankoto na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/3 nk. 3-4

Makambo oyo ekoki kosalema na nguya ya libondeli

Moi ebandi kolala na mboka Nahola, na Moyen-Orient. Eliezele, mobali moko moto ya Sulia, akómi na libulu ya mai oyo ezali na libándá ya mboka, na bakamela na ye zomi. Atako ekoki mpenza kozala ete alɛmbi mpe azali na mposa ya mai, Eliezele azali kokanisa bolamu ya bato mosusu. Auti na mboka mopaya mpe ayei kolukela mwana ya nkolo na ye mwasi. Asengeli mpe koluka mwasi yango bobele na libota ya bandeko ya nkolo na ye. Ndenge nini akokokisa mokumba monene wana?

ELIEZELE atii elikya ete libondeli ekoki kosalisa ye. Asali libondeli oyo ezali mpenza komonisa ete azali na kondima: “[Yehova], Nzambe ya nkolo na ngai Abalayama, nalɔmbi yo ete likambo na ngai ebonga lelo, mpe moniselá nkolo na ngai Abalayama boboto. Talá, nazali kotɛlɛma epai na liziba ya mai, mpe bana basi ya bato ya mboka bazali kobima mpo na kotoka mai. Tiká ete moseka oyo ngai nakolɔmba ye ete, Kitisá mbeki na yo ete namela, mpe ye akozongisela ngai ete, Melá, mpe nakomelisa bakamela na yo, tiká ete azala mwasi eponi yo mpo na moombo na yo Yisaka. Bongo nakoyeba ete omonisi boboto na nkolo na ngai.”—Genese 24:12-14.

Elikya ya Eliezele ete libondeli ekoki kosalisa ezalaki mpamba te. Elenge mwasi ya liboso oyo ayei na libulu azali nkɔkɔ ya ndeko ya Abalayama! Nkombo na ye Lebeka, azali monzemba, azali na bizaleli malamu, mpe azali kitoko mpenza. Ntango asilisi kopesa Eliezele mai ya komela, amelisi mpe bakamela na ye nyonso. Nsima ya kosolola na kati ya libota, Lebeka andimi kokende na Eliezele na mboka mosika mpo na kozala mwasi ya Yisaka, mwana ya Abalayama. Ezali polele ete libondeli ya Eliezele eyokamaki, atako na ntango wana Nzambe azalaki mpenza kosala makamwisi te!

Libondeli ya Eliezele ekoki koteya biso makambo mingi. Libondeli wana emonisaki ete azalaki na kondima makasi, azalaki na komikitisa, mpe azalaki kokanisa liboso bolamu ya basusu. Libondeli ya Eliezele emonisaki lisusu ete andimaki kolanda ndenge oyo Yehova asalaka makambo epai ya bato. Na ntembe te ayebaki ete Nzambe azali moninga ya Abalayama mpe ayebaki makambo oyo Nzambe alakaki ete bato nyonso bakozwa mapamboli na nzela ya Abalayama. (Genese 12:3) Yango wana, Eliezele abandaki libondeli na ye na maloba oyo: “Yehova, Nzambe ya nkolo na ngai Abalayama.”

Yesu Klisto azalaki nkɔkɔ ya Abalayama, ye oyo bato nyonso bakozwa mapamboli na nzela na ye. (Genese 22:18) Lelo oyo, soki tolingi ete Nzambe ayoka biso ntango tozali kobondela, tosengeli kondima ndenge oyo Nzambe asalelaka bato makambo na nzela ya Mwana na ye. Yesu Klisto alobaki boye: “Soko bokoumela kati na ngai mpe maloba na ngai makoumela kati na bino, bólɔmba likambo nini lilingi bino mpe ekosalamela bino.”—Yoane 15:7.

Ntoma Paulo, moyekoli ya Klisto, amonaki ete maloba ya Yesu ezali solo. Elikya oyo azalaki na yango ete libondeli ekoki kosalisa moto ezalaki mpamba te. Alendisaki baninga na ye baklisto bápesa mitungisi na bango nyonso epai ya Nzambe na nzela ya libondeli mpe alobaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:6, 7, 13) Yango elingi nde koloba ete makambo nyonso oyo Paulo azalaki kosɛnga epai ya Nzambe azalaki kozwa yango? Tótala soki ezalaki bongo.

Tokozwa nyonso oyo tokosɛnga te

Ntango azalaki kosala mosala na ye ya kosakola na motema mobimba, Paulo azalaki na mokakatano moko oyo abengaki “monzube kati na nzoto.” (2 Bakolinti 12:7) Mbala mosusu ezalaki motungisi oyo azalaki kokutana na yango mpo na batɛmɛli mpe “bandeko ya lokuta.” (2 Bakolinti 11:26; Bagalatia 2:4) Ekoki mpe kozala ete azalaki na mokakatano na liso mpe ezalaki kosila te. (Bagalatia 4:15) Ata soki ezalaki nini, “monzube kati na nzoto” wana ezalaki kolɛmbisa Paulo. Akomaki ete: “Nabondeli Nkolo mbala misato mpo na yango ete alongwela ngai.” Kasi, Nzambe akokisaki mposa ya Paulo te. Nzambe ayebisaki Paulo ete bolamu ya elimo oyo apesaki ye, lokola makasi ya koyikela minyoko mpiko, ekokaki mpo na ye. Lisusu, Nzambe alobaki ete: “Nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.”—2 Bakolinti 12:8, 9.

Ndakisa ya Eliezele mpe ndakisa ya Paulo ezali koteya biso nini? Yehova Nzambe ayokaka mabondeli ya baoyo balingaka kosalela ye na elimo ya komikitisa. Kasi yango elingi koloba te ete akokisaka bamposa na bango nyonso mpamba te Nzambe amonaka mosika. Ayebi koleka biso moko makambo oyo ezali mpo na bolamu na biso. Mpe likambo ya ntina mingi ezali ete asalaka ntango nyonso makambo na kotalela mokano na ye ndenge oyo ezali na Biblia.

Ntango ya kobikisama na elimo

Nzambe alaki ete akobikisa bato na maladi mpe na mitungisi ya makanisi ntango Mwana na ye akozala Mokonzi na Boyangeli ya Mbula Nkóto awa na mabele. (Emoniseli 20:1-3; 21:3-5) Baklisto ya sembo bazelaka na motema moko ntango wana, mpe batyaka motema mobimba ete Nzambe azali na makasi ya kokokisa yango. Atako, na moi ya lelo, batyaka elikya te ete bábikisama na nzela ya makamwisi ndenge oyo ezalaki kosalema kala, kasi basɛngaka Nzambe abɔndisa bango mpe apesa bango makasi ya kolonga mikakatano. (Nzembo 55:22) Soki babɛli, basɛngaka mpe na Nzambe asunga bango mpo bákoka kozwa nkisi oyo ekosalisa bango na kotalela makoki na bango.

Na mangomba mosusu balendisaka bato ya maladi bábondela mpo bábika mbala moko, mpe bazwaka lokola ndakisa makamwisi oyo Yesu na bantoma na ye basalaki mpo na kobikisa bato. Kasi, babosanaka ete makamwisi wana esalemaki mpo na ntina moko. Ntina na yango ezalaki mpo na kondimisa bato ete Yesu Klisto azali mpenza Masiya mpe mpo na komonisa ete Nzambe aboyi libota ya Bayuda mpe akómi kosalela lisangá ya baklisto oyo eutaki kosalema. Na ntango wana, bazalaki na mposa ya makamwisi mpo na kolendisa kondima ya lisangá ya baklisto oyo eutaki kosalema. Ntango lisangá ekolaki to ekɔmelaki, makamwisi ‘elimwaki.’—1 Bakolinti 13:8, 11.

Na ntango ya mpasi oyo tozali, Yehova Nzambe azali kotambwisa basaleli na ye na mosala ya kobikisa na elimo, mosala yango ezali na ntina mingi. Lokola ntango ezali naino, bato basengeli kosala nokinoki likambo oyo bazali kosɛnga bango: “Bóluka [Yehova] naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abɛlɛmi penepene. Tiká ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanza na ye. Tiká ete [azonga] epai ya [Yehova], ete ayokela ye mawa, epai ya Nzambe na biso, zambi akolimbisa na solo.”—Yisaya 55:6, 7.

Bato ya masumu oyo babongoli mitema bazali kobikisama na elimo na nzela ya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Lokola Yehova Nzambe azali kopesa basaleli na ye makasi ya kosala mosala ya kobikisa bomoi ya bato, azali kosalisa bamilio ya bato ya bikólo nyonso bábongola mitema mpe bákóma baninga na ye liboso nsuka ya mokili mabe oyo eya. Nzambe azali koyoka mabondeli ya bato nyonso oyo bazali kobondela na bosembo mpo bábikisama na elimo mpe bato nyonso oyo bazali kobondela mpo Nzambe asalisa bango básala mosala yango ya kobikisa bato na elimo.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Eliezele na Lebeka/The Doré Bible Illustrations/Dover Publications

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto