Tóbongisa motema na biso mpo na koluka Yehova
EZELA, nganga Moyisalaele, azalaki moto oyo alingaki kosala bolukiluki, azalaki nganga-mayele, mokomi mpe molakisi ya Mibeko. Azali mpe ndakisa malamu ya moto oyo asalelaki Nzambe na molimo mobimba mpo na baklisto lelo oyo. Ndenge nini? Na likambo oyo ete azalaki kobanga Nzambe ntango nyonso ata ntango afandaki na Babilone, engumba oyo etondaki na banzambe ya lokuta mpe na losambo ya bademo.
Ezaleli ya kobanga Nzambe eyelaki Ezela yango moko te. Asalaki milende mpo na yango. Kutu, alobi na biso ete “abongisaki motema na ye mpo na kotánga Mobeko ya Yehova mpe kosalela yango.”—Ezela 7:10, NW.
Basaleli ya Yehova lelo oyo balingi kosala nyonso oyo Yehova azali kosɛnga bango ntango bafandi na mokili oyo eyini losambo ya solo, lokola Ezela asalaki. Tótalela malamu makambo oyo esengeli ete biso mpe tóbongisa motema na biso, elingi koloba bomoto na biso mobimba, makanisi na biso, bizaleli na biso, bamposa na biso mpe mikano na biso mpo na “kotánga mobeko ya Yehova mpe kosalela yango.”
Tóbongisa motema na biso
“Kobongisa” elimboli “kolɛngɛla liboso ya kosala likambo moko: kotya likambo moko na esika oyo ebongi kozala, kosalela malamu, kotya na molɔngɔ.” Soki ozwi boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe omipesi na Yehova, emonisi ete motema na yo ebongisamaki mpe tokoki kokokanisa yango na “mabele malamu” oyo Yesu alobelaki na lisese na ye ya mokoni.—Matai 13:18-23.
Atako bongo, motema na biso ezali na mposa tótyelaka yango likebi mpe tóbongisaka yango ntango nyonso. Mpo na nini? Mpo na ntina mibale. Ya liboso, mpamba te makanisi ya mabe, oyo ekokani na matiti mabe na kati ya elanga, ekoki nokinoki kobimisa misisa na mitema na biso, mingimingi na “mikolo ya nsuka” oyo “mopɛpɛ” ya mokili ya Satana esangani na mposa mabe ya nzoto. (2 Timote 3:1-5; Baefese 2:2) Ntina ya mibale etali mabele yango moko. Soki bazali kobongisa yango te, mabele ekoumela te kokauka, kokóma makasi mpe ekobota lisusu mbuma te. To bato mingi bakoki kobanda kolekaleka na elanga mpe konyatanyata mabele mpe ekokóma makasi. Ezali mpe ndenge moko na mabele ya elilingi, elingi koloba motema na biso. Ekoki kotika kobota mbuma soki basundoli yango to soki bato oyo bamibanzabanzaka mpo na bolamu na biso ya elimo te bazali konyatanyata yango.
Na yango, tomoni ete ezali na ntina mingi biso nyonso tólanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana.”—Masese 4:23.
Makambo oyo esalaka ete “mabele” ya motema na biso ezala malamu
Tótalela mwa makambo oyo esalaka ete “mabele” ya motema na biso ezala malamu mpe ekolisa milona malamu. Makambo oyo ekoki kobongisa motema na biso ezali mingi, kasi awa tokolobela kaka makambo motoba: koyeba bamposa na biso ya elimo, komikitisa, kozala sembo, kobanga Nzambe, kondima, mpe bolingo.
Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango na elimo.” (Matai 5:3, NW) Lokola soki toyoki nzala tokanisaka mbala moko ete tosengeli kolya, koyeba bamposa na biso ya elimo emonisaka biso ete tozali na mposa ya bilei ya elimo. Bato babotamaka na mposa wana ya kolya bilei ya elimo mpamba te yango esalaka ete bomoi ezala na ntina. Tokoki kobosana bamposa na biso ya elimo soki tomitiki na mitungisi ya mokili ya Satana to soki tozali lisusu koyekola te. Atako bongo, Yesu alobaki boye: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.”—Matai 4:4.
Ya solo, moto oyo alyaka malamu mikolo nyonso azalaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe soki ngonga oyo alyaka ekómi, ayokaka nzala. Ezali mpe ndenge moko na elimo. Mbala mosusu osepelaka mpenza na kotánga te, kasi soki ozali kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe soki ozali koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia ntango nyonso, okomona ete okokóma na mposa ya kotánga. Kutu, okokóma kozela na mposa mpenza ngonga ya koyekola Biblia. Yango wana, kolɛmba nzoto te; salá makasi ete okóma na mposa ya kolya bilei malamu ya elimo.
Komikitisa elɛmbisaka motema
Komikitisa ezali na ntina mingi mpo na kobongisa motema mpamba te soki tozali na komikitisa tokondima báteya biso mpe ekosalisa biso tókakatana te kasi tóndima ntango bapesi biso toli mpe basemboli biso na bolingo nyonso. Tótalela ndakisa malamu ya Mokonzi Yosiya. Ntango azalaki koyangela, bamonaki mokanda moko oyo ezalaki na Mibeko oyo Nzambe apesaki Mose. Ntango Yosiya ayokaki maloba ya Mibeko yango mpe amonaki ndenge bankɔkɔ na ye bapɛngwaki na losambo ya pɛto, apasolaki bilamba na ye mpe alelaki liboso ya Yehova. Mpo na nini Liloba ya Nzambe esimbaki makasi motema ya mokonzi? Lisolo elobi ete motema na ye “moyoki mawa,” yango wana amikitisaki ntango ayokaki maloba ya Yehova. Yehova amonaki ete Yosiya azalaki na motema ya komikitisa, ya koyoka toli mpe apambolaki ye mpo na yango.—2 Bakonzi 22:11, 18-20, Liloba lya Nzambe.
Komikitisa esalisaki bayekoli ya Yesu oyo bazalaki “bato bamesani na mikanda te” báyeba mpe básalela mateya ya solo ya elimo; mateya oyo “bato na mayele” elingi koloba “mayele ya mokili” bazalaki koyeba yango te. (Misala 4:13; Luka 10:21; 1 Bakolinti 1:26, NW) Bato yango bamibongisaki te mpo na kondima maloba ya Yehova mpamba te lolendo eyeisaki mitema na bango makasi. Tokoki kokamwa te ndenge Yehova ayini lolendo!—Masese 8:13; Danyele 5:20.
Kozala sembo mpe kobanga Nzambe
Mosakoli Yilimia akomaki ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Bokosi yango emonanaka na ndenge mingi, na ndakisa ntango tosali libunga mpe tozali koluka komilongisa. Emonanaka lisusu ntango tozali koluka komilongisa na esika oyo tozali na bolɛmbu. Nzokande, soki tozali sembo, tokotika te motema na biso ekosa biso kasi tokomona ndenge oyo tozali mpenza mpo tóbongisa. Mokomi ya nzembo amonisaki ete azalaki sembo ndenge yango ntango abondelaki boye: “Ɛ [Yehova], meká ngai mpe sosolá ngai, tángá motema na ngai mpe makanisi na ngai.” Tomoni polele ete, mokomi ya nzembo abongisaki motema na ye mpo na kondima Yehova atánga mpe ameka ye, atako mbala mosusu yango elimbolaki ayeba ete azali na mabunga mpo ete asilisa yango.—Nzembo 17:3; 26:2.
Tokoki mpe kobongisa motema na biso soki tozali kobanga Nzambe, ezaleli oyo emonanaka mpe na “koyina mabe.” (Masese 8:13) Atako asepelaka na boboto ya Yehova mpe amonaka ete Nzambe azali malamu, moto oyo abangaka mpenza Yehova, ayebaka malamu ete Yehova azali na nguya ya kopesa etumbu, ata mpe koboma bato oyo batosaka ye te. Yehova amonisaki ete bato oyo babangaka ye bakotosa mpe ye ntango alobaki mpo na Yisalaele boye: “Ɛ, soko bazalaki bobele na motema boye seko, mpo na kobanga ngai mpe mpo na kotosa malako na ngai nyonso, ete bátikala malamu, mpe bana na bango libela!”—Deteronome 5:29.
Tomoni polele ete, tokobanga Nzambe mpo na koyoka ye nsɔmɔ te, kasi mpo na kotosa ye lokola Tata na biso ya bolingo, oyo toyebi ete alingi bolamu na biso. Kobanga Nzambe na ndenge yango ezali malamu mingi mpe epesaka esengo. Yesu Klisto ye moko amonisaki yango.—Yisaya 11:3; Luka 12:5.
Kobongisa motema epesaka kondima makasi
Motema oyo ezali na kondima makasi eyebi ete eloko nyonso oyo Yehova azali kosɛnga to ayebisi na kati ya Liloba na ye ezali sembo mpe mpo na bolamu na biso. (Yisaya 48:17, 18) Moto oyo azali na motema ya ndenge yango asepelaka mingi na kosalela maloba ya kolendisa oyo ekomami na Masese 3:5, 6, oyo elobaka ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Nzokande, motema oyo ezangi kondima, ekosepela te kotalela Yehova, mingimingi soki yango esɛngi komipekisa na makambo mosusu, na ndakisa kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo na koluka matomba ya Bokonzi. (Matai 6:33) Yango wana mpenza, Yehova atalelaka motema oyo ezangi kondima ete ezali “mabe.”—Baebele 3:12.
Kondima na biso epai ya Yehova emonanaka na makambo mingi, bakisa mpe makambo tosalaka biso moko na kati ya ndako. Na ndakisa, tókamata likambo oyo elobelami na Bagalatia 6:7 ete: “Bómizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” Kondima na biso na likambo yango ekomonana na makambo lokola bafilme oyo totalaka, mikanda oyo totángaka, ngonga oyo tolekisaka na koyekola Biblia, mpe na mabondeli na biso. Ya solo, kondima makasi oyo etindaka biso na kokona “kati na elimo” ezali likambo ya ntina mingi oyo tosengeli na yango mpo na kozala na motema oyo ebongisami mpo na kondima Liloba ya Yehova mpe kotosa yango.—Bagalatia 6:8.
Bolingo eleki bizaleli nyonso
Bolingo ebongisaka mpenza mabele ya motema na biso koleka bizaleli nyonso mosusu mpo na kondima Liloba ya Yehova. Yango wana, ntango ntoma Paulo akokanisaki bolingo, kondima mpe elikya, alobaki ete bolingo ezali ezaleli “oyo eleki kati na yango.” (1 Bakolinti 13:13) Motema oyo etondi na bolingo ya Nzambe esepelaka mingi kotosa ye; eboyaka masɛngami ya Nzambe te. Ntoma Yoane alobaki boye: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Yesu mpe alobaki boye: “Soko moto nani akolingaka ngai, akotosa liloba na ngai; mpe Tata na ngai akolinga ye.” (Yoane 14:23) Tomoni ete bolingo yango emonanaka na ngámbo mibale. Yehova alingaka mingi bato oyo balingaka ye.
Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe mbala mingi tosalelaka ye masumu. Atako bongo, akimaka biso te. Epai ya basaleli na ye, Yehova alukaka “motema malamu,” motema oyo etindaka biso tóndima kosalela ye na “molimo ya botosi.” (1 Ntango 28:9) Ya solo, Yehova ayebi ete esɛngaka ntango mpe milende mpo tólona bizaleli malamu na motema na biso mpe tóbota mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, azali na motema molai epai na biso, “zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14) Yesu mpe amonisaki ezaleli yango, ata mbala moko te apamelaki bayekoli na ye makasi mpo na mabunga na bango kasi na motema molai nyonso azalaki kosunga mpe kolendisa bango. Bolingo, motema mawa, mpe motema molai ya Yehova mpe ya Yesu ezali kotinda yo te na kolinga bango mingi koleka?—Luka 7:47; 2 Petelo 3:9.
Soki yo mpe, na bantango mosusu, ozalaka na mokakatano ya kotika bizaleli ya kala oyo efandá na makanisi na yo, bizaleli oyo tokoki kokokanisa yango na matiti mabe, to kotika bomoto ya mabe oyo ezali kosila kaka te, kolɛmba nzoto te. Landá nde kosala makasi mpo na kolonga mpe ‘yiká mpiko kati na mabondeli,’ sɛngaká Yehova elimo na ye ntango nyonso. (Baloma 12:12) Na lisalisi ya Nzambe, yo mpe, na ndakisa ya Ezela, okolonga soki obongisi motema na yo malamu “mpo na kotánga Mobeko ya Yehova mpe kosalela yango.”
[Elilingi na lokasa 31]
Ezela azalaki kobanga Nzambe ata ntango azalaki na Babilone
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]
Garo Nalbandian