Ɛ Nzambe, bimisá pole na yo’
“Bimisá pole na yo mpe sembo na yo, yango ikokamba ngai.”—NZEMBO 43:3.
1. Ndenge nini Yehova ayebisaka mikano na ye?
YEHOVA aponaka malamu ntango nini akoki koyebisa basaleli na ye mikano na ye mpe lolenge nini akosala yango. Amonisaka mateya nyonso ya solo na mbala moko te, kasi angɛngisaka mayele na biso mokemoke. Ndenge oyo tozali kotambola na nzela ya bomoi ezali lokola moto oyo azali kotambola na nzela mpo na mobembo moko molai. Na ntɔngɔntɔngɔ ntango moto yango abandi mobembo na ye, amonaka biloko mingi te. Mokemoke ntango moi ezali kobima, moto yango amonaka malamu biloko oyo ezali penepene na ye. Biloko mosusu amonaka yango na molili. Kasi, ntango moi ezali se komata, akoki komona polele biloko oyo ezali mosika. Ezali mpe bongo mpo na kongɛnga ya elimo oyo Nzambe apesaka. Nzambe apesaka biso likoki ya kososola mwa makambo moke na mbala moko. Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe asalaki mpe bongo mpo na kongɛngisa bato na elimo. Tótalela naino ndenge oyo Yehova angɛngisaki basaleli na ye na ntango ya kala mpe ndenge azali kosala yango na moi ya lelo.
2. Ndenge nini Yehova azalaki kongɛngisa basaleli na ye oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya?
2 Ekoki mpenza kozala ete bana ya Kola nde bakomaki Nzembo 43. Lokola bazalaki Balevi, bapesaki bango mosala ya lokumu ya koteya bato Mibeko ya Nzambe. (Malaki 2:7) Ya solo, Yehova nde azalaki Molakisi na bango Monene, mpe bazalaki kosɛnga mayele nyonso epai na ye. (Yisaya 30:20) Mokomi ya nzembo yango asalaki libondeli oyo: “Ɛ Nzambe, . . . bimisá pole na yo mpe sembo na yo, yango ikokamba ngai.” (Nzembo 43:1, 3) Ntango Bayisalaele bazalaki sembo epai na ye, Yehova azalaki koteya bango banzela na ye. Bankama ya bambula na nsima, Yehova angɛngisaki bango mpe ateyaki bango mateya malamu ya solo. Nzambe asalaki makambo yango ntango atindaki Mwana na ye, awa na mabele.
3. Ndenge nini mateya ya Yesu etyaki Bayuda na komekama?
3 Ntango azalaki moto na nkombo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe azalaki mpenza “moi ya mokili.” (Yoane 8:12) Ateyaki bato “makambo mingi na masese,” ateyaki bango makambo ya sika. (Malako 4:2) Yesu alobaki na Ponto Pilata ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Yango ezalaki likambo ya sika mpo na moto ya Loma. Tokanisi mpe ete ezalaki likambo ya sika mpo na Bayuda oyo balingaki ekólo na bango mingi, mpamba te Bayuda yango bazalaki kokanisa ete Masiya akobundisa Bokonzi ya Loma, akolonga yango mpe akozongisa lokumu oyo Yisalaele ezalaki na yango liboso. Yesu azalaki komonisa kongɛnga ya Yehova, kasi maloba na ye esepelisaki bakonzi ya Bayuda te, bango “balingaki lokumu ya bato liboso ya lokumu ya Nzambe.” (Yoane 12:42, 43) Bato mingi baponaki kolanda kaka bonkɔkɔ na bango na esika bándima kongɛnga ya elimo mpe mateya ya solo ya Nzambe.—Nzembo 43:3; Matai 13:15.
4. Nini elakisi biso ete bososoli ya bayekoli ya Yesu esengelaki kobakisama ntango nyonso?
4 Kasi, mwa bato moke ya mitema sembo bandimaki na esengo mateya ya solo ya Yesu. Bososoli na bango ya mikano ya Nzambe ebakisamaki nokinoki. Kasi, ntango etikalaki moke Molakisi na bango asukisa bomoi na ye awa na mabele, ezalaki naino na makambo mingi oyo basengelaki koyekola. Yesu alobaki na bango boye: “Ngai nazali na makambo mingi ya koloba na bino nde bokoki koyamba yango [sikoyo] te.” (Yoane 16:12) Bayekoli ya Yesu basengelaki kobakisa ntango nyonso bososoli na bango ya mateya ya solo ya Nzambe.
Kongɛnga ezali se kobakisama
5. Motuna nini ebimaki na ekeke ya liboso, mpe banani bazalaki na mokumba ya kopesa eyano na motuna yango?
5 Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, pole ya Nzambe engɛngaki lisusu makasi koleka ndenge oyo ezalaki liboso. Yehova amonisaki Petelo emonaneli moko; na kati ya emonaneli yango, ayebisaki ye ete banda ntango wana, bato oyo bakatami ngenga te, elingi koloba bato oyo bazali Bayuda te, bakokaki kokóma bayekoli ya Klisto. (Misala 10:9-17) Ezalaki mpenza likambo ya sika! Kasi, motuna moko ebimaki na nsima: Yehova asɛngisaki ete bato ya mabota mosusu oyo bakómaki baklisto bákatama ngenga to te? Nzambe alakisaki emonaneli moko te mpo na kopesa eyano na motuna wana, mpe likambo yango ebimisaki ntembe monene kati na baklisto. Esengelaki kokata likambo yango, noki te elingaki kobebisa bomoko na bango. Yango wana, ‘bantoma, na mikóló ya lingomba, bayanganaki kokanisa ntina ya likambo yango’ na Yelusaleme.—Misala 15:1, 2, 6.
6. Bantoma na mikóló basalaki nini mpo na kokata likambo ya kokatama ngenga?
6 Ndenge nini bato oyo bazalaki na likita yango bakokaki koyeba mokano ya Nzambe mpo na bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bandimi? Yehova atindaki anzelu te mpo na kokamba likita yango, apesaki mpe bato oyo bazalaki wana emonaneli te. Kasi, bantoma na mikóló bazangaki eloko ya kosala te mpo na kokata likambo yango. Bayokaki maloba ya baklisto mosusu oyo bazalaki Bayuda, baoyo bamonaki makambo oyo Nzambe abandaki kosala epai ya bato ya bikólo mosusu, ndenge asopaki elimo santu na ye likoló ya bato yango atako bakatamaki ngenga te. Batángaki mpe Makomami mpo na kozwa mayele. Yango wana, moyekoli Yakobo apesaki likanisi oyo eutaki na vɛrsɛ moko ya Biblia mpe engɛngisaki bango. Ntango bakanisaki malamu, basosolaki mpenza mokano ya Nzambe. Bato ya bikólo mosusu basengelaki kokatama ngenga te liboso Yehova andima bango. Mbala moko bantoma na mikóló mosusu bakomaki ekateli oyo bazwaki na mikanda mpo baninga na bango baklisto bálanda yango.—Misala 15:12-29; 16:4.
7. Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima makanisi ya sika?
7 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda batingamaki na bonkɔkɔ na bango, kasi Bayuda oyo bakómaki baklisto basepelaki ntango basosolaki mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato ya bikólo mosusu, atako esɛngaki bábongola makanisi na bango mpo na bato ya bikólo mosusu liboso bándima mokano yango. Yehova apambolaki elimo na bango ya komikitisa, mpe “[masangá, NW] malendisami na kondima, mpe motuya na bango ezalaki koleka monene mokolo na mokolo.”—Misala 15:31; 16:5.
8. (a) Nini emonisi biso ete kongɛngisama esengelaki kosuka na ekeke ya liboso te? (b) Wapi mituna ya ntina mingi oyo tokotalela?
8 Kongɛnga ya elimo ezalaki se kobakisama na ekeke ya liboso. Kasi, Yehova ayebisaki baklisto ya ekeke ya liboso mikano na ye nyonso te. Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bandimi na ekeke ya liboso boye: “[Sikoyo] tozali naino kotala lokola kati na talatala mpe tokokakatanaka.” (1 Bakolinti 13:12) Talatala yango ezalaki sɛlisɛli mpenza te. Yango wana, na ebandeli, bazalaki kososola makambo nyonso ya elimo te. Ntango bantoma nyonso bakufaki, kongɛnga ekitaki, kasi na ntango na biso, boyebi ya Biblia ebakisami mingi. (Danyele 12:4) Lelo oyo, ndenge nini Yehova azali kongɛngisa bato na ye? Mpe tosengeli kozala na ezaleli nini ntango Nzambe abakisi bososoli na biso ya Biblia?
Kongɛnga ezali kobakisama mokemoke
9. Lolenge nini ya malamu oyo ekokanaki na mosusu te mpo na koyekola Biblia Bayekoli ya Biblia basalelaki na ebandeli?
9 Na ntango na biso, kongɛnga ya solosolo ya elimo ebandaki komonana na nsuka ya ekeke ya 19. Na ntango yango, mwa baklisto moke babandaki koyekola Biblia malamumalamu. Bazwaki mayele ya malamu mpenza mpo na koyekola Biblia. Bazalaki kosala boye: Soki moto abimisi motuna moko, bango nyonso bazalaki kotalela bavɛrsɛ nyonso ya Biblia oyo ezali kolobela likambo yango. Soki makanisi ya vɛrsɛ moko eyokani te na bavɛrsɛ mosusu, baklisto yango ya sembo bazalaki koluka ndenge ya koyokanisa makanisi nyonso. Bayekoli ya Biblia (ndenge oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana) bazalaki lokola bakonzi ya mangomba ya ntango wana te; bango bazalaki mpenza na mposa ete Makomami Mosantu etambwisa bango, kasi bonkɔkɔ to mateya ya bato te. Nsima ya kotalela bavɛrsɛ nyonso oyo elobeli likambo moko, makanisi ya nsuka oyo bazwi bazalaki kokoma yango. Na ndenge yango basosolaki malamu mateya mingi ya ebandeli na Biblia.
10. Charles Taze Russell akomaki mokanda nini oyo ezalaki kolimbola Biblia?
10 Na kati ya Bayekoli yango ya Biblia, moto moko oyo amipesaki mingi mpenza ezali Charles Taze Russell. Ye akomaki mokanda moko oyo ezalaki kolimbola mateya ya Biblia; babengaki mokanda yango Étude des Écritures mpe ezalaki na bavolimi motoba. Ndeko Russell akanaki kokoma volimi ya nsambo oyo esengelaki kolimbola mokanda ya Ezekiele mpe mokanda ya Emoniseli. Alobaki ete: “Soki kaka nakangi ntina na yango, nakokoma volimi ya nsambo.” Kasi, abakisaki ete: “Soki Nkolo apesi mayele yango epai ya moto mosusu, moto yango akoma yango.”
11. Ndenge nini bososoli na biso ya mikano ya Nzambe etalelaka ntango?
11 Maloba yango ya Charles Russell emonisi ete ntango ezali na ntina mpo tókoka kososola bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Ndeko Russell ayebaki ete akokaki kosala na makasi na ye moko te mpo na kososola mokanda ya Emoniseli, ndenge moko mpe mpo na moto oyo azali kotambola, akoki kobenda moi na makasi te mpo engɛngisa liboso ete ntango na yango ekoka.
Emonisami, kasi na ntango oyo Nzambe aponi
12. (a) Ntango nini esakweli moko ya Biblia eyebanaka malamumalamu? (b) Ndakisa nini emonisi ete makoki na biso ya kososola bisakweli ya Biblia etaleli ndenge oyo Nzambe akabolá ntango na ye? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
12 Lokola kaka bantoma bakangaki ntina ya bisakweli mingi oyo elobeli Masiya nsima ya liwa mpe ya lisekwa ya Yesu, lelo oyo mpe baklisto bakangaka malamumalamu ntina ya bisakweli ya Biblia soki ekokisami. (Luka 24:15, 27; Misala 1:15-21; 4:26, 27) Emoniseli ezali mokanda ya bisakweli; yango wana, tokokanga ntina na yango malamumalamu se na ntango oyo makambo oyo ekomami na mokanda yango ezali kokokisama. Na ndakisa, Charles Russell akokaki te koyeba malamu ndimbola ya nyama na yauli ya langi ya motane oyo elobelami na Emoniseli 17:9-11, mpamba te bibongiseli oyo emonisami na elilingi ya nyama yango, elingi koloba Société des Nations mpe ONU, esalemaki nsima ya liwa na ye.a
13. Likambo nini esalemaka ntango mosusu soki liteya moko ya Biblia engɛngisami?
13 Ntango baklisto ya ekeke ya liboso basosolaki ete bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te bakoki kokóma bandimi lokola bango, likambo wana ya sika ebimisaki motuna ya koyeba soki esengelaki bato yango bákatama ngenga to te. Yango wana bantoma na mikóló batalelaki lisusu likambo ya kokatama ngenga na mobimba na yango. Lelo oyo, baklisto balandaka ndakisa wana. Soki liteya moko ya Biblia elimbolami lisusu polele, esɛngaka mbala mosusu ete basaleli bapakolami ya Nzambe, oyo tobengi “moombo ya sembo mpe ya mayele,” bátalela lisusu makambo oyo eyokani na yango, lokola ndakisa oyo elandi ekomonisa yango.—Matai 24:45.
14-16. Ntango makanisi na biso mpo na tempelo ya elimo esembolamaki, ndenge nini esalisaki biso mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Ezekiele mokapo 40 tii 48?
14 Na 1971, la Société abimisaki mokanda “Les nations sauront que je suis Jéhovah”—Comment? oyo elimbolaki esakweli ya Ezekiele. Mokapo moko ya mokanda yango elobelaki mwa moke emonaneli ya tempelo ya Ezekiele. (Ezekiele, mokapo 40 tii 48) Na ntango wana, makanisi ezalaki mingimingi kotalela ndenge oyo emonaneli ya tempelo ya Ezekiele ekokokisama na mokili ya sika.—2 Petelo 3:13.
15 Kasi, masolo mibale oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1972, ebongolaki makanisi na biso mpo na emonaneli ya Ezekiele. Masolo yango elobelaki tempelo monene ya elimo oyo ntoma Paulo alimbolaki na mokanda ya Baebele mokapo 10. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ete Esika Mosantu mpe lopango ya kati ya tempelo yango ya elimo etaleli bomoi ya bapakolami ntango bazali naino awa na mabele. Nsima ya bambula, ntango Ezekiele mokapo 40 tii 48 etalelamaki lisusu, tososolaki ete lokola mosala ezali kosalema na kati ya tempelo ya elimo lelo oyo, elingi koloba ete tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezali kosala lelo oyo. Ndenge nini?
16 Na emonaneli ya Ezekiele, banganga bazali kotambola na mapango ya tempelo mpo na kosalela mabota oyo ezali mabota ya banganga te. Ezali polele ete banganga yango bazali elilingi ya “banganga ya bokonzi,” basaleli ya Yehova oyo bapakolami na elimo. (1 Petelo 2:9) Kasi, na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, bakosala mosala na bango na lopango ya tempelo awa mabele te. (Emoniseli 20:4) Na boumeli ya bambula mingi ya eleko yango, to mpe na eleko yango mobimba, bapakolami bakosalela Nzambe na Esika Eleki Bosantu na tempelo ya elimo, na “Likoló mpenza.” (Baebele 9:24) Lokola na kati ya emonaneli banganga bazali kokɔta mpe kobima na mapango ya tempelo ya Ezekiele, elimboli mpenza ete emonaneli yango ezali kokokisama sikoyo, ntango bapakolami mosusu bazali naino awa na mabele. Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1999 esembolaki lisusu mayele na biso na likambo yango. Boye, tomoni ete tii na nsuka ya ekeke ya 20, esakweli ya Ezekiele engɛngisamaki lisusu.
Kokakatana te mpo na kondima ndimbola ya sika
17. Mbongwana nini osali na makanisi na yo banda oyebi mateya ya solo, mpe matomba nini yango ememeli yo?
17 Moto nyonso oyo alingi koyeba solo asengeli kondima komema “makanisi nyonso na nkanga ete matosa Klisto.” (2 Bakolinti 10:5) Likambo yango ezalaka ntango mosusu mpasi, mingimingi soki makanisi ya kala ekɔtá mpe efandá mpenza na mitema na biso. Na ndakisa, liboso oyekola mateya ya solo, mbala mosusu ozalaki kosala bafeti mosusu ya mangomba na bandeko na yo. Kasi, ntango okómaki koyekola Biblia, okangaki ntina ete bafeti yango euti na bapakano. Mbala mosusu, na ebandeli ozalaki kokakatana mpo na kotosa makambo oyo ozalaki koyekola. Nzokande, nsukansuka, okómaki kolinga Nzambe koleka makambo ya mangomba, yango wana oboyaki bafeti yango oyo Nzambe aboyi. Yehova apambolaki mokano oyo ozwaki, boye te?—Talá Baebele 11:25.
18. Tosengeli kosala nini ntango bososoli na biso ya mateya ya Biblia engɛngisami?
18 Soki tosali makambo na ndenge oyo Nzambe alingaka, ememelaka biso kaka bolamu. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana, ntango mokapo moko ya Biblia engɛngisami polele, tósepela na solo oyo ezali se kokende liboso! Ya solo, ndenge oyo tozali ntango nyonso kongɛngisama ezali komonisa ete tozali na nzela ya malamu. Yango nde “nzela ya bayengebene,” oyo “ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.” (Masese 4:18) Sikoyo, tozali komona makambo mosusu oyo etali mokano ya Nzambe “malamu te.” Kasi soki tozali kotambola kaka na “nzela,” soki ntango oyo Nzambe aponi ekoki, tokomona mateya ya solo na kongɛnga na yango nyonso. Kasi, mpo na sikoyo, tósepela na mateya ya solo oyo Yehova azali kolimbola polele, mpe tózela kongɛngisama mpo na makambo oyo elimbolami naino polele te.
19. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mateya ya solo?
19 Ndenge nini tokoki komonisa mpenza ete tozali kosepela na moi? Lolenge moko ya komonisa yango ezali na kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala, kutu soki likoki ezali, kotánga yango mokolo na mokolo. Otángaka Biblia mbala na mbala? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká epesaka biso mpe ebele ya bilei kitoko na elimo. Tozali mpe na babuku, mwa babuku, na mikanda mosusu oyo ekomami mpo na bolamu na biso. Tókanisa mpe masolo ya kolendisa oyo elobelaka mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi, masolo oyo ebimaka na Annuaire!
20. Ndenge nini kongɛngisama mpe koyeba solo ya Yehova etaleli koyangana na biso na makita?
20 Yehova ayoki mpenza libondeli oyo ezali na Nzembo 43:3. Maloba ya nsuka ya vɛrsɛ yango, elobi ete: “[Kongɛnga mpe solo na yo] ikokómisa ngai na ngomba ya bulɛɛ na yo mpe na esika ekofanda yo.” Ozali na mposa ete yo na ebele ya bato mosusu bósambela Yehova elongo? Lelo oyo, Yehova azali kongɛngisa biso mingi na nzela ya mateya ya elimo oyo epesamaka na makita na biso. Tokosala nini mpo na kosepela mingi lisusu na makita? Tosɛngi yo otalela likambo yango malamumalamu na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nsima ya liwa ya Charles Russell, mokanda moko ekomamaki mpo na komeka kolimbola mokanda ya Ezekiele mpe mokanda ya Emoniseli; babengaki yango ete volimi ya nsango ya Étude des Écritures. Na bisika mosusu, mokanda yango ezalaki na bandimbola oyo Russell apesaki mpo na mikanda yango ya Biblia. Kasi, ntango ya kolimbola bisakweli wana ekokaki naino te, mpe bandimbola oyo ezalaki na mokanda yango ezalaki polele te. Na bambula oyo elandaki, ngɔlu ya Yehova mpe makambo oyo ezalaki kobima na mokili esalisaki baklisto básosola malamumalamu mikanda yango ya bisakweli.
Okoki kopesa eyano?
• Mpo na nini Yehova ayebisaka mikano na ye na mbala moko te?
• Ndenge nini bantoma mpe mikóló ya Yelusaleme bakataki likambo ya kokatama ngenga?
• Bayekoli ya Biblia basalelaki lolenge nini oyo ekokani na mosusu te mpo na koyekola Biblia, mpe mpo na nini ezalaki lolenge oyo ekeseni na mosusu nyonso?
• Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge oyo kongɛnga ya elimo eyaka na ntango oyo Nzambe aponi.
[Elilingi na lokasa 12]
Charles Taze Russell ayebaki ete mokanda ya Emoniseli ekongɛngisama na ntango oyo Nzambe aponi.