Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/3 nk. 25-28
  • Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyokani na ye na Yehova ezalaki na esika ya liboso
  • Azalaki na boyokani malamu na bazalani na ye
  • Azalaki pɛto na makambo ya kosangisa nzoto
  • Azalaki komitungisa mpo na libota na ye
  • Ayikaki mpiko na bosembo nyonso na ntango ya komekama
  • Amikitisaki mpe andimaki básembola ye
  • Yehova apesaki ye mbano
  • Mbano ya Yobo​—⁠Liziba ya elikya mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova abikisaki bampasi na ye
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/3 nk. 25-28

Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye

ZULUNALO moko ya Afrika ekomaki lapolo moko, esili koleka mwa bambula ete: “Sanza na sanza na ekólo Zambie, bangando elyaka bato 30.” Moto moko oyo ayekolaka banyama, akangaki ngando mpo na koyekola yango, alobaki ete: “Esengeli bato 12 mpo na kokanga ngando moko.” Ngando ezali mpenza nyama makasi mpamba te mokila na yango mpe na monɔkɔ na yango ezalaka na makasi!

Emonani ete Mozalisi azalaki kolobela ngando ntango asalelaki ndakisa ya “lewiatana,” ‘mokonzi ya nyama nyonso na yauli’ mpo na kopesa mosaleli na ye Yobo liteya moko ya monene. (Yobo 41:1, 34, NW ) Likambo yango esalemaki esili koleka mbula soko 3 500 na mokili ya Usa, na nɔrdi ya Arabie. Ntango Nzambe azalaki kolobela nyama yango, ayebisaki Yobo boye: “Moto na yauli azali te oyo akondimaka kotungisa ye, boye nani ayebi kotɛlɛma liboso na ngai?” (Yobo 41:10) Ezali mpenza solo! Soki tobangaka ngando, tokobanga mpenza koloba mabe mpo na Ye oyo asalaki ngando! Yobo asepelaki na liteya yango mpe andimaki libunga na ye.—Yobo 42:1-6.

Lokola tozali kolobela Yobo, tokoki komikundola ndakisa ya bosembo na ye ndenge ayikaki mpiko na komekama. (Yakobo 5:11) Ya solo, Yehova asepelaki na Yobo liboso kutu akutana na komekama makasi yango. Na ntango wana, mpo na Yehova, ‘moto mosusu azalaki lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.’ (Yobo 1:8) Yango ezali kosalisa biso tóyeba makambo mosusu mingi oyo etali Yobo mpo esalisa biso tómona ndenge nini biso mpe tokoki kosepelisa Nzambe.

Boyokani na ye na Yehova ezalaki na esika ya liboso

Yobo azalaki na bomɛngo. Longola wolo, azalaki na mpate 7 000, kamela 3 000, mpunda basi 500, ngɔmbɛ 1 000 mpe basali ebele. (Yobo 1:3) Nzokande Yobo atyaki motema na ye na Yehova kasi na bomɛngo te. Alobaki ete: “Soko natii wolo lokola elikya na ngai, to nabyangi wolo na kitoko kondimana na ngai; soko nasepelaki mpo ete bozwi na ngai ezali monene to mpo ete lobɔkɔ na ngai ezwi mingi . . . , yango mpe ekozala lisumu kopesamela etumbu na mosambisi, zambi nazalaki kowangana Nzambe na likoló.” (Yobo 31:24-28) Lokola Yobo, tosengeli komona mpenza ete boyokani malamu elongo na Yehova Nzambe eleki biloko ya mosuni mosika.

Azalaki na boyokani malamu na bazalani na ye

Yobo azalaki koyokana na basali na ye? Maloba ya Yobo ye moko emonisi ete bamonaki ye sembo mpe azalaki kosolola na bango malamu, alobi boye: “Soko naboyi likambo na moombo mobali na ngai to moombo mwasi na ngai wana bayei kobɛtɛla ngai ntembe, ngai nakosala nini wana Nzambe akotɛlɛma? Wana ye akoyela ngai, nakozongisela ye liloba nini?” (Yobo 31:13, 14) Yobo amonaki mpenza ete motema mawa ya Yehova ezali na ntina mingi, yango wana ye mpe amoniselaki basali na ye motema mawa. Oyo nde ndakisa malamu mingimingi mpo na baoyo bazali na mokumba ya kokɛngɛla lisangá ya boklisto! Bango mpe basengeli kozala sembo, koponapona bilongi te; na ndenge yango bato mosusu bakokakatana te mpo na kokenda kosolola na bango.

Yobo azalaki mpe kosepela na bato oyo bazalaki na ndako na ye te. Amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bato mosusu ntango alobaki ete: “Soko naboyeli babola esengo na bango, to nalɛmbisi miso na mwasi-mokufeli-mobali, . . . soko natomboli lobɔkɔ na ngai epai na etike na tata mpo ete namoni mosungi na ngai na ekuke; tiká ete lobɔkɔ na ngai ebima na lipeka na ngai, mpe ete lobɔkɔ na ngai ebukana na mokuwa na likoló.” (Yobo 31:16-22) Tiká ete biso mpe tómibanzabanzaka mpo na bandeko ya lisangá oyo toyebi ete bazali na mpasi.

Yobo azalaki na ezaleli ya koyamba bapaya, yango wana azalaki kosepela na bazalani na ye kasi azalaki kotala kaka bamposa na ye moko te. Yango wana alobaki ete: “Mopaya alalaki na nzela te, nazipolaki bikuke na ngai epai na motamboli.” (Yobo 31:32) Oyo nde ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo! Ntango bato ya sika oyo basepelaka na solo ya Biblia bazali koya na Ndako ya Bokonzi, soki toyambi bango malamu, ekoki kosala ete bákola na elimo. Tóbosana te ete tosengeli mpe koyamba bakɛngɛli-batamboli mpe baklisto mosusu na boboto.—1 Petelo 4:9; 3 Yoane 5-8.

Lisusu, Yobo ayinaki banguna na ye te. Azalaki kosepela te na mpasi oyo ekómeli moto oyo ayinaka ye. (Yobo 31:29, 30) Kasi mposa na ye ezalaki ete asalela bato yango makambo malamu, yango emonisami na ndenge asepelaki kosambela mpo na babɔndisi na ye misato ya lokuta.—Yobo 16:2; 42:8, 9; kokanisá na Matai 5:43-48.

Azalaki pɛto na makambo ya kosangisa nzoto

Yobo azalaki sembo epai ya mwasi na ye, atikaki ata moke te ete motema na ye ekolisa makanisi ya kolula mwasi mosusu. Alobaki boye: “Nakati kondimana na miso na ngai elongo, nzela nini [kutu] nakoki kotalaka epai na moseka? Soko motema na ngai ebendami na mwasi mpe soko nalambeli na ekuke na mozalani na ngai; tiká ete mwasi na ngai atutela mobali mosusu bilei, mpe bamosusu bakumbama likoló na ye. Zambi oyo ezali lisumu monene mpenza, ezali mabe makoki kopesamela etumbu epai na basambisi.”—Yobo 31:1, 9-11.

Yobo atikaki te ete mposa mabe ebebisa motema na ye. Abatelaki nde etamboli ya sembo. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yehova asepelaki na moto yango ya sembo, oyo azalaki kokima motambo ya ekobo!—Matai 5:27-30.

Azalaki komitungisa mpo na libota na ye

Na bantango mosusu, bana ya Yobo bazalaki kosala bafeti. Na bafeti yango, bana na ye nyonso ya mibali na ya basi, bazalaki kokutana. Nsima ya bafeti wana, Yobo azalaki komitungisa mingi soki bana na ye basalelaki Yehova lisumu moko te. Yango wana azalaki kosala likambo oyo lisolo ya Biblia elobi, ete: “Mpe wana mikolo na bilambo na bango esili, Yobo abyangaki bango mpe abulisaki bango. Alamukaki na ntɔngɔntɔngɔ mpe abimisaki mbeka na kotumba mpo na motuya na bango nyonso, zambi Yobo alobaki ete, Soko bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe na mitema na bango.” (Yobo 1:4, 5) Na ntembe te, likambo yango etindaki bato ya Yobo bábanga Yehova mpe bátambola na nzela na Ye!

Lelo oyo, batata ya mabota basengeli koteya mabota na bango makambo ya Biblia, Liloba ya Nzambe. (1 Timote 5:8) Mpe ebongi mpenza kobondela mpo na bolamu ya libota.—Baloma 12:12.

Ayikaki mpiko na bosembo nyonso na ntango ya komekama

Bato mingi oyo batángaka Biblia bayebi komekama makasi oyo Yobo akutanaki na yango. Satana Zabolo alobaki ete na kati ya mpasi, Yobo akolakela Nzambe mabe. Yehova andimaki ntembe wana mpe eumelaki te, Satana anyokolaki Yobo na mpasi ndenge na ndenge. Bibwele nyonso azalaki kobɔkɔla ekufaki. Anyokwamaki lisusu mingi mpo bana na ye nyonso bakufaki. Mwa moke na nsima, Satana abwakelaki Yobo maladi. Bambuma (abcès) ebimaki ye banda na matambe kino na motó.—Yobo, mokapo 1, 2.

Esukaki ndenge nini? Ntango mwasi na ye alobaki na ye alakela Nzambe mabe, Yobo azongisaki ete: “Yo ozali koloba lokola ekolobaka basi na bilema. Nini? Tokozwa malamu na mabɔkɔ na Nzambe; bongo tokozwa mabe mpe te?” Biblia ebakisi ete: “Na oyo nyonso Yobo asalaki lisumu na bibɛbu na ye te.” (Yobo 2:10) Ya solo, Yobo ayikaki mpiko na bosembo nyonso mpe amonisaki ete Zabolo azali na lokuta. Tiká ete biso mpe tóyika mpiko kati na komekama mpe tómonisa ete tozali kosalela Nzambe mpo tolingaka Ye.—Matai 22:36-38.

Amikitisaki mpe andimaki básembola ye

Atako Yobo azalaki ndakisa malamu na makambo mingi, azalaki moto ya kokoka te. Ye moko alobaki ete: “Nani akolonga kobimisa eloko na pɛto kati na eloko na mbindo? Moko te.” (Yobo 14:4; Baloma 5:12) Na yango, ntango Nzambe alobaki ete Yobo azalaki moto malamu bɛ, yango ezalaki solo mpamba te Yobo atosaki makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga epai na basalaleli na ye, bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu. Yango ezali mpenza kolendisa biso!

Yobo ayikaki mpiko kati na komekama kasi asalaki mpe mwa mabunga. Ntango bayokaki mpasi oyo ekómelaki Yobo, bato misato bayaki kotala ye mpo na kobɔndisa ye kasi na ndenge ya lokuta. (Yobo 2:11-13) Balobaki ete Yehova apesaki Yobo etumbu mpo na masumu minene oyo ye asalaki. Yobo ayokaki mpasi mpenza mpo na bifundeli yango ya lokuta mpe alukaki na molende nyonso komilongisa. Kasi, lokola abandaki koluka komilongisa, azalaki lisusu na bokatikati te. Alobaki kutu ete azali sembo koleka Nzambe!—Yobo 35:2, 3.

Lokola Nzambe alingaki Yobo, asalelaki elenge mobali moko mpo na komonisa mabunga ya Yobo. Lisolo emonisi ete: “Bongo, nkanda ya Eliu epelisami, . . . nkanda na ye epelisameli Yobo mpo ete alongisaki molimo na ye moko liboso na Nzambe.” Lokola Eliu amonaki yango: “Yobo asili koloba ete, Ngai moyengebene, mpe Nzambe alongoli elonga na ngai.” (Yobo 32:2; 34:5) Kasi Eliu asanganaki te na “babɔndisi” oyo misato mpo na koloba na lokuta nyonso ete Nzambe apesaki Yobo etumbu mpo na masumu na ye. Eliu andimaki nde bosembo ya Yobo mpe apesaki ye toli oyo: “Likambo ezali liboso na ye mpe ozali kozela ye!” Ya solo, Yobo asengelaki kozela Yehova na esika ya koluka nokinoki komilongisa. Eliu alendisaki Yobo ete: ‘Bosembo na boyengebene monene na ye akonyokola te.’—Yobo 35:14; 37:23, NW.

Makanisi ya Yobo esengelaki kosembolama. Yango wana, Yehova apesaki ye liteya, amonisaki ye ete moto azali moke mpenza soki tokokanisi ye na bonene ya Nzambe. Yehova alobaki bongo mpo azalaki kotala mabele, mai monene, likoló oyo etondi na minzoto, banyama mpe biloko kitoko mosusu oyo ye asalá. Na nsuka, Nzambe alobelaki lewiatana to ngando. Yobo apesi biso ndakisa mosusu na ndenge amikitisaki mpe andimaki básembola ye.

Atako tozali kosala mosala ya Yehova malamu, tosalaka mabunga. Soki libunga yango ezali mpenza monene, Yehova akoki kosembola biso na ndenge alingi. (Masese 3:11, 12) Ekoki kozala na nzela ya mokapo moko ya Biblia oyo ekosimba lisosoli na biso. Ekoki mpe kozala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to mokanda mosusu ya la Société oyo elobeli likambo moko oyo emonisi biso libunga tosali. To mpe ndeko moklisto moko akoki komonisa biso ete tozangaki kosalela etinda moko ya Biblia. Tokosala nini soki basemboli biso ndenge wana? Yobo amonisaki ete elimo na ye etungisamaki ntango alobaki ete: “Namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu ya mɔ́tɔ.”—Yobo 42:6.

Yehova apesaki ye mbano

Yehova apambolaki Yobo mpe atikaki mosaleli na ye azala na bomoi na boumeli ya mbula mosusu 140. Na boumeli na yango, azwaki biloko mingi koleka oyo ye abungisaki. Mpe atako Yobo akufaki, azalaki mpenza na elikya ya kosekwa na mokili ya sika ya Nzambe.—Yobo 42:12-17; Ezekiele 14:14; Yoane 5:28, 29; 2 Petelo 3:13.

Biso mpe tokoki kozala na elikya ete Nzambe akopambola biso mpe akopesa biso ngɔlu na ye soki tozali kosalela ye na bosembo nyonso mpe soki tozali kondima kosembolama na toli nyonso oyo euti na Biblia. Nsukansuka, tokobatela elikya na biso ya kozala na bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe. Likambo oyo eleki ntina ezali ete tokokumisa Nzambe. Etamboli na biso ya sembo ekomemela biso mapamboli mpe ekozala elembeteli mosusu ete basaleli ya Nzambe basalelaka ye mpo na koluka matomba na bango moko te kasi mpo balingi ye na motema na bango mobimba. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kosepelisa motema ya Yehova lokola Yobo asalaki yango, ye moto oyo amikitisaki mpe andimaki básembola ye!—Masese 27:11.

[Bililingi na lokasa 26]

Yobo alingaki bitike, basi-bakufeli-mibali na bato mosusu.

[Bililingi na lokasa 28]

Yobo azwaki mapamboli mingi mpo amikitisaki mpe andimaki básembola ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto