Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/4 nk. 8-11
  • Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosala lelo oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosala lelo oyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Elimo ya solo”
  • Ndenge oyo elimo santu ezali kosala na mikolo na biso
  • “Bokozala batatoli na ngai”
  • Ndenge oyo elimo ya Nzambe ezali kosala epai na yo
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo na Nzambe ekoki kozala na bopusi likoló na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/4 nk. 8-11

Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosala lelo oyo?

MOTO moko oyo abotamá ebɔsɔnɔ, azalaki kofanda mokolo na mokolo na ekɔtelo moko ya tempelo oyo bazalaki kobenga Kitoko mpo na kosɛngasɛnga bato oyo bazalaki kokɔta na tempelo bákabela ye. Kasi, mokolo moko, bakabelaki mosɛngi yango eloko oyo elekaki mpenza mwa mbongo ya bibende oyo bazalaki kopesa ye. Basalisaki ye mpe maladi na ye esilaki!​—Misala 3:2-8.

Ntoma Petelo na ntoma Yoane ‘batɛlɛmisaki ye’ mpe ‘makolo na ye ekómaki makasi,’ kasi balobaki te ete bango nde babikisaki ye. Tolobi bongo mpamba te Petelo ye moko alobaki ete: “Mibali ya Yisalaele, bozali kokamwa moto oyo mpo na nini? Mpe bozali kotyela biso miso mpo na nini?​—lokola soko na nguya na biso mpenza soko na sembo na biso mpenza tosili kotambolisa moto oyo.” Petelo na Yoane bayebaki ete basalaki likambo yango na makasi na bango moko te, kasi na elimo santu ya Nzambe.​—Misala 3:7-16; 4:29-31.

Na ntango wana, “misala ya nguya” ya ndenge wana ezalaki kosalema mpo na kolakisa ete Nzambe andimaki lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema. (Baebele 2:4) Kasi, ntoma Paulo alobaki ete misala yango ya nguya esengelaki “kolimwa” soki ekokisi mokano na yango.a (1 Bakolinti 13:8) Yango wana, lelo oyo na lisangá ya baklisto ya solo, tomonaka makambo ya kobikisa bato na makamwisi te, ya koyebisa bisakweli te to ya kobengana bademo te.

Kasi, elingi koloba te ete elimo santu ya Nzambe esalaka lisusu te. Tótalela mwa balolenge mosusu oyo elimo ya Nzambe ezalaki kosala na ekeke ya liboso mpe ndenge oyo ezali kosala lelo oyo.

“Elimo ya solo”

Mosala mosusu ya elimo santu ya Nzambe ezali bongo koyebisa, kongɛngisa, komonisa mateya ya solo. Ntango liwa na ye ekómaki pene, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ngai nazali na makambo mingi ya koloba na bino nde bokoki koyamba yango [sikoyo] te. Nde ekoya ye, [elimo,NW] ya solo, akokamba bino kati na solo nyonso.”​—Yoane 16:12, 13.

“Elimo ya solo” eyaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango bayekoli soki 120 oyo bayanganaki na ndako moko na etaze na Yelusaleme babatisamaki na elimo santu. (Misala 2:1-4) Ntoma Petelo azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kuna mpo na feti ya Pantekote oyo bazalaki kosala mbula na mbula. Petelo atondaki na elimo santu, ‘atɛlɛmaki’ mpe alimbolaki to ayeisaki polele, mateya mingi na ntina na Yesu. Na ndakisa, ayebisaki ndenge oyo ‘Nzambe atombolaki’ “Yesu ya Nasalete” ‘na lobɔkɔ na ye ya mobali.’ (Misala 2:14, 22, 33) Elimo ya Nzambe etindaki lisusu Petelo aloba na molende epai ya Bayuda oyo bazalaki koyoka ye boye: “Tiká ete libota mobimba ya Yisalaele báyeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisi ye na [nzete, NW].” (Misala 2:36) Nsango oyo elimo ya Nzambe etindaki Petelo aloba ebotaki mbuma: bato soki nkóto misato ‘bayambaki mateya na ye’ mpe bazwaki batisimo. Na ndenge yango, elimo santu ya Nzambe esalisaki bango bákɔta na losambo ya solo.​—Misala 2:37-41.

Elimo santu ya Nzambe ezalaki mpe lokola molakisi mpe mokaniseli. Yesu alobaki boye: “Mosungi, ye oyo [elimo santu, NW] oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo nyonso mpe akokanisela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.”​—Yoane 14:26.

Ndenge nini elimo santu esalaki lokola molakisi? Elimo ya Nzambe efungolaki makanisi ya bayekoli mpo báyeba lisusu makambo oyo Yesu alobaki na bango, makambo oyo liboso bakangaki ntina na yango malamu te. Na ndakisa, bantoma bayebaki ete ntango bazalaki kosambisa Yesu, ye ayebisaki Ponto Pilata, moto ya Loma, guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Yudea, ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” Kasi, koleka mikolo 40 na nsima, ntango Yesu alingaki komata na likoló, bantoma bazalaki naino kokanisa ete Bokonzi ekozala awa na mabele, nzokande ezalaki bongo te. (Yoane 18:36; Misala 1:6) Tomoni ete bantoma bakangaki naino ntina ya maloba ya Yesu malamumalamu te tii ntango elimo santu ekitelaki bango na Pantekote ya mobu 33 T.B.

Elimo ya Nzambe ezalaki mpe kosalisa bango bákanisa makambo oyo bayokaki na ndenge elamusaki lisusu na makanisi na bango makambo ndenge na ndenge oyo Yesu ateyaki bango. Na ndakisa, elimo santu esalisaki bango bákanga mpenza ntina ya bisakweli oyo elobelaki liwa mpe lisekwa ya Klisto. (Matai 16:21; Yoane 12:16) Lokola mateya ya Yesu ezongaki na makanisi na bango, bantoma bazwaki mpiko ya koloba liboso ya bakonzi, bazuzi, mpe bakonzi ya mangomba makambo oyo bazalaki kondima.​—Malako 13:9-11; Misala 4:5-20.

Elimo santu ya Nzambe ememaki mpe baklisto ya liboso na bisika oyo bato mingi bakokaki koyoka nsango oyo bazalaki kosakola. (Misala 16:6-10) Mpe lisusu, elimo ya Nzambe etindaki baklisto ya ekeke ya liboso bákoma Biblia, Liloba ya Nzambe, mpo bato nyonso bázwela yango litomba. (2 Timote 3:16) Nyonso oyo emonisi biso polele ete elimo santu ezalaki kosala makambo ndenge na ndenge na ekeke ya liboso. Ezalaki kaka mpo na kosala makamwisi te.

Ndenge oyo elimo santu ezali kosala na mikolo na biso

Elimo santu ezali mpe kosala mosala mpo na kosunga baklisto ya solo na mikolo na biso. Likambo yango ebandaki komonana polele epai ya mwa Bayekoli ya Biblia na Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, na nsuka ya ekeke ya 19. Bayekoli yango ya molende ya Biblia bazalaki mpenza na mposa ya koyeba “solo.”​—Yoane 8:32; 16:13.

Moko na bango, nkombo na ye Charles Taze Russell, amonisaki mposa na bango ya koyeba mateya ya solo ya Biblia na maloba oyo: “Nabondelaki . . . ete nazala na makasi ya kolongola na motema mpe na makanisi na ngai eloko nyonso ya mabe oyo ekoki kopekisa ngai mpe ete elimo na ye esalisa ngai nakanga mpenza ntina ya makambo.” Nzambe ayokaki libondeli yango ya komikitisa.

Lokola Russell na baninga na ye bazalaki kotánga Biblia na molende mpenza mpo báyeba mpenza mateya na yango, makambo mwa mingi ekómaki polele na miso na bango. Russell alobaki boye: “Tomonaki ete banda bankama ya bambula, ezala mangomba ya minene to ya mikemike, bato na bato bazali na mateya na bango ya Biblia mpe bazali kosangisa yango na bindimeli ya bango moko oyo ezali na mabunga.” Nyonso wana ebimisaki oyo ye abengaki “solo etɛngamá.” Mateya mpenza ya Biblia esanganaki na ebele ya mateya ya bapakano oyo ezalaki kokɔta na mangomba ya boklisto banda kala. Kasi, mokano ya Russell ezalaki ete ayeba mpe ateya solo.

Na kati ya zulunalo Le Phare de la Tour de Sion, Messager de la présence de Christ, Russell na baninga na ye bazalaki kobanga te kobimisa mateya ya lokuta oyo ezalaki koloba bosolo mpo na Nzambe te. Atako mangomba mingi eteyaka ndenge mosusu, bango basosolaki ete molimo ekufaka, soki moto akufi akendaka kaka na lilita, mpe ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo, kasi azali na kati ya Trinite te.

Kasi, lokola okoki kokanisa yango, bakonzi ya mangomba ya boklisto basepelaki te na ndenge bato yango bazalaki komonisa polele mateya ya lokuta. Lokola bazalaki na mposa ete lokumu na bango ebeba te, bakonzi mingi ya Lingomba ya Katolike mpe ya Lingomba ya Protesta bamipesaki mosala ya kotyola Russell. Kasi, Russell na baninga na ye bazongaki nsima te. Batyaki elikya ete elimo ya Nzambe ekolakisa bango nzela. Russell alobaki ete: “Nazali na elikya epai ya Nkolo na biso ete . . . elimo santu ya Tata, elimo oyo Yesu Mobikisi, Moyokanisi, mpe Mokonzi na biso, asɛngi mpe Tata apesi biso na nkombo na ye, ekozala molakisi na biso.” Elimo santu esalaki mpe bango! Bayekoli yango ya sembo ya Biblia bakobaki komela mai ya pɛto, elingi koloba mateya ya solo oyo euti na Biblia mpe bazalaki kosakola yango na mokili mobimba.​—Emoniseli 22:17.

Lisangá ya Batatoli ya Yehova lelo oyo elandaka kaka nzela oyo elimo santu ya Nzambe ezali kolakisa banda mbula koleka nkama. Lokola elimo ya Yehova ezali kongɛngisa elimo na bango mokemoke, Batatoli bazali kondima kobongola makanisi na bango mpo na kolanda ndenge ya sika oyo bazali kososola mateya ya Biblia.​—Masese 4:18.

“Bokozala batatoli na ngai”

Yesu amonisaki mosala mosusu oyo elimo santu ya Nzambe ekosala ntango ayebisaki bayekoli na ye ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai . . . kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Yesu alakaki ete akopesa bayekoli na ye “nguya” mpe “elimo santu” mpo na kosala mosala ya Nzambe. Yango ezali mpe kosalema tii na moi ya lelo.

Batatoli ya Yehova bayebani malamu mpo na mosala na bango ya kosakola. (Talá etanda.) Batatoli ya Yehova bazali kosakola mateya ya solo na mikili mpe bisanga ya mai monene koleka 230. Na makambo ndenge na ndenge oyo bazali kokutana na yango, ata bisika oyo bomoi na bango ezali na likama mpo na bitumba, bazali komonisa polele mpe na mpiko nyonso ete bazali kokumisa Bokonzi ya Nzambe. Molende na bango mpo na mosala ya kosakola ezali mpenza komonisa ete elimo santu ezali kosala mosala lelo oyo. Ezali mpe komonana ete Yehova Nzambe azali kopambola milende na bango.

Na ndakisa, na mbula eleki, balekisaki ngonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mosala yango ebotaki mbuma nini? Bato soki 323 439 bamipesaki na Nzambe mpe bazwaki batisimo na mai. Lisusu, pɔsɔ na pɔsɔ, bayekolaki Biblia na bato 4 433 884 oyo babandi kosepela na nsango na bango. Bakabolaki mikanda 24 607 741, bazulunalo 631 162 309, mpe mwa babuku 63 495 728. Nyonso wana emonisi mpenza ete elimo ya Nzambe ezali kosala mosala!

Ndenge oyo elimo ya Nzambe ezali kosala epai na yo

Ntango moto asepeli na nsango malamu, abandi kotosa mibeko ya Nzambe na kati ya bomoi na ye, mpe andimi mbeka ya Yesu, nzela efungwami mpo azala pɛto na miso ya Nzambe. Epai ya bato ya ndenge yango Paulo alobaki ete: “Nzambe . . . akopesaka [elimo santu, NW] na ye epai na bino.”​—1 Batesaloniki 4:7, 8; 1 Bakolinti 6:9-11.

Moto oyo azali na elimo ya Nzambe akozwa mapamboli mingi. Akozwa mapamboli ya ndenge nini? Ya liboso, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Mbuma na [elimo, NW] izali boye: bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe [komipekisa, NW].” (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, elimo santu ya Nzambe etindaka moto na kosala makambo ya malamu, esalisaka moto azala na bizaleli ya malamu.

Lisusu, soki ozali kotánga Biblia mpe ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa yo okóma na mayele mingi, na boyebi mingi, na bwanya mingi, na bososoli mingi, mpe ozala na makanisi malamu. Mokonzi Salomo azwaki “mayele mpe bwanya mingi mpenza mpe motema molai” mpamba te azalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe kasi bato te. (1 Mikonzi 4:29 NW) Lokola Yehova apesaki Salomo elimo santu, tokanisi ete baoyo bazali na mposa ya kosepelisa ye lelo oyo akopimela bango yango te.

Elimo santu ya Nzambe esalisaka baklisto na kobunda na Satana mpe bademo, na mokili oyo mabe, mpe na mposa mabe ya nzoto na bango ya kozanga kokoka. Esalemaka ndenge nini? Ntoma Paulo alobi boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Mbala mosusu elimo santu ekolongola komekama te; kasi, ekoki kosalisa biso tóyikela yango mpiko. Soki totii elikya na elimo ya Nzambe, tokoki kozwa “nguya oyo eleki nguya ya bato” mpo tólonga ata mokakatano to mpasi nini.​—2 Bakolinti 4:7, NW; 1 Bakolinti 10:13.

Soki okanisi makambo nyonso oyo, okomona mpenza ete elimo santu ya Nzambe ezali kosala mosala lelo oyo. Elimo ya Yehova epesaka basaleli na ye makasi ya kosakola mikano minene na ye. Elimo yango ezali ntango nyonso kongɛngisa biso, ezali kolendisa kondima na biso, mpe ezali kosalisa biso tótikala sembo epai ya Mozalisi na biso. Tokoki mpenza kozala na botɔndi ete Nzambe akokisi likambo oyo alakaki, elingi koloba kopesa elimo santu epai ya basaleli na ye ya sembo lelo oyo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Pourquoi les dons miraculeux de l’esprit ont-ils cessé?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1972, nkasa 500-504 (ebimeli ya Lifalanse).

[Etanda na lokasa 10]

Makambo oyo bato mosusu bazali koloba mpo na Batatoli ya Yehova

“Mangomba mosusu ezali kofuta bapesi-toli mpo na kokosa bato na bandakonzambe to bazali kondima makambo ya mikolo oyo, makambo lokola kosangisa nzoto mibali na mibali mpe kolongola zemi, kasi Batatoli na ngámbo na bango bazali kolanda mokili oyo te na makambo na yango oyo ezali se kobongwana. Bango bazali nde kosakola na mokili mobimba.”​—Zulunalo The Orange County Register ya Orange County, Californie, États-Unis.

“Na likambo etali kopalanganisa mateya ya lingomba, mangomba mingi te ezali na molende lokola Batatoli ya Yehova.”​—Zulunalo The Republic ya Columbus, Indiana, États-Unis.

“Kaka bango nde bakendaka ndako na ndako koteya ‘nsango malamu,’ na kotosa ndenge oyo Biblia elobi.”​—Zulunalo Życie Literackie, Pologne.

“Batatoli ya Yehova bazali kosala kampanye monene ya kosakola na ndenge oyo emonaná naino te mpo na kopalanganisa nsango ya Yehova na mokili mobimba.”​—Zulunalo News-Observer, Tamaqua, Pennsylvanie, États-Unis.

[Bililingi na lokasa 9]

Elimo santu ya Nzambe engɛngisaka biso na elimo,

. . . elendisaka bizaleli malamu ya baklisto,

. . . mpe esungaka biso na mosala ya kosakola na mokili mobimba.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto