Bato oyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te!
“Bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te.”—YILIMIA 1:19, NW.
1. Mokumba nini bapesaki Yilimia, mpe mosala na ye eumelaki ntango boni?
YEHOVA apesaki elenge Yilimia mokumba ya kozala mosakoli ya mabota. (Yilimia 1:5) Ezalaki na ntango oyo Yosiya, mokonzi malamu azalaki koyangela Yuda. Yilimia asalaki mosala ya mosakoli tii na eleko oyo mboka ekómaki na yikiyiki, liboso ete bato ya Babilone báboma Yelusaleme mpe bámema libota ya Nzambe na boombo.—Yilimia 1:1-3.
2. Ndenge nini Yehova alendisaki Yilimia, mpe kobundisa mosakoli yango elimbolaki nini?
2 Yilimia asengelaki kosakola bitumbu ya Nzambe mpe nsango na ye esengelaki kolukela ye botɛmɛli. Yango wana, Nzambe alendisaki ye mpo na makambo oyo asengelaki kokutana na yango. (Yilimia 1:8-10) Na ndakisa, maloba lokola oyo elendisaki elimo ya mosakoli: “Bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, mpamba te Yehova alobi ete: ‘Ngai nazali na yo mpo na kobikisa yo.’” (Yilimia 1:19, NW) Soki moto abundisi Yilimia ezalaki lokola nde azali kobundisa Nzambe. Lelo oyo, Yehova azali mpe na basaleli na ye oyo bazali lokola basakoli mpe mosala na bango ekokani na mosala ya Yilimia. Lokola Yilimia, bazali kosakola liloba ya esakweli ya Nzambe na molende. Nsango yango etaleli bato mpe bikólo nyonso, na malamu to na mabe, na kolanda ndenge oyo moto na moto akoyamba yango. Se ndenge ezalaki na ntango ya Yilimia, lelo oyo mpe ezali na bato oyo bazali kobundisa Nzambe, elingi koloba bazali kotɛmɛla basaleli na ye mpe makambo oyo Nzambe atindi bango básala.
Bazali kobundisa basaleli ya Yehova
3. Mpo na nini bazali kobundisa basaleli ya Yehova?
3 Basaleli ya Yehova bazali kobundisama banda na ebandeli ya ekeke ya 20. Na mikili mingi, bato ya mitema mabe balukaki kopekisa to mpe kosukisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Monguna na biso monene, Zabolo, oyo “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani” nde azali kotinda bango. (1 Petelo 5:8) Na 1914, wana “ntango ya mabota” esukaki, Nzambe atyaki Mwana na ye mokonzi ya sika ya mabele, mpe atindaki ye ete: “Kendá koyangela na kati ya banguna na yo.” (Luka 21:24, NW; Nzembo 110:2, NW) Klisto alakisaki nguya na ye kuna na likoló mpe abwakaki Satana na zingazinga ya mabele. Lokola ayebi ete atikali na mwa ntango moke, Zabolo azali kobimisa nkanda na ye nyonso epai ya baklisto bapakolami na baninga na bango. (Emoniseli 12:9, 17) Makambo nini ezali komonana na ntango bato yango bazali kobundisa Nzambe mbala na mbala?
4. Mikakatano nini basaleli ya Yehova bakutanaki na yango na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe nini esalemaki na 1919 mpe na 1922?
4 Kondima ya basaleli ya Yehova, bapakolami na elimo, emekamaki mingi na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Bazalaki kotyola bango mpe kokosela bango makambo, bituluku ya bato bazalaki kobengana bango mpe kobɛta bango. Se ndenge Yesu asakolaki, ‘mabota nyonso bayinaki bango.’ (Matai 24:9) Na kati ya yikiyiki ya bitumba, banguna ya Bokonzi ya Nzambe basalelaki mayele oyo bato ya kala basalelaki mpo na kobundisa Yesu Klisto. Bakoselaki basaleli ya Yehova makambo ete bazali bazimbisi, mpe balukaki kobɛta mosisa mpenza ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele. Na sanza ya Mai 1918, bakangaki Joseph Rutherford, prezida ya la Société, na bandeko mosusu nsambo oyo bazalaki kosala na ye. Bango nyonso mwambe bakatelaki bango bitumbu ya bolɔkɔ ya mbula ebele mpe batindaki bango na bolɔkɔ na Atlanta, na etúká ya Géorgie, na États-Unis. Sanza libwa na nsima, babimisaki bango. Na sanza ya Mai 1919, bazuzi ya tribinale mosusu (cour d’appel) bakataki likambo mpe balobaki ete basambisaki likambo na bango na bosembo te mpe balongolaki bitumbu nyonso oyo bakatelaki bango liboso. Babengaki bango lisusu mpo na kosamba, kasi na nsima, guvɛrnɛma elingaki lisusu kolandela likambo yango te. Ndeko Rutherford na baninga na ye bazalaki lisusu na likambo te mpe bazongelaki mosala na bango. Mayangani minene oyo basalaki na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, na 1919 mpe na 1922 elamusaki lisusu mosala ya kosakola Bokonzi.
5. Ndenge nini Batatoli ya Yehova balongaki na Allemagne ntango Banazi bazalaki koyangela?
5 Na bambula ya 1930, Allemagne, Italie, na Japon ekómaki na bakonzi mabe mpe bikólo yango esanganaki mpo na kosala oyo babengaki les puissances de l’Axe. Na ebandeli ya bambula yango, mingimingi na Allemagne, mboka oyo Banazi bazalaki koyangela, bakómaki konyokola basaleli ya Nzambe na ndenge ya nsɔmɔ. Mosala na bango epekisamaki. Bakómaki koluka bango tii na bandako mpe kokanga bango. Mingi kati na bango batindamaki na bakaa ya bakangami mpo baboyaki kotika losambo na bango. Mokano ya bato oyo bazalaki kobundisa Nzambe na basaleli na ye ezalaki ete Batatoli ya Yehova bálimwa mpenza na ekólo yango oyo ezalaki na bakonzi oyo balingaki kopesa bato bonsomi te.a Ntango Batatoli bakendaki na batribinale mpo na kosamba, ministre ya justice ya Allemagne akomaki mokanda moko molai mpo Batatoli ya Yehova bálonga te. Na kati ya mokanda yango akomaki boye: “Batribinale esengeli kaka te kolandela makambo ndenge oyo mibeko ezali kosɛnga; kasi atako ekoki kozala mwa mpasi, batribinale esengeli kosala nyonso mpo na kokokisa mikumba na yango oyo eleki ntina.” Na maloba mosusu, mpo na ye, batribinale esengelaki kolanda bosembo te mpo na kokata makambo. Banazi balobaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova ezali likama, mpe ‘ezali kotya mobulu na mboka.’
6. Makambo nini bato basalaki mpo na kopekisa mosala na biso na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe nsima na yango?
6 Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mosala ya basaleli ya Yehova epekisamaki na Australie, na Canada, mpe na mikili mosusu oyo eyangelamaki na Angleterre, ezala na Afrika, na Azia mpe na bisanga ya Caraïbes mpe ya Pacifique. Na États-Unis, bato minene oyo bazalaki banguna ya Batatoli ya Yehova mpe bato oyo bayebaki Batatoli malamu te, basalaki ‘mabe na nzela ya mibeko.’ (Nzembo 94:20) Kasi Batatoli basambaki na batribinale mpo na mikakatano bazalaki kokutana na yango na likambo ya kopesa drapo losako mpe mpo na mibeko oyo ezalaki kopekisa mosala ya kosakola ndako na ndako na bamboka mosusu. Kolonga oyo balongaki na batribinale ya États-Unis ezalaki likambo moko monene mpo na bonsomi ya bato mpo na losambo. Yehova asalisaki bango mpe banguna balongaki te. Ntango etumba esilaki na Mpoto, bakonzi ya Leta bapesaki Batatoli nzela básala mosala na bango. Babimisaki bankóto ya Batatoli oyo bazalaki na bakaa ya bakangami; kasi mikakatano esilaki naino te. Ntango kaka Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, bikólo oyo eleki makasi na mokili mobimba ekómaki kowelana mpe babengaki kowelana yango guerre froide. Mikili ya Mpoto ya Ɛsti ekómaki kotya basaleli ya Yehova mpanzi likoló. Bakonzi babimisaki mibeko mpo na kozongisa mosala ya kosakola nsima to kopekisa yango, kopekisa mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe kopekisa makita mpe mayangani na biso. Bandeko mingi bakɔtaki bolɔkɔ to batindaki bango na bakaa oyo basalisaka bato misala makasi.
Mosala ya kosakola ekei liboso!
7. Na bambula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova bakutani na makambo nini na Pologne, na Russie, mpe na mikili mosusu?
7 Nsima ya bambula mingi, mosala ya kosakola ezongaki lisusu. Na 1982, atako bakoministe bazalaki naino na bokonzi na Pologne, kasi bandimaki ete bandeko básala mayangani ya mokolo moko. Na 1985, basalaki mayangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge. Bongo na 1989, mayangani minene oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili mingi esalemaki, mpe bankóto ya bandeko bautaki na Russie mpe na Ukraine balandaki yango. Kaka na mbula wana, na Hongrie mpe na Pologne, bakonzi ya Leta bapesaki Batatoli ya Yehova mikanda oyo epesaki bango ndingisa ya kosala mosala na bango. Na otɔmne ya 1989, babukaki Mur de Berlin. Mwa basanza na nsima, mosala ya Batatoli ya Yehova endimamaki na Allemagne ya Ɛsti mpe eumelaki te, liyangani moko esangisaki bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge esalemaki na mboka Berlin. Na bambula ya nsuka ya ekeke ya 20, milende ekómaki kosalema mpo na kokutana na bandeko ya Russie. Bandeko basololaki na bakonzi mosusu ya Leta na Moscou, mpe na 1991, Leta andimaki mosala ya Batatoli ya Yehova. Banda wana, mosala ya kosakola ezali mpenza kokende liboso, ezala na Russie to mpe na bikólo mosusu oyo kala ezalaki na Union soviétique.
8. Makambo nini ekómelaki basaleli ya Yehova na boumeli ya mbula 45 nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
8 Ntango monyoko ekitaki na bisika mosusu, na bisika mosusu engalaki nde kongala. Na boumeli ya mbula 45 banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, na mikili mingi, Leta aboyaki kondima mosala ya Batatoli ya Yehova. Lisusu, mosala na biso epekisamaki na mikili 23 ya Afrika, mikili 9 ya Azia, mikili 8 ya Mpoto, mikili 3 ya Amérique latine, mpe na bisanga mosusu 4.
9. Basaleli ya Yehova bakutanaki na makambo nini na Malawi?
9 Batatoli ya Yehova na ekólo Malawi banyokwamaki na ndenge ya nsɔmɔ banda na 1967. Lokola balingaki kokɔta na makambo ya politiki te mpo bazali baklisto ya solo, bandeko na biso na ekólo yango baboyaki kosomba kalati ya parti politiki. (Yoane 17:16) Na 1972, nsima ya likita moko ya Parti du Congrès ya Malawi, bakómaki lisusu konyokola bandeko makasi. Bazalaki kobengana bandeko na bandako na bango mpe balongolaki bango na misala. Bandeko mingi balongwaki na mboka yango mpo na kokima liwa. Atako bongo, bato oyo bazalaki kobundisa Nzambe na basaleli na ye balongaki te! Ntango makambo ebongwanaki, basakoli bazalaki 43 767 na 1999 na Malawi mpe bato koleka 120 000 bazalaki na mayangani ya etúká. Batatoli batongi filiale ya sika na mboka-mokonzi ya ekólo yango.
Bazali koluka mayele mabe
10. Lokola banguna ya Danyele basalaki, banguna ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bazali kosala nini?
10 Nsango na biso oyo euti na Liloba ya Nzambe ezali kotungisa bapɛngwi, bakonzi ya mangomba na bato mosusu. Bakonzi mosusu ya mangomba ya boklisto bazali kotinda batɛmɛli na koluka mayele oyo ezali lokola nde endimami na mibeko ya Leta mpo na kobundisa biso. Ntango mosusu basalelaka mayele nini? Bato oyo bazalaki kobundisa Danyele basalelaki mayele nini? Na Danyele 6:4, 5, tozali kotánga boye: “Bongo mikóló mpe mikonzi balukelaki Danyele likambo na ntina na bokonzi, nde bakokaki kozwa ekweli to libunga te mpo ete azalaki sembo, mpe libunga to ekweli ezwamaki na ye te. Bongo bato oyo balobaki ete, Tokozwa likambo na ntina na Danyele te, bobele soko tozwi yango na ntina na mobeko ya Nzambe na ye.” Lelo mpe ndenge moko, batɛmɛli bazali koluka makambo oyo bakoki kofunda biso na yango na mayele mabe. Bazali komonisa ete bazali kobanga mpo “mangomba mikemike ezali kotya bato na likama” lisusu bazali mpe koluka kolatisa ata Batatoli ya Yehova nkombo yango. Bazali kokosela biso makambo, kokanisela biso mabe, mpe bazali koloba lokuta na nkombo na biso, bazali koloba mabe mpo na lolenge oyo tozali kosambela Nzambe mpe kotosa mibeko na ye.
11. Batɛmɛli mosusu balobaki makambo nini ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova?
11 Na mikili mosusu, bakonzi ya mangomba mpe ya Leta bazali kondima te ete losambo na biso ezali “losambo ya pɛto mpe lobongi epai ya Nzambe Tata na biso.” (Yakobo 1:27) Atako lelo oyo tozali kosala mosala na biso ya kosakola na mikili 234, banguna na biso bazali koloba ete ‘lingomba na biso eyebani te.’ Na 1998, liboso liyangani moko oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge esalema na engumba Athènes, zulunalo moko ya Athènes ekomaki makambo oyo bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce balobaki, ete: “[Batatoli ya Yehova] bazali ‘lingomba oyo eyebani te,’” atako ‘Cour européen des droits de l’homme’ ekataki likambo na bango mpe elobaki ete lingomba ya Batatoli ya Yehova eyebani. Nsima ya mwa mikolo, zulunalo mosusu ya Athènes ekomaki makambo oyo moto moko ya lingomba alobaki, ete: “[Batatoli ya Yehova] bakoki kobengama ‘baklisto’ te, mpamba te bazali ata na eloko moko te oyo eyokani na kondima ya baklisto ndenge Yesu Klisto amonisaki yango.” Maloba yango ezali mpenza kokamwisa mpamba te, ezali na lingomba mosusu te oyo elobelaka kolanda ndakisa ya Yesu lokola Batatoli ya Yehova!
12. Tosengeli kosala nini mpo na etumba na biso ya elimo?
12 Tozali koluka kolongisa mpe kondimisa nsango malamu na ndenge oyo endimami na mibeko. (Bafilipi 1:7 NW) Kasi na likambo etali kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe tokoki te kondima makambo ya mabe to kozonga nsima. (Tito 2:10, 12) Lokola Yilimia, ‘tokangi loketo na biso mpe tozali koloba makambo nyonso oyo Yehova azali kolakisa biso,’ mpe bato oyo bazali kobundisa Nzambe, tokobanga bango te. (Yilimia 1:17, 18) Liloba Mosantu ya Yehova elakisi biso polele nzela malamu oyo tosengeli kolanda. Tozali na mposa ata moke te ya kotya motema na “lobɔkɔ ya mosuni” to koluka “ebombamelo na nse ya mapapu ya Ezipito,” elingi koloba mokili oyo. (2 Ntango 32:8; Yisaya 30:3; 31:1-3) Na etumba na biso ya elimo, tosengeli ntango nyonso kotyela Yehova motema mobimba, kotika ye atambwisa makolo na biso, mpe kotyela mayele na biso moko motema te. (Masese 3:5-7) Soki Yehova asungi biso te mpe soki ye moko abateli biso te, mosala na biso nyonso ekozala se “mpamba.”—Nzembo 127:1.
Bazali konyokola biso kasi tozali kozonga nsima te
13. Mpo na nini tokoki koloba ete Satana alongaki te na etumba oyo abundisaki Yesu?
13 Yesu azali ndakisa eleki monene ya moto oyo azongaki nsima te na bokangami na ye epai ya Yehova. Bakoselaki ye makambo ete azalaki kozimbisa bato mpe kotya mobulu na mboka. Nsima ya kosambisa ye, Pilata alingaki kotika Yesu. Kasi ebele ya bato oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kotinda, bagangaki ete bábaka Yesu na nzete, atako asalaki mabe moko te. Na esika bátika Yesu, basɛngaki bátika Balabasi, moto moko oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo azalaki kotya mobulu na mboka mpe azalaki koboma bato! Pilata amekaki lisusu komonisa batɛmɛli yango na makanisi na bango mabe ete bazalaki na libunga, kasi nsukansuka akokisaki mposa na bango. (Luka 23:2, 5, 14, 18-25) Atako Yesu akufaki na nzete, kasi Satana alongaki te na etumba monene oyo abundisaki Mwana ya Nzambe oyo asalaki mabe moko te, mpamba te Yehova asekwisaki Yesu mpe atombolaki ye na lobɔkɔ na Ye ya mobali. Mpe na mokolo ya Pantekote ya mobu 33, na nkombo ya Yesu oyo akómi na nkembo, elimo santu ekitelaki bayekoli, mpe lisangá ya boklisto ebotamaki, ezalaki “bozalisi ya sika.”—2 Bakolinti 5:17; Misala 2:1-4.
14. Makambo nini ebimaki ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda babundisaki bayekoli ya Yesu?
14 Mwa moke na nsima, bakonzi ya mangomba bakómaki kokanela bantoma, kasi bayekoli yango ya Klisto bakangaki monɔkɔ na bango te mpo na kotika koloba makambo oyo bamonaki mpe oyo bayokaki. Bayekoli ya Yesu basalaki libondeli ete: “Nkolo, talá makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo nzela ete básolola Liloba na yo na mpiko nyonso.” (Misala 4:29) Yehova ayokaki libondeli na bango, apesaki bango elimo santu mpe alendisaki bango mpo bábanga te kasi básakola ntango nyonso. Mwa moke na nsima, bapekisaki lisusu bantoma kosakola nsango malamu, kasi Petelo na bantoma mosusu bazongisaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Atako bazalaki kokanela bango, kokanga bango, mpe kobɛta bango fimbo, bazongaki nsima te na mosala na bango ya Bokonzi.
15. Gamaliele azalaki nani, mpe toli nini apesaki bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla bayekoli ya Yesu?
15 Bakonzi ya mangomba basalaki nini? “[Basilikaki] na mitema, mpe balingaki koboma [bantoma].” Kasi, Gamaliele, moteyi ya Mibeko mpe Mofalisai, azalaki wana, mpe bato mingi bazalaki kopesa ye limemya. Nsima ya kobimisa mwa moke bantoma libándá ya esika oyo Sanedrina eyanganaki, apesaki batɛmɛli yango toli oyo: “Mibali na Yisalaele, kebá na bino soko bolingi kosala nini na bato oyo. . . . [Sikoyo] nazali koloba na bino ete bólongwa na bato oyo, mpe bótika bango, mpo ete soko mayele oyo mpe mosala oyo euti na bato, ekobeba. Soko nde euti na Nzambe, bokokoka kobuka bango te. Kebá ete bózwama babunani na Nzambe te.”—Misala 5:33-39.
Ebundeli moko te oyo esalami mpo na kotɛmɛla biso ekolonga
16. Na maloba na yo moko, yebisá elikya oyo Yehova azali kopesa basaleli na ye.
16 Gamaliele apesaki toli malamu; biso mpe tosepelaka ntango bato mosusu bazali kokɔtela biso. Toyebi mpe ete na batribinale mosusu bazuzi ya sembo balongisaki bonsomi ya losambo na bikateli oyo bazwaki. Lokola tozali kotosa Liloba ya Nzambe, bakonzi ya mangomba ya boklisto, bakisa mpe bakonzi mosusu ya Babilone Monene, elingi koloba mangomba ya lokuta na mokili mobimba, basepelaka te. (Emoniseli 18:1-3) Atako bato yango mpe baoyo bazali kolanda bango bazali kobundisa biso, elikya na biso ezali na maloba oyo: “[Ebundeli na ebundeli] oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula na baombo ya [Yehova] mpe boyengebene ya baoyo ekouta na ngai. [Yehova] alobi bongo.”—Yisaya 54:17.
17. Atako banguna bazali kobundisa biso, mpo na nini tozali na mpiko?
17 Soki totali malamu, ntina banguna bazali kobundisa biso ezali te, kasi biso mpe tokolɛmba te. (Nzembo 109:1-3) Tokotika te ete bato oyo bazali koyina nsango na biso oyo euti na Biblia bábangisa biso ete tóndima makambo mosusu oyo eyokani te na losambo na biso. Toyebi malamu ete etumba na biso ya elimo ekoya lisusu makasi, kasi toyebi mpe ndenge oyo yango ekosuka. Lokola Yilimia, tokomona ndenge esakweli oyo ekokokisama ete: “[Bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te, NW] zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.” (Yilimia 1:19) Ya solo, toyebi ete baoyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Batikalaki sembo mpe babangaki minyoko ya Banazi te,” na nkasa 24-28.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini bazali kobundisa basaleli ya Yehova?
• Mayele nini banguna basalelaki mpo na kobundisa basaleli ya Yehova?
• Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete bato oyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te?
[Elilingi na lokasa 17]
Yehova alakaki Yilimia ete akozala na ye.
[Elilingi na lokasa 18]
Bato oyo babimaki na kaa ya bakangami.
[Elilingi na lokasa 18]
Ebele ya bato bazali kosalela Batatoli ya Yehova mobulu.
[Elilingi na lokasa 18]
Joseph Rutherford na baninga na ye.
[Elilingi na lokasa 21]
Bato oyo bazali kobundisa Nzambe balongaki Yesu te.