Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 nk. 13-17
  • Yoká oyo Elimo ezali koloba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yoká oyo Elimo ezali koloba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Makomami nyonso mapemami”
  • “Bilei na elaka na yango”
  • Lisosoli na biso
  • Esengo na baoyo bazali koyoka mpe bazali kotosa
  • Lisosoli na yo eteyami malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini okoki kobatela lisosoli ya malamu?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Otyelaka lisosoli na yo motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 nk. 13-17

Yoká oyo Elimo ezali koloba

“Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.”—YISAYA 30:21.

1, 2. Banda kala, Yehova asololaka na bato na nzela nini?

NA ESANGA Porto Rico, ezali na masini moko babengi radiotélescope parabolique oyo eleki monene mpe eleki makasi na mokili mobimba; masini yango ezali lokola saani moko ya monene mpenza. Banda bambula ebele, bato ya siansi bazelaka ete mokolo mosusu, na nzela ya télescope yango, bázwa nsango oyo ekouta na bikelamu ya bomoi, oyo mbala mosusu ezali na baplanɛti mosusu. Kasi, nsango yango eyaka kaka te. Nzokande, ezali na bansango ya polele oyo euti epai mosusu mpe moto nyonso akoki koyoka yango ata na ntango nini mpe esɛngaka masini ya mindɔndɔmindɔndɔ te. Bansango yango euti epai ya Ye oyo aleki bikelamu nyonso oyo bato bakoki kokanisa ete mbala mosusu ezalaka na baplanɛti mosusu. Nani atindaka bansango yango, mpe banani bazali kozwa yango? Bansango yango elobaka nini?

2 Masolo mingi ya Biblia ezali koloba ete bato bayokaki bansango oyo eutaki na Nzambe. Ntango mosusu, bikelamu ya elimo bayaki na bansango yango lokola bamemi-nsango ya Nzambe. (Genese 22:11, 15; Zekalia 4:4, 5; Luka 1:26-28) Mbala misato mobimba, bato bayokaki mongongo ya Yehova ye moko. (Matai 3:17; 17:5; Yoane 12:28, 29) Nzambe azalaki mpe koloba na nzela ya basakoli, mpe mingi na bango bakomaki makambo oyo atindaki bango báloba. Lelo oyo, tozali na Biblia, mpe bansango wana mingi ezali na kati ya Biblia, mpe ezali na mateya ya Yesu na bayekoli na ye. (Baebele 1:1, 2) Tomoni mpenza ete Yehova azalaki kotindela bato, oyo bazali bikelamu na ye, bansango.

3. Maloba ya Nzambe ezali na ntina nini mpe biso tosengeli kosala nini?

3 Bansango yango nyonso oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe elobeli molɔ́ngɔ́ mingi te. Nsango yango elobeli mingimingi makambo oyo eleki ntina mpo na bomoi na biso lelo oyo mpe na mikolo ekoya. (Nzembo 19:7-11; 1 Timote 4:8) Na nzela ya bansango yango, Yehova ayebisaka biso mokano na ye mpe alakisaka biso ndenge oyo tosengeli kotambola. Bansango yango ezali mpe kokokisa maloba ya mosakoli Yisaya oyo alobaki ete: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Yehova atindikaka biso na makasi te ete tóyoka “liloba” na ye. Kondima to koboya ete Nzambe atambwisa biso na nzela na ye etali se biso moko. Yango wana Biblia ezali koloba na biso ete tóyoka makambo oyo Yehova azali koloba. Na mokanda ya Emoniseli, mbala nsambo mobimba, bazali kolendisa biso ‘tóyoka oyo elimo ezali koloba.’—Emoniseli 2:7, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22.

4. Na mikolo na biso, tokoki mpenza kokanisa ete tokoyoka mongongo ya Nzambe ezali kobima kuna na likoló?

4 Lelo oyo, toyokaka mongongo ya Yehova na likoló te. Ata na ntango ya kala, likambo yango ezalaki kosalema mingi te, mbala mosusu ezalaki koleka bankama ya bambula liboso esalema lisusu. Banda kalakala, Yehova azalaki mingimingi koloba na basaleli na ye na banzela mosusu. Lelo oyo, azali mpe kosala se bongo. Tiká tótalela nzela misato oyo Yehova asalelaka mpo na koloba na biso lelo oyo.

“Makomami nyonso mapemami”

5. Lelo oyo, Yehova alobaka na biso libosoliboso na nzela nini, mpe ndenge nini tokoki kozwela yango litomba?

5 Mpo na koloba na bato, Nzambe asalelaka mingimingi Biblia. Nzambe nde akomisaki yango, mpe tokoki kozwa litomba na makambo nyonso oyo ekomami na kati. (2 Timote 3:16) Biblia elobeli bato mingi oyo baponaki bango moko koyoka mongongo ya Yehova to mpe baoyo baboyaki koyoka yango. Bandakisa yango ezali komonisa biso ntina oyo tosengeli koyoka oyo elimo ya Nzambe ezali koloba. (1 Bakolinti 10:11) Biblia ezali mpe kolakisa mayele oyo moto akoki kosalela, ezali kopesa biso toli na ntango tolingi kozwa mikano ya malamu na bomoi na biso. Ezali lokola nde Nzambe azali nsima na biso mpe azali koloba na biso na litoi ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”

6. Mpo na nini Biblia eleki mikanda mosusu nyonso?

6 Mpo na koyoka oyo elimo ezali koloba na nzela ya Biblia, tosengeli kotángaka yango mbala na mbala. Biblia ezali te kaka mokanda ya masolo kitoko oyo eyebani mingi, ezali mpe te kaka mokanda moko lokola mikanda mosusu nyonso. Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na makanisi ya Nzambe. Baebele 4:12 elobi ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino [kokabola molimo na elimo, NW ], matɔngi mpe lilɔngɔ; ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.” Ntango tozali kotánga Biblia, maloba na yango ezalaka lokola mopanga oyo ezali kokɔta na makanisi mpe mikano na biso mpe emonisaka soki tozali mpenza kolanda mokano ya Nzambe na bomoi na biso.

7. Mpo na nini ezali na ntina mingi tótángaka Biblia, mpe balendisi biso tótángaka yango nsima ya ntango boni?

7 “Makanisi mpe mikano ya motema” na biso ekoki kobongwana, wana mikolo ezali koleka mpe ntango tozali kokutana na makambo ya esengo to na makambo ya mpasi, na bomoi na biso. Soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala te, makanisi na biso, elimo na biso mpe mayoki na biso, ekoyokana lisusu na mibeko ya Nzambe te. Yango wana, Biblia elobi na biso ete: “Bómimeka ntango nyonso mpo na koyeba soki bozali na kati ya kondima, bómitalelaka ntango nyonso.” (2 Bakolinti 13:5, NW ) Mpo na koyoka ntango nyonso oyo elimo ezali koloba, tosengeli kolanda toli oyo elobi na biso ete tótángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.—Nzembo 1:2.

8. Maloba nini ntoma Paulo alobaki oyo ezali kosalisa biso tótalela lolenge oyo totángaka Biblia?

8 Bato oyo batángaka Biblia basengeli kobosana te likambo ya ntina mingi oyo: Bázwaka ntango oyo ekoki mpo na kokɔtisa makambo oyo bazali kotánga na bɔɔngɔ! Ntango tozali kosala makasi mpo na kolanda toli ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, tosengeli kotángaka mikapo mbangumbangu te kozanga ete tókanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga. Ya solo, ezali na ntina mingi ete tótángaka Biblia mbala na mbala, kasi mposa na biso esengeli kozala kaka te ete tótikala nsima te na programɛ na biso. Tosengeli nde kozala na mposa mpenza ya koyeba Yehova mpe koyeba mikano na ye. Mpo na yango, tokoki komitalela na kolanda maloba ya ntoma Paulo. Na mokanda oyo akomelaki baninga na ye baklisto, alobaki boye: “Nazali ko[g]umba mabɔ[lɔ]ngɔ na ngai liboso na Tata, . . . ete alendisa nguya katikati na bino na nzela na [elimo, NW ], mpe ete Klisto afanda na mitema na bino na nzela na kondima. Na bongo, awa esili bino kopalanganisa misisa na bino kati na bolingo mpe kotongama likoló na yango lokola moboko, bóyeba kososola, esika moko na Babulami nyonso, monene mpe molai, [bosanda, NW ] mpe bozindo na bolingo na Klisto, ɛɛ, koyoka yango oyo eleki boyebi mpenza, ete bótonda na litondi nyonso ya Nzambe.”—Baefese 3:14, 16-19.

9. Ndenge nini tokoki kolona mpe kokolisa mposa ya koluka koyeba Yehova?

9 Ya solo, mpo na bamosusu kati na biso, kotánga ezali mosala monene, nzokande bamosusu balingaka kotánga mingi. Kasi, ata soki tolingaka kotánga to te, tokoki kolona mpe kokolisa mposa ya koluka koyeba Yehova. Ntoma Petelo alobaki ete tosengeli kozala na mposa makasi ya koyeba Biblia, mpe amonisaki ete moto akoki kolona mposa yango. Akomaki boye: “Lokola bana oyo babotami sika, bólona mposa makasi ya miliki ya sika ya liloba, mpo ete na nzela na yango bókola tii na lobiko.” (1 Petelo 2:2 NW ) Mpo na ‘kolona mposa’ ya koyekola Biblia, esengeli ete moto ayeba koyangela makanisi na ye. Lokola tokoki kosepela na bilei oyo tomesaná na yango te soki tozali komeka yango mbala na mbala, tokoki mpe kokóma na ndenge mosusu ya kotalela likambo ya kotánga mpe koyekola mpe tokokóma kolinga yango soki tomityeli mokano ya kotosa programɛ oyo tobongisi.

“Bilei na elaka na yango”

10. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali banani, mpe ndenge nini Yehova azali kosalela bango lelo oyo?

10 Na Matai 24:45-47, Yesu amonisi biso lolenge mosusu oyo Yehova alobaka na biso. Na vɛrsɛ yango alobelaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba lisangá ya baklisto bapakolami na elimo santu; Nzambe aponi bango mpo na kopesa “bilei [ya elimo] na elaka na yango.” Mopakolami mokomoko azali “moombo” ya Yesu. Bango nyonso na “ebele monene” ya “bampate mosusu,” bazali kolendisama mpe kozwa toli. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bilei yango, oyo ezali koya na elaka na yango, tozwaka yango mingimingi na nzela ya bazulunalo lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká!, mpe mikanda mosusu. Tozali mpe kozwa bilei ya elimo na nzela ya masukulu mpe bilakiseli na mayangani ya etúká, mayangani ya mike, mpe na makita ya lisangá.

11. Ndenge nini tozali komonisa ete tozali koyoka oyo elimo ezali koloba na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

11 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koteya biso mpo na kolendisa kondima na biso mpe kokolisa bososoli na biso. (Baebele 5:14) Toli yango ekoki ntango mosusu kolobela makambo ebele mpe moto na moto akoki kosalela oyo ebongi na bomoi na ye. Mbala na mbala tozwaka mpe toli na likambo moko oyo etali mpenzampenza bomoi na biso. Ndenge nini tosengeli kotalela toli yango soki tozali mpenza koyoka oyo elimo ezali koloba na nzela ya moombo yango? Ntoma Paulo apesi eyano ete: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango.” (Baebele 13:17) Ya solo, bato nyonso oyo Yehova azali kosalela na ebongiseli yango bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, Yehova asepeli kosalela bato mpo na kotambwisa biso na ntango oyo ya nsuka atako bazali bato ya kozanga kokoka.

Lisosoli na biso

12, 13. (a) Yehova azali mpe kotambwisa biso na nzela ya nini? (b) Likambo nini ya malamu lisosoli ekoki kosala ata epai ya bato oyo bayebi Liloba ya Nzambe malamumalamu te?

12 Yehova apesi biso eloko mosusu oyo ekoki kotambwisa biso: lisosoli na biso. Ntango Yehova akelaki moto, apesaki ye mayele ya kokesenisa malamu na mabe. Yango ezali na makila na biso mpenza. Na mokanda oyo akomelaki Baloma, ntoma Paulo alimbolaki boye: “Bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosalaka makambo na Mibeko (ata bazangi mibeko mpenza) bazali na mibeko kati na bango moko. Bazali komonisa polele ete makambo malaki Mibeko makomami na mitema na bango. Lisosoli ya mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokitisa bango soko kolongisa bango.”—Baloma 2:14, 15.

13 Bato mingi oyo bayebi Yehova te bakoki, ata mwa moke, komonisa na makanisi to na misala na bango, ete balandaka mibeko ya Nzambe mpo na mabe na malamu. Ezali lokola nde bazali koyoka mongongo moko moke na kati ya mitema na bango oyo ezali kolakisa bango nzela ya malamu. Soki ekoki kosalema bongo epai ya bato oyo bayebi mpenza Liloba ya Nzambe te, ebongi mpenza ete mongongo yango elobaka na kati mitema ya baklisto ya solo! Na ntembe te, lisosoli ya moklisto oyo boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe eteyi yango malamu mpe ezali kolanda ndenge oyo elimo santu ya Yehova elingi tótambola, ekoki kolakisa ye nzela ya malamu.—Baloma 9:1.

14. Ndenge nini lisosoli oyo eteyami na Biblia ekoki kosalisa biso na kolanda toli ya elimo ya Yehova?

14 Lisosoli malamu oyo eteyami na Biblia ekoki koyebisa biso ndenge oyo elimo elingi tótambolaka. Ntango mosusu tokoki kokutana na likambo moko oyo Biblia yango moko to mikanda oyo elimbolaka Biblia elobi eloko moko te mpo na yango. Kasi, lisosoli na biso ekoki koloba na biso, ekoki kokebisa biso ete nzela boye ezali mabe. Na ntango wana, soki toboyi koyokela lisosoli na biso, tokoki koloba ete toboyi koyoka oyo elimo ya Yehova elobi. Nzokande, soki tozali kotosa lisosoli na biso oyo eteyami malamu, tokoki kopona nzela ya malamu ata soki totángi likambo yango na mokanda te. Kasi, tosengeli kobosana te ete soki ezali na likanisi, to etinda to mobeko moko ya Nzambe te, ebongi te ete tóndimisa baninga na biso baklisto bálanda lisosoli na biso na makambo oyo etali moto na moto.—Baloma 14:1-4; Bagalatia 6:5.

15, 16. Nini ekoki kosala ete lisosoli na biso esala malamu te, mpe ndenge nini tokoki komibatela mpo likambo yango ekómela biso te?

15 Lisosoli malamu, lisosoli oyo eteyami na Biblia, ezali likabo malamu oyo Nzambe apesi biso. (Yakobo 1:17) Kasi, mpo likabo yango esala lokola mopesi-toli malamu, tosengeli kobatela yango liboso ya makambo mabe. Soki tolandi bonkɔkɔ, mpe mimeseno ya mboka na biso oyo eyokani na mibeko ya Nzambe te, tokoki kobebisa lisosoli na biso mpe ekolakisa biso lisusu nzela ya malamu te. Tokoki kozanga mayele ya kotalela makambo na ndenge oyo ebongi mpe tokoki komikosa mpe kokanisa ete likambo moko ya mabe ezali malamu.—Talá Yoane 16:2.

16 Soki tozali koboya koyokela lisosoli na biso, lisosoli yango ekobanda kokufa mokemoke tii tokokóma motema makasi to lisosoli na biso ekosala lisusu te. Mokomi ya nzembo alobelaki bato oyo bazali ndenge yango ntango alobaki ete: “Mitema na bango izali [makasi, NW ], bobele mafuta mpenza.” (Nzembo 119:70) Bato mosusu oyo baboyaka koyokela lisosoli na bango bakanisaka lisusu malamu te. Balandaka lisusu mitinda ya Nzambe te mpe bayebaka kozwa bikateli ya malamu te. Mpo makambo yango ekómela biso te, tosengeli koyokela lisosoli na biso ata na makambo mikemike.—Luka 16:10.

Esengo na baoyo bazali koyoka mpe bazali kotosa

17. Ntango tozali koyoka ‘liloba nsima na biso’ mpe tozali kotosa lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia, mapamboli nini tokozwa?

17 Soki tokómi na momeseno ya koyoka ‘liloba nsima na biso,’ liloba oyo ezali na kati ya Biblia mpe na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, mpe ntango tozali koyokela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia, Yehova akopesa biso elimo na ye. Na nsima, elimo santu ekokolisa mayele na biso ya koyoka mpe ya kokanga ntina ya makambo oyo Yehova azali koloba na biso.

18, 19. Ndenge nini toli ya Yehova ekoki kosalisa biso na mosala na biso ya kosakola mpe na bomoi na biso?

18 Elimo ya Yehova ekolendisa biso mpo tózala na mayele mpe na mpiko ya kolonga mikakatano. Lokola elimo ya Nzambe esalaki epai ya bantoma, ekoki kobakisela biso mayele mpe kosalisa biso na kosala mpe koloba ntango nyonso na ndenge oyo eyokani na mitinda ya Biblia. (Matai 10:18-20; Yoane 14:26; Misala 4:5-8, 13, 31; 15:28) Soki tozali kosala milende, mpe likoló na yango Yehova abakisi elimo na ye, tokolonga ntango tozali kozwa mikano ya ntina mingi na kati ya bomoi na biso, mpe akopesa biso mpiko ya kokokisa mikano yango. Na ndakisa, okoki kotalela lisusu makambo oyo osalaka mpe opesa ntango mingi na makambo ya elimo. To mpe ekoki kozala ete olingi kozwa bikateli ya ntina mingi, bikateli oyo ekobongola bomoi na yo, lokola kopona moto oyo okobala, kondima kosala mosala moko to kosomba lopango. Na esika ya kotalela kaka motema na biso mpo na kozwa bikateli, tosengeli koyoka oyo elimo ezali koloba mpe tosengeli kolanda toli na yango.

19 Tosepelaka mpenza na makebisi mpe na toli oyo bandeko na biso baklisto, bakisa mpe bankulutu, bazali kopesa biso. Kasi, tosengeli kozelaka kaka te ete bato mosusu bákebisa biso. Soki toyebi nzela ya malamu ya kolanda mpe soki toyebi na makambo nini tosengeli kobongisa makanisi na biso mpe bizaleli na biso mpo tósepelisa Nzambe, tókakatana te, tósala yango mbala moko. Yesu alobaki ete: “Soko boyebi makambo oyo, bokozala na esengo soko bokosalela yango.”—Yoane 13:17.

20. Baoyo bayokaka ‘liloba nsima na bango’ bazwaka mapamboli nini?

20 Tomoni mpenza ete mpo na koyeba ndenge ya kosepelisa Nzambe, baklisto bazali na mposa ya koyoka mongongo oyo ekouta na likoló te, bazali mpe na mposa te ete anzelu moko akitela bango. Bazali na Liloba ya Nzambe oyo ekomami mpe bapakolami oyo bazali naino awa na mabele bazali kolakisa bango nzela. Soki batii likebi mpenza na ‘liloba nsima na bango’ mpe batosi lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia, bakolonga kosala mokano ya Nzambe. Na ndenge yango, likambo oyo ntoma Yoane alakaki ekokokisama epai na bango ete: “Ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.

Mwa bozongeli moke

• Mpo na nini Yehova alobaka na bato?

• Kotánga Biblia mbala na mbala ekoki kosalisa biso na nini?

• Ndenge nini tosengeli kotalela toli ya moombo ya sembo?

• Mpo na nini tosengeli kotosa lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia?

[Elilingi na lokasa 13]

Na ndingisa ya Arecibo Observatory/David Parker/Science Photo Library

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bato bazali na mposa ya masini ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpo na koyoka maloba ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 15]

Yehova alobaka na nzela ya Biblia mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto