Batelá “elikya ya lobiko” na yo makasi!
“Tólata . . . elikya ya lobiko lokola ekɔti.”—1 BATESALONIKI 5:8.
1. Ndenge nini “elikya ya lobiko” esalisaka mpo na koyika mpiko?
ELIKYA ya kobika ekoki kosalisa moto alɛmba te ata soki azali na mikakatano makasi. Moto oyo abiki na masuwa oyo ezindi mpe amati na mwa bwato ya moke akoki kokanga motema ntango molai soki ayebi ete etikali moke báya kozwa ye. Ndenge moko mpe, banda kalakala, mibali mpe basi ya kondima bayikaki mpiko na ntango ya mpasi mpo batyaki elikya na “lobiko ya Yehova,” mpe elikya yango ezangaki kokokisama ata mbala moko te. (Exode 14:13; Nzembo 3:8; Baloma 5:5; 9:33) Ntoma Paulo akokanisaki “elikya ya lobiko” na “ekɔti” na kati ya molato ya moklisto mpo na etumba ya elimo. (1 Batesaloniki 5:8; Baefese 6:17) Ya solo, elikya oyo tozali na yango ete Nzambe akobikisa biso ebatelaka makanisi na biso, esalisaka biso mpo tómitungisa te ata ntango tokutani na mikakatano, na botɛmɛli mpe na komekama.
2. Na makambo nini “elikya ya lobiko” ezali na ntina mingi na kati ya losambo ya solo?
2 Mokanda moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi ete: “Kozala na elikya mpo na mikolo ekoya ezalaki ezaleli ya bapakano te,” bato oyo bazalaki kofanda esika moko na baklisto ya ekeke ya liboso. (Baefese 2:12; 1 Batesaloniki 4:13) Nzokande, “elikya ya lobiko” ezali na esika monene na kati ya losambo ya solo. Na ndenge nini? Ya liboso, nkombo ya Yehova ye moko nde esimbi lobiko ya basaleli ya Yehova. Asafa, mokomi ya nzembo asalaki libondeli moko mpe alobaki boye: “Ɛ Nzambe na kobika na biso, sungá biso na ntina na nkembo na nkombo na yo.” (Nzembo 79:9; Ezekiele 20:9) Mpe lisusu, mpo tózala na boyokani malamu na Yehova, ezali na ntina mingi ete tótya elikya na mapamboli oyo alaki biso. Paulo amonisaki likambo yango na maloba oyo: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Paulo alimbolaki lisusu ete ntina ya libosoliboso oyo Yesu ayaki awa na mabele ezali mpo na kobikisa bato oyo bakobongola motema. Paulo alobaki boye: “Liloba oyo ezali sembo mpe ekoki koyambama solo ete Klisto Yesu ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu.” (1 Timote 1:15) Mpe ntoma Petelo abengaki lobiko lokola ‘nsuka [to, mbano ya nsuka] ya kondima na biso.’ (1 Petelo 1:9) Nyonso oyo emonisi polele ete tosengeli kozala na elikya ya lobiko. Kasi, lobiko ezali mpenza nini? Mpe moto asengeli kosala nini mpo azwa lobiko?
Lobiko ezali nini?
3. Lobiko nini basaleli ya Yehova na ntango ya kala bazwaki?
3 Na kati ya Makomami ya Liebele, mbala mingi “lobiko” elimbolaka kolongwa na monyoko to kobika na liwa ya nsɔmɔ to ya mbalakaka. Na ndakisa, Davidi abengaki Yehova “Mobikisi,” mpe alobaki ete: “Nzambe [azali, NW] libanga na ngai. . . . Ebombamelo na ngai, mobikisi na ngai na mpasi na ngai. Nakolela epai na [Yehova] oyo akoki kosanzolama, mpe nakobikisama na bayini na ngai.” (2 Samwele 22:2-4) Davidi ayebaki ete Yehova ayokaka ntango basaleli na ye ya sembo bazali kobelela ye ete asalisa bango.—Nzembo 31:22, 23; 145:19.
4. Basaleli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya awa na mabele bazalaki na elikya ya bomoi ya ndenge nini mpo na mikolo ekoya?
4 Basaleli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya awa na mabele bazalaki mpe na elikya ya bomoi mpo na mikolo ekoya. (Yobo 14:13-15; Yisaya 25:8; Danyele 12:13) Kutu, na kati ya Makomami ya Liebele, bisika mingi oyo Nzambe alakaki kobikisa, maloba wana ezalaki mpe bisakweli ya lobiko monene oyo ekomema na bomoi ya seko. (Yisaya 49:6, 8; Misala 13:47; 2 Bakolinti 6:2) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda mingi bazalaki na elikya ya bomoi ya seko, kasi baboyaki kondima ete Yesu nde asimbaki lobiko na bango. Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye boye: “Bozali kolukaluka kati na [Makomami, NW] mpo ete bobanzi ete na yango bokozwa bomoi ya seko. Mpe izali yango mpenza itatoli mpo na ngai.”—Yoane 5:39.
5. Lobiko elimboli mpenza nini?
5 Na nzela ya Yesu, Nzambe amonisaki ndimbola mobimba ya lobiko. Lobiko elimboli mpe kosikwama na masumu, kosikwama na losambo ya lokuta, kobima na mokili oyo Satana azali koyangela, kosikwama na ezaleli ya kobanga bato, ata mpe na kobanga liwa. (Yoane 17:16; Baloma 8:2; Bakolose 1:13; Emoniseli 18:2, 4) Na nsuka, mpo na bato oyo basalelaka Nzambe na bosembo, soki tolobi ete Nzambe akobikisa bango, elimboli ete akolongola bango na mpasi mpe minyoko, mpe akopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko. (Yoane 6:40; 17:3) Yesu ateyaki ete mpo na “etonga moke,” lobiko elimboli kosekwa mpo na bomoi ya seko na likoló mpe kozala bakonzi elongo na Klisto. (Luka 12:32) Mpo na bato mosusu, lobiko elimboli kozonga na bomoi ya kokoka mpe kozala lisusu na boyokani malamu na Nzambe, lokola oyo Adama na Eva bazalaki na yango na elanga ya Edene ntango basalaki naino lisumu te. (Misala 3:21; Baefese 1:10) Mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko na kati ya paladiso ya ndenge wana. (Genese 1:28; Malako 10:30) Kasi, ndenge nini bato bakoki kozwa lisusu bomoi wana?
Lisiko epesi nzela na lobiko
6, 7. Mokumba nini Yesu azali kokokisa mpo na lobiko na biso?
6 Lobiko ya seko ekoki kozwama se na nzela ya mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kosikola biso. Mpo na nini? Biblia elobi ete ntango Adama asalaki lisumu “amitekaki” mpe atekaki bana na ye nyonso, na biso lokola, na lisumu. Yango esɛngaki lisiko mpo bato bázwa lisusu elikya ya bomoi ya malamu. (Baloma 5:14, 15; 7:14) Bambeka ya banyama oyo bazalaki kopesa ntango bazalaki kotosa Mibeko ya Mose ezalaki komonisa ete Nzambe akobongisa lisiko moko mpo na bato nyonso. (Baebele 10:1-10; 1 Yoane 2:2) Makambo wana ezalaki lokola bililingi ya mbeka ya Yesu. Liboso Yesu abotama, anzelu ya Yehova asakolaki ete: “Akobikisa bato na ye na masumu na bango.”—Matai 1:21; Baebele 2:10.
7 Kobotama ya Yesu ezalaki likamwisi, mpamba te Malia oyo abotaki ye ayebaki naino mobali te; mpe lokola azali Mwana ya Nzambe, asangolaki liwa ya Adama te. Likambo wana, mpe lisusu bosembo na ye na bomoi na ye mobimba, epesaki bomoi na ye motuya oyo esengeli mpo na kosomba bato na lisumu mpe na liwa. (Yoane 8:36; 1 Bakolinti 15:22) Yesu akeseni na bato mosusu nyonso, ye akokaki kozwa etumbu ya liwa mpo na lisumu te. Ayaki na mokili mpenzampenza mpo na “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Lokola asalaki yango, Yesu asekwaki mpe azali sikoyo na bokonzi; akoki kobikisa bato nyonso oyo bazali kotosa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga.—Emoniseli 12:10.
Moto asengeli kosala nini mpo abika?
8, 9. (a) Yesu apesaki eyano nini na motuna oyo elenge mokonzi oyo azalaki mozwi atunaki ye mpo na lobiko? (b) Ndenge nini Yesu asalelaki libaku yango mpo na koteya bayekoli na ye?
8 Mokolo moko, elenge Moyisalaele moko, ye azalaki mokonzi mpe azalaki na bozwi mingi, atunaki Yesu boye: “Nasala nini mpo na kozwa bomoi ya seko?” (Malako 10:17) Ekoki kozala ete ntango atunaki motuna yango azalaki kokanisa lokola Bayuda mingi na ntango wana, ete ezali na makambo ya malamu oyo Nzambe asɛngaka bato básala mpe soki moto azali kosala yango mwa mingi, Nzambe akoki kobikisa ye. Kasi, moto mosusu akoki kosalela Nzambe ndenge yango mpo na bamposa na ye moko. Misala ya ndenge yango ekokaki kopesa elikya ya lobiko ya solo te, mpamba te moto ya kozanga kokoka ata moko te akoki kokokisa masɛngami nyonso ya Nzambe.
9 Yesu apesaki moto yango eyano ete asengeli kotosa mibeko ya Nzambe. Elenge mokonzi yango ayebisaki Yesu mbala moko ete azali kotosa yango banda bomwana na ye. Ntango Yesu ayokaki eyano ya moto yango, asepelaki na ye. Yesu alobaki na ye ete: “Ozangi bobele eloko moko; kendá kotɛkisa biloko nyonso bizali na yo, kabolá yango na babola, mpe okozala na mosolo na Likoló; mpe yaká, [landá] ngai.” Kasi, elenge mobali yango akendaki na mawa na motema, “mpo ete azalaki mozwi ya biloko mingi.” Nsima na yango, Yesu amonisaki bayekoli na ye ete soki moto amipesi mingi na biloko ya mokili oyo, yango ekoki kozangisa ye lobiko. Alobaki lisusu ete moto moko te akoki kozwa lobiko na makasi na ye moko. Kasi, Yesu alobaki na bango lisusu ete: “Bato bakoki kosala yango te, kasi Nzambe akoki kosala yango. Mpo ete epai ya Nzambe makambo nyonso makoki kosalama.” (Malako 10:18-27; Luka 18:18-23) Ndenge nini moto akoki kozwa lobiko?
10. Makambo nini oyo esɛngami tosengeli kokokisa mpo na kozwa lobiko?
10 Lobiko ezali likabo ya Nzambe, kasi apesaka yango bipesela te. (Baloma 6:23) Moto na moto asengeli kokokisa mwa makambo oyo esɛngami mpo na kozwa likabo yango. Yesu alobaki boye: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana [mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” Mpe ntoma Yoane abakisaki ete: “Ye oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; ye oyo aboyi Mwana akomona bomoi te.” (Yoane 3:16, 36) Tomoni polele ete Nzambe asɛngaka ete moto na moto oyo alingi kozwa lobiko ya seko azala na kondima mpe azala na botosi. Moto na moto asengeli kondima lisiko mpe kolanda matambe ya Yesu.
11. Ndenge nini Yehova akoki kondima moto ya kozanga kokoka?
11 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, motema na biso etindaka biso mpenza na kotosa te mpe tokoki te kotosa makambo nyonso kozanga ete tókwea ata na likambo moko. Ezali mpo na yango nde Yehova abongisi lisiko mpo na kolongola biso na masumu. Atako bongo, tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kolanda banzela ya Nzambe na bomoi na biso. Lokola Yesu alobaki yango na elenge mozwi, tosengeli ntango nyonso kotosaka mibeko ya Nzambe. Soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe, Ye akondima biso mpe tokozala na esengo mingi, mpamba te “malako na ye mpe mazali na bozito te”; malako na ye ‘ekitisaka motema.’ (1 Yoane 5:3; Masese 3:1, 8, NW) Kasi, kokangama na elikya ya lobiko ezali likambo ya pɛtɛɛ te.
“Bóbunda etumba makasi mpo na kondima”
12. Ndenge nini elikya ya lobiko elendisaka moklisto mpo akwea na misala ya mabe te?
12 Moyekoli Yuda azalaki na mposa ya kokomela baklisto ya ekeke ya liboso mpo na “lobiko [oyo bazalaki na yango] elongo.” Kasi, ntango amonaki ete bato bamipesaki mingi na misala ya mabe, yango etindaki ye apesa bandeko na ye toli ete ‘bábunda etumba makasi mpo na kondima.’ Ya solo, mpo na kozwa lobiko ekoki kaka te ete moto azala na kondima, akangama na kondima ya solo ya boklisto mpe atosaka ntango makambo ezali kotambola malamu. Tosengeli kozala na mposa makasi ya kosalela Yehova, mposa oyo ekosalisa biso tókwea na komekama te to na masɛnginya te. Kasi, makambo lokola pite mpe kosangisa nzoto na ndenge oyo elongobani te, kozanga botosi epai ya bakonzi, kokabwana mpe ntembe, ezalaki kobebisa elimo ya lisangá na ekeke ya liboso. Mpo na kosalisa bango bákwea na makambo wana te, Yuda asɛngaki baninga na ye baklisto bábosana te mokano na bango, alobaki na bango boye: “Bandeko ya bolingo, ntango bozali kotongama likoló ya kondima na bino ya bosantu mingi, mpe bozali kosambela na elimo santu, bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela motema mawa ya Nkolo Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko.” (Yuda 3, 4, 8, 19-21, NW) Elikya ya kozwa lobiko ekokaki kopesa bango lisusu makasi na etumba na bango mpo na kotikala ntango nyonso pɛto.
13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozangi ntina ya ngɔlu ya Nzambe te?
13 Yehova Nzambe alingi ete bato oyo akobikisa bázala bato ya misala malamu. (1 Bakolinti 6:9, 10) Kasi, elingi koloba te ete ntango tozali kotosa mibeko ya Nzambe tosengeli kokóma bato oyo basambisaka basusu. Kokata ete moto Songolo akozwa bomoi ya seko to akozwa yango te ezali mokumba na biso te. Nzambe ye moko akosala yango, lokola Paulo ayebisaki Bagreke na mboka Atene ete: “Asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopona,” moto yango ezali Yesu Klisto. (Misala 17:31; Yoane 5:22) Soki na kati ya bomoi na biso tozali kondima lisiko ya Yesu, tosengeli kobanga te mokolo ya kosambisa oyo ezali koya. (Baebele 10:38, 39) Likambo ya ntina ezali ete tosengeli soki moke te “koyamba ngɔlu ya Nzambe [kozongisa boyokani na biso na ye na nzela ya lisiko] mpe kobungisa ntina na yango.” Soki tozali kotika nzela ete makanisi mpe misala ya mabe ebenda biso, na ntango yango tokobungisa ntina ya ngɔlu ya Nzambe. (2 Bakolinti 6:1) Longola yango, ntango tozali kosalisa bato mosusu mpo bango mpe bázwa lobiko, tozali komonisa ete tobungisi ntina ya ngɔlu ya Nzambe te. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?
Tósakola elikya ya lobiko
14, 15. Banani oyo Yesu apesaki bango mosala ya kosakola nsango malamu ya lobiko?
14 Paulo azongelaki maloba ya mosakoli Yoele mpe akomaki boye: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova] akobika.” Na nsima abakisaki ete: “Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?” Mwa bavɛrsɛ moke na nsima, Paulo amonisaki ete kondima eyaka yango moko te; kasi “kondima euti na koyoka [likambo, NW]” elingi koloba, “liloba na [ntina na, NW] Klisto.”—Baloma 10:13, 14, 17; Yoele 2:32.
15 Nani akomemela bato “liloba na ntina na Klisto”? Yesu apesaki mosala yango epai ya bayekoli na ye, baoyo ateyaki bango “liloba” yango. (Matai 24:14; 28:19, 20; Yoane 17:20) Ntango tozali kosala mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, tozali mpenza kosala likambo oyo Paulo akomaki na vɛrsɛ mosusu epai azongelaki maloba ya Yisaya ete: “Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” Ata soki bato mingi bazali koboya nsango malamu oyo tozali komemela bango, makolo na biso ezali kaka “kitoko” na miso ya Yehova.—Baloma 10:15; Yisaya 52:7.
16, 17. Wapi mikano mibale oyo mosala ya kosakola ezali kokokisa?
16 Ntango tozali kosala mosala oyo bapesi biso, tozali kokokisa makambo mibale ya ntina. Ya liboso, nsango malamu esengeli kosakolama mpo ete nkombo ya Nzambe ekumisama mpe bato oyo bazali na mposa ya lobiko báyeba epai oyo basengeli koluka yango. Paulo asimbaki ntina ya likambo yango na oyo etali mosala ya kosakola. Alobaki boye: “Mpo ete Nkolo alaki biso bongo ete, Nasili kotya yo mpo na moi ya bapakano, ete ozala mpo na lobiko kino nsuka ya mokili.” Yango wana, lokola bayekoli ya Klisto, mokomoko na biso asengeli kosala mosala ya komemela bato nsango ya lobiko.—Misala 13:47; Yisaya 49:6.
17 Ya mibale, mosala ya kosakola nsango malamu ezali kobongisa nzela mpo Nzambe aya kosambisa na bosembo. Mpo na kosambisa yango, Yesu alobaki ete: “Ekoya Mwana ya moto na nkembo na ye, [mpe baanzelu nyonso elongo na ye, NW], akofanda na kiti ya bokonzi na ye ya nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli ya bampate mpe bantaba.” Atako kosambisa mpe kokabola ekosalema ntango ‘Mwana ya moto akoya na nkembo na ye,’ mosala ya kosakola oyo ezali kosalema lelo oyo ezali kopesa bato likoki ya koyeba bandeko ya elimo ya Klisto mpe kosunga bango mpo na lobiko ya seko ya bato yango.—Matai 25:31-46.
Tózala na “ntembe ata moke te mpo na elikya”
18. Ndenge nini tokoki kobatela “elikya ya lobiko” na biso makasi?
18 Kosala mosala ya kosakola na ndenge esengeli mpenza ezali mpe kosalisa biso tóbatela elikya na biso makasi. Paulo akomaki ete: “Tolingi ete moto na moto kati na bino alakisa molende ndenge yango mpo na kozala na ntembe ata moke te mpo na elikya tii na nsuka.” (Baebele 6:11, NW) Yango wana, tiká ete mokomoko na biso alata “elikya ya lobiko lokola ekɔti,” na bongo akobosana te ete “Nzambe abongisaki biso mpo na nkanda te kasi ete tózwa lobiko na nzela na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Batesaloniki 5:8, 9) Tóbosana mpe te elendiseli ya Petelo oyo: “Bókanga nkamba na makanisi na bino, bómisɛnzɛla, bózala na elikya nyɛ mpo na ngɔlu ekokómela bino.” (1 Petelo 1:13) Baoyo nyonso bazali kosala bongo bakomona ndenge oyo “elikya ya lobiko” na bango ekokokisama mobimba!
19. Tokotalela makambo nini na lisolo oyo ekolanda?
19 Ntango tozali kozela makambo yango, ndenge nini tosengeli kotalela ntango oyo etikali liboso mokili oyo ebomama? Ndenge nini tokoki kosalela ntango yango mpo na lobiko ya biso moko mpe ya bato mosusu? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini tosengeli kobatela “elikya ya lobiko” na biso makasi?
• Lobiko esangisi makambo nini?
• Tosengeli kosala nini mpo na kozwa likabo ya lobiko?
• Mosala na biso ya kosakola ezali kokokisa makambo nini na boyokani na mokano ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 10]
Lobiko esuki kaka na kobika na liwa te.