Epai wapi okoki kozwa toli ya malamu?
“Kopesa toli” ekómi lelo mombongo oyo ezali kokɔtisa bamiliare ya dolare na mbula moko. Bato bazali na mposa ya lisalisi. Heinz Lehmann, monganga ya maladi ya motó, alobi ete: “[Lelo oyo] mateya mpe boyokani kati na bato ezali lisusu malamu te. Mateya na mangomba ezali lisusu ndenge ezalaki kala te. Mabota ezali lisusu na boyokani ya malamu te . . . mpe bato bazali koyeba te epai oyo bakotya motó.” Eric Maisel, ye akomaka babuku, alobi boye: “Bato oyo kala bazalaki kokende epai ya nganga-nkisi ya mboka na bango, epai ya pastɛrɛ to monganga ya libota na bango mpo na kozwa lisalisi soki bazali na mpasi ya motó, soki babɛli na elimo mpe soki bazali na maladi mosusu na nzoto, lelo oyo bazali koluka lisalisi bango moko na mikanda oyo ezali kopesa toli.”
LISANGÁ moko (Association Américaine de psychologie) ebongisaki mwa bato mpo na koyekola misala yango ya kopesa toli oyo ezali kopalangana mingi. Bato yango balobaki ete “atako makoki ezali mingi mpo na kosalisa bato bámiyeba mpe báyeba bato mosusu . . . , bazali kolekisa ndelo mpe bazali kolakisa makambo oyo ekokamwisa bato na bapiblisite, na mikanda mpe na bafilme oyo bazali kosala mpo na kolobela mosala yango.” Mokomi moko na zulunalo Toronto Star alobi boye: “Bóyeba ete mangomba mpe mateya ya lokuta ekómi mingi. . . . Bókeba mingimingi na mikanda, na bakasɛti to na baseminɛrɛ oyo ezali koteya makambo mingi koleka na ntango mokuse mpenza, mpe ezali kosɛnga na moto milende mingi te to kominyokola te.” Ya solo, ezali na bato mingi oyo bazali mpenza na mposa ya kosalisa bato mosusu oyo basengeli na lisungi. Kasi, likambo ya mawa ezali ete bato mosusu ya mitema mabe bazali kozwa matomba na bango moko na nsima ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazali mpenza kosalisa bango te.
Na yango, na esika nini tokoki kozwa lisalisi oyo tokoki kotyela motema? Epai wapi tokoki kozwa toli ya malamu oyo ekosalisa biso?
Epai oyo tokoki kozwa toli ya malamu
Henry Ward Beecher, moto ya Amerika mpe azalaki pastɛrɛ na ekeke ya 19, alobaki boye: “Biblia ezali kalati ya kolakisa nzela oyo Nzambe apesi mpo na kolakisa yo epai olingi kokende, mpo na kobimisa yo na mai, mpe kolakisa yo esika libongo ezali, mpe ndenge ya kokóma kuna kozanga ete otambola na mabanga to na zelo.” Mokomi mosusu alobaki mpo na Biblia ete: “Moto moko te aleki Makomami; ntango biso tozali kokola, mokanda yango ezali se koya monene mpe na makambo mingi.” Osengeli mpenza kotalela mokanda yango?
Biblia elobi mpo na yango moko ete: “[Makomami, NW] nyonso mapemami na [elimo, NW] ya Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Makambo oyo ezali na kati ya Biblia euti epai ya Yehova Nzambe, Liziba ya bomoi. (Nzembo 36:9) Lokola azali liziba ya bomoi, Nzambe ayebi malamumalamu ndenge tosalami, lokola Nzembo 103:14 ezali koyebisa biso ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” Na yango, tokoki kotyela Biblia motema mobimba.
Biblia ezali na ebele ya mitinda mpe toli oyo tokoki kosalela mpe kozwa litomba ata na likambo nini oyo tokoki kokutana na yango. Na nzela ya Biblia, Nzambe azali koloba na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) Biblia ekoki mpenza kokokisa bamposa ya bato lelo oyo? Tótala.
Biblia ezali kokokisa bamposa na biso . . .
Soki totungisami. Biblia elobi na biso ete: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisɛngeli na bino biyebana epai ya Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Mabondeli esalisaka mpenza bato ntango batungisami mpo na mikakatano ya mbongo, esalisaka basi oyo babebisi bango mpe esalisaka bato oyo bazali kofinga bango to baoyo bakufeli ndeko to moninga moko ya motema? Tótala lisolo oyo elandi.
Ntango Jackie ayebaki ete moto moko asangisaki nzoto na mwana na ye ya mwasi ya moke, alobaki boye: “Maloba ezali te mpo na kolimbola mpasi oyo moto azalaka na yango na motema soki akanisi ete mwana na ye amoni mpasi mpo akokaki kobatela ye te. Nasengelaki kosala makasi mpo na kosilisa mpasi oyo nazalaki koyoka na motema, na mawa mpe nkanda. Bomoi na ngai ezalaki lisusu malamu te mpo na nkanda mpe mpasi ya motema oyo nazalaki na yango. Nazalaki na mposa mpenza ete Yehova abatela motema na ngai.” Nsima ya kotánga mpe kotánga lisusu Bafilipi 4:6, 7, asalaki milende mpo na kosalela toli yango. Jackie alobi ete: “Nazalaki kobondela mikolo nyonso, mbala na mbala nazalaki kosɛnga ete namitika te ete nazinda na makanisi ya mabe mpe Yehova asalisaki ngai mpe makanisi na ngai ekómaki kimya mpe nakómaki na esengo. Sikoyo nazali mpenza na kimya na motema na ngai.”
Yo mpe mbala mosusu okoki kokutana na likambo moko oyo omoni ete likoki ya kosilisa yango ezali te mpo eleki yo motó mpe likambo yango ezali kotungisa yo. Soki olandi toli ya Biblia oyo elobi ete tosengeli kobondelaka, okoki kolonga. Mokomi ya nzembo alendisi biso na maloba oyo: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.”—Nzembo 37:5.
Mpo na kolendisama. Mokomi ya nzembo alobaki maloba oyo mpo na komonisa botɔndi: “Ɛ [Yehova], nalingi efandelo na ndako na yo mpe esika wana efandi nkembo na yo. Lokolo na ngai etɛlɛmi na mabele alima; nakosanzola [Yehova] kati na koyangana monene.” (Nzembo 26:8, 12) Biblia ezali kolendisa biso tóyanganaka esika moko mbala na mbala mpo na kosambela Yehova. Ndenge nini makita ekoki kokokisa bamposa na yo? Bato mosusu bamonaki nini?
Becky alobi ete: “Baboti na ngai basambelaka Yehova te, yango wana balingaka te soki nalingi kosala likambo moko na mosala ya Nzambe. Nasalaka mpenza milende mpo na kokende na makita.” Becky amoni ete azwi mapamboli mingi mpamba te asalaka milende mpo na kokende na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ. “Makita elendisaka kondima na ngai, na boye ete nakoki koyika mpiko na mitungisi oyo eyelaka ngai mokolo na mokolo lokola nazali naino na kelasi, lokola nazali mwana mwasi, mpe mosaleli ya Yehova. Na Ndako ya Bokonzi, namonaka ete bandeko bakeseni mpenza na bana oyo tozalaka na bango na kelasi! Bandeko bamibanzabanzaka mpo na ngai mpe basungaka ngai, masolo na biso ezalaka ntango nyonso ya kolendisa. Bazali mpenza baninga ya solosolo.”
Ya solo, soki tozali kolanda toli oyo Biblia epesi biso mpo na koyangana mbala na mbala na makita, Yehova akoki kolendisa biso. Ezali na makita nde tomonaka bosolo ya maloba ya mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango ya mpasi.”—Nzembo 46:1.
Mpo na mosala ya malamu mpe oyo epesaka esengo. Biblia elobi ete: “Bótɛlɛma ngwi, bóninganaka te, bósalaka mosala ya Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.” (1 Bakolinti 15:58) “Mosala ya Nkolo” epesaka mpenza esengo? Mosala ya kosakola ekokisaka mpenza likambo moko ya ntina?
Amelia amonisi ndenge ayokaka mpe alobi boye: “Nazalaki koyekola Biblia na mwasi moko na mobali na ye oyo etikalaki moke báboma libala na bango. Nasalisaki mpe mwasi moko oyo babomaki mwana na ye ya mwasi. Mwasi yango azalaki komitungisa mpo ayebaki mpenza te esika moto akendaka soki akufi. Bato yango nyonso, bazwaki kimya mpe elikya na bomoi na bango ntango bakómaki kosalela mitinda ya Biblia. Nazali na esengo mingi mpo nasalisaki bango.” Scott alobi ete: “Soki okutani na likambo moko ya malamu na mosala ya kosakola to obandi koyekola na moto Biblia to opesi litatoli ya libaku malamu, okolobela yango na bambula ekoya. Mbala nyonso oyo okolobela yango, okoyoka kaka esengo ndenge oyokaki mbala ya liboso! Mosala ya kosakola epesaka biso esengo mingi mpe esengo yango etikalaka libela.”
Tomoni mpenza ete bato mingi ntango basalelaki toli ya Biblia oyo elobi ete tosengeli kokóma basakoli ya molende, ekokisaki mposa na bango ya kosala mosala ya malamu mpe oyo epesaka esengo. Yo mpe bazali kobenga yo mpo na kosangana na mosala yango ya koteya bato mosusu banzela mpe mitinda ya Nzambe mpe okozwela yango matomba.—Yisaya 48:17; Matai 28:19, 20.
Tózwa matomba na Liloba ya Nzambe
Na ntembe te, tokoki mpenza kotya motema ete Biblia ekoki kopesa biso toli malamu lelo oyo. Mpo na kozwa yango, tosengeli kosala milende mpenza. Tosengeli ntango nyonso kotánga yango, koyekola yango mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga mpe koyekola. Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso.” (1 Timote 4:15; Deteronome 11:18-21) Nzambe alobi ete soki olandi toli na ye oyo ezali na Biblia, okolonga. Alaki ete: “Talelá [Yehova] . . . Na nzela na yo nyonso, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
[Bililingi na lokasa 31]
Kotosa toli ya Biblia esalaka ete bomoi ezala malamu mpe na esengo.