Tólona mbóto ya solo ya Bokonzi
“Na ntɔngɔ, koná mbóto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te.”—MOSAKOLI 11:6.
1. Na ndimbola nini baklisto bazali kosala mosala ya kolona lelo oyo?
MOSALA ya bilanga ezalaki mosala ya ntina mingi na mokili ya Baebele na ntango ya kala. Yango wana, lokola Yesu afandaki na Mokili ya Ndaka ntango azalaki na bomoi awa na mabele, alobelaki makambo ya bilanga na masese na ye. Na ndakisa, alobaki ete mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali lokola kolona mbóto. (Matai 13:1-9, 18-23; Luka 8:5-15) Lelo oyo, ezala tofandi na mboka oyo bato mingi basalaka bilanga to te, biso baklisto tozali kosala mosala ya ntina etali kolona mbóto ya elimo.
2. Mosala ya kosakola ezali na ntina nini, mpe wapi mwa makambo oyo ezali kosalema lelo oyo mpo na kokokisa mosala yango?
2 Kosala mosala ya kolona mateya ya solo ya Biblia na ntango oyo ya nsuka ezali libaku moko malamu mpenza. Baloma 10:14, 15 emonisi malamu ntina ya mosala yango na maloba oyo: “Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli? Bakosakola na nzela nini soko batindami te? [Lokola] ekomami ete, Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” Lelo oyo, ebongi mpenza ete tózonga nsima te mpe tózala na makanisi malamu mpo na kosala mosala oyo Nzambe apesi biso. Yango wana, Batatoli ya Yehova bazali kobimisa mpe kokabola Babiblia na mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 340. Bandeko koleka 18 000 oyo bamipesi, bazali kosala mosala ya kobongisa mikanda yango na biro monene mpe na bafiliale na mikili ndenge na ndenge. Mpe lisusu, na mokili mobimba, Batatoli penepene na milio 6 bazali kokabola mikanda yango.
3. Makambo nini ezali kosalema na nzela ya kolona mbóto ya solo ya Bokonzi?
3 Mosala nyonso wana ezali kobota mbuma nini? Se ndenge ezalaki na ebandeli ya lisangá ya boklisto, lelo oyo bato mingi bazali kondima mateya ya solo. (Misala 2:41, 46, 47) Kasi, likambo oyo ezali na ntina mingi koleka ebele ya basakoli ya sika ya Bokonzi oyo bazali kozwa batisimo ezali ete mosala monene ya kotatola ezali kosantisa nkombo ya Yehova mpe ezali kolongisa ye lokola Nzambe ya solo kaka moko. (Matai 6:9) Mpe lisusu, boyebi ya Liloba ya Nzambe ezali kobongisa bomoi ya bato mpe ekoki komema bango na lobiko.—Misala 13:47.
4. Ndenge nini bantoma bazalaki komibanzabanza mpo na bato oyo bango bazalaki kokende koteya?
4 Bantoma bayebaki malamu ete bato bakoki kozwa bomoi soki bayoki nsango malamu mpe bazalaki na bolingo mingi mpo na bato oyo bango bazalaki kokende koteya. Tokoki komona yango polele na maloba ya ntoma Paulo ntango akomaki boye: “Awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele Nsango Malamu ya Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokóma balingami na biso.” (1 Batesaloniki 2:8) Lokola bazalaki mpenza na mposa ya kosalisa bato, Paulo na bantoma mosusu bazalaki kolanda ndakisa ya Yesu na baanzelu ya likoló; bango bazali kokokisa mokumba monene na mosala yango ya kobikisa bomoi ya bato. Sikoyo, tótalela lisusu mikumba ya ntina mingi oyo basaleli yango ya Nzambe na likoló bazali kokokisa na mosala ya kolona solo ya Bokonzi, mpe tótala ndenge nini ndakisa na bango ezali kolendisa biso mpo tókokisa mokumba na biso.
Yesu azali Moloni ya solo ya Bokonzi
5. Mosala nini Yesu amipesaki na yango libosoliboso ntango azalaki awa na mabele?
5 Yesu azalaki moto ya kokoka mpe akokaki kopesa bato ya ntango na ye biloko mingi ya malamu. Na ndakisa, akokaki kosembola mabunga ebele na misala ya monganga mpe komonisa ndenge ya malamu ya kosilisa bamaladi; akokaki mpe koteya bato makambo mosusu na mayele ya siansi. Kasi, kobanda na ebandeli mpenza ya mosala na ye amonisaki ete ayaki mpo na kosakola nsango malamu. (Luka 4:17-21) Mpe na nsuka ya mosala na ye, alobaki boye: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Yango wana, Yesu amipesaki mobimba na mosala ya kolona mbóto ya solo ya Bokonzi. Mpo na Yesu, koteya bato ya ntango na ye makambo ya Nzambe mpe mikano na ye ezalaki na ntina koleka mayele mosusu nyonso oyo akokaki kolakisa bango.—Baloma 11:33-36.
6, 7. (a) Likambo nini ya malamu Yesu alakaki liboso amata na likoló, mpe ndenge nini azali kokokisa yango? (b) Omiyokaka ndenge nini soki otaleli ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mosala ya kosakola?
6 Yesu alobaki ete ye azali Moloni ya solo ya Bokonzi. (Yoane 4:35-38) Azalaki kolekisa libaku ata moko te mpo na kobwaka mbóto ya nsango malamu. Ata ntango etikalaki moke akufa likoló ya nzete, asakolaki nsango malamu ya paladiso oyo ekozala awa na mabele. (Luka 23:43) Mpe lisusu, mposa na ye ya komona ete nsango malamu ezali kosakolama esukaki te ntango akufaki na nzete ya mpasi. Liboso amata na likoló, atindaki bantoma na ye bákoba kolona mbóto ya solo ya Bokonzi mpe bákómisa bato bayekoli. Na nsima, Yesu alakaki likambo moko ya malamu mpenza. Alobaki boye: “Talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.”—Matai 28:19, 20.
7 Na maloba yango, Yesu alakaki ete akosunga, akotambwisa mpe akobatela mosala ya kosakola nsango malamu “mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Tii na moi ya lelo, Yesu azali mpenza kotya likebi na mosala ya kosakola nsango malamu. Ye moko azali Motambwisi na biso na mosala ya kolona mateya ya solo ya Bokonzi. (Matai 23:10) Na miso ya Yehova, lokola Yesu azali Mokonzi ya lisangá ya boklisto, mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali na motó na ye.—Baefese 1:22, 23; Bakolose 1:18.
Baanzelu bazali kosakola nsango ya esengo
8, 9. (a) Ndenge nini baanzelu bamonisaka ete basepelaka mingi na makambo etali bato? (b) Na ndimbola nini tokoki koloba ete baanzelu bazali kotala biso lokola tozali na esika ya polele?
8 Ntango Yehova akelaki mabele, baanzelu ‘bayembaki elongo moko mpe bagangaki na esengo.’ (Yobo 38:4-7) Banda ntango wana, bikelamu yango oyo bafandi na likoló bamonisaka ete basepelaka na makambo nyonso oyo etali bato. Yehova aselelaka baanzelu yango mpo na koyebisa bato maloba na ye. (Nzembo 103:20) Asalaka mpenza bongo mpo na mosala ya kopalanganisa nsango malamu na mikolo na biso. Na emoniseli oyo Nzambe alakisaki ye, ntoma Yoane amonaki “anzelu moko azali kopumbwa na katikati ya likoló” mpe azalaki na “nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya bato ya mokili, mpe na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na nkota nyonso, mpe na bato nyonso, mpe azalaki koloba na mongongo makasi ete: ‘Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga na ye ya kosambisa ekoki.’ ”—Emoniseli 14:6, 7, NW.
9 Biblia elobi ete baanzelu bazali “[bilimu, NW ] na mosala bakotindamaka mpo na kosalela baoyo balingi kozwa libula ya lobiko.” (Baebele 1:14) Lokola baanzelu bazalaka na molende ya kokokisa mikumba na bango, miso na bango mpe ezali epai na biso mpe na mosala na biso. Bikelamu ya likoló batalaka biso ntango tozali kosala mosala na biso lokola nde tozali na esika ya polele. (1 Bakolinti 4:9) Lokola toyebi ete tozali kolona solo ya Bokonzi biso moko te, likambo yango esengeli kotinda biso na kokanisa malamu mpe na kozala na esengo!
Tozali kokokisa mokumba na biso na molende
10. Ndenge nini tokoki kosalela toli malamu ya Mosakoli 11:6 na mosala na biso ya kosakola?
10 Mpo na nini Yesu na baanzelu bazali kotyela mosala na biso likebi mingi? Yesu ayebisaki ntina moko ntango alobaki boye: “Nalobi na bino ete esengo ekozala bongo kati na baanzelu ya Nzambe mpo na moto moko ya masumu oyo abongoli motema.” (Luka 15:10) Biso mpe tokanisaka bato mingi. Yango wana, tosalaka nyonso oyo ekoki mpo na kopalanganisa mbóto, elingi koloba mateya ya solo ya Bokonzi bipai nyonso. Tokoki kosalela maloba ya Mosakoli 11:6 mpo na mosala na biso. Na vɛrsɛ yango Biblia elobi na biso boye: “Na ntɔngɔ, koná mbóto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te; mpo ete oyebi te soko nini ekokóma malamu to oyo to yango to soko nyonso mibale ikozala malamu.” Ya solo, ata soki bato nkama to mpe nkóto baboyi nsango na biso, ekoki kozala ata na moto moko oyo akondima yango. Kasi, lokola baanzelu, tokozala na esengo soki ata “moto moko ya masumu” andimi nsango ya lobiko.
11. Ndenge nini mikanda oyo elimbolaka Biblia ekoki kosalisa biso na mosala ya kolona mbóto?
11 Mosala ya kosakola nsango malamu esɛngi makambo mingi. Mikanda oyo elimbolaka Biblia esalisaka mpenza Batatoli ya Yehova na mosala yango. Na makambo mosusu, mikanda yango ezali mpe lokola mbóto oyo tozali kobwaka bipai nyonso. Toyebi te na esika nini ekobota mbuma. Ntango mosusu moto moko akoki kozwa mokanda kasi atángi yango te, na nsima apesi yango moto mosusu oyo akotánga yango. Ntango mosusu, Yesu na baanzelu bakoki kosala ete makambo mosusu esalema mpo na litomba ya bato ya mitema sembo. Tótalela mwa bandakisa mpo na komonisa ndenge oyo Yehova akoki kosala makambo ya kokamwa oyo tokanisaki te na nzela ya mikanda oyo totikelaka bato.
Mosala oyo Nzambe ya solo azali kosala
12. Ndenge nini zulunalo moko ya kala esalisaki mpenza libota moko na koyeba Yehova?
12 Na 1953, Robert na Lila, na bana na bango balongwaki na engumba moko monene mpe bakendaki kofanda na ndako moko oyo basundolá kala na ferme moko, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Nsima ya mwa mikolo, Robert azwaki likanisi ya kosala esika ya kosukola na kati ya ndako na esika moko oyo ezalaki na basikaliɛ likoló na yango. Ntango alongolaki mwa mabaya, amonaki bapapye mikemike, na mposo ya ndika, na biloko mosusu oyo bampoko batondisaki na nsima. Ezalaki mpe na zulunalo moko L’Âge d’Or. Robert asepelaki mingi na lisolo moko oyo ezalaki na zulunalo yango, lisolo yango elobelaki kobɔkɔla bana. Zulunalo yango epesaki toli ya polele oyo eutaki na Biblia mpe Robert asepelaki na toli yango mingi; yango wana alobaki na Lila ete basengeli kokɔta na “lingomba ya L’Âge d’Or.” Elekaki kaka mwa bapɔsɔ, Batatoli ya Yehova bayaki kotala bango na ndako; kasi, Robert ayebisaki bango ete libota na ye bazali na mposa ya kokɔta na “lingomba ya L’Âge d’Or.” Batatoli bayebisaki ye ete zulunalo L’Âge d’Or ekómá na nkombo mosusu: Lamuká! Robert na Lila bakómaki koyekola Biblia na Batatoli pɔsɔ na pɔsɔ, mpe na nsuka bazwaki batisimo. Na nsima, bango mpe balonaki mbóto to mateya ya solo na mitema ya bana na bango mpe babukaki mbuma mingi mpenza. Ndenge tozali koloba boye, bato koleka 20 na libota yango, na bana nyonso nsambo ya Robert na Lila, bazali basaleli ya Yehova Nzambe oyo bazwi batisimo.
13. Nini esalisaki mobali moko na mwasi na ye na Porto Rico ete básepela na Biblia?
13 Eleki sikoyo mbula soki 40, mobali moko nkombo na ye William na mwasi na ye Ada, bato ya ekólo Porto Rico, bazalaki kosepela koyekola Biblia te. Mbala nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kokende kotala bango na ndako na bango, bazalaki kosala lokola nde bato bazali te. Bongo mokolo mosusu, William akendaki na esika moko batekaka bibende mpo na kosomba eloko moko azalaki na mposa na yango mpo na mwa mosala moko na ndako. Ntango abandaki kozonga, amonaki mokanda moko na kati ya esika moko ya kobwaka bosɔtɔ. Ezalaki mokanda Religion, oyo Batatoli ya Yehova babimisaki na 1940. William alɔkɔtaki mokanda yango mpe amemaki yango na ndako. Na nsima asepelaki mingi ntango atángaki makambo oyo ekesenisi losambo ya lokuta na losambo ya solo. Ntango Batatoli ya Yehova bakendaki lisusu na ndako na bango, William na Ada bayokaki bango na esengo mpe babandaki koyekola Biblia. Nsima ya mwa basanza, bazwaki batisimo na liyangani oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Mokano ya Nzambe,” oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge na 1958. Banda wana, basalisi bato koleka 50 mpo na kokóma bandeko na biso baklisto.
14. Lokola makambo oyo esalemá emonisi yango, mikanda na biso ekoki kosala makambo malamu nini?
14 Karl azalaki mwana moko ya mobulu ata ntango azalaki na mbula 11 mpamba; mpe azalaki komona ete azalaki kozanga mokakatano te. Tata na ye azalaki moteyi na Lingomba ya Metodiste mpe ayebisaki ye ete soki moto mabe akufi akendaka konyokwama na mɔ́tɔ ya lifelo. Yango wana Karl azalaki kobanga lifelo mingi. Mokolo moko na 1917, Karl alokɔtaki mwa papye moko na balabala oyo bakomaki mwa makambo. Ntango atángaki yango, likebi na ye ebendamaki mbala moko na motuna oyo: “Lifelo ezali nini?” Bakomaki papye yango mpo na kobengisa bato na lisukulu moko oyo esengelaki kolobela lifelo; Bayekoli ya Biblia (lelo oyo Batatoli ya Yehova) bato babongisaki yango. Karl ayekolaki Biblia mbala na mbala, mpe mbula moko na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki Moyekoli ya Biblia. Na 1925, babengisaki ye mpo na kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe asalaka kuna tii lelo oyo. Mwa papye mpamba oyo moto alɔkɔtaki na balabala epesá ye nzela ya kosala mosala ya Nzambe mbula koleka 80 sikoyo.
15. Yehova akoki kosala nini soki amoni malamu kosala yango?
15 Ya solo, biso bato tokoki koyeba te likambo oyo baanzelu basalaki na bandakisa yango. Kasi, tosengeli kondima ete Yesu na baanzelu bazali kokokisa mokumba monene na mosala ya kosakola mpe Yehova akoki kotambwisa makambo na ndenge oyo amoni malamu. Bandakisa oyo mpe bandakisa mosusu mingi emonisi makambo malamu oyo mikanda na biso ekoki kosala ntango totikeli yango bato.
Bapesi biso eloko ya motuya
16. Maloba ya 2 Bakolinti 4:7 ezali koteya biso nini?
16 Ntoma Paulo alobelaki “eloko oyo ya motuya kati na mbeki iyemami na mabele.” Eloko yango ya motuya ezali nde mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso, mpe bambeki esalemi na mabele ezali bato oyo Yehova apesi eloko yango ya motuya. Lokola bato yango bazali bato ya kozanga kokoka mpe bazali na bolɛmbu, Paulo alobaki lisusu ete ndenge bapesi bango mosala yango esali ete “nguya oyo eleki nguya ya bato ezala ya Nzambe mpe ezala ya biso te.” (2 Bakolinti 4:7, NW ) Ya solo, tokoki kotya elikya ete Yehova akopesa biso nguya oyo tosengeli na yango mpo tósala mosala yango.
17. Makambo nini tokokutana na yango ntango tozali kolona mbóto ya mateya ya solo ya Bokonzi, mpe mpo na nini tosengeli kaka kozala na makanisi malamu?
17 Mbala mingi tosengeli kondima makambo ya mpasi. Ekoki kozala mpasi mpe mokakatano mpenza mpo na kosakola na bateritware mosusu. Na bisika mosusu bato mingi balingaka koyoka te, to balingaka biso te. Na bisika ya ndenge wana ezali kosɛnga milende mingi mpe mbala mosusu emonanaka lokola nde mbuma moko ya malamu ekobima te. Kasi ebongi mpenza tósala molende yango mpamba te bomoi ya bato mingi ezali na likama. Tóbosana te ete mbóto oyo ozali kolona ekoki kopesa bato bolamu sikoyo mpe ekoki kopesa bango bomoi ya seko na mikolo ekoya. Mbala mingi maloba ya Nzembo 126:6 ekokisamaka ete: “Ye oyo atamboli na kolela mpe [amemi] nkona mpo na kokona, [akozonga] solo na konganga na esengo mpe [akomema] mbuma na ye.”
18. Ndenge nini tokoki kotya ntango nyonso likebi na mosala na biso ya kosakola, mpe mpo na nini?
18 Tólekisa ata libaku moko te oyo ebongi mpo na kolona mbóto to mateya ya solo ya Bokonzi na bisika nyonso. Tóbosana te ete, atako biso nde tozali kolona mpe kosopela yango mai, Yehova nde azali kokolisa. (1 Bakolinti 3:6, 7) Kasi, lokola Yesu na baanzelu bazali kokokisa mokumba na bango, Yehova alingi ete biso tósala mosala na biso malamumalamu. (2 Timote 4:5) Tótalelaka ntango nyonso ndenge na biso ya koteya, elimo na biso, mpe molende na biso na mosala. Mpo na nini? Paulo apesi eyano ete: “Ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”—1 Timote 4:16.
Toyekoli makambo nini?
• Ndenge nini mosala na biso ya kolona ezali kobota mbuma malamu?
• Yesu Klisto na baanzelu bazali kokokisa mokumba nini na mosala ya kosakola lelo oyo?
• Mpo na nini tosengeli kolekisa ata libaku moko te na mosala na biso oyo tozali kosala lokola baloni ya mateya ya solo ya Bokonzi?
• Nini ekosalisa biso tólendendela ntango bato balingi koyoka biso te to balingi mosala na biso te?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola basali ya bilanga na Yisalaele ya kala, lelo oyo, baklisto bazali kopalanganisa mbóto ya solo ya Bokonzi bipai nyonso
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Batatoli ya Yehova bazali kobimisa mpe kokabola mikanda ndenge na ndenge oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 340