Lisolo ya Bomoi
Amemaki pole na bamboka mingi
LISOLO YA GEORGE YOUNG RUTH YOUNG NICHOLSON NDE AYEBISI LISOLO YANGO
“Mpo na nini bakonzi ya lingomba na biso bafandi nyɛɛ? . . . Soki tondimi ete makambo oyo nakomi ezali solo mpe tofandi nyɛɛ, tokozala bato ya ndenge nini? Tólongola bato na molili, tósakola solo polelepolele.”
MALOBA yango ezali na kati ya mokanda moko ya nkasa 33 oyo Tata akomaki mpo na kosɛnga ete bálongola nkombo na ye na lingomba. Ezalaki na 1913. Banda ntango yango, amipesaki na mosala ya komema pole na mabota mingi. (Bafilipi 2:15) Banda bomwana, bandeko na biso na baninga mosusu bazalaki koyebisa ngai masolo ya Tata na ngai mpe nazalaki kotánga mikanda oyo elobelaki makambo na ye mosusu. Makambo mingi oyo Tata asalá na bomoi na ye etindaka ngai nakanisa bomoi ya ntoma Paulo. Tata azalaki lokola Paulo oyo azalaki “ntoma epai na [mabota, NW ],” azalaki ntango nyonso kosala mibembo na mikili mingi mpe na bisanga mpo na koteya bato nsango ya Yehova. (Baloma 11:13; Nzembo 107:1-3) Tiká nayebisa bino lisolo ya Tata na ngai George Young.
Bambula ya ebandeli
Tata azalaki mwana mobali ya nsuka ya John na Margaret Young. Bango bazalaki kosambela na Lingomba ya Presbytérien ya Écosse. Abotamaki mokolo ya 8 Sɛtɛmbɛ 1886, mwa moke nsima wana libota na bango elongwaki na Edimbourg, na Écosse, mpe bakómaki kofanda na Colombie Britannique na wɛsti ya Canada. Bayaya na ye misato ya mibali: Alexander, John, na Malcolm, babotamaki na Écosse mwa bambula liboso. Marion, leki na bango ya mwasi, oyo bazalaki kobenga ye Nellie, Tata azalaki mokóló na ye na mbula mibale.
Lokola bakolaki na ferme moko na engumba Saanich, pene na engumba Victoria, na etúká ya Colombie Britannique, bana bazalaki kokola malamu. Kasi, balakisaki bango mpe ndenge ya kosala misala na ndako. Soki baboti na bango bauti mobembo na Victoria, bazalaki kokuta bango basilisi misala nyonso mpe babongisi ndako.
Na nsima, Tata na bandeko na ye ya mibali babandaki kosepela na mosala ya koluka mabanga ya ntalo mpe lisusu na mosala ya koteka mabaya. Bango nyonso bayebanaki na mosala na bango ya kosomba mpe ya kotɛka mabaya (bazalaki koluka esika oyo mabaya ezali). Tata nde azalaki kotɛkisa.
Nsukansuka, lokola Tata alingaki makambo ya elimo mingi, akómaki pastɛrɛ na Lingomba ya Presbytérien. Nzokande, na ntango yango, masolo ya Charles Taze Russell, prezida ya liboso ya Zion’s Watch Tower Tract Society, oyo ezalaki kobima na zulunalo, ebongolaki mikano na ye na bomoi. Makambo oyo Tata ayekolaki etindaki ye akoma mokanda oyo nalobelaki na ebandeli mpo na kosɛnga ete bálongola nkombo na ye na lingomba.
Na boboto mpenza, Tata asalelaki bavɛrsɛ ya Biblia polelepolele mpo na kokweisa mateya ya lingomba oyo elobaka ete molimo ya moto ekufaka te mpe Nzambe anyokolaka milimo ya bato libela na libela na lifelo ya mɔ́tɔ. Amonisaki lisusu ete Bosato ezali liteya ya lokuta, amonisaki ete eutaki epai ya Klisto te mpe ete Makomami eteyaka yango ata moke te. Banda ntango yango, alandaki ndakisa ya Yesu Klisto na mosala na ye ya kosakola, asalelaki makoki na ye mpe makasi na ye mpo na nkembo ya Yehova na komikitisa nyonso.
Na 1917, Société Watch Tower etindaki Tata na mosala ya pèlerin, ndenge bazalaki kobenga bakɛngɛli-batamboli ya Batatoli ya Yehova na eleko wana. Na bingumba minene mpe ya mike na Canada, azalaki kosala masukulu mpe kolakisa filme oyo bililingi mosusu bizalaki kotambola mpe mosusu bizalaki kotambola te ebengamaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Bandako ya masano ezalaki kotonda mɛkɛ soki Tata akómi kuna. Programɛ ya botamboli na ye ezalaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kino na 1921.
Zulunalo moko oyo ezalaki kobima na engumba Winnipeg elobaki ete mopanzi-nsango Young asalaki lisukulu liboso ya bato 2 500 mpe ebele bakokaki kokɔta te mpo ndako etondaki mɛkɛ. Na engumba ya Ottawa, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo “Kokende mpe kobima na lifelo.” Kuna mobange moko alobaki ete: “Ntango lisukulu esilaki, George Young abengisaki ebele ya bakonzi ya mangomba ete bámata na ebaelo mpo bango mpe báloba soki bazali kotya ntembe, kasi ata moko amataki te. Na ntango yango nandimaki ete namoni lingomba ya solo.”
Tata azalaki kosala makasi ete amipesa na misala mingi ya elimo na mibembo na ye. Soki kaka asilisi, azalaki kokende nokinoki kozela engbunduka mpo na kokende na mboka mosusu. Soki azali kotambola na motuka, mbala mingi azalaki kosimba nzela mpo na kokende na mboka mosusu liboso ya ngonga ya komela tii. Balobaka ete Tata azalaki na molende mpe lisusu azalaki kopesa bato lokumu mpe ayebanaki mpo na misala ya boklisto mpe azalaki kokaba.
Akendaki na mayangani mingi, mpe moko na yango ezali liyangani monene oyo esalemaki na engumba Edmonton, na etúká ya Alberta, na 1918. Libota na bango mobimba bazalaki kuna mpo Nellie azwaki batisimo. Ezalaki mpe mbala ya nsuka oyo bana mibali ya libota yango bazalaki esika moko. Nsima ya mbula mibale, Malcolm akufaki na maladi ya mpema (pneumonie). Ndenge moko na bandeko na ye misato ya mibali na tata na ye, Malcolm azalaki na elikya ya bomoi na likoló, mpe bango nyonso batikalaki sembo kino na liwa na bango.—Bafilipi 3:14.
Akei na mboka mopaya
Na Sɛtɛmbɛ 1921, ntango Tata asilisaki mobembo ya koteya na Canada, Joseph Rutherford, ye azalaki ntango wana prezida ya Société Watch Tower, asɛngaki ye abanda mosala na bisanga ya Antilles. Bipai nyonso oyo Tata azalaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” bato bazalaki kosepela na yango. Ntango azalaki na esanga Trinité, akomaki boye: “Esika yango etondaki mpe bazongisaki bato ebele. Na butu ya mibale ndako etondaki na bato.”
Na nsima, na 1923, batindaki Tata na ekólo Brésil. Kuna azalaki kosala masukulu liboso ya bato ebele, mpe na ntango mosusu azalaki kofuta bato mbongo mpo na kobongola masukulu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1923 eyebisaki ete: “Banda mokolo ya 1 Yuni kino na mokolo ya 30 Sɛtɛmbɛ, Ndeko Young asalaki masukulu 21, bato 3 600 balandaki masukulu yango; asalaki masangá 48, bayangani bazalaki 1 100; akabolaki mikanda 5 000 na monɔkɔ ya Portugais.” Bato mingi basepelaki ntango Tata asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.”
Ntango bafungolaki bandako ya sika na Betele ya Brésil, mokolo ya 8 Marsi 1997, mwa buku oyo babimisaki elobaki ete: “1923: George Young akómi na Brésil. Asali biro ya filiale na kati ya engumba Rio de Janeiro.” Atako mikanda ezalaki na monɔkɔ ya Espagnol, bato mingi bazalaki na mposa na yango na Portugais, monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na Brésil. Na yango, na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1923, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kobima na Portugais.
Tata akutanaki na bato mingi na Brésil oyo bakanisaka ye kino na moi ya lelo. Moko na bango ezalaki Jacintho Pimentel Cabral, moto ya mbongo mpe ya ekólo Portugal, oyo andimaki ete makita esalemaka na ndako na ye. Jacintho aumelaki te mpo na kondima mateya ya Biblia mpe na nsima akómaki mosangani ya komite ya filiale. Moto mosusu ezalaki Manuel da Silva Jordão, elenge moko autaki na Portugal mpe azalaki kosala misala ya kolona bafololo. Ayokaki lisukulu moko oyo Tata asalaki mpe azwaki mokano ya kozonga na Portugal mpo na kosala lokola mokaboli-mikanda, ndenge bazalaki kobenga basakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova na ntango wana.
Tata azalaki kosala mibembo mingi na engbunduka na Brésil mobimba, mpe asalaki makasi mpo na koluka bato oyo bazali kosepela na solo. Na mobembo moko, akutanaki na Bony Green na mwasi na ye Catarina, mpe afandaki na bango soki pɔsɔ mibale, mpe azalaki kolimbolela bango Makomami. Bato soki nsambo ya libota na bango bazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete bamipesaki na Yehova.
Akutanaki mpe lisusu na Sarah Bellona Ferguson, na 1923. Na 1867, ntango azalaki naino elenge, ye na yaya na ye ya mobali Erasmus Fulton Smith mpe libota na bango, bautaki na États-Unis mpe bayaki kofanda na Brésil. Kobanda 1899 azalaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mbala na mbala na nzela ya posita. Sarah, na bana na ye minei, na mama moko oyo Tata azalaki kobenga Tata-mwasi Sallie, bazalaki kozela banda kala Tata akóma mpo bázwa batisimo. Bazwaki batisimo mokolo ya 11 Marsi 1924.
Eumelaki te, Tata akendaki koteya na mikili mosusu ya Amerika ya Sudi. Na mokolo ya 8 Novɛmbɛ 1924, azalaki na ekólo Pérou ntango akomaki ete: “Nasilisi kokabola trakte 17 000 na engumba Lima mpe na engumba Callao.” Na nsima akendaki na ekólo Bolivie mpo na kokabola batrakte. Mpo na mobembo yango, akomaki boye: “Tata na biso azali kopambola milende na ngai. Moto moko ya Inde asalisaki ngai. Ndako na ye ezali epai oyo ebale Amazone ebandá. Akamataki trakte 1 000 na mikanda mosusu.”
Na milende ya Tata, mateya ya solo ya Biblia epalanganaki na mikili mingi ya Amerika ya Ntei mpe ya Sudi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1924, eyebisaki boye: “George Young asali sikoyo mbula mibale na Amerika ya Sudi. . . . Ndeko yango ya bolingo azwaki mpenza libaku malamu ya komema nsango ya solo na engumba Punta Arenas oyo ezali na détroit de Magellan.” Tata akambaki mpe mosala ya kosakola na mikili lokola Costa Rica, Panama, mpe Venezuela. Azongaki nsima te atako azwaki malaria mpe nzoto na ye ezalaki lisusu malamu te.
Akei na Mpoto
Na Marsi 1925, Tata akɔtaki masuwa mpo na kokende na Mpoto, epai azalaki na elikya ya kokabola trakte ya Biblia 300 000 na Espagne mpe na Portugal mpe kolɛngɛla mobembo ya Ndeko Rutherford mpo akende kosala masukulu. Kasi, ntango akómaki na Espagne, Tata akomelaki Ndeko Rutherford mokanda ete makambo ezali malamu te mpo aya kosala masukulu, mpamba te bazalaki kolinga bato ya mangomba mosusu te.
Na eyano oyo Ndeko Rutherford akomaki, atángaki Yisaya 51:16 ete: “Natii maloba na ngai na monɔkɔ na yo mpe nabombi yo na molili na lobɔkɔ na ngai, ete nakangisa lola na esika na yango mpe ete natya miboko na mokili mpe ete naloba na Siona ete, Yo ozali bato na ngai.” Na yango, Tata alobaki ete: “Ezali mpenza mokano ya Nkolo ete nakende liboso mpe natika ye moko asala oyo alingi.”
Na mokolo ya 10 Mai 1925, Ndeko Rutherford asalaki lisukulu na esika moko babengi Novedades Theater na engumba Barcelone mpe moto moko azalaki kobongola yango. Bato bazalaki koleka 2 000, bakisa mokonzi moko ya Leta na mpe mokɛngɛli mpo na Rutherford. Basalaki mpe ndenge yango na Madrid, epai bato balandaki lisukulu bazalaki 1 200. Lokola bato mingi balandaki masukulu yango mpe bandimaki solo, bafungolaki biro moko ya filiale na Espagne. Annuaire ya 1978 elobi ete, “George Young nde asalaki makasi ete biro ya filiale efungwama wana.”
Na mokolo ya 13 Mai 1925, Ndeko Rutherford asalaki lisukulu na engumba Lisbonne, na Portugal. Makambo elekaki malamu, atako bakonzi ya mangomba balukaki kobebisa likita ndenge bazalaki koganga mpe kobuka bakiti. Nsima ya masukulu ya Ndeko Rutherford na Espagne mpe na Portugal, Tata akobaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame,” mpe abongisaki misala ya kobimisa mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na bamboka yango. Na 1927 alobaki ete nsango malamu “esakolami na bingumba minene mpe ya mike nyonso ya Espagne.”
Akei kosakola na Union soviétique
Na nsima, batindaki Tata lokola misionɛrɛ na Union soviétique, mpe akómaki na mokolo ya 28 Augusto 1928. Na mokolo ya 10 Ɔkɔtɔbɛ 1928, akomaki mokanda moko mpe mwa ndambo ya maloba na yango elobaki boye:
“Banda nakomi na Russie, nazali mpenza kobondela makasi na motema ete, ‘Bokonzi na yo eya.’ Nazali koyekola monɔkɔ, mpe nazali koyeba yango malɛmbɛmalɛmbɛ. Moto oyo abongolaka masukulu na ngai azali mpenza moto malamu, azali Moyuda, kasi andimelaka Klisto mpe alingaka Biblia. Nakutani na mwa makambo ya esengo kasi nayebi te soki bakopesa ngai nzela nafanda awa ntango boni. Na pɔsɔ eleki nazwaki mokanda oyo elobaki ete nsima ya ngonga 24 nasengeli kotika mboka oyo, mpe tobongisi makambo na boye ete nakoki kotikala.”
Akutanaki na Bayekoli ya Biblia mosusu na engumba ya Kharkov, sikoyo ezali engumba monene na ekólo Ukraine, mpe masolo ya bolingo oyo basololaki, epesaki bango esengo kutu batangisaki mpisoli ya esengo. Bazalaki kosala liyangani ya moke mikolo nyonso na butu tii na midi ya butu. Na nsima, ntango akomaki mpo na makita yango elongo na bandeko, Tata alobaki boye: “Bandeko bazali babola, bakonzi bazali kosalela bango boboto te mpe babɔtɔlá bango mwa mikanda na bango, atako bongo bandeko bazali na esengo.”
Mwa buku moko oyo bapesaki bato oyo bazalaki na mokolo ya 21 Yuni 1997, ntango bafungolaki bandako ya sika ya Betele ya Saint-Pétersbourg, na Russie, elobelaki mosala oyo Tata asalaki na bamboka ya Union soviétique. Mwa buku yango elobi ete batindaki Tata na Moscou, mpe elobi lisusu ete bapesaki ye ndingisa ya kobimisa mikanda mike 15 000 oyo ezali na motó ya likambo ete Bonsomi mpo na bato mpe Bakufi bazali wapi? mpo na kokabola yango na Russie.”
Ntango Tata auti na Russie, batindaki ye na mosala ya pèlerin na États-Unis. Na etúká ya Dakota du Sud, azalaki kokende kotala Nellena na Verda Pool na ndako na bango, basi yango bazali bandeko mpe na nsima bakómaki bamisionɛrɛ na Pérou. Bazalaki kosepela mingi na mosala ya molende ya Tata mpe balobaki ete: “Bandeko na ntango wana ya kala balingaki mpenza mosala ya mobongisi-nzela, yango wana bazalaki kokende na mboka mopaya atako bazalaki na biloko mingi ya mokili te kasi mitema na bango etondaki na bolingo mpo na Yehova. Yango nde ezalaki kotinda bango básala mosala oyo basalaki.”
Libala mpe mobembo mosusu
Tata na Clara Hubbert oyo azalaki kofanda na Manitoulin Island, na etúká ya Ontario, bazalaki kokomelana mikanda. Bakutanaki na liyangani ya Colombus, na etúká ya Ohio, mokolo ya 26 Yuli 1931, ntango Bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10-12) Nsima ya pɔsɔ moko babalanaki. Eumelaki te, Tata akendaki lisusu mobembo na mosala ya misionɛrɛ na bisanga ya Antilles. Kuna, asalisaki bandeko mpo na kobongisa makita mpe alakisaki bango ndenge ya kosala mosala ya ndako na ndako.
Ntango Tata azalaki na Suriname, na esanga Saint Christopher mpe na bisika mosusu, azalaki kotindela Mama bafɔtɔ, bakalati, mpe mikanda. Na mikanda yango azalaki kolobela ndenge mosala ya kosakola ezali kokende liboso mpe ntango mosusu azalaki kolobela bandɛkɛ, banyama, mpe banzete ya mikili yango. Na Yuni 1932, Tata asilisaki mosala na ye na bisanga ya Antilles mpe amataki masuwa lokola momeseno mpe azongaki na Canada. Na nsima, ye na Mama bakómaki basakoli ya ntango nyonso, balekisaki eleko ya mpiɔ ya 1932-1933 na engumba Ottawa na etuluku moko ya basakoli ya ntango nyonso.
Bomoi mokuse ya libota
Na 1934, yaya na ngai, David, abotamaki. Ntango azalaki naino mwana moke, azalaki kosala boye: atɛlɛmi likoló ya kartɔ moko ya Mama mpe abandi kosala lokola moto azali kosala “lisukulu.” Na bomoi na ye mobimba, asalelaki Yehova na molende na ndakisa ya tata na ye. Bango misato bazalaki kosala mibembo na motuka, bazalaki na bikoliseli lolaka oyo bakangisi na likoló ya motuka, ntango bazalaki kotala masangá na ɛsti kino na wɛsti ya Canada. Ngai nabotamaki na 1938 ntango Tata azalaki kosala na etúká ya Colombie Britannique. David ayebisaki ngai ete Tata azalaki kolalisa ngai na mbeto mpe ye na Mama, na David bazalaki kofukama na zingazinga ya mbeto mpe Tata azalaki kosala libondeli mpo na kotɔnda Nzambe mpo na ngai.
Na eleko ya mpiɔ ya 1939, tozalaki na engumba Vancouver ntango Tata azalaki kotala masangá na etúká wana. Na mikanda nyonso oyo tozwaki na boumeli ya bambula, ezali na mokanda moko oyo akomaki na mokolo ya 14 Yanuali 1939, ntango azalaki na Vernon, na etúká ya Colombie Britannique. Tata atindelaki yango Clara, David, na Ruth, mpe alobaki boye: “Napesi bino mwa bizi mpe nayambi bino.” Na kati ya mokanda yango ezalaki na nsango mpo na mokomoko na biso. Ayebisaki biso ete kuna, elanga ezali monene kasi basali bazali moke.—Matai 9:37, 38.
Nsima ya pɔsɔ moko ntango autaki kotala masangá mpe azongaki na Vancouver, Tata akweaki na kati ya likita. Baekizame ya monganga oyo basalaki ye emonisaki ete azalaki na kanser ya bɔɔngɔ. Na mokolo ya 1 Mai 1939, asukisaki bomoi na ye awa na mabele. Nazalaki na sanza libwa, mpe David azalaki pene na mbula mitano. Mama na biso ya bolingo, oyo azalaki mpe na elikya ya bomoi na likoló, atikalaki sembo epai ya Nzambe kino liwa na ye na mokolo ya 19 Yuni 1963.
Ndenge oyo Tata azalaki kotalela mosala ya komema nsango malamu na mikili mingi emonisamaki malamu mpenza na mokanda moko oyo atindelaki Mama. Mwa ndambo ya makambo oyo akomaki yango oyo: “Na boboto na ye, Yehova apesaki ngai nzela nakende na bamboka yango lokola pole mpo na komema nsango ya Bokonzi. Tiká ete nkombo na ye mosantu ekumisama. Na nzela ya bato ya kozanga kokoka, ya bolɛmbu mpe bayebi eloko te, nkembo na ye ezali kongɛnga.”
Lelo oyo bana ya George na Clara Young, bankɔkɔ na bango, mpe bana ya bankɔkɔ na bango bazali kosalela Yehova, Nzambe na biso ya bolingo. Bayebisaki ngai ete Tata azalaki mbala na mbala kozongela maloba ya Baebele 6:10, oyo elobaka ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.” Biso mpe tobosani te misala ya Tata.
[Elilingi na lokasa 23]
Tata na ngai, na lobɔkɔ ya mobali, na bandeko na ye misato
[Bililingi na lokasa 25]
Tata (atɛlɛmi) na bandeko oyo: Woodworth, Rutherford, na Macmillan
Na nse: Tata (na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi) na kati ya etuluku na Ndeko Russell
[Bililingi na lokasa 26]
Tata na Mama
Na nse: Mokolo ya libala na bango
[Elilingi na lokasa 27]
Ngai na David na Mama, mwa bambula nsima ya liwa ya Tata