Minyoko esali ete mosala ekola na Antiokia
NTANGO minyoko ekómaki makasi nsima ya liwa ya Setefano, oyo akufaki liwa ya martiru, ebele ya bayekoli ya Yesu bakimaki Yelusaleme. Bakendaki komibomba na bamboka mingi, lokola na Antiokia ya Sulia oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 550 na nɔrdi ya Yelusaleme. (Misala 11:19) Makambo oyo esalemaki kuna na nsima ekɔtisaki mbongwana na lisangá ya boklisto. Mpo na koyeba eloko oyo esalemaki, ekozala malamu tólobela naino mwa moke mboka yango Antiokia.
Na bingumba nyonso ya Bokonzi ya Loma, kaka engumba Loma na Alesandalia nde elekaki Antiokia na monene, na bozwi mpe na lokumu. Antiokia ezalaki engumba-mokonzi ya etúká ya Sulia mpe elekaki bingumba nyonso ya nɔrdi-ɛsti ya Mai Monene ya Méditerranée. Ebale Oronte, epai masuwa ezalaki kotambola, elekaki pembeni ya Antiokia (lelo oyo engumba Antakya, na Turquie) liboso ekóma na Selukia (Séleucie de Piérie), mboka oyo ezalaki na libongo na mai monene mpe ezalaki kosalisa engumba Antiokia. Banda Antiokia kino na Selukia ezalaki na kilomɛtrɛ 32. Antiokia ezalaki na nzela moko monene oyo bato ya mombongo oyo bazalaki kouta na Loma mpe kokende na bamboka oyo ezalaki mpembenimpembeni ya bibale Tigre mpe Pelata. Lokola Antiokia ezalaki mboka monene mpe mombongo ezalaki kotambola malamu kuna, bato bazalaki kouta na bamboka nyonso ya Bokonzi ya Loma mpo na kokende kuna; bato ndenge na ndenge bazalaki koya mpe kokende na Antiokia, bazalaki komema makambo ya mangomba oyo ezalaki na bingumba nyonso mosusu ya Bokonzi ya Loma.
Mangomba mpe mateya ya filozofi ya Bagreke epalanganaki mingi na Antiokia. Kasi, Glanville Downey, moto ya mayele na istware, alobi ete: “Na ntango ya Klisto, losambo mpe mateya ya filozofi ya kala ekómaki makambo ya moto na moto, mpamba te moto na moto azalaki koluka lingomba oyo ekosilisa mikakatano na ye mpe ekokokisa bamposa na ye.” (A History of Antioch in Syria) Bato mingi bazalaki kosepela na losambo ya Nzambe bobele moko ya Lingomba ya Bayuda, bazalaki kosepela na milulu mpe bizaleli malamu ya lingomba yango.
Bayuda ebele bazalaki kofanda na Antiokia banda ntango batongaki engumba yango na mobu 300 L.T.B. Bazalaki kuna soki 20 000 kino 60 000, elingi koloba soki okamati bato 100 oyo bazalaki kofanda na engumba yango, zomi kati na bango bazalaki Bayuda. Josèphe, moto ya mayele na istware, alobi ete bakitani ya Séleucus balendisaki Bayuda báfanda na engumba yango mpe bakómisaki bango bato mpenza ya mboka wana. Na ntango yango, Makomami ya Liebele esilaki kobongolama na lokota ya Greke. Yango elamusaki mposa ya bato oyo bazalaki kosepela na likanisi ya Bayuda ya kozela Masiya. Yango wana, Bagreke mingi bakómaki baprozelite. Makambo oyo nyonso esalaki ete Antiokia ekóma mboka oyo bato mingi bakómaki bayekoli ya Klisto.
Bato ya bikólo mosusu bazwi litatoli
Ebele ya bayekoli ya Yesu oyo bakimaki minyoko na Yelusaleme bazalaki koteya kaka Bayuda. Kasi na Antiokia, bayekoli mosusu oyo bautaki Kupulu mpe Kulene basololaki na “bato oyo bazalaki koloba lokota ya Greke.” (Misala 11:20, NW ) Atako mosala ya kosakola nsango malamu epai ya Bayuda na baprozelite oyo bazalaki koloba lokota ya Greke ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., emonani ete mosala ya kosakola nsango malamu na Antiokia ezalaki likambo ya sika. Bazalaki kosakola kaka epai ya Bayuda te. Ezali solo ete na ntango wana, Koloneli na libota na ye, bango bazalaki Bayuda te, basilaki kokóma bayekoli. Kasi esɛngaki ete Yehova apesa ntoma Petelo emonaneli mpo na kondimisa ye ete kosakola nsango malamu epai ya bato ya bikólo mosusu to mabota mosusu ezalaki mabe te.—Misala 10:1-48.
Na mboka oyo Bayuda bazalaki ebele, bazalaki kofanda wana banda kala mpe bazalaki koyokana malamu na bato ya bikólo mosusu, bato oyo bazalaki Bayuda te bazalaki koyoka litatoli mpe bazalaki kondima nsango malamu. Na ntembe te, Antiokia ezalaki esika malamu mpenza mpo na koteya nsango malamu na bato oyo bazalaki Bayuda te mpe ‘motango monene ya bato bandimaki.’ (Misala 11:21) Lisusu, ntango baprozelite oyo bazalaki liboso kosambela banzambe ya bapakano bakómaki baklisto, babongaki mpenza koleka bato mosusu nyonso, mpo bákende kosakola nsango malamu epai ya bapakano mosusu oyo bazalaki naino kosambela bikeko.
Ntango bayokaki nsango ya makambo oyo ezalaki kosalema na Antiokia, bandeko ya lisangá ya Yelusaleme batindaki Balanaba mpo na kotala ndenge makambo ezalaki koleka kuna. Bamonisaki mayele mpe bolingo na ndenge baponaki Balanaba. Ye azalaki moto ya Kupulu, ndenge moko na bato mosusu oyo babandaki kosakwela bato oyo bazali Bayuda te nsango malamu. Balanaba amimonaki mopaya te na kati ya bato ya bikólo mosusu na Antiokia. Bato yango mpe bamonaki Balanaba lokola moto ya ekólo oyo bameseni na yango.a Balanaba asepelaki mpenza na mosala oyo ezalaki kosalema kuna. Yango wana, ‘ntango akómaki mpe amonaki bolamu ya Nzambe, asepelaki mpe alendisaki bango nyonso mpo basalela Mokonzi na motema moko’ mpe ‘bato mingi basanganaki na Mokonzi.’—Misala 11:22-24, Boyokani ya Sika.
Downey, moto ya mayele na istware alobi ete: “Makambo oyo esalaki mpenza ete mosala ya kosakola na Antiokia ekende liboso ekoki kozala ete na engumba yango, bamisionɛrɛ bazalaki kobanga te Bayuda oyo bazalaki na molende ya mabe, lokola baoyo bakutanaki na bango na Yelusaleme; ekoki lisusu kozala ete lokola engumba yango ezalaki engumba-mokonzi ya etúká ya Sulia, mokonzi moko ya basoda azalaki kotambwisa yango mpe ezalaki na kimya; bato bakokaki mpenza te kobimisa mobulu lokola oyo esalemaki na Yelusaleme, epai emonanaki ete baguvɛrnɛrɛ ya Yudea (tii na eleko wana) bazalaki kokoka te kopekisa mobulu ya Bayuda oyo bazalaki na molende ya mabe.”
Na ntembe te, Balanaba amonaki ete makambo ezalaki malamu mpe azalaki na mosala mingi, yango wana amonaki malamu abenga moninga na ye Saulo mpo na kosalisa ye. Mpo na nini amonaki malamu kobenga Saulo to Paulo? Emonani ete, atako Paulo azalaki na kati ya bantoma 12 te, azwaki mokumba ya kozala ntoma epai ya mabota. (Misala 9:15, 27; Baloma 1:5; Emoniseli 21:14) Na yango, Paulo azalaki moninga malamu mpo na kosakola nsango malamu na Antiokia, engumba ya bato ya bikólo mosusu. (Bagalatia 1:16) Yango wana, Balanaba akendaki na Talasia, akutanaki na Saulo mpe akendaki na ye na Antiokia.—Misala 11:25, 26; talá etanda na nkasa 26-27.
Babengami baklisto na mokano ya Nzambe
Na boumeli ya mbula mobimba, Balanaba na Saulo ‘balakisaki bato mwa mingi, mpe ezali na Antiokia nde bayekoli, na mokano ya Nzambe, babengamaki baklisto.’ Tokanisi ete ezalaki Bayuda te nde bazalaki bato ya liboso oyo babengaki bayekoli ya Yesu ete baklisto (na Greke) to bato ya masiya (na Liebele), mpamba te baboyaki kondima Yesu lokola Masiya to Klisto; na yango, bakokaki te kobenga bayekoli na ye ete baklisto, mpamba te yango elingaki komonisa ete bandimi Yesu lokola Klisto. Bato mosusu bakanisaka ete ekoki kozala ete bapaya nde bapesaki bango nkombo baklisto mpo na kosɛka to kotyola bango. Nzokande, Biblia emonisi ete Nzambe nde atindaki bato yango bápesa bango nkombo baklisto.—Misala 11:26.
Na kati ya Makomami ya Greke, liloba oyo basaleli na nkombo yango ya sika, oyo mbala mingi ebongolamaka “babengamaki” basalelaka yango ntango nyonso mpo na kolobela likambo moko eleki mayele ya moto, to maloba ya Nzambe. Yango wana bato ya mayele babongolaka yango ete “mpo na kosakola,” “oyo euti na Nzambe,” to “kopesa etinda to mobeko ya Nzambe, to koteya makambo euti na likoló.” Lokola babengaki bayekoli ya Yesu ete baklisto “na mokano ya Nzambe,” ekoki kozala ete Yehova atindaki Saulo na Balanaba mpo na kopesa nkombo yango.
Nkombo yango etikalaki. Bato bakokaki lisusu te kokanisa ete bayekoli ya Yesu bazali mwa etuluku moko ya Lingomba ya Bayuda, mpamba te bakesanaki mpenza na Lingomba ya Bayuda. Pene na mobu 58 T.B., bakonzi ya Loma bayebaki malamu soki baklisto bazalaki banani. (Misala 26:28) Tacite, moto ya mayele na istware, alobi ete na mobu 64 T.B., bato mingi na Loma bayebaki mpe nkombo yango.
Yehova asalelaka basaleli na ye ya sembo
Nsango malamu epalanganaki mingi na Antiokia. Lokola Yehova azalaki kopambola mosala yango mpe bayekoli ya Yesu bamipesaki na mosala yango ya kosakola nsango malamu, Antiokia ekómaki mboka oyo ezalaki na baklisto mingi na ekeke ya liboso. Nzambe asalelaki lisangá ya mboka yango mpo na kopanza nsango malamu na mikili mosusu oyo ezalaki mosika. Na ndakisa, na mibembo nyonso oyo asalaki lokola misionɛrɛ, Paulo azalaki kobanda yango na Antiokia.
Na mikolo na biso mpe, lokola baklisto ya solo bazalaki na molende mpe bazalaki kobanga botɛmɛli te, yango epesaki nzela ete lisangá ya baklisto ya solo epalangana mpe esali ete bato mingi báyoka nsango malamu mpe básepela na yango.b Na yango, soki bazali kotɛmɛla yo mpo ozali kondima losambo ya solo, kobosana te ete Yehova ayebi ntina oyo apesi nzela na likambo yango. Lokola na ekeke ya liboso, bato lelo oyo basengeli kozwa libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpo bápona kozala na ngámbo na yango. Mbala mosusu soki olandi kosalela Yehova na bosembo nyonso, yango nde ekosalisa moto mosusu azwa boyebi ya solosolo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mokolo ya moi makasi, soki ozali na Ngomba Casius na sudi-wɛsti ya Antiokia, okoki komona esanga ya Kupulu (Chypre).
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Ya 1 Augusto 1999, lokasa 9; Lamuka! ya 22 Aprili 1999, nkasa 21-22 (ebimeli ya Lifalanse); Annuaire des Témoins de Jéhovah 1999, nkasa 250-252.
[Etanda/Bililingi na lokasa 26, 27]
“Eleko oyo balobeli” Saulo “te”
MBALA ya nsuka oyo mokanda ya Misala elobeli Saulo liboso akende na Antiokia na mobu 45 T.B., ezali ntango bato ya Yelusaleme balingaki koboma ye, kasi balongaki te mpe bandeko na ye baklisto batindaki ye na Talasia. (Misala 9:28-30; 11:25) Kasi yango esalemaki mbula libwa liboso, pene na mobu 36 T.B. Paulo azalaki kosala nini na boumeli ya ntango wana oyo babengi yango ete eleko oyo balobeli Saulo te?
Ntango alongwaki na Yelusaleme, Saulo akendaki na ngámbo ya Sulia mpe Kilikia, mpe masangá ya Yudea eyokaki ete: “Ye oyo anyokolaki biso liboso azali [sikoyo] kosakolaka makambo na kondima manyokolaki ye yango liboso.” (Bagalatia 1:21-23) Mbala mosusu bazalaki kolobela mosala oyo asalaki elongo na Balanaba, na Antiokia; kasi na ntembe te, ata liboso, Saulo akangaki mabɔkɔ te. Na mobu 49 T.B., masangá mingi ezalaki na bitúká ya Sulia mpe ya Kilikia. Lisangá moko ezalaki na Antiokia, kasi bato mosusu bakanisaka ete Saulo nde afungolaki masangá mosusu, na boumeli ya eleko oyo Biblia elobeli ye te.—Misala 11:26; 15:23, 41.
Balimboli mosusu ya Biblia bakanisaka ete mikakatano oyo Saulo akutanaki na yango na bomoi na ye ezalaki na eleko wana. Ezali mpasi na kokanisa ete mikakatano mingi oyo akutanaki na yango lokola ‘mosali ya Klisto’ ezalaki na ntango azalaki kosala lokola misionɛrɛ. (2 Bakolinti 11:23-27) Ntango nini Bayuda babɛtaki Saulo fimbo mbala 39? Epai wapi babɛtaki ye nzete mbala misato? Epai wapi akangamaki ‘mbala mingi mpenza’? Ezali nsima ya bambula nde akɔtaki bolɔkɔ na Loma. Lisolo moko elobeli mbala moko oyo babɛtaki ye mpe bakangaki ye na bolɔkɔ, ezalaki na Filipi. Bongo bambala mosusu? (Misala 16:22, 23) Mokomi moko apesi likanisi ete na ntango wana, Saulo azalaki “kotatola mpo na Klisto na kati ya biyanganelo ya Bayuda ya lipalangana, yango wana bakonzi ya mangomba na bakonzi ya Leta bakómaki konyokola ye.”
Mbala minei mobimba Saulo azalaki na masuwa oyo ezindaki na mai, kasi Makomami ezali kolobela kaka mbala moko, oyo esalemaki nsima ya kotánga mpasi oyo akutanaki na yango ntango oyo akomelaki Bakolinti mokanda. (Misala 27:27-44) Na yango, emonani ete mbala misato oyo masuwa na ye ezindaki na mai, esalemaki na ntango azalaki kosala mibembo oyo elobelami te. Ekoki kozala ete makambo oyo nyonso esalemaki na ‘eleko oyo balobeli Saulo te.’
Likambo mosusu oyo ekoki kozala ete esalemaki na eleko yango, ezali likambo oyo elobelami na 2 Bakolinti 12:2-5 (NW ). Saulo alobaki boye: ‘Nayebi moto moko oyo azali kati na Klisto oyo, esili koleka mbula zomi na minei, amemamaki kino likoló ya misato, na Paladiso mpe ayoki makambo oyo moto akoki koloba te oyo epesami nzela te na moto na koloba yango.’ Emonani ete Saulo azalaki kolobela makambo na ye moko. Lokola akomaki maloba oyo pene na mobu 55 T.B., soki totángi mbula zomi na minei liboso ya mobu oyo, yango ezali kozongisa biso na mobu 41 T.B., na katikati ya ‘eleko oyo balobeli ye te.’
Na ntembe te emonaneli yango efungolaki mpenza mayele ya Saulo. Emonaneli yango ezalaki mpo na kobongisa ye ete azala “ntoma epai ya mabota mosusu”? (Baloma 11:13, NW ) Yango nde esalaki ete akóma kokanisa, kokoma mpe koloba na ndenge oyo asalaki na bambula oyo elandaki? Bambula oyo elekaki, banda ntango abongwanaki tii na ntango babengaki ye na Antiokia, ezalaki nde mpo na kobongisa ye mpe kokembisa ye mpo na kokokisa mikumba oyo alingaki kozwa? Ata soki eyano ezali nini na mituna oyo, tokoki kondima ete ntango Balanaba abengaki ye mpo mosala ya kosakola esalama mingi na Antiokia, Saulo azalaki na molende mpe abongaki mpenza mpo na kokokisa mokumba wana.—Misala 11:19-26.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SULIA
Oronte
Antiokia
Selukia
KUPULU
MAI MONENE YA MÉDITERRANÉE
Yelusaleme
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Bililingi na lokasa 24]
Na likoló: Engumba Antiokia lelo oyo
Na katikati: Selukia, na sudi
Na nse: Libongo ya Selukia