Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/8 nk. 20-23
  • Mpo na nini bazali na bana te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bazali na bana te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lobanzo ya mama
  • Kobota ezali likambo ya esengo, kasi ezali mpe mokumba
  • Ntina oyo bamosusu babotaka bana te
  • Bomoi ya malamu mpe ya esengo
  • Nzambe alingi bango mpe bazali na motuya na miso na ye
  • Kobota bana na ntango ya nsuka: ezali mokumba monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kobala mpe kobota na ntango oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/8 nk. 20-23

Mpo na nini bazali na bana te?

DELE na Folaa bazali babalani, bazalaki kosala na Betele na ekólo Nigeria mpe bazalaki kofanda kuna. Ntango bakɔtaki na Betele, mama ya Fola ayaki kotala bango. Autaki mosika mpe ayaki kosolola na bango likambo moko ya ntina oyo ezalaki kotungisa ye, likambo oyo mikolo mosusu ezalaki kozangisa ye mpɔngi na butu.

Alobaki na bango boye: “Bozali kosalisa ngai mingi. Botindelaka ngai biloko, mpe boyaka kotala ngai. Nasepelaka mingi ndenge bosalisaka ngai, yango emonisaka ete bolingaka ngai. Kasi nazali komitungisa mingi mpamba te ntango nyonso namitunaka nani akosalisa bino ntango bokokóma lokola ngai? Sikoyo bokokisi mbula mibale banda bobalani kasi bozali na mwana te. Bomoni te ete ntango ekoki mpo bólongwa na Betele mpe bóbota bana?”

Makanisi ya mama wana ezalaki boye: Ntango oyo Dele na Fola balekisi na Betele ekoki. Sikoyo basengeli kokanisa bomoi na bango ya mikolo ekoya. Bato mosusu bakoki kosala mosala oyo bango bazali kosala. Dele na Fola bakotika mosala ya ntango nyonso te, kasi bakosala mosala yango na ndenge mosusu, na ndenge oyo ekopesa bango nzela ya kobota bana mpe koyoka esengo ya kozala baboti.

Lobanzo ya mama

Lobanzo ya mama ezalaki mabe te. Mposa ya kobota bana ezali mpenza na motema ya moto mpe ezalaka epai ya bato ya bikólo nyonso mpe na bileko nyonso. Kobota bana epesaka baboti esengo mpe elikya ete ata ndɛlɛ bana bakosalisa bango. Biblia elobi ete: “Mbuma ya libumu ezali libonza.” Ya solo, likoki ya kobota bana ezali likabo ya malamu ya Mozalisi na biso ya bolingo.​—Nzembo 127:3.

Na mikili mingi, bato batungisaka mwasi na mobali oyo babalani mpo bábota bana. Na ndakisa, na Nigeria, epai basi mingi babotaka bana motoba, na fɛti ya libala bato mingi bayebisaka bato oyo bauti kobalana ete: “Nsima ya sanza libwa, tolingi tóyoka mwana azali kolela na ndako na bino.” Bakoki kopesa mwasi na mobali mbeto ya mwana lokola likabo ya libala. Mama-bokilo atyaka miso na manaka mpe atángaka mikolo malamumalamu. Soki mbula mobimba ekoki to eleki, mwasi ya mwana na bango azwi zemi te, babandi koluka koyeba soki bazali na mwa kwɔkɔsɔ mpo mbala mosusu básalisa bango.

Mpo na bamama mingi, ntina mpenza oyo mwasi na mobali babalanaka ezali mpo na kobota bana mpo bato na libota na bango básila te. Mama ya Fola alobaki na ye boye: “Soki bolingaka kobota te, mpo na nini bobalanaki? Yo babotaki yo; yo mpe osengeli kobota.”

Longola wana, ezali na makambo mosusu oyo esengeli kotalela. Na mikili mingi ya Afrika, baguvɛrnɛma ebongisaka mpenza te lolenge ya kosalisa mibange. Na momeseno, bana nde babatelaka baboti na bango oyo bakómi mibange, ndenge baboti yango babatelaki bango ntango bazalaki naino mike. Yango wana, mama ya Fola alobaki ete soki bana na ye baboti te, ezali likama, ntango bakokóma mibange, bakozala bango moko, bato bakolinga bango te, mpe bakozala babola, bakozanga moto oyo akokunda bango ntango bakokufa.

Na mikili mingi ya Afrika, batalelaka moto oyo aboti te lokola nde azali na lisuma. Na bisika mosusu kutu, basɛngisaka mwasi abota naino liboso ete bábala ye mpo na koyeba soki abotaka. Basi mingi oyo bazwaka zemi te babomaka nzoto na ndenge nyonso mpo na koluka monganga mpe nkisi mpo na koluka kobota.

Na kotalela makambo yango, emonanaka ete mwasi na mobali oyo babalani kasi bango moko balingi kobota te, bazali komipimela eloko ya ntina na bomoi na bango. Mbala mingi bamonaka bango ete bazali bato ya ndenge mosusu, bazali koyeba te nini ekoyela bango, mpe bato bayokelaka bango mawa.

Kobota ezali likambo ya esengo, kasi ezali mpe mokumba

Basaleli ya Yehova bayebi ete kobɔkɔla bana ezali likambo ya esengo, kasi ezali mpe mokumba. Na 1 Timote 5:8, Biblia elobi ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato na kati ya ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki [moto oyo azangi kondima na mabe NW].”

Baboti basengeli koleisa mabota na bango, basengeli mpe koleisa bango na elimo, mpe mokumba yango esɛngaka ntango mpe milende mingi. Bazalaka na likanisi te ete lokola Nzambe nde apesaka bato bana, esengeli kotikela Nzambe mokumba ya kobatela bango. Bayebi ete koteya bana mitinda ya Biblia ezali mokumba oyo Nzambe apesi baboti; moto asengeli kotikela yango moto mosusu te.​—Deteronome 6:6, 7.

Mokumba ya kobɔkɔla bana ezali mpenza lisɛki te na ‘mikolo ya nsuka’ oyo ezali “ntango ya mpasi.” (2 Timote 3:1-5) Longola mpasi ya kozwa mbongo, lokola makambo ya mabe ezali kobakisama, ezali kobakisa mokakatano ya kobɔkɔla bana lelo oyo. Atako bongo, na mokili mobimba, ebele ya baklisto basi na mibali bazali kobunda na mokakatano yango mpe bazali kolonga kobɔkɔla bana oyo babangaka Nzambe “na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Yehova alingaka baboti yango mpe apambolaka bango mpo na mosala na bango makasi.

Ntina oyo bamosusu babotaka bana te

Baklisto mingi bazali babalani mpe bazali na bana te. Bamosusu bazali bikomba mpe bazali kobɔkɔla bana ya bato mosusu te. Babalani mosusu bakoki kobota kasi balingi kobota te. Soki babalani yango bazali na bana te, ezali te mpo bazali kokima mokumba to bazali kobanga mokakatano ya kozala baboti. Kasi, basepeli komipesa na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso oyo, soki bazali kobɔkɔla bana, bakokoka kosala yango te. Bamosusu bazali bamisionɛrɛ. Bamosusu bazali kosalela Yehova na mosala ya mokɛngɛli-motamboli to na Betele.

Baklisto nyonso bayebi ete ezali na mosala moko oyo esengeli kosalema nokinoki. Yesu alobaki ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Mosala yango ezali kosalema lelo oyo. Ezali mosala ya ntina mingi, mpamba te “nsuka” ekolimbola kobomama ya bato oyo batosaki nsango malamu te.​—Matai 24:14; 2 Batesaloniki 1:7, 8.

Mikolo na biso ekokani na ntango oyo Noa na libota na ye bazalaki kotonga masuwa monene oyo ebatelaki bango ntango Mpela monene eyaki. (Genese 6:13-16; Matai 24:37) Atako bana ya Noa nyonso misato ya mibali bazalaki na basi, moko te abotaki bana liboso ya Mpela. Moko na bantina ekoki kozala ete balingaki kopesa ntango mpe makasi na bango nyonso na mosala oyo bazalaki kosala. Ntina mosusu ekoki kozala ete baboyaki kobota bana na ntango wana mpo mokili ezalaki mpenza mabe mpe etondaki na mobulu, epai “masumu ya bato ezalaki mingi . . . mpe makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”​—Genese 6:5.

Yango elingi koloba te ete kobota bana lelo oyo ezali mabe, kasi ebele ya baklisto—basi na mibali—baboyi kobota mpo bámipesa mingi na mosala oyo Yehova apesi bato na ye ete básala yango nokinoki. Babalani mosusu balekisaki naino ntango mingi liboso ya kobota bana; bamosusu basepeli kobota te mpe balobi ete bakobota bana na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Yehova akosala. Tokoki nde koloba ete bazali komona mosika te? Bazali kozanga eloko moko ya malamu na bomoi? Bazali bato ya koyokela mawa?

Bomoi ya malamu mpe ya esengo

Lelo oyo Dele na Fola, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo, basali koleka mbula zomi banda babaláná, mpe basepeli kozala na mwana te. Dele alobi ete: “Bandeko na biso bazali kotungisa biso ete tóbota bana. Bazali komitungisa mingi mpo ete bakanisaka soki tokómi mibange tokozanga bato oyo bakosalisa biso. Tomonisaka bango ete tosepelaka ndenge bamitungisaka mpo na biso, kasi na mayele mpenza, tolimbolelaka bango ete tosepelaka na mosala na biso mingi. Kasi, na oyo etali soki nani akosalisa biso, toyebisaka bango ete totyaka elikya na biso epai ya Yehova, ye asalaka ete bato oyo bazalaka ntango nyonso sembo epai na ye bázala malamu. Tomonisaka bango lisusu ete kozala na bana ezali ndanga te mpo na baboti ete bana yango bakosalisa bango ntango bakokóma mibange. Bana mosusu basalisaka baboti na bango mingi te, bamosusu bazali na makoki ya kosalisa baboti na bango te, mpe bamosusu kutu bakufaka liboso ya baboti na bango. Nzokande, epai ya Yehova, toyebi ete bomoi na biso ya mikolo ekoya ekozala malamu.”

Dele na bamosusu lokola ye batii elikya na elaka oyo Yehova apesi basaleli na ye ya sembo ete: “Nakotika yo soko moke te, [nakosundola, NW] yo mpe te.” (Baebele 13:5) Bazali lisusu kondima ete “lobɔkɔ ya [Yehova] ezali mokuse te ete ezanga kobikisa; litoi na ye ezali na bozito te ete ezanga koyoka.”​—Yisaya 59:1.

Soki totali ndenge Yehova asungaka basaleli na ye ya sembo, ezali kotinda biso tótyela ye motema. Mokonzi Davidi akomaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami.” Kanisá likambo yango. Oyebi mosaleli moko ya Yehova oyo ‘atikami’?​—Nzembo 37:25.

Baoyo balekisi bomoi na bango mobimba mpo na kosalela Yehova na bandeko na bango baklisto bazalaka na mawa te, kasi bazalaka na esengo ntango batalaka nsima. Ndeko Iro Umah akokisi mbula 45 na mosala ya ntango nyonso mpe sikoyo azali mokɛngɛli-motamboli na Nigeria. Alobi ete: “Atako ngai na mwasi na ngai tozali na bana te, toyebi ete Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa na biso na makambo ya elimo mpe ya mosuni. Tozangaka eloko te. Akosundola biso mpe te lokola tozali kokóma mibange. Bambula oyo tolekisi na mosala ya ntango nyonso ezali bambula oyo eleki na esengo na bomoi na biso. Tozali na esengo na ndenge tosalelaka bandeko na biso, mpe bandeko na biso basepelaka na mosala na biso mpe basalisaka biso.”

Atako ebele ya babalani baboti bana te, baboti bana ya ndenge mosusu: bayekoli baklisto oyo basambelaka Yehova. Ntoma Yoane azalaki na mbula soki 100 ntango akomaki ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo ya solo.” (3 Yoane 4) “Bana” oyo Yoane akɔtisaki na lingomba ya “solo” bazalaki sembo mpe yango epesaki ye esengo mingi.

Bato mingi bazali koyoka esengo yango lelo oyo. Bernice, moto ya ekólo Nigeria, abalá eleki sikoyo mbula 19 mpe azali na bana te. Na mbula 14 oyo eleki, azalaki mobongisi-nzela. Lokola azali kopusana na mbula oyo akokoka lisusu kobota te, azali koyoka mawa te na ndenge alekisi bomoi na ye na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Alobi ete: “Nazali na esengo ya komona ndenge oyo bana na ngai ya elimo bazali kokola. Ata soki naboti bana te, nandimi te ete balingaki kokangama na ngai lokola baoyo nasalisi mpo báyeba solo. Bazwaka ngai mpenza lokola mama na bango, bayebisaka ngai makambo oyo esepelisaka bango mpe oyo etungisaka bango mpe basɛngaka ngai napesa bango toli. Bakomelaka ngai mikanda, mpe nakendaka kotala bango, bango mpe bayaka kotala ngai.

“Bamosusu bamonaka ete kozala na mwana te ezali lisuma. Balobaka ete okonyokwama ntango okokóma mobange. Kasi ngai namonaka bongo te. Nayebi ete lokola nazali kosalela Yehova na molimo na ngai mobimba, akopesa ngai mbano mpe akobatela ngai. Akotika ngai te ntango nakokóma mobange.”

Nzambe alingi bango mpe bazali na motuya na miso na ye

Bato oyo baboti bana mpe bazali kobɔkɔla bana oyo bazali “kotambola kati na makambo ya solo” basengeli kozala na botɔndi mingi. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Biblia elobi ete: “Tata ya moyengebene akosepela mingi; ye oyo aboti mwana ya mayele akomona esengo mpo na ye. Tata na yo mpe mama na yo bakosepela mpe mama oyo aboti yo akoyoka esengo”!​—Masese 23:24, 25.

Baklisto oyo bayoki esengo ya kobɔta bana te na mokili oyo bapambolami na makambo mosusu. Basi na mibali mingi ya ndenge yango basali mosala monene mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso. Na boumeli ya bambula, bayekoli makambo mingi, bakómi na mayele, mpe makoki oyo ezali kosalisa bango bápesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. Mingi bazali na esika ya liboso na mosala ya Bokonzi.

Atako baboti bana te mpo na matomba ya Bokonzi, Yehova apamboli bango mpe apesi bango libota ya elimo oyo ezali na bolingo mpe libota yango ezali kosepela na bango mingi na ndenge oyo bamipimeli makambo mosusu. Ezali mpenza ndenge Yesu alobaki ete: “Moto nani atiki [elingi koloba, “abimi na”] ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala mokama . . . mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi ya seko.”​—Malako 10:29, 30.

Bato nyonso oyo bazali sembo bazali na motuya na miso ya Yehova! Paulo apesi bato nyonso ya sembo ndanga, ezala baoyo bazali na bana to baoyo bazali na bango te, ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino Babulami mpe bozali naino kosalela bango.”​—Baebele 6:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 23]

Nzambe apamboli basi na mibali oyo baboti bana te mpe apesi bango libota ya elimo oyo ezali na esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto