Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/11 nk. 7-12
  • Likanisi ya Nzambe mpo na bopɛto ya bizaleli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likanisi ya Nzambe mpo na bopɛto ya bizaleli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likabo ya Mozalisi ya bolingo
  • Makambo oyo Nzambe apekisi
  • Kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali etamboli malamu ezali na matomba
  • Yosefe azwaki mapamboli mpo azalaki na etamboli malamu
  • Yobo asalaki ‘kondimana na miso na ye’
  • Elenge mwasi oyo amibatelaki malamu
  • “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Moombo oyo atosaki Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yehova azali kosalisa yo mpo olonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yozefe na kati ya bolɔkɔ
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/11 nk. 7-12

Likanisi ya Nzambe mpo na bopɛto ya bizaleli

“Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”​—YISAYA 48:17.

1, 2. (a) Ndenge nini bato mingi batalelaka kosangisa nzoto? (b) Likanisi ya baklisto ezalaka nini mpo na likambo ya kosangisa nzoto?

LELO oyo, na bisika mingi na mokili, etamboli ya malamu ekómi likambo ya moto na moto. Mpo na bato mingi, kosangisa nzoto elakisaka ete bato balingani mpe moto akoki kosala yango ntango nyonso oyo asepeli; ezali kaka te mpo na bato oyo babalani. Bato bazali kokanisa ete soki yango ekosala moto mosusu mabe te, likambo moko te ezali kopekisa moto na moto asala oyo amoni malamu. Na makanisi na bango, esengeli kosambisa moto te mpo na etamboli na ye, mingimingi na makambo ya kosangisa nzoto.

2 Bato oyo bayebi Yehova bakanisaka ndenge yango te. Bango basepelaka kotosa toli ya Makomami, mpamba te balingi Yehova mpe bazali na mposa ya kosepelisa ye. Bandimaka ete Yehova alingi bango mpe malako oyo azali kopesa bango ezali mpo na bolamu na bango, ezali mpo bázwa mpenza litomba mpe bázala na esengo. (Yisaya 48:17) Lokola Nzambe moto apesaka bomoi, ebongi mpenza ete bátya miso epai na ye mpo alakisa bango ndenge oyo basengeli kosalela nzoto na bango, mingimingi na likambo oyo mpamba te ezali mpe na nzela yango nde apesaka bomoi.

Likabo ya Mozalisi ya bolingo

3. Makambo nini bateyaki ebele ya bato ya mangomba ya boklisto mpo na kosangisa nzoto, mpe yango eyokani na Biblia?

3 Makanisi oyo bato mosusu ya mangomba ya boklisto bateyaka banda kala mpo na kosangisa nzoto ekeseni mpenza na makanisi ya bato mingi lelo oyo. Bato yango ya mangomba bateyaki ete kosangisa nzoto ezali likambo ya nsɔni, ezali lisumu, mpe ete “lisumu ya liboso” oyo esalemaki na elanga ya Edene ezalaki nde Eva alɛngolaki Adama mpe basangisaki nzoto. Likanisi yango ekeseni na oyo Makomami Mosantu elobi. Biblia elobaka ete bato ya liboso bazalaki “mobali mpe mwasi na ye.” (Genese 2:25) Nzambe ayebisaki bango bábota bana; alobaki mpenza boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” (Genese 1:28) Elingaki kozala na ntina te ete Nzambe apesa Adama na Eva etinda ya kobota bana mpe na nsima apesa bango etumbu mpo batosi malako wana.​—Nzembo 19:8.

4. Mpo na nini Nzambe apesaki bato mposa ya kosangisa nzoto?

4 Etinda oyo Nzambe apesaki baboti na biso ya liboso, oyo azongelaki yango mpe epai ya Noa na bana na ye, ezali komonisa biso ntina ya libosoliboso ya kosangisa nzoto: kobota bana. (Genese 9:1) Kasi, Liloba ya Nzambe emonisi ete basaleli na ye oyo babalani basengeli te kosangisaka nzoto kaka ntango bazali koluka kobota bana. Kosangisa nzoto esepelisaka motema mpe nzoto mpe epesaka mwasi na mobali oyo babalani esengo. Kosangisa nzoto ezalaka elembo ete babalani balingani mpenza.​—Genese 26:8, 9; Masese 5:18, 19; 1 Bakolinti 7:3-5.

Makambo oyo Nzambe apekisi

5. Nzambe atyelaki bato mibeko nini na likambo ya kosangisa nzoto?

5 Ya solo, kosangisa nzoto ezali likabo ya Nzambe, kasi ezali na makambo oyo Nzambe apekisi, ata kati na mobali na mwasi na ye. (Baefese 5:28-30; 1 Petelo 3:1, 7) Bato oyo babalani te basengeli kosangisa nzoto te. Biblia elobeli likambo yango mpenza polele. Na Mibeko oyo Nzambe apesaki libota ya Yisalaele, alobaki ete: “Okosala ekobo te.” (Exode 20:14) Na nsima, Yesu atángaki “pite” na “ekobo” na kati ya “makanisi mabe” oyo eutaka na motema mpe ekómisaka moto mbindo. (Malako 7:21, 22) Elimo santu etindaki ntoma Paulo akebisa baklisto ya Kolinti ete: “Bókima pite.” (1 Bakolinti 6:18) Mpe na mokanda na ye epai ya Baebele, ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana ya mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato ya pite mpe ya ekobo.”​—Baebele 13:4.

6. Na kati ya Biblia, liloba “pite” elimboli nini?

6 Liloba “pite” elimboli nini? Liloba ya Greke oyo ebongolami na Lingala na pite, ezali pornéïa; ntango mosusu esalelamaka mpo na kolobela kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te. (1 Bakolinti 6:9) Na bavɛrsɛ mosusu, lokola na Matai 5:32 mpe na Matai 19:9, liloba yango elimboli makambo mwa mingi mpe ezali komonisa ekobo, kosangisa nzoto na ndeko na yo, mpe kosangisa nzoto na nyama. Liloba pornéïa ekoki mpe kosalelama mpo na makambo mosusu ya kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te, na ndakisa kosangisa nzoto na monɔkɔ mpe na esumbeli, mpe kosimbasimba binama ya kobotela ya moto mosusu. Liloba ya Nzambe epekisi makambo nyonso wana na maloba ya polele to na maloba ya polele mpenza te.​—Levitike 20:10, 13, 15, 16; Baloma 1:24, 26, 27, 32.a

Kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali etamboli malamu ezali na matomba

7. Matomba nini tokoki kozwa soki tobateli etamboli ya malamu?

7 Bato ya kozanga kokoka bakoki komona ete ezali mpasi mpo na kotosa mibeko oyo Yehova apesi na likambo ya kosangisa nzoto. Maïmonide, Moyuda mpe moto ya filozofi oyo ayebanaki mingi na ekeke ya 12, akomaki boye: “Na kati ya Torah mobimba [Mibeko ya Mose], ezali na mobeko moko te oyo ezali makasi koleka mobeko oyo epekisi kosangisa nzoto na ndeko na yo mpe kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo.” Kasi, kotosa malako ya Nzambe, epesaka matomba mingi. (Yisaya 48:18) Na ndakisa, soki tozali kotosa Nzambe na makambo yango, bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, oyo mosusu ezali na nkisi te mpe ebomaka, ekozwa biso te.b Basi bakokumba bazemi ya balabala te. Lisusu, soki tozali kotosa toli ya Nzambe, tokozala na lisosoli ya malamu. Soki tozali kosala bongo, tokopesa nzoto na biso kilo mpe bato mosusu, ezala bandeko na biso, baninga na biso, bana na biso, mpe bandeko na biso baklisto, bakopesa biso limemya. Lisusu, tokokóma na makanisi oyo ebongi na oyo etali kosangisa nzoto mpe yango ekosalisa biso tófanda na libala ya esengo. Elenge mwasi moko moklisto akomaki boye: “Mateya ya solo ebatelaka malamu koleka. Nazali kozela bábala ngai, mpe mokolo bakobala ngai, nakozala na esengo ya koyebisa moklisto oyo akobala ngai ete namibatelaki malamu.”

8. Ndenge nini komibatela malamu ezali kokumisa losambo ya pɛto?

8 Soki tomibateli malamu, tokoki kosalisa bato mingi bátika makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na losambo ya solo mpe tokobenda bato báya kosambela Nzambe elongo na biso. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.” (1 Petelo 2:12) Ata soki bato oyo basalelaka Yehova te bamoni te to bandimi te ete tozali na etamboli malamu, tóyeba ete Tata na biso ya likoló azali komona, azali kondima mpe kosepela na milende oyo tozali kosala mpo na kotosa mibeko na ye.​—Masese 27:11; Baebele 4:13.

9. Mpo na nini tosengeli kondima makambo Nzambe azali koloba atako toyebi mpenza ntina na yango te? Pesá ndakisa.

9 Kondimela Nzambe elimboli mpe kozala na elikya ete ayebi makambo oyo ekoki komemela biso bolamu koleka, ata soki tozali mpenza koyeba te ntina oyo alingi tósala oyo azali kosɛnga biso. Tózwa ndakisa moko na Mibeko ya Mose. Mobeko moko elobaki ete ntango basali kaa na bango, basengelaki kokundaka nyei na kati ya kaa te. (Deteronome 23:13, 14) Mbala mosusu Bayisalaele bazalaki komituna soki mobeko yango ezalaki na ntina nini; mbala mosusu ezalaki na baoyo bazalaki komona ete mobeko yango ezali na ntina te. Nzokande, minganga bayebi sikoyo ete mobeko wana ezalaki kosala ete mikrobe ekɔta na maziba ya mai te mpe ezalaki kobatela bango bázwa te ebele ya maladi oyo banzinzi mpe banyamankɛkɛ mosusu epalanganisaka. Ndenge moko mpe, ezali na bantina etali elimo, etali boyokani na bato, makanisi mpe nzoto oyo Nzambe alingi ete kaka bato oyo babalani nde básangisa nzoto. Sikoyo, tótalela mwa bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, baoyo bazalaki na etamboli ya pɛto.

Yosefe azwaki mapamboli mpo azalaki na etamboli malamu

10. Nani alukaki kolɛngola Yosefe, mpe ye alobaki nini?

10 Na ntembe te oyebi lisolo ya Yosefe, mwana ya Yakobo. Ntango azalaki na mbula 17, Yosefe akómaki moombo ya Potifala, mokonzi ya bakɛngɛli ya Falo, mokonzi ya Ezipito. Yehova apambolaki Yosefe mpe na nsima, Potifala aponaki ye azala mokonzi ya ndako na ye mobimba. Ntango akómaki na mbula 20, Yosefe azalaki na “bonzenga mpe kitoko.” Mwasi ya Potifala akómaki kolula ye mpe alukaki kolɛngola ye. Yosefe ayebisaki ye polele, amonisaki ye ete soki asali likambo wana akokosa nkolo na ye mpe lisusu akosala “lisumu epai ya Nzambe.” Mpo na nini Yosefe akanisaki bongo?​—Genese 39:1-9.

11, 12. Atako mibeko ya Nzambe oyo epekisi pite na ekobo ezalaki te, mpo na nini Yosefe akanisaki ndenge wana?

11 Soki Yosefe aboyaki ezalaki te mpo na kobanga noki bato mosusu bakokuta bango. Bandeko ya Yosefe bazalaki na mboka mosika mpe tata na ye ayebaki kaka ete Yosefe akufá. Soki Yosefe asangisaki nzoto na mwasi wana, bandeko na ye balingaki koyeba yango te. Potifala alingaki mpe koyeba lisumu yango te ata mpe basali na ye ya mibali, mpamba te na bantango mosusu bazalaki kofanda na kati ya ndako te. (Genese 39:11) Kasi, Yosefe ayebaki ete likambo wana ekoki kobombama na miso ya Nzambe te.

12 Ekoki mpenza kozala ete Yosefe akanisaki makambo oyo ayebaki mpo na Yehova. Na ntembe te ayebaki oyo Yehova alobaki na elanga ya Edene ete: “Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” (Genese 2:24) Ekoki mpe kozala ete Yosefe ayebaki makambo oyo Yehova alobaki na mokonzi moko ya Bafilistia oyo alingaki kokómisa Sala—mama ya nkɔkɔ ya Yosefe—mwasi na ye. Yehova alobaki na mokonzi yango ete: “Yo okokufa mpo na mwasi [oyo okamati], mpo ete azali mwasi ya mobali [mosusu]. . . . Ngai mpe napekisi yo ete osala lisumu epai na ngai te. Ezali na ntina yango natiki yo [kosimba] ye te.” (Biso nde totɛngisi makomi; Genese 20:3, 6) Atako Yehova apesaki naino mibeko oyo ekomami te, makanisi na ye mpo na libala eyebanaki polele. Makanisi ya Yosefe, na mposa na ye ya kosepelisa Yehova, etindaki ye aboya etamboli ya mbindo.

13. Mpo na nini Yosefe akokaki kokima mwasi ya Potifala te?

13 Kasi, mwasi ya Potifala azalaki mbamba, azalaki kobondela ye “mikolo nyonso” ete alala na ye. Mpo na nini Yosefe akimaki ye mbala moko te? Lokola azalaki moombo, esengelaki ete asalaka misala mpe akokaki kosala eloko mosusu te. Biloko oyo bato ya arkeoloji batimolá ezali komonisa ete ndenge oyo bato ya Ezipito bazalaki kotonga bandako ezalaki kosɛnga ete moto aleka naino na ndako ya monene bongo akóma na bandako mosusu ya kobomba biloko. Yango wana, ekoki mpenza kozala ete Yosefe azalaki na nzela ya kokima mwasi ya Potifala te.​—Genese 39:10.

14. (a) Nini ekómelaki Yosefe ntango akimaki mwasi ya Potifala? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki Yosefe mpo na bosembo na ye?

14 Mokolo mosusu, bazalaki kaka bango mibale na ndako. Mwasi ya Potifala akangaki Yosefe na nzoto mpe alobaki na ye ete: “Lalá na ngai!” Yosefe akimaki. Lokola Yosefe aboyaki, mwasi ya Potifala ayokaki motema mpasi, yango wana akoselaki ye makambo ete alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Likambo esukaki ndenge nini? Yehova apesaki ye mbano mbala moko mpo na bosembo na ye? Te. Kutu, Yosefe akɔtaki bolɔkɔ mpe bakangaki ye na minyɔlɔlɔ. (Genese 39:12-20; Nzembo 105:18) Yehova amonaki ete likambo wana ezalaki sembo te mpe nsukansuka asalaki ete Yosefe abima na bolɔkɔ mpe akóma kofanda na ndako ya mokonzi. Akómaki moto monene, moto ya mibale na Ezipito; abalaki mwasi mpe abotaki bana. (Genese 41:14, 15, 39-45, 50-52) Lisusu, lisolo ya bosembo ya Yosefe ekomamaki eleki sikoyo mbula 3 500 mpo ete basaleli ya Nzambe bátángaka yango. Talá mapamboli oyo azwaki mpo atosaki mibeko ya sembo ya Nzambe! Biso mpe lelo oyo ndenge moko, ekoki kozala ete bosembo na biso ememeli biso matomba mbala moko te, kasi tóyeba ete Yehova azali komona biso mpe akopambola biso na ntango oyo ebongi.​—2 Ntango 16:9.

Yobo asalaki ‘kondimana na miso na ye’

15. Yobo asalaki “kondimana” nini na ‘miso na ye’?

15 Moto mosusu oyo azalaki sembo ezali Yobo. Ntango azalaki konyokwama mpo na mpasi oyo Zabolo apesaki ye, Yobo akanisaki ndenge oyo azalaki kotambwisa bomoi na ye mpe alobaki ete akondima kozwa etumbu ya makasi soki abukaki mobeko ya Yehova na makambo ya kosangisa nzoto. Yobo alobaki boye: “[Nasali] kondimana na miso na ngai elongo, nzela nini kutu nakoki kotalaka epai ya moseka?” (Yobo 31:1) Na maloba yango, Yobo amonisaki ete lokola azalaki na mokano ya kotikala sembo na miso ya Nzambe, aboyaki kotalatala mwasi na mposa ya mabe. Ya solo, mokolo na mokolo azalaki komona basi mpe azalaki kosunga bango soki bazali na mposa ya lisalisi. Kasi kolandalanda bango na likanisi ya kolula bango, ezalaki na motema na ye te. Liboso akóma na mpasi, azalaki na bozwi mingi, “alekaki bato nyonso na [lokumu, NW] na epai ya ebimelo ya ntango.” (Yobo 1:3) Kasi, asalelaki bomɛngo na ye te mpo na kobenda basi ebele. Ezali komonana polele ete azalaki kolandalanda bilenge basi te mpo na kosangisa na bango nzoto.

16. (a) Mpo na nini Yobo azali ndakisa malamu mpo na baklisto oyo babalá? (b) Ndenge nini etamboli ya bato na mikolo ya Malaki ekeseni na oyo ya Yobo, mpe tokoloba nini lelo oyo?

16 Yango wana, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo, Yobo azalaki na etamboli ya pɛto. Yehova amonaki yango mpe apambolaki ye mingi. (Yobo 1:10; 42:12) Yobo azali mpenza ndakisa malamu mpo na baklisto oyo babalá, ezala mibali to basi! Yango wana Yehova alingaki ye mingi mpenza! Nzokande, lelo oyo bato mingi bazali kosala makambo lokola na mikolo ya Malaki. Mosakoli yango alobelaki mabe oyo mibali mingi bazalaki kosala, mbala mingi, bazalaki kotika basi na bango mpo na kobala basi mosusu oyo bazalaki naino bilenge. Etumbelo ya Yehova etondaki na mpisoli ya basi oyo bango basundolaki, mpe Nzambe asepelaki te na baoyo ‘basalelaki’ basi na bango ‘na bokosi.’​—Malaki 2:13-16.

Elenge mwasi oyo amibatelaki malamu

17. Ndenge nini Sulamite azalaki lokola ‘elanga oyo ezipami’?

17 Moto ya misato oyo apesi ndakisa ya kotikala sembo ezali elenge mwasi Sulamite. Lokola azalaki elenge mpe kitoko, elenge mobali moko mobateli ya mpate asepelaki na ye; nzokande Salomo, mokonzi ya Yisalaele mpe moto ya bozwi mingi, asepelaki mpe na ye. Lisolo mobimba oyo ezali na mokanda ya Loyembo ya Salomo emonisi ete Sulamite amibatelaki malamu, yango wana bato oyo bazalaki penepene na ye bapesaki ye limemya. Atako elenge mwasi yango aboyaki Salomo abala ye, elimo ya Nzambe etindaki Salomo akoma lisolo na ye. Mobateli ya mpate oyo ye alingaki azalaki mpe kopesa ye limemya mpo ete amibatelaki malamu. Mokolo mosusu alobaki ete Sulamite azali lokola ‘elanga oyo ezipami.’ (Loyembo 4:12) Na Yisalaele na ntango ya kala, ezalaki na bilanga kitoko oyo ezalaki na ndunda ndenge na ndenge, na bafololo ya nsolo kitoko, mpe na banzete ya minene. Bilanga yango ezingamaki na lopango to na bifelo mpe moto akokaki kokɔta kuna kaka na ekuke, mpe bazalaki kokanga ekuke yango na fungola. (Yisaya 5:5) Mobateli ya mpate alobaki ete lokola Sulamite azalaki na bizaleli ya pɛto mpe azalaki kitoko, azalaki lokola elanga kitoko ya ndenge wana. Amibatelaki malamu mpenza. Abombaki bolingo na ye mpo na mobali oyo asengelaki kobala ye.

18. Lisolo ya Yosefe, ya Yobo, mpe ya Sulamite ezali kokundolela biso nini?

18 Na likambo ya kozala na etamboli ya sembo, Sulamite apesaki ndakisa moko malamu mpenza mpo na basi oyo bazali baklisto lelo oyo. Yehova amonaki bizaleli malamu ya elenge mwasi Sulamite, asepelaki na yango mpe apambolaki ye ndenge apambolaki Yosefe na Yobo. Masolo ya bosembo na bango ekomami na Liloba ya Nzambe mpo na koteya biso. Atako milende oyo tozali kosala mpo na kotikala sembo ekokomama na Biblia te, Yehova azali na “mokanda ya kokanisa” mpo na baoyo balingaka kosala mokano na ye. Tóbosana ata moke te ete Yehova azali ‘koyokamela’ mpe azali kosepela ntango tozali kosala makasi ete tózala ntango nyonso na etamboli ya pɛto.​—Malaki 3:16.

19. (a) Ndenge nini tosengeli kotalelaka bopɛto ya bizaleli? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Atako bato oyo bazangi kondima bakoki kosɛka biso, biso tozali na esengo lokola tozali kotosa Mozalisi na biso ya bolingo. Tozali na etamboli ya malamu oyo Nzambe alingaka. Tosengeli koyokela yango nsɔni te, tosengeli nde kobatela yango lokola eloko ya motuya. Soki totikali pɛto na etamboli na biso, Nzambe akopambola biso mpe tokoki kozala na elikya makasi ya kozwa ebele ya mapamboli na mikolo ekoya. Kasi, na bomoi ya mokolo na mokolo, tokosala mpenza nini mpo tótikala pɛto? Lisolo oyo elandi ekolobela motuna wana ya ntina mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1983, nkasa 29-31 (ebimeli ya Lifalanse).

b Ezali mawa kasi ekómaka ntango mosusu ete moklisto oyo amitambwisaki malamu azwa maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto epai ya molongani na ye oyo azali moklisto te mpe atosaka mibeko ya Nzambe te.

Okoki kolimbola?

• Biblia elobi nini mpo na kosangisa nzoto?

• Na Biblia, liloba “pite” elimboli nini?

• Matomba nini tozwaka soki tozali na etamboli ya pɛto?

• Mpo na nini Yosefe, Yobo, mpe elenge mwasi Sulamite bazali bandakisa ya malamu mpo na baklisto lelo oyo?

[Elilingi na lokasa 9]

Yosefe akimaki etamboli ya mbindo

[Elilingi na lokasa 10]

Elenge mwasi Sulamite azalaki lokola ‘elanga oyo ezipami’

[Elilingi na lokasa 11]

Yobo asalaki ‘kondimana na miso na ye’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto