Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/11 nk. 12-17
  • Okoki kozala ntango nyonso na etamboli malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala ntango nyonso na etamboli malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Omindimisa makasi
  • Makambo oyo ememaka na etamboli mabe
  • Tózwa liteya na masumu ya Davidi
  • Tóndima mbuma mabe ya lisumu
  • Kosalela Yehova epesaka esengo
  • Koyambola oyo ezongisaka moto makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Motema mawa ya Jéhovah ezali kobikisa biso na kozanga elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mokonzi Davidi asali lisumu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/11 nk. 12-17

Okoki kozala ntango nyonso na etamboli malamu

“Mpo ete bolingo ya Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye.”—1 YOANE 5:3.

1. Bokeseni nini ezali komonana na etamboli na bato lelo oyo?

ELEKI sikoyo bambula ebele, elimo ya Nzambe etindaki Malaki asakola ntango oyo basaleli ya Nzambe bakozala na etamboli oyo ekokesana mpenza na etamboli ya bato oyo basalelaka Nzambe te. Mosakoli yango akomaki boye: “Bokozonga mpe bokososola kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.” (Malaki 3:18) Esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo. Kotosa mibeko ya Nzambe, bakisa mpe mibeko oyo esɛngi kozala na etamboli malamu, ezali nzela ya malamu mpe oyo ebongi na bomoi. Kasi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Yango wana, Yesu alobaki ete baklisto basengeli kosala makasi mpo na kozwa lobiko.—Luka 13:23, 24.

2. Makambo nini epesaka bato mosusu mokakatano mpo na kozala ntango nyonso na etamboli malamu?

2 Mpo na nini kozala ntango nyonso na etamboli malamu ezalaka mpasi? Moko ya bantina ezali makambo oyo tozali komona na mokili. Bato oyo basalaka masano to bafilime bazali komonisa ete kosangisa nzoto ezali likambo ya lokumu, ya esengo, mpe ezali komonisa ete baoyo bazali kosala yango bakoli, kasi balobelaka mabe na yango te. (Baefese 4:17-19) Balakisaka mbala mingi bato oyo babalani te bazali kosangisa nzoto. Mbala mingi bafilime mpe bateyatre ya televizyo elakisaka bato oyo bakutani sika mpe babalaná te bazali kosangisa nzoto. Bato yango bamonisanaka bolingo mpe limemya mpenza te. Bato mingi babandá kotala makambo ya ndenge yango na bomwana. Baninga mpe batikali nsima te mpo na kotinda bato bálanda elimo ya mokili ya lelo oyo ezali kotikela makambo nyonso nzela, mpe ntango mosusu basɛkaka baoyo baboyaka kolanda makambo yango, to mpe batyolaka bango.—1 Petelo 4:4.

3. Yebisá mwa bantina oyo bato mingi bakómaka na etamboli mabe.

3 Mposa ya nzoto yango moko ezali mpe kosala ete kozala ntango nyonso na etamboli malamu ezali etumba monene. Yehova akelaki bato na mposa ya kosangisa nzoto, mpe ntango mosusu mposa yango ekómaka makasi. Mposa etalelaka mingimingi makambo oyo tozali kokanisa, mpe misala ya mbindo eutaka na makanisi oyo eyokani te na makanisi ya Yehova. (Yakobo 1:14, 15) Na ndakisa, ankɛtɛ moko euti kosalema kala mpenza te mpe ebimaki na zulunalo moko ya minganga (British Medical Journal) emonisi ete bato mingi basangisaki nzoto mbala ya liboso kaka mpo balingaki koyeba ndenge likambo yango ezalaka. Bamosusu bamonaki ete bato mingi ya mbula na bango bazalaki kosangisa nzoto, yango wana bango mpe balingaki kotikala nsima te. Bamosusu mpe balobaki ete bayokaki mposa makasi to bazalaki na “mwa kwiti na ntango yango.” Soki tolingi mpenza kosepelisa Nzambe, tosengeli kozala na makanisi wana te. Makanisi nini ekoki kosalisa biso tózala ntango nyonso na etamboli malamu?

Omindimisa makasi

4. Mpo na kozala ntango nyonso na etamboli malamu, tosengeli kosala nini?

4 Mpo na kozala ntango nyonso na etamboli malamu, tosengeli koyeba ete etamboli malamu ezali na ntina. Likanisi yango eyokani na oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma ete: ‘Bósosola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi [mpenza].’ (Baloma 12:2) Mpo moto ayeba ete etamboli malamu ezali na ntina, asengeli kosuka kaka te na koyeba ete Liloba ya Nzambe epekisi etamboli mabe. Asengeli mpe koyeba ntina oyo Nzambe apekisi etamboli mabe mpe matomba oyo tokozwa soki toboyi etamboli yango. Tolobelaki ntina mosusu na lisolo oyo eleki.

5. Libosoliboso, mpo na nini baklisto basengeli kozala na etamboli malamu?

5 Kasi, mpo na biso baklisto ntina ya libosoliboso oyo tosengeli koboya etamboli mabe etaleli boyokani na biso na Nzambe. Tomonaki ete ye ayebi makambo nini ekoki komemela biso bolamu mingi. Soki mpenza tolingi ye, yango ekosalisa biso tóyina makambo ya mabe. (Nzembo 97:10) Nzambe nde apesaka “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Nzambe alingaka biso. Soki tozali kotosa ye, ekomonisa ete biso mpe tolingi ye mpe tozali na botɔndi mpo na makambo nyonso oyo asaleli biso. (1 Yoane 5:3) Tólinga ata moke te kobuka mibeko ya sembo ya Yehova, mpamba te yango ekopesa ye mawa na motema mpe ekoyokisa ye mpasi. (Nzembo 78:41) Tólinga te kosala makambo oyo ekofingisa losambo na ye ya pɛto mpe ya sembo. (Tito 2:5; 2 Petelo 2:2) Soki tozali ntango nyonso na etamboli malamu, tokosepelisa motema ya Oyo-Aleki-Likoló.—Masese 27:11.

6. Bolamu nini tokozwa soki tozali koyebisa bato mosusu etamboli na biso ya malamu?

6 Ntango tozwi ekateli ya kozala ntango nyonso na etamboli malamu, likambo mosusu oyo ekobatela biso ezali ya koyebisa yango epai ya bato mosusu. Yebisá bato mosusu ete ozali mosaleli ya Yehova Nzambe mpe ete ozali na ekateli ya kotosa mibeko na ye. Yango ezali bomoi na yo, nzoto na yo, mpe likambo oyo yo moko oponi. Eloko nini olingi kobebisa te? Boyokani malamu na Tata na yo ya likoló. Yango wana, omonisa bato polele ete etamboli na yo ya sembo ezali eloko ya kokakola te. Sepelá kozala momonisi ya Nzambe na ndenge oyo ozali kotosa mibeko na ye. (Nzembo 64:10) Koyoka nsɔni te mpo na koyebisa bato mosusu makambo oyo otosaka. Soki ozali koloba na mpiko, yango ekopesa yo makasi, ekobatela yo, mpe ekolendisa bato mosusu bálanda ndakisa na yo.—1 Timote 4:12.

7. Ndenge nini tokoki kokangama na ekateli na biso ya kozala na etamboli malamu?

7 Na nsima, ntango tozwi ekateli ya kozala ntango nyonso na etamboli malamu mpe tomonisi bato makanisi na biso, tosengeli kozwa bibongiseli mpo na kokangama na ekateli na biso. Mpo na kosala yango tosengeli mpe koyeba kopona baninga. Biblia elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele.” Luká kozala moninga ya bato oyo bazali na etamboli malamu lokola yo; bakolendisa yo. Vɛrsɛ yango elobi lisusu boye: “Nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Salá makasi mpe boyá baninga oyo bakoki kolɛmbisa ekateli na yo.—1 Bakolinti 15:33.

8. (a) Mpo na nini tosengeli kotondisa bɔɔngɔ na biso na makambo ya malamu? (b) Eloko nini tosengeli koboya?

8 Lisusu, tosengeli kotondisa bɔɔngɔ na biso na makambo oyo ezali solo, oyo ezali na lokumu, ezali sembo, pɛto, ya boboto, ya ngɔlu, ya malamu, mpe oyo ekoki kosanzolama. (Bafilipi 4:8) Tokosala yango soki tozali kopona makambo oyo tokotala mpe oyo tokotánga mpe miziki oyo tokoyoka. Soki tolobi ete mikanda ya mabe ekoki kobebisa makanisi ya moto te, ezali mpe ndenge moko na koloba ete mikanda ya malamu ekoki kobongisa makanisi ya moto te. Tóbosana te ete ezali mpasi te mpo bato ya kozanga kokoka bákwea na etamboli mabe. Yango wana, mikanda, bazulunalo, bafilime mpe miziki oyo ezali kolendisa mposa ya kosangisa nzoto ekolamusa mposa ya mabe, mpe mposa yango ekoki komema na lisumu. Mpo na kobatela etamboli ya malamu, tosengeli kotondisa bɔɔngɔ na biso na mayele oyo Nzambe apesaka.—Yakobo 3:17.

Makambo oyo ememaka na etamboli mabe

9-11. Ndenge Salomo alobi yango, makambo nini ememaki elenge mobali moko mokemoke na etamboli mabe?

9 Mbala mingi, ezali na makambo oyo toyebi ete ememaka na etamboli mabe. Ntango moto asi atii lokolo na moko na yango, ezalaka mpasi mpo azonga nsima. Talá ndenge oyo balobeli yango na Masese 7:6-23. Salomo azali kotala ‘mwana moko oyo azangi mayele [“motema,” NW ],’ to azangi makanisi ya malamu. Elenge mobali yango azali “kotambola na nzela penepene na esika ya mwasi yango [ya pite], mpe [alandi] nzela epai ya ndako na ye, na ntango ya mpokwa, nsuka ya pole.” Yango nde libunga na ye ya liboso. Na mpokwa, “motema” na ye ememi ye na nzela mosusu te, kaka na nzela oyo ayebi ete akoki kokutana na mwasi ya pite.

10 Vɛrsɛ elobi lisusu boye: “Talá mwasi azwani na ye, na bilamba ya mwasi ya pite na motema ya mayele.” Sikoyo amoni ye! Akoki kobaluka mpe kozonga na ndako, kasi sikoyo ekómi mwa mpasi koleka, lokola mpe azali na bolɛmbu na elimo. Mwasi yango akangi ye mpe apesi ye bizi. Lokola asi andimi bizi, akómi koyoka maloba na ye ya kolɛngola, alobi na ye boye: “Nazali na makabo ya kimya elongo na ngai; lelo oyo nakokisi ndai na ngai.” Na kati ya makabo ya kimya ezalaki na mosuni, falini, mafuta, na vinyo. (Levitike 19:5, 6; 22:21; Mituya 15:8-10) Lokola atángi biloko wana, ekoki kozala ete azali komonisa ete ye mpe alingaka makambo ya elimo, mpe lisusu, alingi komonisa ye ete bilei mpe masanga ezali bebo na ndako na ye. Alobi na ye ete: “Yaká, tótonda na kolingana kino ntango ya ntɔngɔ; tómipesana na esengo ya bolingo.”

11 Toyebi mpenza ndenge oyo ekosukela ye. “Na kozimbisa na bibebu na ye akobenda ye.” Alandi ye tii na ndako na ye “lokola ngɔmbɛ akei na kobomama” mpe “lokola ndɛkɛ [ekwei na motambo, NW ].” Salomo asukisi lisolo na maloba oyo ezali kotinda biso na kokanisa: “Ayebi te ete akobungisa bomoi na ye.” Likambo yango etaleli molimo, to bomoi na ye mpamba te “Nzambe akosambisa bato ya pite mpe ya ekobo.” (Baebele 13:4) Oyo ezali mpenza liteya monene mpo na mibali na basi! Tosengeli koboya kotya ata lokolo moko na nzela oyo ekobebisa boyokani na biso na Nzambe.

12. (a) Maloba “azangi motema” elimboli nini? (b) Ndenge nini tokoki kokóma makasi na elimo?

12 Omoni ete elenge mobali oyo balobeli na lisolo yango “azangaki motema.” Maloba yango ezali komonisa biso ete makanisi na ye, bamposa na ye, makambo oyo azalaki kolinga, koyoka, mpe mikano ya bomoi na ye eyokanaki te na oyo Nzambe alingaka. Bolɛmbu na ye ya elimo ememaki ye na likama. Na “mikolo ya nsuka” oyo, esengeli kosala molende mpo na kozala makasi na elimo. (2 Timote 3:1) Nzambe abongisi makambo mpo na kosalisa biso. Abongisi makita na lisangá ya boklisto mpo na kolendisa biso na nzela ya sembo mpe kosangisa biso na bato mosusu oyo tozali na bango mokano moko. (Baebele 10:24, 25) Tozali na bankulutu na masangá, bango bazali kobatela biso mpe bazali koteya biso banzela ya sembo. (Baefese 4:11, 12) Tozali na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ezali kotambwisa biso. (2 Timote 3:16) Mpe lisusu, tozali na libaku malamu ya kobondela Nzambe ata na ntango nini mpo na kosɛnga elimo na ye esalisa biso.—Matai 26:41.

Tózwa liteya na masumu ya Davidi

13, 14. Ndenge nini Mokonzi Davidi akweaki na lisumu ya monene?

13 Na mawa nyonso, ata bato oyo basalelaki Nzambe na mpiko bakweaki na etamboli mabe. Moko na bango ezalaki Mokonzi Davidi, moto oyo asalelaki Yehova na bosembo bambula ebele. Na ntembe te Davidi alingaki Nzambe mingi. Kasi, amikɔtisaki na nzela ya masumu. Lokola kaka elenge mobali oyo Salomo alobelaki, ezalaki na makambo oyo ememaki Davidi na lisumu mpe na nsima ekómelaki ye mokakatano.

14 Na ntango yango, ekoki kozala ete Davidi azalaki na mbula koleka 50 mwa moke. Davidi azalaki na eteni ya ndako na ye ya likoló mpe amonaki Bata-Seba, mwasi kitoko, azali kosukola nzoto. Atunaki bato na ye mpe bayebisaki ye soki mwasi yango azalaki nani. Bayebisaki ye ete Uliya, mobali ya mwasi yango, azali na etumba ya Laba, mboka moko ya Baamona. Davidi atindaki bato na ye báya na mwasi yango na ndako na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Na nsima, likambo yango ekómelaki ye mindɔndɔ: mwasi yango akómaki na zemi. Davidi abengisaki Uliya atako azalaki na etumba na elikya ete soki ayei, na butu akokende kosangisa nzoto na mwasi na ye. Soki esalemi bongo, ekomonana ete zemi wana ezali ya Uliya. Kasi Uliya akendaki na ndako na ye te. Lokola mayele oyo asalelaki mpo na kobomba lisumu na ye elongaki te, Davidi azongisaki Uliya na Laba mpe apesaki ye mokanda oyo asengelaki kopesa na mokonzi ya basoda na ye; na mokanda yango alobaki ete atya Uliya na esika oyo banguna bakoboma ye. Na bongo, Uliya akufaki, mpe Davidi abalaki mwasi oyo akufelaki mobali liboso ete bato nyonso báyeba ete azalaki na zemi.—2 Samwele 11:1-27.

15. (a) Ndenge nini bamonisaki Davidi lisumu na ye? (b) Davidi asalaki nini ntango Natana asalelaki mayele mpo na kopamela ye?

15 Emonanaki lokola nde mayele mabe ya Davidi mpo na kobomba lisumu na ye elongaki. Basanza elekaki. Mwasi mpe abotaki mwana mobali. Soki Davidi azalaki kokanisa likambo yango ntango azalaki kosala Nzembo 32, yango emonisi mpenza ete lisosoli na ye ezalaki kotungisa ye. (Nzembo 32:3-5) Kasi lisumu yango ebombamaki na miso ya Nzambe te. Biblia elobi boye: “Likambo lisalaki Davidi ezalaki mabe na miso ya [Yehova].” (2 Samwele 11:27) Yehova atindaki mosakoli Natana, mpe ye asalelaki mayele mpo na komonisa Davidi mabe oyo asalaki. Mbala moko, Davidi ayambolaki lisumu na ye mpe asɛngaki Yehova alimbisa ye. Lokola abongolaki motema solosolo, Nzambe azongisaki lisusu boyokani elongo na ye. (2 Samwele 12:1-13) Davidi ayokaki mabe te ntango bapamelaki ye. Kutu, amonisaki ezaleli oyo elobelami na Nzembo 141:5: “Tiká ete moyengebene abɛta ngai, malamu bongo; tiká ete apesa ngai toli; ekozala lokola mafuta malamu; motó na ngai ekoboya yango te.”

16. Likebisi mpe toli nini Salomo apesaki mpo na masumu?

16 Ekoki kozala ete Salomo, mwana ya mibale ya Davidi na Bata-Seba, akanisaki mingi likambo mabe wana oyo ekómelaki tata na ye. Na nsima akomaki boye: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.” (Masese 28:13) Soki tosali lisumu monene, tosengeli kolanda lilako oyo epemamaki na Nzambe, yango ezali likebisi mpe toli. Tosengeli koyambola lisumu na biso epai ya Yehova mpe kokutana na bankulutu ya lisangá mpo básalisa biso. Mokumba monene oyo bankulutu bazali na yango ezali ya kosalisa bato oyo bakwei na mabe bázonga na nzela ya malamu.—Yakobo 5:14, 15.

Tóndima mbuma mabe ya lisumu

17. Atako Yehova alimbisaka masumu, na makambo nini abatelaka bato te?

17 Yehova alimbisaki Davidi. Mpo na nini? Mpamba te Davidi azalaki moto ya sembo, azalaki koyokela bato mosusu mawa, mpe lisusu abongolaki motema solosolo. Atako bongo, Nzambe abatelaki Davidi te na ntango abukaki mbuma mabe ya nzela oyo alandaki. (2 Samwele 12:9-14) Lelo mpe ezali se ndenge yango. Atako Yehova atindelaka moto oyo abongoli motema mabe te, kasi abatelaka ye te na ntango oyo esengeli ete abuka mbuma mabe ya misala mabe na ye. (Bagalatia 6:7) Etamboli mabe ebotaka mbuma mabe lokola oyo: libala ekoki kokufa, zemi ya balabala, maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, mpe bato bakoki kotika kotyela moto yango motema to kopesa ye limemya.

18. (a) Ntoma Paulo ayebisaki bandeko na lisangá ya Kolinti básala nini na moto oyo azalaki kosala pite? (b) Ndenge nini Yehova amonisaka bolingo mpe motema mawa na bato oyo basali masumu?

18 Soki tosalaki lisumu monene, ezali mpasi te mpo tólɛmba nzoto ntango tozali kobuka mbuma mabe ya mabunga oyo tosalaki. Kasi, tosengeli kotika te ete eloko moko epekisa biso kobongola motema mpe kozongisa boyokani na biso na Nzambe. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akomelaki Bakolinti ete bábimisa na lisangá moto oyo azalaki kosala pite na mwasi na tata na ye. (1 Bakolinti 5:1, 13) Ntango moto yango abongolaki motema solosolo, Paulo apesaki lisangá yango malako oyo: “Bolimbisa ye mpe bolendisa ye [mpe] bolakisa ’te bolingaka ye.” (2 Korinto 2:5-8, Boyokani ya Sika) Toli yango oyo epemami ezali komonisa biso bolingo mpe motema mawa ya Yehova epai ya bato ya masumu oyo babongoli motema. Baanzelu na likoló basepelaka ntango moto ya masumu abongoli motema.—Luka 15:10.

19. Koyoka mawa mpo na makambo mabe ekoki komema matomba nini?

19 Atako tokoki koyoka mawa mpo na etamboli na biso ya mabe, yango ekoki kosalisa biso ‘tókeba mpe tósala masumu te.’ (Yobo 36:21) Mbuma mabe ya lisumu esengeli kopekisa biso ete tózongela lisusu lisumu yango te. Mpe lisusu, Davidi asalelaki liteya oyo azwaki na bampasi oyo ekómelaki ye ntango asalaki lisumu mpo na kopesa bato mosusu toli. Alobaki boye: “Nakoteya nzela na yo epai ya baoyo bakopɛngwaka yango, mpe bato ya masumu [bakozonga] epai na yo.”—Nzembo 51:13.

Kosalela Yehova epesaka esengo

20. Bolamu nini tokozwa soki tozali kotosa masɛngami ya sembo ya Nzambe?

20 Yesu alobaki boye: “Esengo eleki na bango bayoki Liloba ya Nzambe mpe batosi yango.” (Luka 11:28) Kotosa masɛngami ya sembo ya Nzambe epesaka esengo banda sikoyo mpe mpo na libela. Soki tozali ntango nyonso na etamboli malamu, tókoba na nzela yango mpe tólanda bibongiseli nyonso oyo Yehova akamati mpo na kosalisa biso. Soki tokwei na etamboli mabe, tózwa elendiseli na koyeba ete Yehova akolimbisa biso soki tobongoli mpenza motema, mpe tózwa ekateli ya kozongela masumu te.—Yisaya 55:7.

21. Wapi toli oyo ntoma Petelo apesaki ete soki tolandi yango ekosalisa biso tózala ntango nyonso na etamboli malamu?

21 Etikali moke mokili mabe oyo eleka, nzela moko na makanisi mpe na misala na yango ya mbindo. Soki tobateli etamboli ya malamu, tokozwela yango matomba sikoyo mpe mpo na libela. Ntoma Petelo akomaki boye: “Balingami, awa ezali bino [kozela] makambo oyo, bótya etingya ete bózwana na ye na kozanga litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya. . . . Awa eyebi bino liboso, bókeba ete bólongwa na mpiko na bino mpenza te mpo na kopɛngwa na libunga ya bato na lofundo.”—2 Petelo 3:14, 17.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini ekoki kozala mpasi na kozala ntango nyonso na etamboli malamu?

• Tángá mwa makambo oyo ekoki kosunga biso mpo tókangama na ekateli na biso ya kozala ntango nyonso na etamboli malamu.

• Mateya nini tokoki kozwa na masumu ya elenge mobali oyo Salomo alobelaki?

• Ndakisa ya Davidi eteyi biso nini na likambo ya kobongola motema?

[Elilingi na lokasa 13]

Soki ozali koyebisa bato mosusu makanisi na yo mpo na etamboli malamu, yango ekobatela yo

[Bililingi na lokasa 16, 17]

Yehova alimbisaki Davidi mpo abongolaki mpenza motema

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto