Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/11 nk. 5-7
  • Mpo na nini osengeli kobondela?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kobondela?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libondeli ekoki kosalisa moto na kosilisa mikakatano
  • Ntango Nzambe akoyanola mabondeli nyonso
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayoka mabondeli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Bongisá lisusu ndenge na yo ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/11 nk. 5-7

Mpo na nini osengeli kobondela?

“ATA bosengi . . . bozwaka te, mpo bozali na makanisi ya mabe. . . . Bopusana penepene na Nzambe mpe ye akoya penepene na bino.” (Yakobi 4:3, 8, Boyokani ya Sika) Maloba oyo ya Yakobo, moyekoli moko ya Yesu, esengeli mpenza kotinda biso tótalela ntina oyo tobondelaka.

Libondeli ezali kaka te nzela ya koyebisa Nzambe bamposa na biso. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Tata na bino ayebi yango ezali bino kosɛnga naino bolɔmbi ye te.” Kasi, Yesu alobaki lisusu boye: “Bólɔmbaka mpe bakopesa bino; bóluka mpe bokozwaka; bóbɛtaka mpe bakozipwela bino.” (Matai 6:8; 7:7) Elingi koloba ete Yehova alingaka tóyebisaka ye bamposa na biso. Kasi libondeli ezali kaka te mpo na koyebisa bamposa na biso.

Baninga ya solosolo basololaka kaka te soki moko azali na mposa ya eloko. Mokomoko alingaka koyeba moninga mpe makambo na ye, mpe boninga na bango ekómaka makasi ntango bazali koyebisana makambo oyo ezali na mitema na bango. Ndenge moko mpe, kobondela ezali na ntina moko monene oyo eleki kutu kosɛnga biloko oyo tosengeli na yango. Libondeli epesaka biso libaku ya koyebisa Yehova mposa na biso ya kosalela ye mpe yango esalisaka biso mpo boyokani na biso na ye eya lisusu makasi.

Nzambe apesi biso libaku malamu ya kobondela mpo tópusana penepene na ye. Tokopusana penepene na Nzambe se soki tozali koyebisa ye makanisi oyo ezali na mitema na biso na esika tózongelaka mabondeli oyo tokangi na motó. Kosolola na Yehova na kati ya libondeli ezali mpenza likambo ya esengo! Lisese moko ya Biblia elobaka mpe ete: “Kobondela ya bayengebene ezali esengo na ye.”​—Masese 15:8.

Asafa, mokomi ya nzembo, ayembaki ete: “Kasi mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe.” (Nzembo 73:28) Kasi mpo na kopusana penepene na Nzambe, tosengeli kosuka kaka te na kobondela. Talá ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango:

“Moko na bayekoli na [Yesu] alobaki na ye ete, Nkolo, lakisá biso kobondela.” Yesu azongisaki ete: “Wana ekobondela bino, lobá ete, Tata, nkombo na yo ezala bulɛɛ. Bokonzi na yo eya.” (Luka 11:1, 2) Tokanisi ete tokoki mpenza kobondela na ndenge oyo esengeli soki toyebi nkombo ya Nzambe te mpe ndenge oyo ekosantisama? Tokoki mpenza kobondela na ndenge oyo Yesu alakisaki soki toyebi te soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Soki toyekoli Biblia malamumalamu, tokokanga ntina ya makambo yango. Na nzela na yango tokoyeba Nzambe malamu mpe tokoyeba banzela na ye. Longola yango, soki toyebi Yehova Nzambe, tokomiyoka penepene na ye mpe tokolinga kosalela ye lisusu mingi. Na nsima, yango ekosalisa biso tófungolela ye mitema na biso ntango tokosolola na ye na kati ya libondeli.

Libondeli ekoki kosalisa moto na kosilisa mikakatano

Soki biso na Yehova tokómi baninga ya motema, ekosalisa biso tósilisa mikakatano. Talá ndenge likambo yango emonanaki na lisolo mokomoko oyo elandi. Masolo yango ezali komonisa ete mokomoko ya bato oyo basalaki mabondeli yango bakómaki baninga makasi ya Yehova.

Na Brésil, mwasi moko na nkombo Maria, abondelaki Nzambe asalisa ye. Liboso, mwasi yango alingaki asalaka makambo na ndenge na ye mpo azalaki komona makambo mabe, lokola lokuta ya bato. Maria akimaki mobali na ye, bana na ye mpe ndako na ye. Akómaki mpe komela bangi. Kasi, lokola nyonso wana ememelaki ye bolamu te, ayebisaki Nzambe makambo oyo azalaki na yango na motema mpe asɛngaki ye lisalisi.

Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova mibale bakendaki kotala ye mpe bapesaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo ezalaki na lisolo oyo elobelaki ntina ya kolanda toli ya Nzambe. Lisolo yango esimbaki motema na ye mpe, kaka na mokolo yango, abandaki koyekola Biblia na Batatoli. Na nsima azongaki na libota na ye. Makambo oyo azalaki koyekola epesaki ye mposa ya komonisa ete alingi Yehova. Maria alobaki boye: “Nabongwanaki mpenza. Na ebandeli, mobali na ngai na bandeko na ngai balingaki te ete nayekolaka Biblia. Kasi ntango bamonaki ndenge oyo nazalaki kobongwana, bakómaki kolendisa ngai.” Na nsima, Maria amipesaki mpo na kosalela Ye oyo ayokaka mabondeli.

Atako José azalaki na mwasi kitoko mpe mosala na ye ezalaki kotambola malamu na Bolivie, azalaki na esengo te. Ntango akómaki na makango, mwasi na ye ya ndako aboyaki ye. José akómaki komela masanga mingi mpe azalaki komimona ete azali na ntina moko te. José alobi boye: “Nakómaki kobondela na motema mobimba, nazalaki koluka koyeba eloko nini nasengeli kosala mpo nasepelisa Nzambe. Mwa moke na nsima Batatoli ya Yehova bayaki na esika na ngai ya mosala mpe balobaki ete soki nasepeli, bakoyekola na ngai Biblia ofele; kasi naboyaki. Bazongelaki ngai mbala misato. Soki kaka nasali libondeli mpo na kosɛnga Nzambe lisalisi, mosika te Batatoli bayei. Nsukansuka, nazwaki ekateli ete nakoyoka bango naino soki bayei lisusu. Natángaki Biblia mobimba mpe nazalaki na mituna mingi, kasi mbala nyonso bazalaki kopesa ngai biyano oyo ezalaki kosepelisa ngai. Bomoi na ngai ekómaki lisusu na ntina na ndenge nazalaki koyekola makambo ya Yehova, mpe ndakisa malamu ya baninga na ngai Batatoli ezalaki kolendisa ngai! Naboyaki makango na ngai mpe natikaki baninga oyo nazalaki kobima na bango mpo na kokende komela. Eumelaki te, nazongelaki mwasi na bana na ngai. Na ebandeli ya 1999, nazwaki batisimo.”

Na Italie, ntango libala ya Tamara ekómaki na matata, asɛngaki Nzambe apesa ye mayele. Azalaki moto ya nkanda mingi mpamba te ntango azalaki na mbula 14, babɛtaki ye mpe babenganaki ye na ndako. Tamara alobi boye: “Nazwaki Biblia moko mpe nabandaki kotánga yango. Mokolo moko na mpokwa, natángaki ete ‘kozwa mayele ezali lokola kozwa biloko ya motuya oyo ebombami.’ Nabondelaki Nzambe apesa ngai mayele wana. (Masese 2:1-6) Mokolo oyo elandaki, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ngai na ntɔngɔ. Tobandaki koyekola Biblia, kasi nasalelaki mbala moko te makambo oyo nazalaki koyekola. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya kokóma moklisto mpe nazwaki batisimo. Lelo oyo, elongo na mobali na ngai, nazali kosalisa bato mosusu mpo bango mpe bázwa mayele oyo Nzambe apesaka.”

Beatriz azalaki na bomɛngo na engumba Caracas, na ekólo Venezuela. Kasi, libala na ye ekufaki mpe azalaki komitungisa mingi. Lokola abungisaki elikya nyonso, mokolo mosusu alekisaki bangonga mingi na kobondela. Mokolo oyo elandaki, ayokaki bato babɛti na ekuke. Epesaki ye nkanda, mpe ntango atalaki na mwa lidusu ya ekuke, amonaki bato mibale na basakosi na bango. Asalaki lokola azali te, kasi liboso bato yango bákende, bakɔtisaki mwa trakte na nse ya ekuke. Na trakte yango bakomaki ete, “Yebá Biblia na yo.” Akanisaki ete mbala mosusu Nzambe ayoki libondeli oyo asalaki na butu mpe atindeli ye bato yango. Abengaki bango mpe abandaki koyekola Biblia mpe na nsima azwaki batisimo. Nsukansuka Beatriz akómaki na esengo; lelo oyo, ateyaka bato mosusu ndenge oyo bakoki kozwa bolamu ya solosolo.

Carmen abondelaki Nzambe asalisa ye lokola azalaki mpenza mobola. Azalaki na bana zomi mpe mobali na ye, Rafael, azalaki molangwi masanga. Carmen alobi boye: “Namekaki kosala mosala ya kosukolela bato bilamba.” Kasi Rafael akómaki lisusu kolangwa masanga mingi mpenza. “Mobali na ngai abandaki kobongwana kaka ntango tokómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Bateyaki biso elikya ya Bokonzi oyo elobi ete etikali moke Yehova alongola bobola na minyoko na mokili. Nsukansuka Nzambe ayokaki mabondeli na ngai!” Koyekola banzela ya Yehova esalisaki Rafael atika molangwa mpe alataki “bomoto ya sika.” (Baefese 4:24) Libota na bango mobimba bakómaki na bomoi ya malamu. Rafael alobi boye: “Tozali bazwi te, tozali na ndako na biso moko te, kasi tozali na oyo tosengeli na yango na bomoi na biso mpe tozali na esengo.”

Ntango Nzambe akoyanola mabondeli nyonso

Kobondela esalisaki bato oyo tolobeli? Ɛɛ! Omoni mpe ete mpo na bato mingi kati na bango, Nzambe ayanolaki mabondeli na bango, atindelaki bango moklisto moko oyo asalisaki bango bákóma baninga ya Yehova Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia?​—Misala 9:11.

Na yango, kobondela ezali mpenza na ntina. Etikali moke Nzambe ayanola libondeli oyo tosɛngaka ete Bokonzi na ye eya mpe mokano na ye esalema awa na nse. (Matai 6:10) Soki Nzambe alongoli bato nyonso oyo bazali kotombokela ye na mokili, “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova].” (Yisaya 11:9) Na ntango yango, bato nyonso oyo balingaka Yehova bakozwa “[bonsomi, NW ] ya nkembo ya bana ya Nzambe” mpe akoyanola mabondeli na bango nyonso.​—Baloma 8:18-21.

[Elilingi na lokasa 7]

Oyebi ntina oyo tosengeli kobondela?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto