Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/11 nk. 24-27
  • Liteya nini tokoki kozwa na bomoi ya mwasi na mobali ya liboso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya nini tokoki kozwa na bomoi ya mwasi na mobali ya liboso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Azalisaki bango mobali mpe mwasi”
  • “Na elilingi ya Nzambe”
  • Eva asali lisumu
  • Adama ayokeli mwasi na ye
  • Mbuma mabe ya lisumu
  • Liteya mpo na biso
  • Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/11 nk. 24-27

Liteya nini tokoki kozwa na bomoi ya mwasi na mobali ya liboso?

NZAMBE atalaki mabele malamumalamu. Abongisaki yango mpo moto afanda wana. Amonaki ete nyonso oyo azalaki kosala ezalaki malamu. Kutu, ntango Nzambe asilisaki mosala yango, alobaki ete ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:12, 18, 21, 25, 31) Nzokande, liboso Nzambe asukisa na maloba yango, alobelaki eloko moko oyo ezalaki “malamu te.” Ya solo, Nzambe asalaki eloko moko te ya kozanga kokoka. Kasi, alingaki kaka komonisa ete mosala na ye ya kozalisa esilaki naino mpenza te. Yehova alobaki boye: “Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.”​—Genese 2:18.

Mokano ya Yehova ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko, na nzoto kolɔngɔnɔ, na esengo mpe na biloko nyonso na kati ya paladiso awa na mabele. Adama azali tata ya bato nyonso. Mwasi na ye, Eva, akómaki “mama ya bango nyonso na bomoi.” (Genese 3:20) Atako lelo oyo bana na bango bazali bamiliare awa na mabele, bato yango bazali bato ya kokoka te.

Lisolo ya Adama na Eva eyebani malamu. Kasi ezali na litomba nini mpo na biso? Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki mwasi na mobali ya liboso?

“Azalisaki bango mobali mpe mwasi”

Ntango Adama azalaki kopesa nyama nkombo, amonaki ete bazalaki mibalemibale, mwasi na mobali; kasi ye azalaki na mwasi te. Yango wana, ntango amonaki ekelamu oyo Yehova asalaki na mopanzi na ye, asepelaki mingi mpenza. Lokola amonaki ete kaka mwasi nde azalaki mpenza eteni ya nzoto ye, Adama alobaki ete: “Oyo azali [sikoyo] mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya mosuni na ngai. Ye akobyangama mwasi, zambi ye akamatami na mobali.”​—Genese 2:18-23.

Mobali azalaki na mposa ya “mosungi.” Sikoyo, azwaki oyo abongaki mpenza na ye. Eva abongisamaki malamu mpenza mpo na kozala molongani ya Adama na mosala ya kobatela elanga mpe nyama, kobota bana, mpe asengelaki kolendisa ye mpe kopesa ye mabɔkɔ lokola moninga ya solosolo.​—Genese 1:26-30.

Yehova apesaki bango nyonso oyo bakokaki kozala na yango mposa. Ntango Nzambe amemaki Eva epai ya mobali na ye, yango emonisi ete abalisaki bango, abandisaki libala mpe libota, bibongiseli oyo bato basengelaki kolanda. Lisolo ya Genese elobi boye: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” Lisusu, ntango Yehova apambolaki mobali na mwasi ya liboso mpe ayebisaki bango ete bábota bana, mokano na ye ezalaki mpenza ete mwana mokomoko abotama na kati ya libota oyo bakobatela ye, azala na tata na mama oyo bakokokisa bamposa na ye.​—Genese 1:28; 2:24.

“Na elilingi ya Nzambe”

Adama, moto ya kokoka, azalaki mwana ya Nzambe, akelaki ye ‘na lolenge mpe na elilingi’ na Ye. Kasi, lokola “Nzambe azali Elimo,” nzoto na ye ezalaki ndenge moko na oyo ya Nzambe te. (Genese 1:26; Yoane 4:24, NW) Lokola moto akokanaki na ye na bizaleli, na bongo moto alekaki nyama. Ya solo, banda na ebandeli, Nzambe apesaki moto bizaleli lokola bolingo, mayele, nguya mpe bosembo. Moto azalaki mpe na bonsomi ya kopona mpe mposa ya kosambela. Makanisi to lisosoli esalisaki ye ayeba kokesenisa malamu na mabe. Moto azalaki na mayele, oyo ekokaki kosalisa ye akanisa malamumalamu ntina oyo azali na bomoi, akoka koyeba Mozalisi na ye mpe azala moninga na Ye mpenza. Lokola azalaki na makoki wana nyonso, Adama azalaki na nyonso oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mokumba na ye ya kobatela biloko oyo Nzambe asalaki awa na mabele.

Eva asali lisumu

Na ntembe te, Adama aumelaki te koyebisa Eva mobeko bobele moko oyo Yehova apesaki: Bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga na bango, longola kaka mbuma ya nzete moko​—nzete ya koyeba malamu mpe mabe. Basengelaki kolya yango te. Soki balei yango, bakokufa.​—Genese 2:16, 17.

Kasi eumelaki te, likambo moko ebimaki mpo na mbuma oyo bapekisaki bango kolya. Eva akutanaki na nyoka moko, ezali mpenza nde ekelamu moko ya elimo oyo emonanaka te esalelaki yango mpo na kosolola na ye. Nyoka atunaki motuna moko lokola nde ayebaki eloko te, atunaki boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Eva apesaki ye eyano ete bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso longola kaka mbuma ya nzete moko. Na ntango wana nde nyoka atɛmɛlaki maloba ya Nzambe mpe ayebisaki mwasi ete: “Bino bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” Nzete yango ekómaki kobenda likebi ya mwasi. “Nzete ezalaki malamu na kolya, mpe kitoko na miso.” Lokola akosamaki mpenza, Eva abukaki mobeko ya Nzambe.​—Genese 3:1-6; 1 Timote 2:14.

Eva akokaki kokima lisumu wana te? Akokaki kokima yango! Omitya naino na esika na ye. Maloba ya nyoka ekesanaki mpenza na oyo Nzambe na Adama balobaki. Okosala nini soki mopaya moko alobi ete moto oyo olingaka mpe otyelaka motema azali moto malamu te? Esengelaki mpenza Eva atalela likambo yango ndenge mosusu, asengelaki komonisa ete likanisi wana ezali mpenza mabe, asengelaki kosilika, ata kutu koboya koyoka ye. Kanisá naino, nyoka azalaki nani mpo atɛmɛla bosembo ya Nzambe mpe maloba ya Adama? Mpo na kotosa bokonzi ya mobali na ye, Eva asengelaki kotuna ye toli liboso ya kozwa ekateli. Biso mpe tosengeli koluka toli soki tokutani na makambo oyo eyokani na malako ya Nzambe te. Nzokande, Eva andimaki maloba ya Momeki, alukaki kopona ye moko oyo ezalaki malamu mpe oyo ezalaki mabe. Lokola azalaki kokanisakanisa likambo yango, asepelaki na yango mingi. Asalaki mpenza libunga na ndenge akangamaki na mposa ya mabe, na esika alongola yango na makanisi na ye to ayebisa mokonzi na ye likambo yango!​—1 Bakolinti 11:3; Yakobo 1:14, 15.

Adama ayokeli mwasi na ye

Mbala moko, Eva abendaki Adama na lisumu na ye. Mpo na nini Adama andimaki makanisi na ye na bolɛmbu boye? (Genese 3:6, 17) Adama akómaki na mokakatano ya kopona: asengeli kozala sembo epai ya nani. Atosa Mozalisi oyo apesaki ye biloko nyonso? to atosa nde Eva, mwasi na ye ya bolingo? Aluka nde toli ya Nzambe mpo na koyeba nini asengeli kosala? To alanda nde mwasi na ye? Adama ayebaki malamu ete mwasi akokaki te kozwa eloko oyo alikyaki ntango alyaki mbuma oyo epekisamaki. Elimo santu etindaki ntoma Paulo akoma ete: ‘Adama mpe azimbisamaki te kasi mwasi azimbisamaki mpe akweaki na lisumu.’ (1 Timote 2:14) Na bongo, Adama atombokelaki Yehova na nko. Emonani ete Adama abangaki mingi mpo na kokabwana na mwasi na ye mpe azalaki na kondima moke ete Nzambe akoki kobongisa likambo yango.

Likambo oyo Adama asalaki ezalaki mpenza komiboma. Abomaki mpe bana na ye nyonso oyo Yehova, na bolingo na ye, apesaki ye nzela ete abota, mpamba te bango nyonso babotamaki na lisumu, basengelaki kokufa. (Baloma 5:12) Lokola azangaki botosi mpo na koluka matomba na ye moko, talá mpasi oyo yango ememi!

Mbuma mabe ya lisumu

Likambo ya liboso oyo basalaki nsima ya lisumu ezali ete bayokaki nsɔni. Na esika ete bákende na esengo nyonso kosolola na Yehova, mobali na mwasi bamibombaki. (Genese 3:8) Boninga na bango na Nzambe ebebaki. Ntango Nzambe atunaki bango likambo oyo basali, bayokaki ata mawa na motema te, atako bango mibale bayebaki malamu ete babuki mobeko ya Nzambe. Lokola balyaki mbuma oyo apekisaki bango, emonisaki ete baboyi bolamu oyo Nzambe apesaki bango.

Yango wana, Nzambe alobaki ete akobakisela Eva mpasi ya kobota. Eva akozala na mposa makasi ya mobali na ye mpe mobali akozala na bokonzi likoló na ye. Na esika azwa lipanda oyo alukaki, bakómaki nde na bokonzi likoló na ye. Adama asengelaki komona mpasi liboso ya kozwa mbuma ya mabele mpo na kolya. Na esika azwaka mbala moko biloko ya kolya ndenge ezalaki na Edene, asengelaki sikoyo nde konyokwama mpo na kobikela tii ntango akozonga na mputulu oyo basalaki ye na yango.​—Genese 3:16-19.

Na nsuka, Nzambe abenganaki Adama na Eva na elanga ya Edene. Yehova alobaki boye: “Awa moto akómi [lokola] moko na biso, koyeba malamu mpe mabe; bongo na ntina ete atya lobɔkɔ te [kozwa] mbuma ya nzete ya bomoi kolya yango mpe koumela [libela na libela] . . . ” Gordon Wenham, ye azali molimboli ya Biblia, alobi ete: “Maloba wana ekei tii na nsuka te.” Batiki biso tósilisa likanisi ya Nzambe, mbala mosusu oyo: “tiká nabimisa ye na elanga.” Mbala mingi, bato oyo bakomaki Biblia bazalaki kokoma makanisi nyonso ya Nzambe. Kasi na esika oyo, Wenham alobi ete: “Lokola likanisi ya nsuka ebimi te, ezali komonisa ete Nzambe asalaki likambo yango na lombangu. Asilisaki ata koloba te liboso ya kobimisa bango na elanga.” (Genese 3:22, 23) Emonani ete banda ntango wana, Yehova asololaki lisusu na mobali na mwasi ya liboso te.

Adama na Eva bakufaki kaka na mokolo wana te. Kasi na elimo, bakufaki. Lokola bakabwanaki mpenza na Liziba ya bomoi, bakómaki kokende mokemoke na liwa. Kanisá naino mpasi oyo bayokaki ntango bamonaki moto ya liboso oyo akufaki, ntango Kaina, mwana na bango ya liboso, abomaki Abele, mwana na bango ya mibale!​—Genese 4:1-16.

Nsima ya likambo wana, toyebi makambo mingi te oyo mobali na mwasi ya liboso bakutanaki na yango. Sete, mwana na bango ya misato, abotamaki ntango Adama azalaki na mbula 130. Adama akufaki mbula 800 na nsima, ntango akokisaki mbula 930 mpe abotaki “bana mibali mpe bana basi.”​—Genese 4:25; 5:3-5.

Liteya mpo na biso

Lisolo ya mobali na mwasi ya liboso emonisi mpo na nini bomoi ya bato ezali se kobeba lelo oyo, kasi yango epesi biso mpe liteya moko ya ntina mingi: koluka kozala na lipanda liboso ya Yehova, ezali mpenza bozoba. Bato oyo bazali mpenza na mayele, bamonisaka kondima epai ya Yehova mpe na Liloba na ye, kasi batyelaka boyebi na bango moko motema te. Yehova nde akataka oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe kosala malamu elimboli mpenza kotosa ye. Kosala mabe elimboli kobuka mibeko na ye mpe koboya mitinda na ye.

Nzambe apesaki mpe azali se kopesa bato biloko nyonso oyo bazali na mposa na yango: bomoi ya seko, bonsomi, kosepela, esengo, nzoto kolɔngɔnɔ, kimya, bozwi mpe likoki ya koyeba makambo ya sika. Nzokande, mpo tózwa biloko oyo nyonso, tosengeli kondima na motema mobimba ete Yehova, Tata na biso ya likoló, atambwisa biso.​—Mosakoli 3:10-13; Yisaya 55:6-13.

[Etanda/Elilingi na lokasa 26]

Lisolo ya Adama na Eva ezali se lisapo mpamba?

Lisolo ya paladiso ya liboso oyo ebungaki mpo bato basalaki lisumu epalanganaki epai ya bato ya Babilone, ya Asulia, ya Ezipito mpe na bamboka mosusu ya kala. Masolo yango mingi ezalaki kolobela nzete moko ya bomoi oyo mbuma na yango ekokaki kopesa bomoi ya seko na moto oyo akolya yango. Yango emonisi ete bato bayebaka ete likambo moko ya mawa esalemaki na Edene.

Lelo oyo, bato mingi batalelaka lisolo ya Adama na Eva lokola lisapo mpamba. Nzokande, ebele ya bato ya siansi bandimaka ete bato nyonso ya mokili mobimba bazali bandeko mpe bauti na nkɔkɔ moko. Ebele ya bato ya teoloji bateyaka ete bato nyonso babukaka mbuma mabe ya lisumu oyo nkɔkɔ wana asalaki. Soki bandimi ete moto autá na bankɔkɔ ebele, yango ekotinda bango bándima ete lisumu ya liboso esalemaki na bankɔkɔ ebele. Mpe likanisi wana ekotinda bango báboya kondima ete Klisto, “Adama ya nsuka” asikolaki bato. Kasi Yesu na bayekoli na ye bazalaki na mokakatano wana te. Bango bandimaki ete lisolo ya Genese ezali mpenza solo.​—1 Bakolinti 15:22, 45, NW; Genese 1:27; 2:24; Matai 19:4, 5; Baloma 5:12-19.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto