Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 5-7
  • Biblia ezali mokanda ya bomoi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali mokanda ya bomoi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokanda oyo esalisaka moto azala na bomoi oyo ezali na ntina
  • Esalisaka moto oyo azali na mitungisi azwa kimya
  • Lisalisi mpo na kolonga mpasi ya makanisi
  • Toli malamu mpo na libota
  • Toli na yango esilaka ngala te
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Motindami ya nzambe alendisi danyele
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 5-7

Biblia ezali mokanda ya bomoi

“LILOBA ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale . . . ezali komeka makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:12) Ndimbola yango ya makambo oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosala emonisi mpenza ete Biblia ezali te kaka mokanda moko ya malamu.

Moto moko oyo akomaka mikanda ya makambo ya Nzambe amonisaki yango na mokuse ete: “Nsango na yango ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso lokola mpema oyo tozali kopema.” Mpe abakisaki boye: “Soki okanisi mposa oyo tozali na yango ya kozala malamu lelo oyo mpe otángi Biblia na likanisi wana, okozwa matomba ya kokamwa.” Biblia ezali lokola mwinda oyo ezali kongɛnga makasi, ezali kosalisa biso tóyeba ntina ya ebele ya mitungisi mpe mikakatano ya bomoi ya mikolo oyo.—Nzembo 119:105.

Mayele oyo emonisami na Biblia ekoki mpenza kobongola makanisi na biso, kosalisa biso na kolonga mikakatano, kobongisa bomoi na biso mpe kopesa biso mayele ya koyika mpiko na makambo oyo tokoki kosilisa yango te. Likambo ya ntina mingi ezali ete Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba Nzambe mpe tólinga ye.

Mokanda oyo esalisaka moto azala na bomoi oyo ezali na ntina

Yehova Nzambe, Ye oyo akomisaki Biblia, ‘ayebi malamumalamu banzela na biso nyonso.’ Ayebi bamposa ya nzoto, ya makanisi, mpe ya elimo na biso koleka ata biso moko. (Nzembo 139:1-3, NW) Yango wana, apesi mibeko ya polele mpo na etamboli na biso. (Mika 6:8) Ebongi mpenza tóluka koyeba ntina ya mibeko mpe toli yango mpe tóyekola kotosa yango. Mokomi ya nzembo alobaki ete esengo ezali na moto oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]. . . . Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:1-3) Na ntembe te ebongi mpenza tótalela malamumalamu elikya motindo yango.

Maurice, molakisi moko oyo azwa epaso, azalaki kokanisa ete Biblia ezali kaka mokanda ya masolo ya kala oyo bakomá yango malamu. Kasi azalaki mpenza kondima te ete epemamaki na Nzambe. Ntango ayokaki ntina oyo Nzambe apesaki bato Liloba na ye oyo ekomami, Maurice ayekolaki bisakweli mingi ya Biblia. Ntango azalaki elenge, ayekolaki istware, literatire, siansi mpe geografi. Alobi ete azalaki komimona moto ya mayele mingi yango wana akokaki ata te kotalela ebele ya makambo oyo ezali kondimisa ete Biblia ezali mokanda ya solo. “Namipesaki na koluka bomoi ya malamu, bomɛngo mpe bisengo ya bomoi. Nzokande, nazalaki koyeba te mpe nazalaki komona te ete mokanda yango eleki mikanda nyonso, ezali mpenza kitoko mpe ezali na makambo ya solo.”

Lelo oyo, Maurice azali na mbula koleka 70. Azongisi makanisi na lisolo oyo elobeli ndenge oyo Yesu abimelaki ntoma Toma mpe alobi na botɔndi mpenza ete: “Lobɔkɔ na ngai esimbaki ‘mpota’ oyo esukisi mpo na libela ntembe nyonso na makanisi na ngai mpe endimisi ngai ete Biblia ezali mpenza solo.” (Yoane 20:24-29) Ntoma Paulo alobaki yango malamu ete, Biblia emekaka mikano ya motema mpe esalisaka moto azala na bomoi oyo ezali na ntina. Ya solo, Biblia ezali mpenza mokanda ya bomoi.

Esalisaka moto oyo azali na mitungisi azwa kimya

Biblia ezali mpe na toli oyo esalisaka moto atika mimeseno ya mabe. Daniel atikaki komela likaya, aboyaki bokutani ya loyenge mpe atikaki kolangwa masanga. (Baloma 13:13; 2 Bakolinti 7:1; Bagalatia 5:19-21) Kasi, mpo na kotika bizaleli wana mpe kolata “bomoto ya sika” esɛngaka ete moto asala molende mpenza. (Baefese 4:22-24, NW) Daniel alobi boye: “Ezalaki etumba mpo tozali mpenza bato ya kozanga kokoka.” Atako bongo, alongaki. Lelo oyo, Daniel atángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe esalisaka ye azala ntango nyonso penepene na Yehova.

Ntango azalaki kokola, Daniel azalaki komemya Biblia mingi atako azalaki kotánga yango te, mpe butu nyonso azalaki kobondela Nzambe. Kasi, azalaki kozanga eloko moko. Azalaki na esengo te. Bomoi na ye ebongwanaki ntango amonaki mpo na mbala ya liboso nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia. (Exode 6:3; Nzembo 83:18) Nsima na yango, abondelaki Nzambe na nkombo na ye Yehova mpe amiyokaki mpenza ete azali kosolola na moto. Alobi boye: “Yehova akómaki mpe azali tii lelo oyo moninga na ngai ya motema.”

Liboso abanda koyekola Biblia, Daniel azalaki na elikya moko te mpo na mikolo ekoya. Alobi boye: “Ezali kosɛnga te ete moto azala moto ya mayele mingi mpo na komona ete mokili ezali mpenza kobeba. Nazalaki kobanga mpe namipesaki na kosala misala mpo nameka kobosana.” Na nsima, ayekolaki ete Nzambe akotya bosembo mpo na moto nyonso na mabele ya pɛto, epai bato ya batosi bakozala na kimya mpe na esengo nsuka te. (Nzembo 37:10, 11; Danyele 2:44; Emoniseli 21:3, 4) Lelo oyo, Daniel azali na elikya ya solosolo. Nguya oyo Biblia ezali na yango ya kopesa moto kimya ya makanisi ezali kopesa ye elikya na bomoi.

Lisalisi mpo na kolonga mpasi ya makanisi

Mama ya George akufaki ntango ye azalaki na mbula nsambo. Soki butu ekómi, azalaki kobanga kokende kolala noki te akokende libela. Na nsima atángaki makambo oyo Yesu alobaki mpo na liwa mpe lisekwa ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo ya [Yesu], mpe bakobima.” Likambo mosusu oyo Yesu alobaki esimbaki motema na ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 5:28, 29; 11:25) Amonaki ete makanisi yango ezali malamu, elongobani, mpe ezali kobɔndisa.” George alobi boye: “Mateya yango esepelisaki ngai mpe esimbaki motema na ngai.”

Daniel oyo tolobelaki liboso azalaki mpe kobanga. Lokola mama na ye azalaki na makoki ya kobɔkɔla ye te, bazalaki kotinda ye na mabota oyo bayambaka mpe babɔkɔlaka bana ya bato mosusu. Azalaki ntango nyonso komimona ete azali ye moko mpe azalaki na mposa ya kozala na kati ya libota ya bolingo. Nsukansuka, ayekolaki Biblia mpe azwaki eloko oyo azalaki koluka. Daniel akómaki koyangana na lisangá ya Batatoli ya Yehova mpe akómaki na libota ya elimo, epai amonaki ete bayambi ye mpe balingi ye. Ya solo, Biblia ezali mpenza na matomba mpe esalisaka mpo na kozala na kimya ya makanisi.

Tóbosana te ete Yehova amonaka makambo oyo ezali na kati ya mitema na biso mpe ayebi bamposa na biso. Nzambe ‘amekaka mitema,’ mpe apesaka “moto na moto lokola ezali nzela na ye.”—Masese 21:2; Yilimia 17:10.

Toli malamu mpo na libota

Biblia ezali kopesa toli malamu mpo na kofanda na bato. George alobi boye: “Matata to kozanga koyokana ezali moko ya makambo oyo etungisaka moto mingi na bomoi na ye.” Ye asalaka nini soki akutani na makambo yango? “Soki namoni ete moto moko azwi ngai na likambo, mbala moko nasalelaka toli ya Matai 5:23, 24 oyo elobi ete: ‘Bongisá likambo na ndeko na yo.’ Kosolola mpamba likambo yango epesaka matomba. Nayokaka kimya ya Nzambe oyo Biblia ezali kolobela. Toli ya Biblia esalisaka; ezali malamu mpenza.”—Bafilipi 4:6, 7.

Ntango mwasi na mobali na ye bazali na matata, esɛngaka ete bango mibale ‘báyokaka noki, báwelaka koloba te, báyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19 NW) Toli yango esalisaka mpo básolola malamu. George alobi lisusu boye: “Soki nalandi toli oyo elobi na ngai ete nalinga mwasi na ngai mpe nasalela ye makambo ndenge oyo namisalelaka, matomba emonanaka mbala moko. Ezalaka mpasi te mpo apesa ngai limemya.” (Baefese 5:28-33) Ya solo, Biblia ezali koteya biso ndenge ya kondima mabunga na biso mpe kolonga yango mpe lisusu ezali koteya biso ndenge oyo tokoki koyikela mabunga ya basusu mpiko.

Toli na yango esilaka ngala te

Salomo, mokonzi ya mayele mingi, alobaki boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Maloba yango ezali mindɔndɔ te, kasi elobi mingi!

Biblia etindaka moto asala makambo ya malamu. Esalisaka bato oyo balingaka Nzambe na kosala mokano na ye na bomoi na bango mpe bázala na esengo na ndenge bazali ‘kotambola kati na Mobeko ya Yehova.’ (Nzembo 119:1) Ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini, Biblia ezali na mibeko mpe toli oyo tosengeli na yango. (Yisaya 48:17, 18) Tángáká yango mokolo na mokolo, kanisáká na mozindo makambo oyo ozali kotánga mpe saleláká yango. Ekosalisa yo ozala ntango nyonso na makanisi malamu mpe okotya makanisi na yo na makambo oyo ezali pɛto mpe oyo ebongi. (Bafilipi 4:8, 9) Okoyeba ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, mpe lisusu ndenge ya kolinga Mozalisi ya bomoi.

Soki olandi toli yango, Biblia ekokóma mpo na yo ndenge ezali sikoyo mpo na bamilio ya bato, elingi koloba ekozala kaka te mokanda moko ya malamu. Ekozala mpenza mokanda ya bomoi!

[Elilingi na lokasa 6]

Biblia ekoki kopesa yo makasi ya kotika misala ya mabe

[Elilingi na lokasa 7]

Biblia ezali koteya yo ndenge oyo okoki kokóma moninga ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto