Tótambola elongo na ebongiseli ya Yehova
“Tiká ete Nzambe ya kimya . . . abongisa bino na misala nyonso malamu ete bósala mokano na ye.”—BAEBELE 13:20, 21.
1. Bato bakómi boni na mokili mobimba, mpe boni bazali bandimi ya mangomba mosusu?
NA MOBU 1999, na mokili mobimba bato bakómaki miliare motoba! Mokanda moko (The World Almanac) elobi ete kati na bango, bato miliare moko na milio 165 bazali Bamizilma; bato miliare moko na milio 30 bazali Bakatolike; bato milio 762 bazali Bahindu; bato 354 000 bazali na Lingomba ya Bouddha; bato milio 316 bazali Baprotesta; mpe bato milio 214 bazali na Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ.
2. Tokoki koloba nini na ndenge oyo mangomba ezali lelo oyo?
2 Soki totali bokabwani mpe mobulungano oyo ezali lelo na kati ya mangomba, tokoki nde koloba ete ebele ya bato yango bazali kosala mokano ya Nzambe? Te, “mpo ete Nzambe azali na mobulu te kasi na kimya.” (1 Bakolinti 14:33) Kasi, tokoloba boni mpo na basaleli ya Yehova oyo basali lisangá ya bandeko na mokili mobimba? (1 Petelo 2:17) Soki totali malamumalamu tokomona ete ‘Nzambe ya kimya abongisi bango na misala nyonso malamu ete básala mokano na ye.’—Baebele 13:20, 21.
3. Likambo nini esalemaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe mpo na nini?
3 Tosengeli kotalela Batatoli ya Yehova na motuya na bango te mpo na koyeba soki Nzambe andimaka bango; mituya esalaka eloko moko te na miso ya Nzambe. Soki aponaki Bayisalaele, ezali te mpo ‘balekaki mabota mosusu na motuya.’ Kutu, balekaki nde “na moke.” (Deteronome 7:7) Kasi, lokola Bayisalaele bazalaki sembo te, na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova aboyaki bango mpe na esika na bango, andimaki lisangá ya bayekoli ya Yesu Klisto oyo eutaki kosalema. Bayekoli yango bapakolamaki na elimo santu ya Yehova mpe na molende mpenza, bazalaki kosakola solo ya Nzambe mpe Klisto epai ya bato mosusu.—Misala 2:41, 42.
Tókende ntango nyonso liboso
4. Mpo na nini okoki koloba ete lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ezalaki ntango nyonso kokende liboso?
4 Na ekeke ya liboso, lisangá ya boklisto ezalaki ntango nyonso kokende liboso, bazalaki kosakola na bamboka ya sika, bazalaki kokómisa bato bayekoli, mpe bososoli na bango ya mikano ya Nzambe ezalaki se kobakisama. Baklisto ya liboso bazalaki kolanda kongɛnga ya elimo oyo bazalaki kozwa na mikanda oyo epemamaki na Nzambe. Lokola bantoma na bandeko mosusu bazalaki kolendisa bango soki bakei kotala bango, basalaki mosala na bango malamu. Makomami ya Grɛki ya boklisto elobeli makambo yango mingi.—Misala 10:21, 22; 13:46, 47; 2 Timote 1:13; 4:5; Baebele 6:1-3; 2 Petelo 3:17, 18.
5. Mpo na nini ebongiseli ya Nzambe ezali se kokende liboso lelo oyo, mpe mpo na nini tosengeli kotambola elongo na yango?
5 Lokola baklisto ya liboso, Batatoli ya Yehova na mikolo na biso bazalaki moke na ebandeli. (Zekalia 4:8-10) Banda na nsuka ya ekeke ya 19, emonani polele ete elimo ya Nzambe ezali kosala na kati ya ebongiseli na ye. Lokola totyelaki nguya ya moto motema te, kasi totyaki motema na litambwisi ya elimo santu, mokemoke tozalaki kososola Makomami malamu mpe toyebaki kosala mokano ya Nzambe malamu. (Zekalia 4:6) Lokola tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka,” ezali na ntina mingi ete tólanda kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova oyo ezali se kokende liboso. (2 Timote 3:1-5) Soki tozali kosala bongo, tokobatela elikya na biso mpe tokotatola mpo na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali sikoyo kosala mosala na yango, liboso ete ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekóma na nsuka na yango.—Matai 24:3-14.
6, 7. Wapi makambo misato tokotalela oyo ezali komonisa ete ebongiseli ya Yehova ekei liboso?
6 Kati na biso ezali na bandeko oyo bazali na ebongiseli ya Yehova banda na bambula ya 1920, ya 1930, mpe ya 1940. Na ntango wana, nani kati na biso akokaki kokanisa ete ebongiseli ekokola mpe ekokóma ndenge ezali lelo oyo? Kanisá makambo minene oyo esalemi na ebongiseli na ntango na biso! Ya solo, soki tokanisi makambo oyo Yehova asali na nzela ya ebongiseli ya Teokrasi oyo esangisi basaleli na ye, elimo na biso ekolendisama mpenza.
7 Na ntango ya kala, Davidi akamwaki mingi ntango akanisaki misala minene ya Yehova. Alobaki ete: “Soko nakoloba mpe nakoyebisa yango, ikoleka oyo ikoki kotángama.” (Nzembo 40:5) Biso mpe tozali lokola Davidi, tokoki te kotánga misala minene oyo ebongi kokumisama oyo Yehova asali na mikolo na biso. Atako bongo, tótalela makambo misato oyo ezali komonisa ete ebongiseli ya Yehova ekei liboso: (1) kongɛngisama mokemoke na elimo, (2) mosala oyo ebongisami malamu mpe ekoli, mpe (3) mbongwana oyo eyei na ntango malamu na ndenge ya kotambwisa makambo.
Botɔndi na biso mpo na bingɛngiseli ya elimo
8. Na boyokani na Masese 4:18, bingɛngiseli ya elimo esalisaki biso na kososola makambo nini oyo etali Bokonzi?
8 Na likambo etali kongɛngisama mokemoke na elimo, Masese 4:18 ekokisami mpenza. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.” Tozali mpenza na botɔndi mpo na bingɛngiseli ya elimo oyo tozalaki kozwa mokemoke! Na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na 1919, balobelaki mingi Bokonzi ya Nzambe. Yehova azali kosalela Bokonzi mpo na kosantisa nkombo na ye mpe kolongisa lotomo na ye ya kozala mokonzi. Bingɛngiseli ya elimo esalisi biso na kososola ete banda na Genese tii na Emoniseli, Biblia ezali komonisa ete Yehova azali na mokano ya kosantisa nkombo na ye na nzela ya Bokonzi oyo Mwana na ye azali koyangela. Bokonzi yango nde elikya ya bato nyonso oyo balingaka bosembo.—Matai 12:18, 21.
9, 10. Na bambula ya 1920, toyekolaki likambo nini na ntina na Bokonzi, mpe mpo na bibongiseli mibale oyo ezali na bombanda; mpe ndenge nini yango esalisaki biso?
9 Na 1922, na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Cedar Point, Joseph Rutherford oyo asalaki masukulu ya ntina mingi, alendisaki basaleli ya Nzambe ete, “bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi na bokonzi na ye.” Na lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1925 (ebimeli ya Lingelesi) oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ekólo ebotami,” balobelaki mingi bandimbola oyo emonisaki ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki na 1914. Mpe lisusu, na bambula ya 1920, tososolaki ete ezali na bibongiseli mibale oyo ezali na bombanda: ebongiseli ya Yehova na ebongiseli ya Satana. Bibongiseli yango ezali kobunda, mpe tokozala na ngámbo oyo ekolonga se soki tozali kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova.
10 Ndenge nini bingɛngiseli yango na elimo esalisaki biso? Lokola Bokonzi ya Nzambe ezali ya mokili te mpe Mokonzi Yesu Klisto azali moto ya mokili oyo te, biso mpe tosengeli kozala bato ya mokili te. Ntango tozali komikɔtisa te na makambo ya mokili, tozali komonisa ete tozali na ngámbo ya solo. (Yoane 17:16; 18:37) Soki totali mikakatano ndenge na ndenge ya mokili mabe oyo, tozali na botɔndi mingi lokola tozali na ebongiseli ya Satana te! Mpe tozali mpenza na libaku malamu lokola tobatelami na elimo na kati ya ebongiseli ya Yehova!
11. Na 1931, basaleli ya Nzambe bazwaki nkombo nini oyo euti na Makomami?
11 Na liyangani oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio na 1931, basalelaki malamumalamu mokapo ya Yisaya 43:10-12. Bayekoli ya Biblia bandimaki nkombo ya Batatoli ya Yehova. Bazali na libaku malamu mpenza ya kosakola nkombo ya Nzambe mpo ete bato mosusu mpe bábelela yango mpo bábika!—Nzembo 83:18; Baloma 10:13.
12. Na 1935, bingɛngiseli nini ya elimo epesamaki na ntina na ebele monene?
12 Liboso ya bambula ya 1930, basaleli mingi ya Nzambe bazalaki koyeba malamu te elikya na bango mpo na bomoi oyo ekoya. Bamosusu bazalaki kokanisa ete bakozwa bomoi na likoló kasi bazalaki kosepela na mateya ya Biblia na ntina na paladiso awa na mabele. Na liyangani oyo esalemaki na engumba Washington na 1935, tosepelaki mpenza na koyeba ete ebele monene oyo Emoniseli mokapo 7 elobeli ezali nde bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Kobanda wana, mosala ya koyanganisa ebele monene ekendaki liboso na lombangu mpenza. Tozali mpenza na botɔndi lokola toyebi malamu ndimbola ya ebele monene, boye te? Lokola bato ebele bazali koyanganisama na mikili nyonso, na bikólo nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, yango ezali kopesa biso mposa ete tótikala nsima te wana tozali kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova.
13. Na 1941, likambo nini ya monene elobelamaki na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Saint Louis?
13 Likambo monene oyo etaleli bato nyonso emonisamaki na liyangani oyo esalemaki na Saint Louis, na etúká ya Missouri, na 1941. Ezali likambo ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Etikali moke, likambo yango ekatama, mpe mokolo na yango monene mpe ya nsɔmɔ ezali koya noki! Lisusu, likambo ya bosembo na biso emonisamaki na 1941, yango eyokani na likambo ya boyangeli mpe ezali kosɛnga biso tómonisa soki tozali na ngámbo nini na likambo oyo etali lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.
14. Na 1950, na liyangani ya bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge, toyekolaki nini mpo na bana ya mokonzi oyo Yisaya 32:1, 2 elobeli?
14 Na liyangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge na engumba New York, balimbolaki biso malamu bana ya mokonzi oyo Yisaya 32:1, 2 elobeli. Toyokaki mpenza nsai ntango Ndeko Frederick Franz asalaki lisolo yango mpe alimbolaki ete bana ya mokonzi ya mabele ya sika bazali kati na biso. Na liyangani yango mpe na mayangani mosusu oyo elandaki, tozwaki ebele ya bingɛngiseli ya elimo. (Nzembo 97:11) Tozali na botɔndi mingi ete nzela na biso “ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu”!
Tozali kokende liboso na mosala na biso
15, 16. (a) Ndenge nini tokendaki liboso na mosala na biso na bambula ya 1920 mpe ya 1930? (b) Mikanda nini epesaki mɔ́tɔ na mosala ya kosakola na bambula oyo euti koleka?
15 Ya mibale, ebongiseli ya Yehova ekei liboso na likambo etali mosala na biso ya libosoliboso: kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Malako 13:10) Mpo na kosala mosala yango, ebongiseli ezalaki ntango nyonso komonisa biso ntina ya kokolisa mosala na biso. Na 1922, balendisaki baklisto nyonso ete bábimaka na mosala ya kosakola. Moto na moto asengeli kongɛngisa pole na ye mpe asengeli kotatolaka mpo na solo. (Matai 5:14-16) Na 1927, tokómaki na momeseno ya komilɛngɛla mpo na kobima na mosala ya kosakola mokolo nyonso ya lomingo. Banda na sanza ya Febwali 1940, Batatoli bakómaki komonana na babalabala mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!
16 Na 1937, mwa buku moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete Étude modèle (Boyekoli oyo ezali ndakisa) ebimaki, yango emonisaki ntina ya kozongela bato mpo na kopesa bango mateya mosusu ya solo na Biblia. Na bambula oyo elandaki, balobelaki mingi ntina ya koyekola Biblia na bato. Tolendisamaki mingi na koyekola Biblia na bato ntango mokanda “Que Dieu soit reconnu pour vrai” ebimaki na 1946 (na Lingelesi) [1954 na Lifalanse] mpe mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na 1968 (na Lingelesi) [1971 na Lingala]. Lelo oyo, tozali kosalela mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Makambo nyonso oyo ezali na mikanda yango ezali kopesa biso moboko malamu ya boyebi ya Makomami mpo na kokómisa bato bayekoli.
Tokei liboso na ndenge ya kotambwisa makambo
17. Na boyokani na Yisaya 60:17, ndenge nini ebongiseli ya Yehova ekei liboso?
17 Ya misato, ebongiseli ya Yehova ekei liboso na oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo. Na Yisaya 60:17, Yehova alakaki boye: “Na esika ya motako nakoyeisa wolo mpe na esika ya ebende nakoyeisa palata; na esika ya mabaya, motako, na esika ya mabanga ebende. [Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na yo mpe boyengebene lokola bakapita ya mosala na yo NW].” Na boyokani na esakweli yango, makambo mingi esalemi mpo na kobongisa ndenge ya kotambwisa mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kobatela bampate.
18, 19. Nini esalamaki mpo na kobongisa ndenge ya kotambwisa makambo na boumeli ya bambula?
18 Na 1919, baponaki mokambi ya mosala na lisangá mokomoko oyo esɛngaki kobongisa makambo na yango mpo na mosala ya kosakola. Yango epesaki mɔ́tɔ na mosala na biso ya kosakola. Makambo ya kopona bankulutu na badiakono na nzela ya voti esukaki na 1932, mpe yango esukisaki makambo ya demokrasi na kati ya ebongiseli. Likambo mosusu ya monene esalemaki na 1938 ntango bato nyonso oyo basengeli kozwa mikumba na kati ya lisangá bakómaki koponama na kolanda mpenza ebongiseli ya Teokrasi, ndenge ezalaki kosalema na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso. (Misala 14:23; 1 Timote 4:14) Na 1972, bakɛngɛli na basaleli na misala bakómaki koponama na ndenge oyo baklisto ya liboso bazalaki kosala yango. Na esika ete mokɛngɛli azala kaka moko na lisangá, Bafilipi 1:1 na bavɛrsɛ mosusu emonisi ete bato oyo bakokisi masɛngami mpo na kozala bakɛngɛli basengeli kozala na lisangani ya bankulutu.—Misala 20:28; Baefese 4:11, 12.
19 Na 1975, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ekómaki na bakomite mpo na kotambwisa misala ya ebongiseli ya Nzambe na mokili mobimba. Baponaki bakomite ya filiale mpo na kotambwisa mosala na teritware ya filiale na filiale. Kobanda ntango wana, balukaki mpenza koyeisa pɛpɛlɛ mosala na biro monene mpe na bafiliale ya la Société mpo na “kotalela makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:9, 10, NW) Mikumba ya babateli balandi ya Klisto ezali ya kopesa ndakisa na mosala ya kosakola, koteya na kati ya lisangá mpe kobatela bampate ya Nzambe na ndenge oyo esengeli.—1 Timote 4:16; Baebele 13:7, 17; 1 Petelo 5:2, 3.
Yesu azali mpenza kotambwisa
20. Kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova ezali kosɛnga tóyeba nini mpo na esika ya Yesu?
20 Kotambola elongo na ebongiseli ya Nzambe ezali kosɛnga tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Yesu Klisto lokola “motó ya [lisangá, NW].” (Baefese 5:22, 23) Lisusu, Yisaya 55:4 ezali kobenda likebi na biso, kuna balobi na biso boye: “Talá [ngai Yehova] nazalisi ye motatoli epai ya bato, motambolisi mpe mokóló mpo na bato.” Ya solo, Yesu ayebi kotambwisa makambo. Mpe lisusu ayebi bampate na ye na misala na bango. Kutu, ntango atalaki masangá nsambo ya Asie Mineure, mbala mitano mobimba alobaki ete: “Nayebi misala na yo.” (Emoniseli 2:2, 19; 3:1, 8, 15) Yesu ayebi mpe bamposa na biso, ndenge moko mpe Tata na ye, Yehova, ayebi yango. Liboso ateya Libondeli ya Ndakisa, Yesu alobaki boye: “Tata na bino ayebi yango ezali bino kosɛnga naino bolɔmbi ye te.”—Matai 6:8-13.
21. Ndenge nini litambwisi ya Yesu ezali komonana na kati ya lisangá ya boklisto?
21 Litambwisi ya Yesu ezali komonana ndenge nini? Ya liboso, na nzela ya bakɛngɛli baklisto, “makabo na motindo na mibali.” (Baefese 4:8, NW) Emoniseli 1:16 emonisi bakɛngɛli bapakolami ete bazali na lobɔkɔ ya mobali ya Klisto, elingi koloba ete miso na ye ezali likoló na bango. Lelo oyo, Yesu azali kotambwisa ebongiseli ya bankulutu, ezala ete mibali yango bazali na elikya ya bomoi na likoló to na elikya ya bomoi awa na mabele. Lokola boyekoli ya pɔsɔ eleki emonisaki yango, elimo santu nde ezali kopona bango na kolanda masɛngami ya Makomami. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Na ekeke ya liboso, mwa etuluku ya bankulutu bazalaki kosala lokola lisangani ya mikóló-bakambi na Yelusaleme mpo na kokɛngɛla masangá mpe mosala nyonso ya kosakola Bokonzi. Ebongiseli ya Yehova na moi ya lelo ezali se kolanda ndakisa yango.
Tólanda lokolo!
22. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopesa lisungi nini?
22 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” nde azwi mokumba ya kotalela matomba ya Bokonzi awa na mabele mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali momonisi na ye. (Matai 24:45-47) Mokumba ya liboso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali ya kopesa lisangá ya boklisto mateya mpe toli na makambo ya elimo. (Misala 6:1-6) Kasi, ntango bandeko na bango bandimi bazwi makama, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaka na lisangá moko to masangá mingi oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta esunga mpo na kobongisa bandako ya bandeko mpe Bandako ya Bokonzi oyo ebebi. Soki baklisto mosusu bazali konyokolama, bazwaka bibongiseli mpo na kolendisa bango na elimo. “Na bilaka malamu te,” basalaka nyonso mpo ete mosala ya kosakola ekende ntango nyonso liboso.—2 Timote 4:1, 2.
23, 24. Ata soki likambo nini ekómeli basaleli na ye, Yehova azali ntango nyonso kopesa nini, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?
23 Ata soki likambo nini ekómeli basaleli na ye, Yehova azali ntango nyonso kopesa bilei ya elimo mpe toli oyo esengeli. Nzambe azali mpe kopesa bandeko oyo bazali kotambwisa lisangá bososoli mpe mayele ya komibongisa mpo na mbongwana nyonso na ebongiseli ya Teokrasi. (Deteronome 34:9; Baefese 1:16, 17) Yehova azali mpenza kopesa nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe kosala mosala na biso na mokili mobimba.—2 Timote 4:5.
24 Tozali na elikya mpenza ete ata mokolo moko te Yehova akosundola basaleli na ye ya sembo; akobikisa biso na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Emoniseli 7:9-14; Nzembo 94:14; 2 Petelo 2:9) Tii na nsuka, tosengeli mpenza kobatela malamu elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli. (Baebele 3:14) Yango wana, tózala na ekateli ya kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tokoki koloba ete ebongiseli ya Yehova ezali kokende ntango nyonso liboso?
• Makambo nini ezali komonisa ete basaleli ya Nzambe bazali kongɛngisama mokemoke na elimo?
• Mbongwana nini esalemaki na mosala ya kosakola?
• Mbongwana nini etali ndenge ya kotambwisa makambo esalemaki na ntango oyo esengeli?
[Elilingi na lokasa 17]
Lokola Davidi, tokoki te kotánga misala nyonso ya kokamwa ya Yehova
[Elilingi na lokasa 18]
Bampate ya Nzambe bazwaki matomba na mbongwana na ndenge ya kotambwisa makambo oyo esalemaki na ntango esengeli