Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/1 lok. 31
  • Liyebisi moko ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyebisi moko ya ntina mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na lisangani oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tosala na bomoko elongo na college central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali nani mpe asalaka nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tótikala sembo epai ya Klisto ná moombo na ye ya sembo mpe ya mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/1 lok. 31

Liyebisi moko ya ntina mingi

NA MOKOLO ya 7 Ɔkɔtɔbɛ, na nsuka ya likita ya nsuka ya mbula ya basangani ya la Société (Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania), John Barr, mokambi ya likita yango, ye azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, apesaki liyebisi moko ya ntina mpenza. Liyebisi yango eutaki na makanisi ya masukulu oyo Theodore Jaracz na Daniel Sydlik basalaki na ntɔngɔ ya mokolo yango.​—Talá nkasa 12-16 mpe nkasa 28-31.

Ndeko Barr alobaki likambo moko ya ntina mingi ete: “‘Moombo ya sembo mpe ya mayele’ elongo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali na mikumba ya minene mpe etaleli makambo mingi koleka mikumba ya masangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta. Mikanda oyo ezali komonisa ntina ya lisangá yango mokomoko ezali na makambo oyo ezali na ndelo. Nzokande, Nkolo na biso, Yesu Klisto, aponaki moombo ya sembo mpo na kobatela ‘biloko’ na ye nyonso, elingi koloba matomba ya Bokonzi awa na mabele.”​—Matai 24:45-47.

Ndeko Barr alobaki lisusu ete: “Banda la Société (Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania) esalemaki na 1884, ekokisi mokumba moko monene na misala ya libota ya Yehova na mikolo na biso. Atako bongo, ezali kaka esaleli oyo endimami na mibeko ya Leta, oyo ‘moombo ya sembo mpe ya mayele’ asalelaka soki esengeli.”

Na masukulu na bango, Ndeko Sydlik na Ndeko Jaracz balimbolaki ete lokola bapesi “moombo ya sembo mpe ya mayele” bozwi nyonso ya Nkolo awa na mabele, yango epekisi te ete moombo ya sembo atikela mibali ya makoki oyo bazali kati na “bampate mosusu” mokumba ya kotambwisa makambo mosusu ya mokolo na mokolo. (Yoane 10:16) Lisusu ezali na ntina ata moko te na Makomami oyo esɛngi ete mokambi moko to bakambi nyonso ya masangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta, oyo Batatoli ya Yehova basalelaka, bázala kaka baklisto bapakolami.

Ndeko Barr ayebisaki bayangani ete eleki mwa mikolo, bandeko mosusu oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo bazalaki kosala lokola bakambi, bamilongolaki bango moko na masangani ya bakambi ya masangá nyonso oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalelaka na États-Unis. Na esika na bango, baponaki, kati na bampate mosusu, bandeko oyo bazali na makoki ya kosala mosala yango.

Ekateli oyo ezali mpenza malamu. Ekosala ete bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bázala na ntango mingi mpo na kolɛngɛla bilei ya elimo mpe makambo mosusu oyo etaleli kokokisa bamposa ya elimo ya bandeko na mokili mobimba.

Mpo na kosukisa, mokambi alobaki na basangani, oyo batondaki na esengo, ete: “Atako misala ndenge na ndenge oyo etali mibeko mpe oyo etali kotambwisa makambo mosusu epesami epai na bakɛngɛli oyo bayebi mosala malamu, . . . kasi bango nyonso bakolanda litambwisi ya elimo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. . . . Na nzela ya mabondeli, biso nyonso tósɛnga Yehova apambola milende na biso mpo na kosala mokano na ye, mpo na lokumu mpe nkembo ya nkombo na ye monene.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto