Ndenge ya kozwa bolamu ya solosolo
DALAI LAMA, mokonzi moko ya Lingomba ya Bouddha alobaki boye: “Ntina mpenza ya bomoi na biso ezali bongo koluka bolamu.” Na nsima alimbolaki ete andimaka ete moto akoki kozwa bolamu soki abongisi, to asemboli elimo mpe motema na ye. Alobaki ete: “Elimo ezali eloko ya ntina oyo tosengeli na yango mpo na kozwa bolamu nyonso.” Akanisaki ete kondimela Nzambe ezali na ntina te.a
Kasi, tótalela naino Yesu, moto oyo azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe mpe oyo bamilio ya bato, banda ebele ya bambula, balandaka mateya na ye. Yesu azalaki koluka bolamu ya bato. Abandaki Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, oyo eyebani mingi, na makambo libwa oyo ezali komonisa bolamu, maloba libwa oyo ebandi na: “Esengo na . . . ”(Matai 5:1-12, NW) Kaka na lisolo yango, ateyaki bayoki na ye bátalela elimo mpe mitema na bango, bápɛtola mpe básembola yango, bátika kokanisa makambo ya mobulu, misala ya mbindo mpe ya moimi mpe na esika na yango, bákóma na makanisi ya kimya, ya pɛto mpe ya bolingo. (Matai 5:21, 22, 27, 28; 6:19-21) Lokola moyekoli na ye moko alendisaki biso, tosengeli ‘kokanisa ntango nyonso’ makambo oyo ‘ezali solo, ya lokumu, ya sembo, ya pɛto, ya boboto, ya ngɔlu, ya malamu mpe ya lisanzoli.’—Bafilipi 4:8.
Yesu ayebaki ete bolamu ya solo eutaka na boyokani oyo moto akoki kozala na yango na bato mosusu. Biso bato tobotamaka na mposa ya kofanda elongo na bato mosusu, na bongo tokoki mpenza kozwa bolamu te soki toboi kofanda esika moko na bato mosusu to mpe soki tozali ntango nyonso na matata na baoyo tofandi na bango. Tokoki kozwa bolamu se soki tozali komiyoka ete balingaka biso mpe soki biso tolingaka basusu. Yesu ateyaki ete bolingo motindo wana ezali na ntina mingi mpo na boyokani na biso na Nzambe. Na likambo yango, liteya ya Yesu ekeseni na oyo ya Dalai Lama, mpamba te Yesu ateyaki ete bato bakoki mpenza kozwa bolamu te soki babosani Nzambe. Mpo na nini bongo?—Matai 4:4; 22:37-39.
Kanisá bamposa na yo ya elimo
Moko ya maloba ya Yesu oyo emonisi bolamu ezali oyo: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Mpo na nini Yesu alobaki bongo? Mpamba te, na kokesana na banyama, biso tozali na bamposa ya elimo. Lokola basalemaki na elilingi ya Nzambe, tokoki komonisa bizaleli ya Nzambe, lokola bolingo, bosembo, motema mawa, mpe mayele. (Genese 1:27; Mika 6:8; 1 Yoane 4:8) Bamposa na biso ya elimo esangisi mposa ya komona ete bomoi na biso ezali na ntina.
Ndenge nini tokoki kokokisa bamposa yango ya elimo? Ezali kaka te na komanyola mingi to na komitalela biso moko. Kasi, Yesu alobaki ete: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.” (Matai 4:4) Yesu alobaki ete “maloba nyonso” oyo ezali na ntina mpo na bomoi na biso eutaka epai ya Nzambe. Kaka Nzambe nde akoki kopesa biso biyano na mituna mosusu. Tozali mpenza na mposa ya boyebi yango na mikolo na biso, mpamba te bato bakómi na makanisi ndenge na ndenge mpo na ntina ya bomoi mpe ndenge ya kozwa bolamu. Na bisika batɛkaka babuku, okokuta ebele ya mikanda oyo ezali koteya ndenge ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ, ndenge ya kokóma na bozwi mpe kozwa bolamu. Na Internet, bazali kolobela mingi ndenge ya kozwa bolamu.
Nzokande, na makambo yango, mbala mingi bato bazalaki na makanisi oyo ebongi te. Ezali se mpo na kokokisa bamposa ya moto ye moko. Yango euti na mwa boyebi oyo bato bazali na yango, na kozanga koyeba makambo, mpe mbala mingi na makanisi oyo ezali na libunga. Na ndakisa, makanisi ya bakomi mingi ya babuku oyo moto akoki kotánga ye moko mpe koyeba makambo yango, ezali kouta na liteya oyo bazali kobenga “psychologie évolutionniste,” liteya yango elobaka ete mayoki ya moto euti na nkɔkɔ na ye ya liboso oyo azalaki nyama. Ezali solo ete milende oyo bato bazali kosala mpo na kozwa bolamu ekoki kolonga te soki euti na liteya oyo ezali kondima Mozalisi na biso te; mpe yango ekosuka kaka na mawa. Mosakoli moko ya kala alobaki boye: “Bato ya mayele bakoyoka nsɔni, . . . talá baboyi liloba ya [Yehova]. Mayele nini ezali epai na bango?”—Yilimia 8:9.
Yehova Nzambe ayebi lolenge tosalemi mpe nini ekoki mpenza kopesa biso bolamu. Ayebi mpo na nini atyaki moto awa na mabele, ayebi oyo mikolo ezali koya ebombeli biso, mpe ayebisi biso makambo yango na kati ya Biblia. Makambo oyo amonisi na kati ya buku yango epemami, ezali kolendisa bato malamu mpe yango ezali kopesa bolamu. (Luka 10:21; Yoane 8:32) Yango ekómelaki bayekoli mibale ya Yesu. Balɛmbaki nzoto nsima ya liwa ya Yesu. Kasi nsima ya koyoka Yesu ntango asekwaki koyebisa bango mokumba na ye na mokano ya Nzambe mpo na lobiko ya bato, balobaki ete: “Wana ezalaki ye kosolola na biso na nzela mpe kofungola [Makomami] mpo na biso, mitema na biso mizalaki na mɔ́tɔ kati na biso te?”—Luka 24:32.
Esengo ya ndenge wana ebakisamaka ntango totiki ete mateya ya solo ya Biblia etambwisa bomoi na biso. Na lolenge yango, tokoki kokokanisa bolamu na monama. Monama ebimaka ntango likoló ezali malamu, kasi engɛngaka makasi—ata kokóma minama mibale—ntango likoló ezali malamu koleka. Tiká tótalela mwa bandakisa oyo ekomonisa ete kosalela mateya ya Biblia ekoki kopesa bolamu mingi.
Koluka bomoi ya mindɔndɔ te
Tótalela liboso toli ya Yesu na likambo etali bozwi. Nsima ya kopesa toli mpo na oyo etali kokómisa koluka bozwi likambo eleki ntina na bomoi, asalelaki maloba oyo bato basalelaka mingi te. Alobaki ete: “Boye, soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga.” (Matai 6:19-22, NW) Alingaki mpenza koloba ete soki tozali na lokoso mpo na koluka bozwi, lokumu to mikano mosusu oyo bato bazali komityela, tokobosana makambo oyo eleki ntina. Mpamba te, lokola Yesu alobaki yango mokolo mosusu, “bomoi na moto ezali kati na motuya ya biloko bizali na ye te.” (Luka 12:15) Soki totii makambo oyo ezali mpenza na ntina na esika ya liboso, lokola boyokani na biso elongo na Nzambe, bamposa ya libota na biso, mpe makambo mosusu oyo eyokani na yango, “liso” na biso ekozala “alima,” elingi koloba polele.
Awa, Yesu azalaki kolendisa te ezaleli ya koboya bisengo. Kutu, Yesu ye moko aboyaki bisengo te. (Matai 11:19; Yoane 2:1-11) Kasi, ateyaki ete baoyo bakanisaka ete bomoi ezali se mpo na konduka bozwi, babebisaka bomoi na bango mpamba.
Ntango azalaki kolobela bato mosusu oyo bakómaki na bozwi mingi wana bazalaki naino bilenge, monganga moko ya maladi ya motó na San Francisco (États-Unis) alobaki mpo na bato yango ete, mbongo ezali “ntina ya monyoko mpe ya mobulungano.” Abakisaki ete bato yango, “basombaka ndako mibale to misato, motuka, babebisaka mbongo mingi na kosomba biloko ndenge na ndenge. Mpe soki bazwi bolamu oyo bazalaki koluka te, bakómaka konyokwama na makanisi, balɛmbaka nzoto mpe bayebaka te oyo bakosala na bomoi na bango.” Nzokande, baoyo batyaka likebi na toli ya Yesu ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe bamipesaka na makambo ya elimo, bazwaka bolamu ya solo.
Tom asalaka mosala ya kotonga bandako mpe afandaka na esanga Hawaï, amipesaki na bolingo na ye moko mpo na kotonga bisika ya losambo na bisanga ya Pasifike, epai bato bazali na bozwi mingi te. Tom amonaki eloko moko epai ya bato yango oyo bazali na bozwi te. Alobaki boye: “Bandeko na ngai baklisto ya bisanga yango bazalaki mpenza na esengo. Basalisaki ngai na komona polele ete mbongo mpe kozala na biloko mingi ezali sɛkɛlɛ ya bolamu te.” Atalaki mpe basali ya bolingo malamu oyo basalaki na ye elongo na bisanga yango, mpe amonaki lolenge bazalaki kosepela. Tom alobi ete: “Bakokaki kozwa mbongo mingi. Kasi baponaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso mpe kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.” Bandakisa yango esalisaki Tom na kozala mpe na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ, na bongo akoki kopesa ntango mingi na libota na ye mpe na makambo ya elimo—mbongwana yango epesaka ye mawa ata moke te.
Bolamu mpe kopesa nzoto kilo
Bolamu ekoki kouta na komiyoka ete tozali na lokumu to na valɛrɛ. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe ya bolɛmbu, bato mosusu bamiyokaka ete babongi te, mpe mpo na mingi kati na bango, makanisi yango ebandaka na bomwana. Ekoki kozala mpasi kolongola makanisi ya ndenge wana soki esi efandi na motema; kasi ekoki kosalema. Tokoki kosala yango soki tozali kotosa Liloba ya Nzambe.
Biblia elimboli ndenge Mozalisi atalelaka biso. Ndenge oyo atalelaka biso nde ezali na ntina mingi koleka ndenge oyo ata moto nani atalelaka biso, ata mpe biso moko. Lokola azali bolingo, Nzambe atalelaka biso na koponapona to na makanisi mabe te. Amonaka ndenge oyo tozali, mpe ndenge oyo tokoki kozala. (1 Samwele 16:7; 1 Yoane 4:8) Kutu, amonaka baoyo balukaka kosepelisa ye lokola biloko ya motuya oyo elingami mingi, atako bazali bato ya kozanga kokoka.—Danyele 9:23; Hagai 2:7.
Ya solo, Nzambe ayebaka bolɛmbu na biso mpe ayebaka masumu nyonso tosalaka. Asɛngaka biso tómeka makasi kosala oyo ezali sembo, mpe asungaka biso ntango tozali kosala bongo. (Luka 13:14) Atako bongo, Biblia elobi boye: “[Lokola] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye.” Elobi lisusu ete: “Ɛ [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali na ntina ete obangama.”—Nzembo 103:13; 130:3, 4.
Na bongo, meká komitalela na ndenge oyo Nzambe atalelaka yo. Koyeba ete amonaka bato oyo balingaka ye lokola baoyo balingami mingi mpe ete atyelaka bango motema—ata soki bango moko bazali komimona lokola ete babongi te—ekoki kobakisela moto bolamu.—1 Yoane 3:19, 20.
Mpo na kozwa bolamu esengeli kozala na elikya
Likanisi moko ezali kolendisama mikolo oyo ebengami psychologie positive ezali koloba ete soki moto azali na elikya, azali kokanisa makambo ya malamu mpe azali kotya makanisi na ye na milende na ye, akoki kozwa bolamu. Bato mingi bandimaka ete kozala na elikya ya bomoi malamu mpe kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya epesaka esengo. Kasi, esengeli ete elikya yango euta na makambo ya solo, kasi na makanisi mpamba te. Longola yango, ata soki moto azali na elikya to na makanisi malamu ndenge nini, yango te nde ekoki kosilisa bitumba, nzala, mpasi, kobeba ya mai na mopɛpɛ, bobange, maladi, to liwa—makambo oyo ezali kolongola bolamu ya bato mingi. Kasi kozala na elikya ezali mabe te.
Nzokande, Biblia esaleli liloba “elikya” na lolenge moko malamu koleka. Diksionɛrɛ moko (Vine’s Complete Expository Dictionary) elimboli liloba “elikya,” na ndenge oyo Biblia ezali kosalela yango, lokola “kozala na kondima makasi mpo na likambo moko, . . . kotya motema na esengo to na bolamu moko oyo ekoya.” Na ndenge oyo Biblia esaleli yango, liloba “elikya” eleki mosika likanisi ya kotalela mikolo oyo ezali koya na makanisi ya malamu. Esalelami mpe mpo na kolobela elaká moko oyo epesami. (Baefese 4:4; 1 Petelo 1:3) Na ndakisa, elikya ya baklisto ezali ete mosika te, makambo nyonso ya mabe oyo elobelami na paragrafe oyo eleki, ekolongwa. (Nzembo 37:9-11, 29) Kasi esuki wana te.
Baklisto bazelaka ntango oyo bato ya sembo bakokóma na bomoi ya kokoka na paladiso awa na mabele. (Luka 23:42, 43) Emoniseli 21:3, 4 elobeli elikya yango na maloba oyo: “Talá! Efandelo ya Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye . . . Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te. Mpo ete makambo ya liboso masili koleka.”
Moto nyonso oyo alikyaka na bomoi ya ndenge wana na mikolo ezali koya akoki kozala na esengo, ata soki bomoi na ye ezali malamu te sikoyo. (Yakobo 1:12) Na bongo, mpo na nini te koyekola Biblia na mozindo mpe koluka koyeba ntina oyo okoki kotyela yango motema. Zwaká ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpo na kolendisa elikya na yo. Soki ozali kosala bongo, okokóma mozwi na elimo, ekosalisa yo na kokima makambo oyo elongolaka bolamu ya bato, mpe ekopesa yo esengo. Ya solo, sɛkɛlɛ ya bolamu ya solo ezali kosala mokano ya Nzambe. (Mosakoli 12:13) Bomoi ya esengo eutaka nde na kotosa mitinda ya Biblia, mpamba te Yesu alobaki ete: “Esengo eleki na bango bayoki Liloba na Nzambe mpe batosi yango.”—Luka 11:28.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na mondimi ya Lingomba ya Bouddha, kondimela Nzambe ezali na ntina te.
[Bililingi na lokasa 5]
Bolamu ezwamaka te na konduka bozwi, koboya kofanda esika moko na bato, to na kotya elikya na mwa boyebi oyo bato bazali na yango
[Elilingi na lokasa 6]
Kotosa Liloba ya Nzambe ememaka na bomoi ya esengo
[Elilingi na lokasa 7]
Elikya ya boklisto epesaka moto bolamu