Paladiso ya elimo ezali nini?
GUSTAVO akolaki na engumba moko moke na Brésil.a Banda bomwana na ye, bateyaki ye ete soki moto malamu akufi, akendaka na likoló. Ayebaki te ete mokano ya Nzambe ezali ete mokolo mosusu, bato ya sembo bázala na bomoi ya kokoka na paladiso awa na mabele. (Emoniseli 21:3, 4) Ezali mpe na likambo mosusu oyo ayebaki te. Ayebaki te ete ata lelo oyo, akoki kozala na kati ya paladiso ya elimo.
Osi oyoká nsango ya paladiso yango ya elimo? Oyebi soki ezali nini mpe nini esɛngami mpo na kokɔta na kati na yango? Moto nyonso oyo alingi mpenza kozwa bolamu asengeli koyeba paladiso yango.
Esika oyo paladiso ya elimo ezali
Koloba ete ata lelo oyo, moto akoki kozala na kati ya paladiso ekoki komonana lokola masɛki. Tokoki koloba ata moke te ete mokili oyo ezali paladiso. Ebele ya bato bazali komona likambo oyo mokonzi moko ya kala ya Baebele alobaki: “Talá! mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.” (Mosakoli 4:1) Ebele ya bato bazali konyokwama mpo na misala mabe ya bato ya politiki, ya mangomba, mpe mpo na mikakatano ya mbongo, mpe bazali kozwa mosungi to “mobɔndisi” te. Mingi mosusu bazali kobunda mpo na kofuta bafaktire ya mai na kura, kobɔkɔla bana, mpe kobundabunda na ebele ya makambo mosusu mpo na kobikela. Bango mpe bazali na mposa ya mobɔndisi, moto oyo akoki kolɛmbisa mikakatano na bango. Mpo na bato nyonso wana, tokoki koloba te ete bazali na paladiso.
Na bongo, paladiso ya elimo ezali wapi? Liloba ya Lingala “paladiso” euti na maloba ya Grɛki, ya Perse mpe ya Liebele oyo mokomoko na yango ezali na likanisi ya parke to elanga, esika ya kimya mpe ya kitoko mpo na kopema. Biblia elobi ete mokolo mosusu mabele ekozala paladiso, elanga kitoko epai bato oyo bazangi masumu bakofanda. (Nzembo 37:10, 11) Na yango, tomoni ete paladiso ya elimo ezali esika ya kosepelisa miso mpe ya kokitisa motema, esika oyo moto akoki kozala na kimya elongo na moninga na ye moto mpe elongo na Nzambe. Lelo oyo, lokola Gustavo amonaki yango, paladiso ya ndenge wana ezali, mpe ebele ya bato oyo bazali se kobakisama bazali na kati ya paladiso yango.
Ntango azalaki na mbula 12, Gustavo azwaki ekateli ya kokóma sango. Lokola baboti na ye bandimaki, akɔtaki na seminɛrɛ. Kuna, amipesaki na miziki, na teyatre mpe na makambo ya politiki, makambo oyo lingomba ezalaki kolendisa mpo na kobenda bilenge. Azalaki kokanisa ete sango asengeli kozala moto oyo amipesi mpo na kosalisa bato mpe akoki kobala te. Kasi, Gustavo ayebaki basango mpe bana-kelasi mingi ya seminɛrɛ oyo bazalaki kosala makambo ya mbindo. Lokola afandaki esika moko na bato ya ndenge wana, mosika te Gustavo akómaki komela masanga mingi. Na mokuse, amonaki naino paladiso ya elimo te.
Mokolo moko, Gustavo atángaki trakte moko oyo elobelaki paladiso awa na mabele. Yango etindaki ye na komituna soki bomoi ezali na ntina nini. Alobi ete: “Nakómaki kotánga Biblia mbala na mbala, kasi nazalaki kokanga ntina ya makambo nazalaki kotánga te. Namonaki kutu te ete Nzambe azali na nkombo.” Alongwaki na seminɛrɛ mpe alukaki Batatoli ya Yehova mpo básalisa ye na koyeba Biblia. Na nsima, akolaki nokinoki mpe mosika te amipesaki na Nzambe. Gustavo azalaki koyekola makambo etali paladiso ya elimo.
Libota mpo na nkombo ya Nzambe
Gustavo ayekolaki ete nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali kaka te likambo oyo moto oyo ayekolaka Biblia akoki koyeba. (Exode 6:3) Ezali likambo ya ntina mingi na kati ya losambo ya solo. Yesu alakisaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:9) Moyekoli Yakobo alobaki boye mpo na bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto: “Nzambe . . . atii likebi na ye na bikólo mosusu mpo na kozwa kati na yango libota mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14, NW) Na ekeke ya liboso, “libota mpo na nkombo na ye” ezalaki lisangá ya boklisto. Lelo oyo ezali mpe na libota mpo na nkombo na ye? Ɛɛ, Gustavo mpe amonaki ete libota yango ezali nde Batatoli ya Yehova.
Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala na bango na mikili 235. Bazali bato koleka milio motoba, mpe bato mosusu milio mwambe oyo basepelaka na mateya na bango, bayanganaki na makita na bango. Bayebani malamu mpo na mosala na bango ya kosakola mpe bakokisaka maloba ya Yesu oyo alobaki ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14) Kasi, mpo na nini Gustavo amonaki ete azwi paladiso ya elimo ntango akómaki kosangana na Batatoli ya Yehova? Ye moko alobi boye: “Nakokanisaki makambo oyo namonaki na mokili, mingimingi na seminɛrɛ, na oyo namonaki epai ya Batatoli ya Yehova. Bokeseni monene ezali bolingo oyo ezali na kati ya Batatoli.”
Bato mosusu mpe balobaki bongo mpo na Batatoli ya Yehova. Miriam, elenge mwasi moko, moto ya Brésil, alobaki boye: “Nayebaki te ndenge nini kozala na esengo, ata na kati ya libota na ngai moko. Mbala ya liboso oyo namonaki ndenge oyo bolingo esalaka, ezalaki epai ya Batatoli ya Yehova.” Mobali moko, nkombo na ye Christian alobaki boye: “Nazalaki mbala mosusu komikɔtisa na makambo ya bikelakela, mpe mpo na ngai, kosambela ezalaki na ntina te. Nazalaki kotya motema na bomɛngo na ngai mpe na mosala na ngai lokola ingénieur. Kasi, ntango mwasi na ngai abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, namonaki ete abongwanaki. Esengo mpe molende oyo basi baklisto oyo bazalaki koya kotala ye bazalaki komonisa ekamwisaki ngai.” Mpo na nini bato balobaka bongo mpo na Batatoli ya Yehova?
Paladiso ya elimo ezali nini?
Moko na makambo oyo ekesenisaka Batatoli ya Yehova na bato mosusu ezali ete bango balingaka boyebi ya Biblia. Bandimaka ete makambo oyo ezali na Biblia ezali solo mpe ezali Liloba ya Nzambe. Na yango, basukaka kaka te na koyekola mateya ya ebandeli ya lingomba na bango. Mokomoko na bango ayekolaka mpe atángaka Biblia ntango nyonso. Soki moto aumeli na Batatoli ya Yehova, akoyekola makambo mingi etali Nzambe mpe mokano na Ye ndenge oyo Biblia emonisi yango.
Boyebi yango esikoli Batatoli ya Yehova na makambo oyo ezali kozangisa bato esengo, makambo lokola biyambayamba mpe makanisi ya mabe. Yesu alobaki boye: “Solo ekosikola bino,” mpe Batatoli ya Yehova bamonaka ete ezali mpenza bongo. (Yoane 8:32) Fernando, oyo azalaki moto ya bikelakela, alobi ete: “Koyekola ete bomoi ya seko ekozala ezalaki libɔndisi monene mpo na ngai. Nazalaki kobanga ete ezala ngai moko to baboti na ngai tokoki kokufa.” Mateya ya solo esalisaki Fernando atika kobanga bilimu mpe makambo oyo balobaka ete esalemaka nsima ya liwa.
Na Biblia, boyebi ya Nzambe ezali na boyokani na paladiso. Mosakoli Yisaya alobaki ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai na monana.”—Yisaya 11:9.
Kasi, kaka koyeba makambo yango moko ekoki te mpo na kotya kimya oyo Yisaya asakolaki. Esengeli ete moto asalela makambo oyo azali koyekola. Fernando alobaki boye: “Ntango moto azali kolona mbuma ya elimo, azali kotonga paladiso yango ya elimo.” Fernando azalaki kokanisa maloba ya ntoma Paulo, oyo abengaki bizaleli malamu oyo moklisto asengeli kolona ete “mbuma ya elimo.” Atángaki “bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe [komipekisa].”—Bagalatia 5:22, 23.
Okoki koyeba mpo na nini kosangana na bato oyo bazali kosala makasi mpo na kolona bizaleli malamu ezali lokola kozala na kati ya paladiso? Paladiso ya elimo oyo Sefania asakolaki esengeli kozala na kati ya bato yango. Alobaki boye: “Bakosala mabe te, bakoloba [lokuta] te; kati na monɔkɔ na bango lolemo ya bokosi ekozwama te. Zambi bakolya mpe bakolala na nse, moko akobangisa bango te.”—Sefania 3:13.
Ntina monene ya bolingo
Omoni ete mbuma ya elimo ya liboso oyo ntoma Paulo atángi ezali bolingo. Ezali mpe ezaleli oyo Biblia elobeli mingi. Yesu alobaki: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali bato ya kokoka te. Ntango mosusu, bazalaka na matata kati na bango, se ndenge bayekoli ya Yesu bazalaki na yango. Kasi balinganaka mpenza, mpe babondelaka mpo na kosɛnga lisungi ya elimo santu wana bazali komonisa ezaleli yango.
Yango wana, bondeko na bango ekokani na bato mosusu te. Bazali na makambo ya koponapona to ya kokabwana mpo na bikólo te. Kutu, ntango bitumba ebimaki kati na bikólo mpo na koyinana mpe mpo bato bakeseni mposo, na boumeli ya ekeke ya 20, Batatoli mingi oyo bazalaki na bisika yango ya bitumba, babombaki bandeko na bango, atako yango ezalaki likama mpo na bomoi na bango moko. Atako bauti “na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso,” bazali na bomoko oyo okoki komona yango te soki naino yo moko omeki yango te.—Emoniseli 7:9.
Baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe bazali kati na paladiso
Na paladiso ya elimo, ezali na esika te mpo na lokoso, misala ya mbindo mpe mposa mabe. Biblia elobi na baklisto ete: “[Bólandaka] makambo ya ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi ya sika kino bokokoka kososola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi [mpenza].” (Baloma 12:2) Ntango tozali na bomoi ya pɛto, tozali na bizaleli malamu mpe tozali kosala mokano ya Nzambe, tozali kopesa mabɔkɔ na kotonga paladiso ya elimo mpe ezali mpo na bolamu ya biso moko. Carla amonaki ete yango ezali solo. Alobi boye: “Tata na ngai ateyaki ngai kosala mosala makasi mpo nazwaka mbongo ngai moko. Kasi atako bakelasi na ngai na iniversite esalisaki ngai na kozala na bomoi malamu, libota na ngai ezangaki bomoko mpe libateli oyo ezwamaka se na boyebi ya Liloba ya Nzambe.”
Ya solo, kozala na kati ya paladiso ya elimo ekoki te kolongola mikakatano ya bomoi. Baklisto babɛlaka. Bikólo epai bafandi ekoki kokóma na bitumba. Mingi bazali babola. Atako bongo, kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe—oyo ezali likambo ya ntina na kati ya paladiso ya elimo—elimboli ete tosengeli koluka lisungi epai na ye. Azali koloba na biso ete ‘tókitisa mokumba na biso epai na ye,’ mpe mingi bakoki koyebisa ete asungaki bango na bampasi na bango na ndenge ya kokamwa mpenza. (Nzembo 55:22; 86:16, 17) Nzambe alaki ete akozala na basambeli na ye ata na “libulu ya molili ya kufa.” (Nzembo 23:4) Soki tozali na elikya ete Nzambe akosunga biso, yango ekoki kosalisa biso na kobatela “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso,” oyo ezali sɛkɛlɛ ya kozala na paladiso ya elimo.—Bafilipi 4:7.
Tóbatela paladiso ya elimo
Bato mingi basepelaka kotala elanga ya fololo oyo ebongisami kitoko. Balingaka kotambola na kati na yango to mbala mosusu kofanda na kiti moko mpe kotala biloko oyo ezali na kati na yango. Ndenge moko mpe, ezali na bato mingi oyo basepelaka kozala elongo na Batatoli ya Yehova. Bamonaka ete kozala baninga na bango ekitisaka motema, epesaka kimya mpe epesaka makasi. Nzokande, mpo elanga moko kitoko etikala bongo, esengeli kobongisaka yango. Ndenge moko, soki paladiso ya elimo ezali na mokili oyo ezali paladiso te, ezali kaka mpo ete Batatoli ya Yehova bazali kolona yango, mpe Nzambe azali kopambola milende na bango. Ndenge nini moto akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga paladiso yango?
Ya liboso, osengeli kokendaka na makita na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, koyekola Biblia elongo na bango, mpe kozwa boyebi ya Biblia oyo ezali likambo ya liboso na paladiso ya elimo. Carla alobaki boye: “Paladiso ya elimo ekoki kozala te soki bilei ya elimo ezali te.” Yango elimboli kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe komanyola na makambo oyo ozali kotánga. Boyebi oyo okozwa ekokómisa yo pene na Yehova Nzambe mpe okolinga ye. Okoyekola mpe kosolola na ye na nzela ya libondeli mpe kosɛnga ye atambwisa yo mpe apesa yo elimo na ye esunga yo wana ozali kosala mokano na ye. Yesu ayebisaki biso tólendendela na mabondeli. (Luka 11:9-13) Ntoma Paulo alobaki ete: “Bóbondelaka ntango nyonso.” (1 Batesaloniki 5:17, NW) Libaku malamu ya kosolola na Nzambe na libondeli na elikya ete azali koyoka yo, ezali eteni ya ntina ya paladiso ya elimo.
Nsima ya ntango, makambo oyo ozali koyekola ekobongisa bomoi na yo, mpe na nsuka okoyoka mposa ya koyebisa yango epai ya basusu. Na ntango wana nde okoyeba kotosa lilako ya Yesu oyo elobi ete: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Matai 5:16) Koyebisa bato mosusu boyebi ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto mpe kokumisa bolingo monene oyo bamonisaki epai ya bato epesaka esengo mingi.
Etikali moke mabele mobimba ekóma paladiso—esika oyo ekozala elanga kitoko oyo mai na mopɛpɛ na yango ebebisami te, esika ebongi mpenza mpo na bato ya sembo. Kozala ya paladiso ya elimo na ‘ntango oyo ya mpasi’ ezali komonisa nguya ya Nzambe mpe elakiseli ya makambo oyo akoki kosala mpe oyo akosala na mikolo oyo ezali koya.—2 Timote 3:1.
Ata lelo oyo, baoyo bazali na paladiso ya elimo bazali komona ndenge oyo Yisaya 49:10 ezali kokokisama, ete: “Bakoyoka nzala te to mposa na mai te; kokauka makasi mpe moi ekobɛta bango te; ye oyo ayokeli bango mawa akokamba bango mpe akotambolisa bango pembeni ya maziba ya mai.” José akomonisa bosolo ya makambo yango. Azalaki na mposa ya kokóma alanga-nzembo monene, kasi asepelaki mingi na kosalela Nzambe na kati ya lisangá ya boklisto. Alobi boye: “Sikoyo bomoi na ngai ezali na ntina. Nazali komiyoka malamu na kati ya bandeko na ngai baklisto, mpe nayebi Yehova lokola Tata ya bolingo oyo tokoki kotyela motema.” Esengo ya José mpe ya bamilio mosusu ya bato lokola ye eyebisami malamu na Nzembo 64:10 ete: “Bayengebene bakosepela mpo na [Yehova]; bakomibomba epai na ye.” Oyo nde ndimbola malamu ya paladiso ya elimo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tozali kolobela awa bato ya solosolo, kasi topesi bango bankombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 10]
Ntango ozali na kati ya paladiso ya elimo, pesá mabɔkɔ mpo na kokolisa yango!