“Nkolo asekwi solo!”
Kanisá mawa oyo bayekoli ya Yesu bazalaki na yango ntango babomaki Nkolo na bango. Ntango Yosefe moto ya Alimataya atyaki ebembe na ye na lilita, elikya na bango esilaki. Bayuda oyo mpe batyaki elikya ete Yesu akosikola bango na boombo ya Loma bazalaki lisusu na elikya te.
SOKI yango ezalaka nsuka ya likambo, mbala mosusu bayekoli ya Yesu balingaki mpe kopanzana lokola bato oyo balandaka Bamasiya ya lokuta. Kasi Yesu azalaki na bomoi! Makomami elobi ete amonanaki na bayekoli na ye mbala mingi mwa moke nsima ya liwa na ye. Yango wana, bamosusu kati na bango balobaki ete: “Nkolo asekwi solo!”—Luka 24:34.
Bayekoli basengelaki kolóngisa kondima na bango epai na Yesu, ete azali Masiya. Yango wana, bazalaki mingimingi kolobela lisekwa na ye lokola elembeteli ya solo ete azali Masiya. “Bantoma mpe batatoli na nguya mingi likambo ya lisekwa ya Nkolo Yesu, mpe ngɔlu monene ezalaki na bango nyonso.”—Misala 4:33.
Soki moto moko amonisaka ete lisekwa na ye ezalaki likambo ya lokuta—ntango mosusu na kondimisa moyekoli moko ete ezalaki bongo, to na komonisa ete nzoto ya Yesu ezalaki kaka na lilita—mbɛlɛ lisangá ya boklisto epanzanaki kaka na ebandeli na yango. Kasi ezalaki bongo te. Lokola bayekoli ya Yesu bayebaki ete Klisto azalaki na bomoi, bakendaki bisika nyonso mpo na kosakola lisekwa na ye, mpe ebele ya bato bandimaki Klisto nsima ya lisekwa na ye.
Mpo na nini yo mpe okoki kondima lisekwa ya Yesu? Nini emonisi mpenza ete Yesu asekwaki?
Mpo na nini kotalela makambo oyo ekoki kondimisa biso?
Baevanzile nyonso minei elobeli lisekwa ya Yesu. (Matai 28:1-10; Malako 16:1-8; Luka 24:1-12; Yoane 20:1-29)a Mikanda mosusu ya Makomami ya Grɛki ya boklisto elobi na bosolo mpenza ete Yesu asekwaki.
Esengelaki mpenza ete bayekoli ya Yesu básakola lisekwa na ye! Soki ezali solo ete Nzambe azongisaki ye na bomoi, yango ezali mpenza nsango eleki kokamwisa mpo na bato nyonso. Yango elimboli ete Nzambe azali. Elimboli mpe lisusu ete Yesu azali sika na bomoi.
Ndenge nini likambo yango etaleli biso? Yesu abondelaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báluka koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Ya solo, tokoki koyeba Yesu na Tata na ye mpe boyebi yango ekopesa biso bomoi. Soki tozali kosalela boyebi yango, ata soki tokufi, tokosekwa, mpamba te Yesu asekwaki. (Yoane 5:28, 29) Tokoki kozala na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, oyo apesi na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, Mwana na ye oyo akumisami mpe azali Mokonzi ya bakonzi.—Yisaya 9:6, 7; Luka 23:43; Emoniseli 17:14.
Na bongo, likambo ya koyeba soki ya solo mpenza Yesu asekwaki ezali na ntina mingi. Etaleli bomoi na biso lelo oyo mpe elikya na biso na mikolo ezali koya. Yango wana, tosɛngi yo otalela makambo minei oyo emonisi ete Yesu akufaki mpe asekwaki.
Yesu akufaki mpenza na nzete
Bato mosusu ya ntembe balobaka ete atako babakaki ye na nzete, Yesu akufaki mpenza na nzete te. Balobaka ete alingaki nde kokufa kasi malili ya lilita ezongisaki ye na bomoi. Nzokande, mikanda nyonso oyo tozali na yango lelo endimisi ete batyaki nde ebembe ya Yesu na lilita.
Lokola babomaki Yesu na miso ya bato, ezali na bato oyo bamonaki ete akufaki mpenza na nzete. Mokonzi ya basoda oyo azalaki na mokumba ya koboma ye atatolaki ete akufaki. Mokonzi yango ya basoda ayebaki malamu mosala na ye, mosala oyo esɛngaki mpe kotala soki ya solo moto akufi. Mpe lisusu, ezalaki se nsima ya komindimisa ete Yesu akufi nde Ponto Pilata, guvɛrnɛrɛ Moloma, atikelaki Yosefe moto ya Alimataya nzoto ya Yesu mpo na kokunda yango.—Malako 15:39-46.
Bakutaki lilita etikali mpamba
Lokola lilita etikalaki mpamba, ezalaki mpenza elembeteli ya liboso oyo endimisaki bayekoli ete Yesu asekwi, mpe moto moko te abɛtelaki yango ntembe. Bakundaki Yesu na lilita oyo basalelaki naino te. Ezalaki pene na esika oyo babakaki ye na nzete mpe na ntango wana, ezalaki mpasi te koyeba yango. (Yoane 19:41, 42) Baevanzile nyonso elobi ete ntango baninga ya Yesu bakómaki na lilita na ntɔngɔ ya mokolo ya mibale nsima ya liwa na ye, nzoto na ye elimwaki.—Matai 28:1-7; Malako 16:1-7; Luka 24:1-3; Yoane 20:1-10.
Lokola lilita etikalaki mpamba ekamwisaki, ezala banguna ya Yesu, to baninga na ye. Banguna na ye bazalaki kosala nyonso mpo akufa mpe akundama. Lokola bakokisaki mposa na bango, bazwaki bibongiseli mpo na kotya bakɛngɛli mpe kokanga monɔkɔ ya lilita. Atako bongo, na ntɔngɔ ya mokolo ya liboso ya pɔsɔ, lilita etikalaki mpamba.
Ekoki nde kozala ete baninga ya Yesu balongolaki nzoto na ye na lilita? Ekoki kozala bongo te; mpamba te Baevanzile emonisi ete bazalaki na mawa mingi nsima ya kobomama na ye. Longola yango, bayekoli na ye bakokaki soki moke te kondima konyokwama mpe kokufa mpo na likambo oyo bayebaki ete ezalaki lokuta.
Nani oyo alongolaki nzoto yango? Ezali mpasi tókanisa ete banguna ya Yesu bakokaki kolongola nzoto na ye. Ata soki bazwaki yango, balingaki kolakisa yango nsima mpo na kosukisa ntembe ya bayekoli oyo bazalaki koloba ete Yesu asekwaki mpe azalaki na bomoi. Kasi, likambo moko ya lolenge mosusu esalemaki, mpamba te ezalaki Nzambe nde moto asalaki yango.
Nsima ya bapɔsɔ, banguna ya Yesu batyaki ntembe te ntango ntoma Petelo alobaki boye: “Mibali ya Yisalaele, bóyoka maloba oyo. Yesu [moto] ya Nasalete azali mobali oyo Nzambe alatisi kati na bino na misala ya nguya, na bikamwiseli, na bilembo, bisali Nzambe na mabɔkɔ na ye na kati na bino, [lokola] bino mpenza boyebi. Ye apesami mpo na mokano mokanaki Nzambe mpe mpo na boyebi boyebaki ye liboso, mpe bino bobakisi ye na [nzete, NW], mpe bobomi ye na mabɔkɔ na bato bazangi Mibeko. Nzambe nde akangoli ye na mpasi ya kufa, mpe asekwisi ye, mpo ete kufa ezalaki na nguya ya kosimba ye te. Mpo ete Davidi alobaki na ntina na ye ete, Nazalaki kotala Nkolo liboso na ngai ntango nyonso, . . . mpe nzoto na ngai ekozila naino na ekikya. Mpo ete okotika bomoi na ngai na esika ya bakufi te, mpe okotika Mobulami na yo komona kopɔla mpe te.”—Misala 2:22-27.
Bato mingi bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye
Na mokanda ya Misala, Luka, moto oyo akomaki Evanzile moko alobaki boye: “[Yesu] amimonisi na [bantoma] na bomoi, na nsima ya mpasi na ye, na bilembo mingi na ntembe te. Amonani na bango mikolo ntuku minei, mpe alobi na bango makambo na ntina na Bokonzi ya Nzambe.” (Misala 1:2, 3) Bayekoli mingi bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na bisika mingi: na elanga, na nzela, na ntango ya kolya, pembeni ya Libeke ya Tibelia.—Matai 28:8-10; Luka 24:13-43; Yoane 21:1-23.
Bato ya ntembe bandimaka te ete Yesu azalaki mpenza komonana ndenge oyo balobeli yango; balobaka ete bakomi bakanisaki masolo yango bango moko, yango wana makambo oyo balobelaki na masolo yango ezali na mwa bokeseni na kati na yango. Nzokande, mwa bokeseni kati na masolo ya Baevanzile ezali komonisa ete bakomi basanganaki esika moko te mpo na koyebisana makambo oyo basengelaki kokoma. Tozali koyeba Yesu malamumalamu ntango mokomi moko abakisi mwa makambo na masolo oyo bakomi mosusu balobeli kaka mwa moke na makambo elekaki na bomoi ya Klisto awa na mabele.
Komonana ya Yesu nsima ya lisekwa ezalaki nde bimonaneli mpamba? Ntembe nyonso oyo moto akoki kotya ekozala na ntina te, mpamba te bato ebele bamonaki ye. Bamosusu bazalaki babomi-mbisi, basi, mosali ya Leta, ata mpe Toma, ntoma oyo azalaki na ntembe, ye oyo andimaki kaka ntango amonaki elembeteli oyo akokaki kotyela yango ntembe te ete Yesu asekwi. (Yoane 20:24-29) Mbala mingi, bayekoli ya Yesu bazalaki koyeba Nkolo na bango mbala moko te nsima ya lisekwa na ye. Mokolo moko, bato koleka 500 bamonaki ye, mpe mingi kati na bango bazalaki naino na bomoi ntango ntoma Paulo alobelaki likambo yango mpo na kondimisa liteya ya lisekwa.—1 Bakolinti 15:6.
Yesu azali na bomoi mpe azali kosala mpo na bato
Lisekwa ya Yesu ezali kaka te lisolo to likambo ya kotyana na yango ntembe. Lokola azali na bomoi, azali kosala makambo ya malamu na bomoi ya bato na bisika nyonso. Banda na ekeke ya liboso, bato ebele batikaki kotyola to kotya ntembe makasi mpe bakɔtaki na lisangá ya boklisto mpo bandimaki ete ezali lingomba ya solo. Nini ebongolaki bango? Boyekoli ya Makomami endimisaki bango ete Nzambe asekwisaki Yesu lokola ekelamu ya elimo mpe ya nkembo kuna na likoló. (Bafilipi 2:8-11) Bamonisaki na misala na bango ete bazali kondimela Yesu mpe mbeka na ye, eloko oyo Yehova Nzambe abongisi mpo na kobikisa bato. (Baloma 5:8) Mokomoko na bango azwi bolamu ya solosolo na ndenge oyo azali kosala mokano ya Nzambe mpe azali kolanda mateya ya Yesu.
Kanisá ndenge oyo moklisto ya ekeke ya liboso asengelaki kozala. Ezalaki likambo ya lokumu te, ya nguya te to ya bozwi te. Kutu, baklisto mingi ya liboso ‘bandimaki na esengo ete bato bábotola biloko na bango’ mpo na kondima na bango. (Baebele 10:34) Kozala moklisto ezalaki kosɛnga ete moto azala na bomoi ya kondima mpasi mpe minyoko, bomoi oyo mbala mingi ezalaki kosuka na kokufa lokola martiru.
Liboso bákóma bayekoli ya Klisto, mingi bazalaki na makoki oyo ekokaki kokómisa bango bato ya lokumu mpe ya bozwi. Saulo moto ya Talasia ayekolaki epai ya Gamaliele, moteyi monene ya Mibeko mpe abandaki kokóma moto monene na miso ya Bayuda. (Misala 9:1, 2; 22:3; Bagalatia 1:14) Kasi Saulo akómaki ntoma Paulo. Ye mpe bato mosusu mingi baboyaki lokumu mpe nguya ya mokili oyo. Mpo na nini? Mpo na kopalanganisa nsango ya elikya ya solo oyo etali bilaka ya Nzambe mpe bosolo ya lisekwa ya Klisto. (Bakolose 1:28) Bandimaki konyokwama mpo na likambo oyo bayebaki ete ezalaki likambo ya solo.
Ezali se bongo mpo na bamilio ya bato lelo oyo. Okoki kokuta bango na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Batatoli ya Yehova bazali kobengisa yo na bolingo nyonso na Ekaniseli ya liwa ya Klisto; na mbula oyo ekosalema nsima ya kolala ya moi na mokolo ya lomingo 8 Aprili 2001. Bakosepela mingi na komona yo na Bandako ya Bokonzi na bango mpo na koyangana na Ekaniseli yango mpe na makita na bango nyonso oyo basalaka mpo na koyekola Biblia.
Tolendisi yo oyekola makambo mosusu mpo na Yesu, kaka liwa mpe lisekwa na ye te, kasi mpe bomoi mpe mateya na ye. Azali kobenga biso tókende epai na ye. (Matai 11:28-30) Luká koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto malamumalamu. Soki osali bongo, okozwa bomoi ya seko na Bokonzi ya Nzambe oyo Mwana na ye ya bolingo akotambwisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kondima ete Baevanzile elobi solo, talá lisolo “Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2000.
[Bililingi na lokasa 7]
Bamilio ya bato bazali kozwa bolamu ya solo mpo bazali kolanda Yesu Klisto
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 6]
Euti na Self-Pronouncing Edition of the Holy Bible, oyo ezali na libongoli King James mpe libongoli Revised