Bózala bato bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
Bato ya sembo mpe ya mpiko balongi monyoko ya Banazi
“MWANA na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo [akotumola, NW] ngai.” (Masese 27:11) Maloba oyo emonisi ete bikelamu ya mayele oyo Nzambe asalá ekoki kosepelisa motema ya Yehova ntango bazali sembo epai na ye. (Sefania 3:17) Nzokande, Satana, motumoli, alingi kobebisa bosembo ya baoyo bazali kosalela Yehova.—Yobo 1:10, 11.
Mingimingi banda na ebandeli ya ekeke ya 20, ntango babenganaki ye na likoló mpe babwakaki ye zingazinga ya mabele, Satana azali koyokela basaleli ya Yehova nkanda makasi mpenza. (Emoniseli 12:10, 12) Atako bongo, baklisto ya solo bamonisi ete “bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi,” mpe babateli bosembo na bango epai ya Nzambe. (Bakolose 4:12, NW) Tiká tótalela mwa moke ndakisa monene ya bosembo yango, ya Batatoli ya Yehova na Allemagne liboso mpe na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Bosembo ya baoyo bazalaki molende na mosala emekami
Na bambula ya 1920 mpe na ebandeli ya bambula ya 1930, Bayekoli ya Biblia (Bibelforscher), ndenge oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na Allemagne, bakabolaki ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na kati na 1919 mpe 1933, libota mokomoko ya Allemagne ekabolaki soko buku mwambe mpe bazulunalo mwambe.
Na ntango yango, Allemagne ezalaki ekólo oyo bayekoli bapakolami ya Klisto balekaki mingi. Na kati ya bato 83 941 oyo balyaki limpa na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na mokili mobimba na 1933, mwa mingi kati na bango (30 %) bazalaki na Allemagne. Mwa moke na nsima, bosembo ya Batatoli yango ya Allemagne emekamaki makasi. (Emoniseli 12:17; 14:12) Bamosusu balongolaki bango na misala, bazalaki kokɔtela bango na bandako, kolongola bango na kelasi; mpe mwa moke na nsima bakómaki kobɛta bango, kokanga bango mpe kotya bango na bolɔkɔ. (Fɔtɔ 1) Yango wana, mwa bambula liboso ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, Batatoli ya Yehova bazalaki mingi (5 to 10 %) kati na bato oyo bazalaki na bakaa ya bakangami.
Mpo na nini Banazi banyokolaki Batatoli ya Yehova?
Kasi, mpo na nini Batatoli ya Yehova bapelisaki nkanda ya boyangeli ya Banazi? Na buku na ye (Hitler—1889-1936: Hubris), Ian Kershaw, profɛsɛrɛ ya istware amonisi ete Batatoli ya Yehova banyokwamaki mpo baboyaki “kosala makambo nyonso oyo boyangeli ya Banazi ezalaki kosɛnga.”
Na buku (Betrayal—German Churches and the Holocaust), oyo Robert Ericksen, profɛsɛrɛ ya istware mpe Susannah Heschel, profɛsɛrɛ ya makambo ya Bayuda babimisaki, bayebisi ete Batatoli “baboyaki kosangana na mobulu to kosimba mindoki . . . Batatoli bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te, yango wana balingaki te kopona Hitler lokola mokonzi to kopesa ye losako.” Buku yango ebakisi ete likambo yango epelisaki nkanda ya Banazi mpe ebendelaki Batatoli mindɔndɔ mpamba te “boyangeli ya Banazi ekokaki kondima likambo ya ndenge wana te.”
Mokili mobimba eboyaki likambo yango mpe monyoko engalaki
Na mokolo ya 9 Febwali 1934, Joseph Rutherford oyo azalaki kokamba misala na ntango wana, atindelaki Hitler mokanda na mabɔkɔ ya motindami moko mpo na komonisa ye ete makambo oyo Banazi bazali kosala, elingi koloba koluka ete bato bálanda kaka makambo na bango, ekoki kondimama te. (Fɔtɔ 2) Na mokolo ya 7 Ɔkɔtɔbɛ 1934, nsima ya mokanda ya Ndeko Rutherford, Batatoli ya Yehova na mikili 50 bakisa mpe Allemagne, batindelaki Hitler mikanda mpe batelegramɛ soki 20 000 mpo na komonisa ete makambo oyo azalaki kosala ekoki kondimama te.
Banazi bangalisaki kutu nde minyoko na bango. Mokolo ya 1 Aprili 1935, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo mobimba. Mpe na mokolo ya 28 Augusto 1936, basoda ya Gestapo bakómaki kolandela bango. Buku moko (Betrayal—German Churches and the Holocaust) emonisi ete atako bongo, Batatoli ya Yehova “balandaki kokabola mikanda mpe babatelaki kondima na bango.”
Kasi atako Gestapo epekisaki bango, na mokolo ya 12 Desɛmbɛ 1936, Batatoli soki 3 500 bakabolaki nkasa nkóto zomi (10 000) oyo eyebisaki makanisi na bango mpo na lolenge oyo bazalaki konyokwama. Na ntina ya kampanye yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaki boye: “Ezalaki elonga monene mpe esukisaki milende ya banguna; likambo yango epesaki basaleli ya sembo esengo nsuka te.”—Baloma 9:17.
Monyoko elongi te!
Banazi balɛmbaki te koluka Batatoli ya Yehova. Na 1939, Batatoli oyo bakɔtaki bolɔkɔ bakómaki nkóto motoba, mpe bankóto mosusu batindamaki na bakaa ya bakangami. (Fɔtɔ 3) Na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba makambo ezalaki ndenge nini? Batatoli soki 2 000 bakufaki na babolɔkɔ; kati na bango, bato 250 babomaki bango koboma. Profɛsɛrɛ Ericksen na Profɛsɛrɛ Heschel bakomaki ete atako bongo, “Batatoli ya Yehova baboyaki kondima na bango te liboso ya mikakatano.” Yango wana, ntango boyangeli ya Hitler ekweaki, Batatoli ya Yehova koleka nkóto moko balongaki mpe babimaki na bakaa.—Fɔtɔ 4; Misala 5:38, 39; Baloma 8:35-37.
Nini epesaki basaleli ya Yehova makasi ya koyikela minyoko mpiko? Adolphe Arnold, ye abimaki na kaa ya bakangami alimbolaki boye: “Ata soki okómi na nsuka, Yehova azali komona yo, azali koyeba makambo oyo ozali kokutana na yango, mpe akopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kolonga mokakatano mpe kotikala sembo. Lobɔkɔ na ye ezali mokuse te.”
Maloba ya mosakoli Sefania ekokisamaki mpenza epai ya baklisto wana ya sembo! Ye alobaki ete: “[Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe ya makasi, akobikisa! Akosepela na yo na esengo.” (Sefania 3:17) Tiká ete basambeli nyonso ya Nzambe ya solo lelo oyo bálanda ndakisa ya kondima ya Batatoli yango ya sembo oyo babatelaki bosembo liboso ya monyoko ya Banazi mpo bango mpe básepelisa motema ya Yehova.—Bafilipi 1:12-14.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Państwowe Muzeum Oświȩcim-Brzezinka, na ndingisa ya USHMM Photo Archives