Boklisto ya solo elongi!
“Na nguya mpenza, liloba ya Yehova ezalaki se kokola mpe kolonga.”—MISALA 19:20, NW.
1. Lobelá ndenge oyo boklisto ekolaki na ekeke ya liboso.
LOKOLA baklisto ya liboso bazwaki nguya ya elimo santu, basakolaki liloba ya Nzambe na molende oyo moto moko te akokaki kopekisa. Moto moko ya mayele na istware akomaki boye: “Boklisto epalanganaki nokinoki na mikili oyo Loma ezalaki koyangela. Ekoki mpenza kozala ete na mobu 100, baklisto bazalaki na bitúká nyonso oyo ezalaki pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée.”
2. Satana asalaki nini mpo na koluka kobebisa nsango malamu, mpe ndenge nini likambo yango esakolamaki?
2 Satana Zabolo akokaki kokanga baklisto ya liboso monɔkɔ te. Yango wana, asalelaki mayele mosusu mpo na kobebisa matomba ya nsango malamu: abimisaki lipɛngwi. Yesu asakolaki likambo yango na lisese ya masango na matiti mabe. (Matai 13:24-30, 36-43) Ntoma Petelo mpe alobaki ete balakisi ya lokuta bakomonana na kati ya lisangá mpe bakosala mwa mangomba ya kobebisa. (2 Petelo 2:1-3) Ntoma Paulo mpe ndenge moko, alobaki polele ete liboso mokolo ya Yehova eya, lipɛngwi ekobima.—2 Batesaloniki 2:1-3.
3. Likambo nini esalemaki nsima ya liwa ya bantoma?
3 Nsima ya liwa ya bantoma nyonso, nsango malamu ezipamaki na nse ya mateya ya bapakano mpe mateya ya filozofi. Se ndenge esakolamaki, balakisi ya lokuta babebisaki nsango ya solo ya Biblia oyo ezali pɛto. Boklisto ya lokuta ebimaki mokemoke mpe ezwaki esika ya boklisto ya solo. Bato mosusu bakómaki bakonzi ya lingomba mpe balingaki te ete bato mosusu bátángaka Biblia. Atako bato oyo bamibengaki baklisto bakómaki ebele, losambo na bango ezalaki pɛto te. Mangomba ya boklisto epalanganaki na mikili mingi mpe ekómaki ebongiseli moko makasi na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika ya Nɔrdi; kasi ezalaki na lipamboli to mpe na elimo ya Nzambe te.
4. Mpo na nini mayele mabe ya Satana mpo na kobebisa mokano ya Nzambe ekokaki kolonga te?
4 Atako Satana asalelaki mayele mabe na ye, kasi akokaki kolonga te kobebisa mokano ya Nzambe. Ata na eleko wana ya molili ntango lipɛngwi ekómaki makasi, ezalaki kaka na mwa bato, ya mokomoko, oyo basimbaki boklisto ya solo. Bato basalaki makasi mpo na kosala bakopi ya Biblia kozanga kolongola makambo to kobakisa makanisi na bango. Na ndenge yango, Biblia etikalaki ndenge bakomaki yango, atako bato oyo balobaki ete bango nde bazali na lotomo ya koteya yango babebisaki nsango na yango. Bato ya mayele lokola Jérôme na Tyndale bazwaki mpiko ya kobongola mpe kokabola Liloba ya Nzambe. Ebele ya bato bazwaki libaku ya kotánga Biblia mpe bayebaki mateya ya boklisto, atako ezalaki boklisto ya solosolo mpenza te.
5. Danyele asakolaki nini mpo na “boyebi ya solo”
5 Nsukansuka, ndenge mokanda ya Danyele esakolaki yango, ‘boyebi ya solo efulukaki.’ Likambo yango esalemaki na “ntango ya nsuka,” ntango oyo tozali lelo oyo. (Danyele 12:4, NW) Elimo santu esungaki bato ya mokili mobimba oyo balingaka solo na koyeba malamu Nzambe ya solo mpe mikano na ye. Atako lipɛngwi eumelaki bankama ya bambula, kasi liloba ya Nzambe elongi! Lelo oyo, nsango malamu ezali kosakolama bipai nyonso, bazali kolakisa bato elikya kitoko ya mokili ya sika. (Nzembo 37:11) Sikoyo tótalela naino ndenge oyo liloba ya Nzambe ezali kokola na mikolo na biso.
Ndenge oyo Liloba ezali kokola lelo oyo
6. Likambo nini bayekoli ya Biblia basosolaki na Biblia ntango bakómaki na 1914?
6 Na nsuka ya ekeke ya 19, mateya ya solo ya Biblia elamwisaki mwa etuluku ya Bayekoli ya Biblia, lelo oyo babengamaka Batatoli ya Yehova. Ntango bakómaki na 1914, basosolaki makambo mingi na Biblia. Basosolaki makambo kitoko etali mokano ya Nzambe. Bolingo ya Nzambe esimbaki mitema na bango; bolingo yango nde epusaki ye atinda Mwana na ye awa na mabele, likambo oyo efungoleli biso nzela ya bomoi ya seko. Bayebaki mpe basepelaki na nkombo ya Nzambe mpe bizaleli na ye. Basosolaki mpe ete “ntango ya mabota” esilaki mpe likambo yango emonisaki ete etikalaki moke Bokonzi ya Nzambe emema mapamboli awa na mabele. (Luka 21:24, NW) Yango ezali mpenza nsango malamu ya nkembo! Basengelaki koteya bato nyonso mpe na bisika nyonso makambo yango ya solo. Ezalaki mpo na kobikisa bomoi ya bato!
7. Ndenge nini mateya ya solo ya Biblia elongi na ntango na biso?
7 Yehova apambolaki etuluku yango ya baklisto bapakolami na elimo. Lelo oyo, bato koleka milio motoba bazali na kati ya boklisto ya solo. Liloba ya Nzambe epalangani mpenza mpamba te Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mikili 235. Lisusu, mateya ya solo ya Biblia ezali na nguya, ezali kolonga mikakatano nyonso, ezala mikakatano ya losambo to ya ndenge mosusu. Mosala ya kosakola na mokili mobimba ezali mpe komonisa ete Yesu azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi.—Matai 24:3, 14.
8. Bato mosusu balobaki nini na ndenge oyo Batatoli ya Yehova bazali kokóma ebele?
8 Bato ya mayele na istware balobaki ete boklisto ekolaki na ndenge ya kokamwa na ekeke ya liboso, lelo oyo mpe bato mingi ya mayele bazali kolobela ndenge oyo basaleli ya Yehova bazali se kokóma ebele. Na États-Unis, bato mibale ya mayele bakomaki mokanda moko mpe kati na yango balobaki boye: “Na boumeli ya mbula 75 oyo eleki, Batatoli ya Yehova bazalaki se kokóma ebele na ndenge ya kokamwa . . . mpe likambo yango esalemaki na mokili mobimba.” Zulunalo moko oyo ebimaka na Afrika ya Ɛsti eyebisi ete Batatoli bazali “moko na mangomba oyo eyebani na mokili mobimba, oyo ezali kokola nokinoki mpe oyo bato mingi bamemyaka yango mpamba te eteyaka kaka Biblia.” Zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike oyo ebimaka na Mpoto elobi ete “Batatoli ya Yehova bazali kokola na ndenge ya kokamwa.” Makambo nini ezali komema bokoli yango?
Mosala ya elimo santu lelo oyo
9. (a) Wapi ntina ya liboso oyo ezali kosala ete liloba ya Nzambe elonga lelo oyo? (b) Ndenge nini Yehova abendaka bato epai na ye?
9 Ntina ya liboso oyo ezali kosala ete liloba ya Nzambe elonga lelo oyo ezali ete elimo ya Yehova ezali mpenza kosala mosala, ndenge esalaki na ekeke ya liboso. Yesu alobaki ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.” (Yoane 6:44) Maloba yango ezali komonisa ete Nzambe, na boboto nyonso, azali kobenda bato oyo babongi; mpo na yango, azali koloba na mitema na bango. Ntango Batatoli na ye bazali kosakola, Yehova azali kobenda “biloko kitoko ya mabota,” elingi koloba bato ya komikitisa to bampate, mpo na kosambela ye.—Hagai 2:6, 7, NW.
10. Bato ya ndenge nini bandimi liloba ya Nzambe?
10 Elimo santu epesi basaleli ya Nzambe nguya ya komema liloba ya Nzambe tii na nsuka ya mokili; esalisi mpe bato ya lolenge nyonso ete bándima nsango malamu. Bato oyo bandimi liloba ya Nzambe bauti “na bikólo nyonso, na minɔkɔ nyonso, na mabota nyonso mpe na mikili nyonso.” (Emoniseli 5:9; 7:9, 10, NW) Kati na bango ezali na bazwi, babola, bato bayekolá mingi na bato bayekolá mingi te. Bamosusu bandimaki liloba na ntango ya bitumba to ya monyoko makasi, nzokande bamosusu bandimaki yango na ntango ya kimya mpe ya makambo malamu. Na bikólo ndenge na ndenge, epai ya bato ya mimeseno nyonso; na bisika nyonso, ezala na bakaa ya bakangami to na bandako ya bakonzi, basi mpe mibali bandimi nsango malamu.
11. Ndenge nini elimo santu esalaka na bomoi ya basaleli ya Nzambe, mpe bokeseni nini ezali komonana polele?
11 Atako basaleli ya Nzambe bauti na bikólo ndenge na ndenge, bazali na bomoko kati na bango. (Nzembo 133:1-3) Yango mpe ezali komonisa ete elimo santu ezali kosala na bomoi ya basaleli ya Nzambe. Elimo ya Nzambe ezali nguya oyo ezali kotinda basaleli na ye na kosala makambo malamu mpe kozala na bolingo, esengo, kimya, boboto mpe bizaleli mosusu ya malamu. (Bagalatia 5:22, 23) Lelo oyo tozali kososola makambo oyo mosakoli Malaki asakolaká banda kala ete: “Bokososola kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.”—Malaki 3:18.
Liloba ya Nzambe ezali kolonga epai ya basali ya molende
12. Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka mosala ya kosakola, mpe bayebaka ete bakokutana na makambo nini na mosala ya kosakola?
12 Batatoli ya Yehova bazali te bato oyo bakendaka koyoka mateya na ndako-nzambe. Batatoli basakolaka mpenza nsango malamu. Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, bandimi kosala mokano ya Nzambe, bazali na mposa ya kosalisa bato mosusu báyeba makambo oyo Bokonzi ya Yehova ekosala. Bazali baninga ya mosala ya Nzambe, baoyo, na boyokani na elimo santu na ye, bazali koyanganisa bato mosusu mpo ete básalela Yehova. Na ndenge yango, bazali komonisa bato oyo bazali bandimi te motema mawa mpe bolingo ya Yehova. Bazali kosala yango atako bato mosusu bazali koboya koyoka bango, bazali kosɛka bango mpe bazali konyokola bango. Yesu ayebisaki bayekoli na ye liboso ete ezali na bato bakondima mpe mosusu bakoboya nsango malamu. Alobaki boye: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola. Soko batosi liloba na ngai, bakotosa oyo ya bino lokola.”—Yoane 15:20.
13. Makambo nini oyo ezangi na mangomba ya boklisto kasi etondi epai ya Batatoli ya Yehova?
13 Tozali mpenza komona ete makambo mingi ya Batatoli ya Yehova lelo oyo ekokani na makambo ya bato oyo bakómaki baklisto ya solo na ekeke ya liboso. Likambo mosusu oyo ezali komonana polele lelo oyo ezali bokeseni kati na Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu ya boklisto. Moto moko ya mayele akomaki ete baklisto ya liboso bazalaki na molende mpo na kosakola nsango malamu, mpe na nsima, alobaki na mawa nyonso ete: “Soki lelo oyo lingomba ebongwani te mpo ekóma lisusu kotalela kosakola nsango malamu ete ezali mokumba ya moklisto mokomoko oyo azwi batisimo, mpe soki mbongwana yango emonani te na bizaleli oyo ekoleka bizaleli ya bato oyo bazangi kondima, tokokende mpenza liboso te.” Makambo oyo mangomba ya boklisto ezangi yango nde etondi epai ya Batatoli ya Yehova! Bazali na kondima oyo ezali komonana na misala, kondima ya solosolo oyo euti na mateya ya Biblia oyo bazali na mposa ya koyebisa yango bato nyonso oyo bakoyoka bango.—1 Timote 2:3, 4.
14. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mosala na ye, mpe elimo nini bayekoli na ye bamonisaka lelo oyo?
14 Mpo na Yesu, mosala na ye ya kosakola ezalaki likambo ya lisɛki te, azalaki kotya yango na esika ya liboso. Alobaki na Pilata ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Basaleli ya Nzambe bakanisaka lokola Yesu. Lokola mateya ya solo ezali na kati ya mitema na bango, basalaka makasi mpo na koluka ndenge oyo bakoki koyebisa yango bato mingi mpenza. Ntango mosusu bazali kosalela mayele ya kokamwa.
15. Bato mosusu basalelaki mayele nini ya kokamwa mpo na kosakola nsango malamu?
15 Na mokili moko ya Amerika ya Sudi, Batatoli balukaki na mongala moko ya Ebale Amazone mpo na kokende koteya bato solo. Kasi, ntango bitumba ekɔtaki kuna na 1995, bapekisaki basivili bálekaka na mai yango. Lokola mposa na bango ezalaki ete bato oyo basepelaki bákoba kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia, Batatoli bakómaki kotinda yango na mai. Bazalaki kosala boye: soki bakomi mikanda, bakotya yango elongo na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! na kati ya milangi ya plastiki. Na nsima bakobwaka milangi yango na ebale mpo etyola. Basalelaki mayele yango na boumeli ya mbula minei na ndambo tii ntango bapesaki lisusu basivili nzela ya kolúka na ebale yango. Bato oyo bazali pembenipembeni ya ebale batɔndaki Batatoli mpo na mikanda oyo bazwaki. Mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia ayambaki bango na mpisoli na miso mpe alobaki ete: “Nakanisaki ete nakomona bino lisusu te. Kasi, ntango nakómaki kozwa mikanda na kati ya milangi, nayebaki ete bobosanaki ngai te!” Bato mosusu oyo bazalaki kofanda pembenipembeni ya ebale balobaki ete bazalaki kozongela kotánga bazulunalo yango mbala na mbala. Na bamboka mingi bazalaki na “posita” na bango ya mikanda, elingi koloba timbili to esika oyo biloko oyo ezali kotyola ezalaki kokende kokangama mpo na mwa ntango. Bato oyo basepelaki na nsango malamu bazalaki mbala na mbala kokende kotala na bisika wana “mikanda” na bango oyo ezalaki kouta epai ya likoló.
16. Ndenge nini tokoki kozwa libaku ya kokómisa bato bayekoli, soki kaka tomipesi?
16 Yehova Nzambe na baanzelu na ye ya nguya nde bazali kotambwisa mosala ya kosakola mpe bazali kosunga yango. (Emoniseli 14:6) Soki kaka tomipesi, ntango mosusu tokokutana na mabaku mosusu oyo tokanisaki te ya kokómisa bato bayekoli. Na engumba Nairobi, na ekólo Kenya, bandeko basi baklisto mibale oyo bazalaki na mosala ya kosakola, bakómaki na nsuka ya teritware oyo bapesaki bango mpo na kosakola ndako na ndako. Mbala moko elenge mwasi moko ayaki kokutana na bango mpe, na esengo mpenza, alobaki ete: “Nazalaki kobondela mpo nakutana na moto na bino moko.” Asɛngaki Batatoli yango bákende na ndako na ye mpo na kosolola; mpe kaka mokolo yango, babandaki koyekola na ye Biblia. Mpo na nini mwasi yango akendaki kokutana na baklisto yango nokinoki? Soki bapɔsɔ mibale liboso, akufelaki mwana. Ntango amonaki elenge moko na trakte “Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?” akómaki na mposa na yango mpe asɛngaki elenge wana apesa ye yango. Elenge yango aboyaki, kasi alakisaki ye Batatoli oyo bapesaki ye yango. Mosika te, mwasi yango akómaki kokola malamu na elimo mpe abɔndisamaki mingi na mpasi ya kokufela mwana.
Bolingo ya Nzambe ekolonga
17-19. Bolingo ya ndenge nini Yehova alakisi bato na nzela ya lisiko?
17 Ndenge oyo liloba ya Nzambe ezali kokola na mokili mobimba ezali na boyokani na mbeka oyo Klisto Yesu apesaki mpo na kosikola bato. Lisiko ezali komonisa ete Yehova alingaka bato na bisika nyonso, lokola mpe mosala ya kosakola ezali komonisa ete Nzambe alingaka bato na bisika nyonso. Ntoma Yoane apemamaki na elimo mpo na kokoma ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
18 Kanisá naino bolingo oyo Yehova amonisaki na ndenge apesaki lisiko. Banda kalakala mpenza, Nzambe azalaki na boyokani malamu mpenza na Mwana mobotami-bobele-moko mpe molingami na ye, “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Yesu alingaka Tata na ye mingi; Yehova mpe alingaki Mwana na ye “liboso ya kozalisama ya mokili.” (Yoane 14:31; 17:24) Yehova atikaki ete Mwana yango ya bolingo akufa mpo bato bázwa bomoi ya seko. Amonisaki bato bolingo ya kokamwa mpenza!
19 Yoane 3:17 elobi ete: “Nzambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili te kasi ete mokili ebika mpo na ye.” Elingi koloba ete Yehova atindaki Mwana na ye na mokumba malamu ya kobikisa bato, kasi ya kosambisa to kokatela bato bitumbu te. Likambo yango eyokani na maloba ya Petelo ete: “[Yehova] alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.”—2 Petelo 3:9.
20. Boyokani nini ezali kati na lobiko na mosala ya kosakola nsango malamu?
20 Lokola Yehova afutaki motuya monene mpo na kobongisa nzela ya lobiko, alingi ete bato oyo bakozwela yango litomba bázala mingi mpenza. Ntoma Paulo akomaki ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Nkolo akobika. Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?”—Baloma 10:13, 14.
21. Ndenge nini tosengeli kotalelaka libaku ya kosakola?
21 Kosangana na mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali mpenza libaku malamu mpenza! Ya solo, ezali mosala ya pɛtɛɛ te, kasi Yehova azali kosepela ntango azali komona bato ya sembo bazali kotosa mateya ya solo na bomoi na bango mpe bazali koteya basusu nsango malamu yango! Yango wana, ata soki bomoi na yo ezali ndenge nini, tiká ete elimo ya Nzambe mpe bolingo na yo epesa yo mposa ya kosala mosala yango. Kobosana te ete makambo oyo tozali komona na miso ete ezali kokokisama na mokili mobimba ezali kondimisa mpenza ete etikali moke Yehova Nzambe akokisa elaka na ye ya kosala “Likoló ya sika mpe nse ya sika” ya nkembo epai “boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini lipɛngwi ekokaki kokanga basakoli ya nsango malamu monɔkɔ te?
• Ndenge nini liloba ya Nzambe elongi na mikolo na biso?
• Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosala na mikolo na biso?
• Boyokani nini ezali kati na lisiko na mosala ya kosakola nsango malamu?
[Etanda/Elilingi na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Ndenge oyo basakoli ya Bokonzi bakómi ebele na ekeke ya 20
Basakoli ya bokonzi (mitángo ezali na bamilio)
6
5,5
5
4,5
4
3,5
3
2,5
2
1,5
1
0,5
1900 1910 1920 1930 1940 1950 1960 1970 1980 1990 2000
[Bililingi na lokasa 15]
JÉRÔME
TYNDALE
GUTENBERG
HUS
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Gutenberg na Hus: Euti na mokanda The Story of Liberty, 1878
[Elilingi na lokasa 15]
Bayekoli ya Biblia bazali kosakola nsango malamu na bambula ya 1920
[Bililingi na lokasa 17]
Na mokili mobimba bato bazali kondima nsango malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Mosala ya kosakola ezali kokumisa bolingo ya Nzambe, lokola mpe mbeka ya Yesu Klisto ezali kokumisa bolingo yango