Ndenge ya kolonga makanisi mabe
● Asafa amilelaki ete: “Solo, ezali bobele mpamba ete napɛtoli motema na ngai mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kati na sembo! Zambi nazali kotungisama mokolo na mokolo, ntɔngɔ na ntɔngɔ nakopamelama.”—Nzembo 73:13, 14.
● Baluku agangaki boye: “Mawa epai na ngai [sikoyo!] Mpo ete [Yehova] abakisi mawa na mpasi na ngai; nalɛmbi na konguluma na ngai mpe nayebi kopema te.”—Yilimia 45:3.
● Naomi amilelaki boye: “[Mozwi-na-Nguya-Nyonso, NW] asaleli ngai makambo ya bololo mingi. Nakendaki na ngai na mabɔkɔ matondi mpe [Yehova] azongisi ngai na mabɔkɔ mpamba. Botángi ngai Naomi mpo na nini awa [Yehova] atatoli mabe na ntina na ngai mpe [Mozwi-na-Nguya-Nyonso, NW] apesi ngai bolɔzi?”—Luta 1:20, 21.
NA KATI ya Biblia tokokuta bandakisa ebele ya basambeli ya sembo ya Yehova oyo bakómaki ntango mosusu na makanisi ya kolɛmba nzoto. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, makanisi ya motindo wana eyelaka biso mbala na mbala. Kati na biso, ezali na baoyo balɛmbaka nzoto noki, ntango mosusu bakómaka lisusu mawamawa mpo na makambo mosusu oyo bakutaná na yango.
Kasi, soki makanisi ya motindo wana ezali koyela yo mpe osali eloko te, yango ekoki kobebisa boyokani na yo na bato mosusu mpe na Yehova Nzambe. Moklisto moko ya mwasi oyo aumelaka te kokóma mawamawa alobi boye: “Mbala mingi, soki bandeko babengisi ngai mpo na kolekisa ntango elongo na bango, nazalaki koboya kokende mpo nazalaki komimona ete nazali na valɛrɛ te liboso ya bandeko na lisangá.” Makanisi ya motindo wana ekoki mpenza kobebisa bomoi ya moto! Okoki kosala nini mpo na kolonga yango?
Pusaná penepene na Yehova
Na Nzembo 73, Asafa akomaki polele makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Ntango akokanisaki bomoi na ye na oyo ya bato mabe oyo bazalaki na bozwi mingi, akómaki koyokela bango zuwa. Amonaki ete bato oyo bazalaki kobanga Nzambe te bazalaki na lofundo mpe na mobulu, mpe emonanaki lokola bazalaki kosala bango eloko te. Yango wana, Asafa akómaki komituna soki kozala sembo ezali mpenza na ntina.—Nzembo 73:3-9, 13, 14.
Yo mpe omonaka makambo lokola Asafa, omonaka ete bato mabe bazali komonana malamu, bazali komikumisa mpo na makambo mabe na bango? Ndenge nini Asafa alongaki makanisi na ye ya mabe? Alobi lisusu boye: “Wana ekanisaki ngai mpo na kososola yango, epesaki makanisi na ngai mpasi mingi. Kino esili ngai kokɔta na ndako ya bulɛɛ na Nzambe; wana nayebaki mpo na nsuka na bango.” (Nzembo 73:16, 17) Asafa asalaki malamu ndenge abondelaki Yehova. Soki tolandi maloba ya ntoma Paulo, Asafa alongolaki “moto ya mosuni” mpe alamusaki “moto ya elimo”. Lokola akómaki kotalela makambo na liso ya elimo, amonaki ete Yehova ayini mabe mpe na ntango oyo ye moko ayebi, akopesa bato mabe etumbu.—1 Bakolinti 2:14, 15.
Ezali mpenza na ntina otika ete Biblia esalisa yo otalela makambo ya bomoi ndenge ezali mpenza! Yehova alobi na biso ete ayebi malamu makambo oyo bato mabe bazali kosala. Biblia eteyi ete: “Bómizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango . . . Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te.” (Bagalatia 6:7-9) Yehova akotya bato mabe ‘na nzela ya mosɛlu; akobwaka bango na mobulu.’ (Nzembo 73:18) Nsukansuka, bosembo ya Nzambe ekolonga.
Kozala na ebongiseli ya malamu mpo na kolya ntango nyonso na elimo na mesa ya Yehova mpe kozala na baninga ya malamu kati na basaleli ya Nzambe ekosalisa yo ozala na kondima makasi mpe olonga kolɛmba nzoto to makanisi mosusu ya mabe. (Baebele 10:25) Soki osali lokola Asafa, elingi koloba ozali na boyokani malamu na Nzambe, akosunga yo na bolingo nyonso. Asafa abakisi boye: “Nazali na yo esika moko mikolo nyonso; yo okangi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okotambolisaka ngai na toli na yo, mpe na nsima [okomema ngai na nkembo, NW].” (Nzembo 73:23, 24) Mwasi moko moklisto oyo banyokolaki ye ntango azalaki mwana, amonaki mpenza ete maloba yango ezali maloba ya mayele. Alobi boye: “Kozala pembeni ya bandeko esalisaki ngai namona makambo ya bomoi ndenge mosusu. Namonaki mpenza ete bankulutu ya lisangá bazali na bolingo, bazali bapolisi te kasi bazali nde babateli ya mpate.” Ya solo, bankulutu oyo bazali na motema ya mawa basalisaka mpenza bandeko ete babwaka makanisi ya mabe.—Yisaya 32:1, 2; 1 Batesaloniki 2:7, 8.
Ndimá toli ya Yehova
Baluku, sekrɛtɛrɛ ya mosakoli Yilimia, amilelaki mpamba te, amonaki ete mosala na ye ekómaki kotungisa makanisi na ye. Kasi, Yehova abendaki likebi na ye na boboto mpenza, mpo na komonisa ye ndenge makambo ezalaki mpenza. “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te zambi talá, nakoyeisa mabe likoló na nzoto nyonso. [Yehova] alobi bongo. Kasi nakopesa bomoi na yo epai na yo lokola libonza na bisika nyonso bikokenda yo wana.”—Yilimia 45:2-5.
Yehova alobaki na Baluku polele, amonisaki ye ete soki abungisaki esengo na ye ezali mpo azalaki koluka matomba na ye moko. Lokola Baluku azalaki koluka makambo minene mpo na ye moko na ntango oyo azalaki kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye, akokaki kozala na esengo te. Yo mpe, ekoki kozala ete eloko ya malamu oyo osengeli kosala mpo na kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto ezali koboya makambo oyo ezangi ntina mpe koluka kimya ya makanisi oyo eutaka na esengo oyo Nzambe apesaka.—Bafilipi 4:6, 7.
Naomi, mwasi oyo akufelá mobali, aboyaki ete mpo na mawa ya mobali na ye mpe bana na ye mibale ya mibali oyo bakufaki, afanda ye moko na Moaba. Nzokande, ezali na mwa makambo oyo emonisi ete na boumeli ya mwa ntango ayokaki mawa ezala mpo na ye moko mpe mpo na bakilo na ye mibale. Ntango Naomi azalaki kozongisa bango epai ya baboti na bango, alobaki boye: “Nazali na mawa mingi na ntina na bino ete lobɔkɔ ya [Yehova] ebimeli ngai mpo na mabe.” Ntango akómaki na Beteleme, alobaki lisusu ete: “Bengá ngai Naomi [“Esengo na Ngai”] te, kasi bengá ngai Mala [“Bololo”], mpo ete [Mozwi-na-Nguya-Nyonso, NW] asaleli ngai makambo ya bololo mingi.”—Luta 1:13, 20.
Kasi, Naomi akendaki kofanda ye moko te, mosika na Yehova mpe na basaleli na ye, mpo na kolela bato na ye oyo bakufaki. Ntango azalaki na Moaba, ayokaki ete “[Yehova] asili kokóma epai ya bato na ye mpe apesaki bango kolya.” (Luta 1:6) Ayebaki ete esika oyo ebongaki mpo na ye ezalaki nde kuna, elongo na basaleli ya Yehova. Nsima na yango, elongo na bokilo na ye Luta, Naomi azongaki na Yuda mpe apesaki Luta mayele oyo asengelaki kosalela liboso ya Boaza, oyo azalaki na libota ya mobali na ye mpe ye nde akokaki kobala ye.
Ezali mpe ndenge moko na ntango na biso; bato ya sembo oyo basili kokufela balongani na bango bazali kobosana mpasi na bango na ndenge bamipesi na mosala na kati ya lisangá. Ndenge moko na Naomi, bazali komipesa na makambo ya elimo; bazali mpe kotánga Liloba ya Nzambe mikolo nyonso.
Matomba ya kosalela mayele oyo euti na Nzambe
Masolo ya Biblia oyo touti kotalela ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kolonga makanisi mabe. Asafa alukaki libɔndisi na tempelo ya Yehova mpe azelaki Yehova na motema molai. Baluku andimaki toli mpe atikaki koluka biloko ya mosuni oyo ezangi ntina. Naomi alandaki kosalela Yehova esika moko na basaleli na ye; asalisaki elenge mwasi Luta na mikumba na ye na losambo ya Nzambe ya solo.—1 Bakolinti 4:7; Bagalatia 5:26; 6:4.
Okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe makanisi mosusu ya mabe soki ozali kokanisa ndenge oyo Yehova apesaki nzela ete basaleli na ye bálonga, ezala mosaleli moko to ebele. Yango wana, kobosana te bolingo, oyo ekokani na mosusu, te oyo Yehova amonisaki na ndenge apesaki lisiko mpo na yo. Monisáká ete ozali na botɔndi mpo na bolingo ya solo ya bandeko baklisto. Na bomoi na yo, kobosana te na makanisi na yo, mokili ya sika ya Nzambe oyo ekómi pene. Tiká ete oloba lokola Asafa ete: “Mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe, nasili kotya elikya na ngai kati na Nkolo [Yehova], ete [nasakola] misala na yo nyonso.”—Nzembo 73:28.