Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/5 nk. 14-15
  • “Bótala! Ebele monene!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bótala! Ebele monene!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motuna oyo ebanda kala
  • Bingɛngiseli ebakisami lisusu
  • Bososoli ebakisami malamumalamu
  • Ebele monene ezali mpenza komonana
  • Ebele monene oyo moto akoki  kotanga motuya na bango te
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Ebele mpenza ya bampate mosusu bazali kokumisa Nzambe mpe Kristo.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • “Talá! ebele mpenza ya bato”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mokonzi asalisi bato báyeba makambo oyo etali Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/5 nk. 14-15

Bózala bato bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi

“Bótala! Ebele monene!”

NA BOUMELI ya bambula ebele, basaleli ya Yehova bazalaki koluka ndimbola na yango. Basalaki milende mpo na koyeba ndimbola na yango na nzela ya Makomami. Likambo yango ebimisaki ntembe mingi. Kasi nsukansuka, bazwaki eyano na Biblia mpe eyano yango esepelisaki mingi mpenza bato nyonso oyo bazalaki na liyangani oyo esalemaki na engumba Washington na 1935.

Likambo oyo ebimisaki ntembe nyonso wana ezalaki nde motuna oyo: “Ebele monene” oyo Emoniseli 7:9 elobeli, ezali banani? Bato yango bakokende na likoló?

Motuna oyo ebanda kala

Banda ntango oyo ntoma Yoane azalaki awa na mabele tii na ntango na biso, baklisto bazalaki koyeba te soki “ebele monene” ezalaki banani. Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa ete ebele monene ezalaki etuluku mosusu ya bato oyo bakokende na likoló; bato oyo bazalaki na boyebi ya solo ya Biblia, kasi bamipesaki mingi te mpo na kosakola yango.

Nzokande, ezalaki na bato mosusu oyo bazalaki kosala elongo na baklisto bapakolami, oyo bakómaki kosakola na molende mpenza. Bazalaki na makanisi ya kokende na likoló te. Elikya na bango eyokanaki mpenza na lisukulu ya bato nyonso “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te,” lisukulu oyo basaleli ya Yehova balobelaki mingi kobanda na 1918 tii na 1922. Bato yango bakozwa bomoi ya seko awa na mabele.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1923 (na Lingelesi) elobelaki lisese ya Yesu na ntina na bampate na bantaba, mpe elobaki boye: “Bampate bazali komonisa bato ya bikólo nyonso, bato oyo babotami na elimo te kasi balingi boyengebene, bandimaka Yesu Klisto lokola Nkolo mpe bazelaka eleko malamu oyo akoyangela mpe balikyaka na yango.”​—Matai 25:31-46.

Bingɛngiseli ebakisami lisusu

Na 1931, volimi ya liboso ya buku Justification (Kolongisama) elimbolaki Ezekiele mokapo 9 mpe emonisaki ete baoyo batyami elembo na elongi mpo na kobika na nsuka ya mokili nde bampate oyo Yesu alobelaki na lisese na ye. Volimi ya misato, oyo ebimaki na 1932, elobelaki motema ya sembo ya Yehonadaba, moto oyo azalaki Moyisalaele te, oyo amataki na likalo ya Yehu, moto oyo apakolamaki mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele, mpe akendaki elongo na ye mpo na kotala ndenge oyo Yehu akolakisa molende na ye mpo na koboma bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. (2 Mikonzi 10:15-28) Buku yango elobaki boye: “Yehonadaba azalaki elilingi ya bato oyo bazali lelo oyo awa na mabele, bato oyo bazali kolanda ebongiseli ya Satana te, baponi boyengebene; bango nde Nkolo akobatela na Armagedon, akobikisa bango na bolɔzi mpe akopesa bango bomoi ya seko awa na mabele. Bango nde etuluku oyo Yesu abengaki ‘bampate.’”

Na 1934, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki polele ete baklisto oyo bazalaki na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele basengelaki komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Pole ezalaki se kobakisama mpo na koyeba bato oyo bazalaki na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele!​—Masese 4:18.

Bososoli ebakisami malamumalamu

Etikalaki moke tókanga mpenza ntina ya Emoniseli 7:9-17. (Nzembo 97:11) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete liyangani oyo esengelaki kosalema na Washington, kobanda mokolo ya 30 Mai tii mokolo ya 3 Yuni 1935, esengelaki kozala mpenza “libɔndisi mpe litomba” mpo na baoyo Yehonadaba azalaki elilingi na bango. Esalemaki mpe bongo!

Liboso ya bayangani soki 20 000, Joseph Rutherford asalaki lisukulu moko ya kafukafu, motó ya likambo na yango ezalaki “Ebele monene.” Na lisukulu yango, amonisaki, na lisalisi ya Makomami, ete baoyo babengami “bampate mosusu” kaka bango nde bazali “ebele monene” oyo Emoniseli 7:9 elobeli. (Yoane 10:16) Na nsuka ya lisukulu yango, alobaki boye: “Nasɛngi na baoyo nyonso bazali na elikya ya kofanda awa na mabele mpo na libela bátɛlɛma.” Ntango ebele ya bayangani batɛlɛmaki, Rutherford alobaki ete: “Bótala! Ebele monene!” Liboso, bato nyonso bafandaki nyɛ; nde na nsima, babɛtaki mabɔkɔ makasi mpenza. Na mokolo oyo elandaki, Batatoli ya sika 840 bazwaki batisimo mpe mingi kati na bango bamonisaki ete bazalaki na kati ya ebele monene.

Ebele monene ezali mpenza komonana

Liboso ya 1935, bato ebele kati na baoyo bandimaki mateya ya Biblia mpe bazalaki kosakola nsango malamu na molende bazalaki kosepela na elikya ya kofanda mpo na libela na paladiso awa na mabele. Bazalaki na mposa ya kokende na likoló te, mpamba te Nzambe apesaki bango elikya ya kozala na bomoi kuna na likoló te. Ndenge bango moko bamonisaki ete bazali kati na ebele monene ya bampate mosusu, emonisaki ete libyangi ya baklisto bapakolami 144 000 esukaki na 1935.​—Emoniseli 7:4.

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, Satana Zabolo asalaki nyonso mpo na kopekisa mosala ya koyanganisa ebele monene. Mosala ya kosakola Bokonzi epekisamaki na bikólo mingi. Na mikolo wana ya mpasi mpe mwa moke liboso ya liwa na ye na sanza ya Yanuali 1942, Joseph Rutherford alobaki ete: “Namoni lokola ete ‘ebele monene’ yango ekozala mpenza monene te.”

Nzokande, Nzambe apambolaki mpe makambo esalemaki ndenge mosusu. Lokola ‘bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi,’ bapakolami, elongo na baninga na bango bampate mosusu balandaki kokokisa etinda ya kokómisa bato bayekoli. (Bakolose 4:12; Matai 24:14; 28:19, 20) Na 1946, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kosakola na mokili mobimba bazalaki 176 456; mingi kati na bango bazalaki bato ya ebele monene. Na mobu 2000, Batatoli koleka milio 6 basalelaki Yehova na bosembo nyonso na mikili 235: ebele monene mpenza! Bazali se kobakisama.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto