Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/5 nk. 16-21
  • Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toli malamu oyo Nzambe apesi
  • Kobanga Nzambe: likambo ya ntina mingi
  • Ntango nini kobala?
  • ‘Balá kaka kati na Nkolo’
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/5 nk. 16-21

Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani

“Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”​—NZEMBO 32:8.

1. Makambo nini esengeli mpo libala ezala malamu?

MOTO moko oyo azali kosala lisano ya kodiembela na nsinga, atiki nsinga na ye mpe amibwaki likoló, mpe abɛti bakilibiti. Ntango azali kosembola nzoto, mbala moko atandi mabɔkɔ mpe moninga na ye oyo azali mpe kodiembela na nsinga mosusu na makolo, motó na nse, akangi ye mabɔkɔ. Mobali na mwasi moko basimbani mpe bazali kosala lisano ya koselumwa na esika ya moselu. Na mbala moko, mobali atomboli mwasi mpe abwaki ye na likoló. Mwasi abaluki, abaluki; na nsima akiti malɛmbɛ na lokolo moko, basimbani lisusu mpe bakobi kobaluka mpe kobina. Masano yango ekoki komonana na miso lokola nde ezali mpasi te mpo na kosala yango. Kasi, nani oyo akondima kosala masano yango soki amimesenisi te, soki moninga na ye ayebi kosala yango te, mpe soki azali na malako to toli oyo ebongi te? Ezali mpe ndenge moko na libala. Bato mosusu bakanisaka ete libala ya malamu esalemaka yango moko. Nzokande mpo libala ezala malamu, esɛngaka molongani oyo abongi, kopesana mabɔkɔ mpe mingimingi koyoka toli ya malamu. Ya solo, toli oyo ebongi ezali na ntina mingi.

2. (a) Nani abandisaki libala, mpe asalaki yango na mokano nini? (b) Ndenge nini mabala mosusu esalemaki?

2 Ezali mabe te ete elenge mobali to mwasi monzemba akanisa kozala na molongani, moninga oyo bakofanda na ye tii liwa. Banda Yehova Nzambe ye moko abalisaki mobali mpe mwasi ya liboso, libala ekoma nzela ya malamu oyo bato balandaka. Kasi, mobali ya liboso, Adama, aponaki mwasi na ye te. Yehova ye moko apesaki ye mwasi. (Genese 2:​18-24) Mwasi na mobali ya liboso basengelaki kobota bana mpo ete, nsukansuka mabele mobimba etonda na bato. Nsima ya libala ya mobali mpe mwasi ya liboso, mbala mingi ekómaki, mpo bato bábalana, baboti ya mwana mobali na baboti ya mwana mwasi bakoyokana, mpe ntango mosusu bakotuna makanisi ya bana yango. (Genese 21:21; 24:2-4, 58; 38:6; Yosua 15:​6, 17) Atako tii lelo oyo na bamboka mosusu baboti ya mwana mobali mpe baboti ya mwana mwasi nde bayokanaka mpo na libala ya bana na bango, bato mingi bakómá kopona bango moko moto oyo balingi kobala.

3. Ndenge nini moto asengeli kopona molongani?

3 Ndenge nini moto asengeli kopona molongani na ye? Bato mosusu balandaka kaka kitoko ya nzoto​—oyo ezali kobenda mpe kosepelisa miso na bango. Bamosusu balukaka moto ya mbongo, moto oyo akopesa bango nyonso oyo bazali na yango mposa. Kasi, tokanisi mpenza ete kitoko ya moto to mbongo ekoki mpo libala ezala malamu mpe na esengo? Masese 31:30 elobi ete: “Bonzenga ekozimbisa mpe kitoko ezali mpamba, nde mwasi oyo akotosa [Yehova], ye akosanzolama.” Likambo ya ntina mpenza ezali oyo: Esengeli kotalela makanisi ya Yehova mpo na kopona molongani.

Toli malamu oyo Nzambe apesi

4. Lisalisi nini Nzambe apesi mpo na likambo etali kopona moto ya kobalana na ye ?

4 Yehova, Tata ya bolingo, apesi biso Liloba na ye to mokanda mpo na kotambwisa biso na makambo nyonso. Alobi ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete Biblia ezali kopesa toli na ndenge ya kopona molongani mpe toli yango esilaka ngala te. Yehova alingi ete tózala na mabala oyo ekoumela mpe ya esengo. Yango wana, asalisi biso mpo tókanga ntina mpe tosalela toli yango. Yango mpenza nde likambo oyo tokokaki kolikya epai ya Mozalisi oyo alingaka biso, boye te?​—Nzembo 19:8.

5. Likambo nini ezali na ntina mingi mpo libala ezala ntango nyonso na esengo?

5 Ntango Yehova abandisaki libala, mokano na ye ezalaki ete eumelaka libela. (Malako 10:6-12; 1 Bakolinti 7:10, 11) Yango wana “ayini kolongolama ya mwasi”; apesi nzela na koboma libala kaka mpo na “ekobo.” (Malaki 2:13-16; Matai 19:9) Yango wana, kopona molongani ezali moko na makambo minene mpenza oyo tosengeli kozwa yango na lisɛki te. Na bikateli nyonso oyo moto akoki kozwa, mingi te ekokani na libala mpo na kopesa ye esengo to mpe, soki akebi te, kopesa ye mawa. Soki oponi molongani ya malamu, bolamu mpe esengo ya bomoi na yo ekobakisama; kasi soki oponi mabe, okokoma na mitungisi mokolo na mokolo. (Masese 21:19; 26:21) Mpo libala ezala ntango nyonso na esengo, ezali na ntina mingi kopona molongani ya malamu mpe kondima kolapa ndai ya kofanda na ye libela, mpamba te Nzambe alingaki ete bato mibale oyo babalani báfanda na bomoko mpe básalisanaka.​—Matai 19:6.

6. Mpo na nini bilenge basi mpe mibali basengeli mpenza kokeba ntango bazali kopona molongani, mpe ndenge nini bakoki kozwa ekateli ya mayele?

6 Mingimingi bilenge, ezala ya basi to ya mibali, basengeli mpenza kokeba ete kitoko mpe mposa na bango ya nzoto ekosa bango te ntango bazali kopona moto oyo balingi kobalana na ye. Bato oyo babalani mpo balulanaki kitoko to mpo na mposa ya nzoto, bakoki komona ete nsima ya mwa ntango makambo ebongwani mpe bakómi kotyolana to mpe koyinana mpenza. (2 Samwele 13:15) Nzokande, bolingo ya solosolo ekolaka ntango tozali koyeba moto malamu mpe komiyeba biso moko. Tóbosana mpe te ete makambo oyo eleki malamu mpo na biso, ntango mosusu ezali yango te oyo motema na biso elingaka na ebandeli. (Yilimia 17:9) Yango wana toli oyo Nzambe azali kopesa biso na Biblia ezali na ntina mingi. Toli yango ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kozwa bikateli ya malamu mpenza na kati ya bomoi na biso. Mokomi ya Nzembo amonisaki Yehova azali koloba boye: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nzembo 32:8; Baebele 4:12) Ya solo, kobala ekoki kokokisa mposa na biso ya kozala na moto oyo tolingani na ye mpe ya kozala na molongani; kasi, libala ezali mpe na mikakatano na yango oyo esɛngaka kozala moto oyo akɔmeli mpe ayebi kososola mpo na kolonga yango.

7. Mpo na nini bato mosusu bayokaka toli ya Biblia te na likambo etali kopona moto ya kobalana na ye, kasi likambo yango ekoki kosukela bango ndenge nini?

7 Mayele ezali kotinda biso tóyoka oyo Mobandisi ya libala azali koloba na likambo etali kopona moto ya kosala na ye libala. Kasi, tokoki kozala na motó makasi soki ezali baboti to bankulutu nde bazali kopesa biso toli ya Biblia. Ntango mosusu tokomona lokola nde bazali komitya na esika na biso te, mpe lolango ekoki kotinda biso na kosala kaka oyo motema na biso elingi. Nzokande, ntango tokolongwa na mpɔngi, mbala mosusu tokobanda kokanisa: ‘Aa, soki nayokaki toli oyo bapesaki ngai mpo na bolamu na ngai.’ (Masese 23:19; 28:26) Mbala mosusu tokomona ete tobalani na moto oyo, kati na biso na ye, bolingo ezali te, tokómi na mokumba ya kobɔkɔla bana oyo ekómi koleka biso motó to mpe mbala mosusu kobalana na moto oyo azali mondimi te. Ekozala mpenza mawa soki libala, likambo oyo esengelaki komemela biso esengo, yango nde ekómi likambo oyo ezali kobotela biso mitungisi likoló ya mitungisi!

Kobanga Nzambe: likambo ya ntina mingi

8. Ndenge nini ezaleli ya kobanga Nzambe esalisaka mpo libala eumela mpe ezala na esengo?

8 Toboyi te, kolulana na moto esalaka mpe ete libala ezala makasi. Kasi, ezali nde makambo oyo bino mibale bopesaka motuya mingi nde eleki ntina mpo libala eumela mpe ezala na esengo. Soki bino mibale bobangaka Yehova Nzambe, libala na bino ekozala makasi mpe kobanga Yehova ekotya bomoko oyo eloko mosusu ekoki kosala te. (Mosakoli 4:12) Soki mwasi na mobali oyo bazali baklisto batii losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango, bakozala na bomoko na elimo, na makanisi mpe na motema. Bakobanda koyekola Liloba ya Nzambe elongo. Bakobondela elongo mpe bakozala na motema moko. Bakobanda kokende makita elongo mpe kobima elongo na mosala ya kosakola. Nyonso wana ekosalisa bango bálona bomoko ya elimo oyo ekobota mpe boninga makasi kati na bango mibale. Likambo eleki ntina ezali ete Yehova akopambola bango.

9. Abalayama asalaki nini mpo na kozwela Yisaka mwasi, mpe litomba nini emonanaki?

9 Abalayama, moto ya sembo, azalaki kobanga Nzambe, yango wana alukaki kosepelisa ye ntango alingaki koponela mwana na ye Yisaka mwasi. Abalayama ayebisaki mosaleli na ye ya motema ete: “Nakokatisa yo ndai na nkombo ya [Yehova], Nzambe ya likoló mpe ya mokili, ete [okozwela] mwana na ngai mwasi kati na basi ya Kanana te, baoyo nazali kofanda kati na bango. Nde okokenda na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe [okozwa] mwasi mpo na mwana na ngai Yisaka. . . . [Yehova] akotinda anzelu na ye na liboso na yo, mpe okozwa mwasi mpo na mwana na ngai kuna.” Lebeka azalaki mwasi malamu mpenza mpe Yisaka alingaki ye mingi.”​—Genese 24:3, 4, 7, 14-21, 67.

10. Makomami epesi mibali mpe basi mikumba nini?

10 Soki ozali moklisto oyo obali naino te, kobanga Nzambe ekosalisa yo olona bizaleli malamu oyo ekosunga yo na kokokisa oyo Makomami ezali kosɛnga na mwasi na mobali oyo babalani. Kati na makambo oyo basɛngi na mibali mpe basi, ntoma Paulo atángaki oyo: “Bino basi bótosaka babali na bino [lokola] epai na Nkolo . . . Bino babali, bólingaka basi na bino [lokola] Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na [yango] . . . Ekoki na babali ete bálinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. . . . Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko mpe tiká ete mwasi atosa mobali na ye.” (Baefese 5:22-33) Ndenge tomoni yango, maloba oyo Paulo akomaki na kopemama na elimo santu emonisi mingimingi ntina ya kozala na bolingo mpe limemya. Mpo na kotosa toli yango esɛngaka kozala moto oyo abangaka mpenza Yehova. Esɛngaka kolapa ndai, na motema moko, ya kofanda elongo na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo. Baklisto oyo balingi kobala basengeli kozala bato oyo bakoki kokokisa mokumba yango.

Ntango nini kobala?

11. (a) Makomami epesi toli nini na oyo etali ntango ya kobala? (b) Ndakisa nini emonisi ete kolanda toli ya 1 Bakolinti 7:36 ezali likambo ya mayele?

11 Ezali na ntina mingi tóyeba ntango oyo tokoki komona ete tokoki mpo na kobala. Lokola yango ezali ndenge moko te mpo na bato nyonso, Makomami etii mbula te. Kasi, emonisi ete eleki malamu kolekisa naino “ebandeli ya bolenge,” mpamba te lokola mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi na ntango yango, moto akoki komikosa. (1 Bakolinti 7:36, NW) Elenge mwasi moko nkombo na ye Michelle, alobi boye: “Nazalaki, soki namoni baninga na ngai bazali kokutana na bafianse na bango mpe bazali kobala, mosusu kutu ntango bazali naino bilenge mpenza, ntango mosusu ezalaki mpasi nandima toli yango. Kasi, nasosolaki ete ezali toli ya Yehova, mpe Yehova alobaka na biso kaka makambo oyo ezali mpo na bolamu na biso. Ntango nazalaki kozela bábala ngai, natyaki makanisi na ngai nyonso na boyokani na ngai na Yehova mpe na koyeba makambo mwa mingi ya bomoi, makambo oyo moto akoki koyeba te ntango azali naino elenge mpenza. Nsima ya mwa bambula, namonaki ete nakoki mpenza kokokisa mikumba ya libala mpe kolonga mikakatano na yango.”

12. Mpo na nini ezali likambo ya mayele ete moto awela kobala te ntango azali naino elenge?

12 Baoyo bawelaka kobala ntango bazali naino bilenge mpenza, mbala mingi bamonaka ete bamposa na bango ebongwanaka ntango bakɔmeli. Bamonaka ete makambo mosusu oyo bazalaki kolinga mingi ezali lisusu na ntina mpenza te. Elenge mwasi moklisto moko alonaki makanisi ya kobala soki akokisi mbula 16. Nkɔkɔ na ye ya mwasi na mama na ye babalaki bango ntango bazalaki na mbula wana. Ntango amonaki ete elenge mobali oyo azalaki kosepela na ye aboyaki kobala ye ntango wana, alukaki moto mosusu oyo andimaki kobala ye. Kasi, na nsima, amilelalelaki mingi ete azwaki ekateli ya mbangumbangu.

13. Mbala mingi baoyo bawelaka kobala ntango bazali naino bilenge bazangaka makambo nini?

13 Ntango tozali kokanisa kobala, ezali na ntina tótalela makambo nyonso ya libala na makanisi ya moto oyo akɔmeli. Moto oyo abali ntango azali naino mwana moke akoki kokutana na ebele ya mikakatano oyo, mbala mingi, bilenge bazalaka naino na makoki ya kolonga yango te. Ntango mosusu bayebi makambo mingi te mpe bazali na bososoli te oyo esengeli mpo na kolonga mitungisi ya libala mpe kobɔkɔla bana. Mpo libala eumela, esengeli kobala se soki okoli na nzoto, na makanisi mpe na elimo.

14. Makambo nini esengeli mpo na kosilisa matata na kati ya libala?

14 Paulo akomaki ete baoyo bakobala “bakozala na mpasi na nzoto.” (1 Bakolinti 7:28) Na libala, matata ekoki kozanga te, mpamba te libala esangisi bato mibale oyo bakeseni, mpe ekokóma ete, na likambo moko to mosusu, bayokani te. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi mpo na kokokisa mokumba oyo Makomami ezali kosɛnga biso na kati ya libala. ((1 Bakolinti 11:3; Bakolose 3:18, 19; Tito 2:4, 5; 1 Petelo 3:1, 2, 7) Esɛngaka kozala moto oyo akɔmeli mpe kozala makasi na elimo mpo na koyoka mpe kondima toli ya Nzambe mpo na kosilisa matata na bolingo.

15. Baboti bakoki kosala nini mpo na kobongisa bana na bango mpo na libala? Pesá ndakisa.

15 Baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona ntina ya kolanda toli ya Nzambe mpo bázala na mabala ya malamu. Soki baboti bazali kosalela malamu Makomami mpe mikanda oyo lisangá ya boklisto ezali kobimisa, bakosalisa bana na bango na koyeba soki bango moko to bato oyo balingi kobala bakoki mpo na kondima ndai ya libala.a Blossom, elenge mwasi moko ya mbula 18, akanisaki ye na elenge mobali moko na lisangá na bango balinganaki mpenza. Elenge mobali yango azalaki mobongisi-nzela mpe bazalaki na mposa bábalana. Kasi, baboti ya Blossom basɛngaki ye ete alekisa lisusu mbula moko; mpamba te mpo na bango, akɔmelaki naino mpenza te. Na nsima, Blossom akomaki ete: “Nazali na esengo mingi ete nandimaki toli wana ya mayele. Nsima ya mbula moko, nakolaki lisusu mwa mingi na makanisi mpe nakómaki komona ete mwana mobali yango azalaki te na bizaleli oyo ekosala ete azala mobali ya malamu. Kutu, nsukansuka abimaki na lisangá, mpe nabikaki mpamba te elingaki kozala likama monene na bomoi na ngai. Ezali mpenza esengo na kozala na baboti oyo nakoki kotyela bososoli na bango motema!”

‘Balá kaka kati na Nkolo’

16. (a) Ndenge nini baklisto bakoki komekama na likambo ya ‘kobala kaka kati na Nkolo’? (b) Ntango moklisto amekami na kobala moto oyo azali mondimi te, asengeli kokanisa makambo nini?

16 Toli oyo Yehova apesi na baklisto ezali polele mpenza ete: ‘Balá kaka kati na Nkolo.’ (1 Bakolinti 7:39, NW) Likambo yango ekoki kozala komekama mpo na baboti baklisto na bana na bango. Na ndenge nini? Elenge moko akoki kozala na mposa ya kobala, kasi ntango mosusu azali komona moto oyo abongi na ye te na kati ya lisangá; to mpe akoki kokanisa bongo. Na mboka mosusu, ekoki kozala ete basi bazali mingi kasi mibali ya kobala bango bazali moke, to mpe ekoki kozala ete moto azali komona moto oyo azali kosepelisa ye te. Elenge mobali moko ya mokili akoki kosepela na elenge mwasi moklisto to mpe elenge mwasi moklisto akoki kosepela na elenge mobali moko ya mokili. Na ntango wana moto akoki kokóma na mitema mibale liboso ya mitinda ya Yehova. Na likambo ya ndenge wana, ezali malamu kokanisa ndakisa ya Abalayama. Mpo na kobatela boyokani na ye na Nzambe alingaki ete mwana na ye Yisaka abala kaka mosaleli ya solo ya Yehova. Yisaka mpe asalaki bongo mpo na mwana na ye Yakobo. Likambo yango esɛngaki molende mpo na bango nyonso, kasi esepelisaki Nzambe mpe apambolaki bango.​—Genese 28:1-4.

17. Mpo na nini kobala moto oyo azali mondimi te ezali likama, mpe wapi ntina ya libosoliboso ya ‘kobala kaka kati na Nkolo’?

17 Esi esalema ete molongani oyo azalaki mondimi te, nsukansuka akómi moklisto, kasi ezali likambo oyo esalemaka mingi te. Kutu, mbala mingi baklisto oyo babalanaki na bato oyo bazali bandimi te basukaki mabe. Bato yango bakanganaki na ekanganeli elongobani te na bato oyo bazali na bango kondima, mitinda mpe mikano moko te. (2 Bakolinti 6:14, NW) Likambo yango ekoki komema kwokɔsɔ na boyokani ya libala mpe kobebisa esengo na yango . Na ndakisa, mwasi moklisto moko oyo mobali na ye azali mondimi te amilelalelaki mingi ete nsima ya koyoka makambo malamu na makita, soki azongi na ndako, azalaki na moto te ya kosolola na ye makambo ya elimo. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete ‘kobala kaka kati na Nkolo’ ezali likambo ya kozala sembo epai ya Yehova. Soki totosi Liloba ya Nzambe, mitema na biso ekokweisa biso te, mpamba te tokosala oyo ezali “malamu na miso na ye.”​—1 Yoane 3:21, 22.

18. Ntango moto azali kokanisa kobala, asengeli kotya likebi na makambo nini ya ntina mpe mpo na nini?

18 Ntango olingi kobala, osengeli kotalela libosoliboso bizaleli mpe elimo ya moto. Bizaleli malamu ya moklisto, kolinga Nzambe mpe kobanga ye na motema mobimba, ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto. Nzambe asepelaka na bato oyo balingaka mpe bakokisaka mokumba na bango ya kozala mibali mpe basi oyo bazali makasi na elimo. Libala ekozala makasi mingi soki mwasi na mobali babangaka Mozalisi mpe balandaka mpenza toli na ye. Na ndenge yango, Yehova akozwa lokumu, mpe libala ekozala na ebandeli malamu na elimo, mpe yango ekosala ete eumela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1999, nkasa 4-8.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini tozali na mposa ya toli ya Nzambe mpo na kopona molongani ya malamu?

• Ndenge nini kobanga Nzambe ebakisaka makasi na libala?

• Ndenge nini baboti bakoki kobongisa bana na bango mpo na libala?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘kobala kaka kati na Nkolo’?

[Bililingi na lokasa 17]

Kolanda toli ya Nzambe mpo na kopona moto ya kobalana na ye ekoki kopesa esengo mingi

[Bililingi na lokasa 18]

Moto azwaka mapamboli mingi soki ‘abali kaka kati na Nkolo’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto