Tótalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali na mpasi na bango
Moto nyonso ayebi ete na mokili oyo, bolingo ezali te. Kutu, ntoma Paulo azalaki kolobela lolenge ya bato oyo bakozala na “mikolo ya nsuka,” ntango akomaki ete: “Ntango ya mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, . . . bato bazangi bolingo.” (2 Timote 3:1-3) Maloba yango ezali mpenza solo!
NA MIKOLO na biso, bizaleli ya bato oyo bazingi biso esali ete bato mingi báyokela lisusu baninga na bango mawa te. Bato bamibanzabanzaka lisusu te na bolamu ya basusu, ezala mbala mosusu ata oyo ya bato ya libota na bango moko.
Likambo yango esali ete bato mingi, na kotalela makambo oyo bakutanaki na yango, bákóma kokelela. Bitumba, makama lokola mpela, mopɛpɛ makasi, koningana ya mabele . . . , mpe ndenge bato mingi bazali kokima mboka na bango mpo na koluka esika ya komibomba, nyonso wana esali ete basi bakufeli-mibali mpe bitike bákóma se kobakisama. (Mosakoli 3:19) Lapolo moko ya ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka makambo ya bana (UNICEF) elobi ete: “Bitumba esali ete bana koleka milio moko bákóma bitike to bázala esika moko te na mabota na bango.” Yo mpe oyebi bamama mingi oyo batikalá bango moko, bamosusu oyo basundolá bango, to baoyo mabala na bango ekufá, bango nyonso bazali koboma nzoto bango moko mpo na kotikala kaka na bomoi mpe mpo na kobɔkɔla bana na bango. Likambo yango ezali kokóma lisusu mabe koleka mpo ete bikólo mosusu ezali na mikakatano makasi ya nkita, likambo oyo ezali kosala ete bana-mboka mingi bázala babola mpenza.
Na kotalela likambo yango, elikya nini ezali mpo na baoyo bazali komona mpasi? Ndenge nini tokoki kolɛmbisa mpasi ya basi bakufeli-mibali mpe bitike? Ezali na mokolo moko oyo likambo yango ekosila ?
Lisalisi ya bolingo mpenza na ntango ya Bayisalaele
Na ntango ya Bayisalaele, kosalisa basi bakufeli-mibali mpe bitike na mosuni mpe na elimo, ezalaki moko ya makambo oyo losambo ya Nzambe ezalaki kosɛnga. Ntango Bayisalaele bazalaki kobuka mbuma na bilanga na bango, basengelaki te koyanganisa mbuma nyonso oyo ezalaki kokwea na elanga mpo ete na nsima báya kolɔkɔta yango bango moko. Basengelaki kotika yango “mpo na mopaya mpe etike mpe mwasi akufeli-mobali.” (Deteronome 24:19-21) Mobeko ya Mose elobaki ete: “Bokopesa mawa te na mwasi-akufeli-mobali, soki na mwana etike mpe te.” (Exode 22:22, 23) Basi bakufeli-mibali mpe bitike oyo Biblia ezali kolobela, bazalaki bato oyo bazalaki babola mpenza; mpamba te nsima ya liwa ya mobali mpe ya tata to mpe ya baboti nyonso mibale, bato ya libota oyo batikali na bomoi bazalaki ntango mosusu kotikala bango moko mpe kokelela. Yango wana, Yobo alobaki ete: “Nabikisaki mobola oyo alelaki, mpe etike na tata oyo azalaki na mosungi te.”—Yobo 29:12.
Ntango lisangá ya boklisto ebandaki, kosalisa baoyo bazalaki komona mpasi mpe bazalaki mpenza na bosɛnga, na ndakisa moto oyo abungisaki baboti to mobali, ezalaki elembo oyo ezalaki komonisa mpenza losambo ya solo. Moyekoli Yakobo, oyo azalaki komibanzabanza mingi mpo na bolamu ya basi bakufeli-mibali mpe bitike, akomaki boye: “Losambo ya pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotala bitike mpe basi bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo ya mokili.”—Yakobo 1:27.
Longola likambo ya bitike mpe basi bakufeli-mibali, Yakobo amonisaki mpe ete azalaki kokanisa mingi bato mosusu oyo bazalaki babola mpe na bozangi makasi. (Yakobo 2:5, 6, 15, 16) Ntoma Paulo amonisaki makanisi motindo moko. Ntango batindaki ye na Balanaba na mosala ya kosakola, moko ya malako oyo bapesaki bango ezalaki ya ‘kokanisa babola.’ Na lisosoli malamu, Paulo alobaki ete: “Nazalaki na mposa mingi ya kosala bobele bongo.” (Bagalatia 2:9, 10) Lisolo ya misala ya lisangá ya boklisto mwa moke nsima ya ebandeli na yango, elobi boye: “Na kati na bango, moto te azalaki mozangi . . . Bongo bakaboli yango na moto na moto lokola ezalaki ye na bosɛnga.” (Misala 4:34, 35) Ɛɛ, ebongiseli oyo etyamaki na Yisalaele ya kala, ya kosalisa bitike, basi bakufeli-mibali, mpe bato oyo bazalaki kokelela bamemaki yango mpe na lisangá ya boklisto.
Ezali solo ete lisungi oyo bazalaki kopesa ezalaki na ndelo, mpe bazalaki kopesa yango na kotalela makoki ya lisangá mokomoko. Bazalaki te kobebisa mbongo mpamba, mpe bazalaki kosalisa kaka baoyo bazalaki mpenza na bosɛnga. Lisalisi yango ezalaki kopesama kaka na baklisto oyo basengelaki na yango mpenza, mpe bazalaki te kopesa lisangá bozito oyo ezangi ntina. Yango emonisamaki polele na malako oyo Paulo apesaki, na mokanda ya 1 Timote 5:3-16. Kuna tomoni ete soki bandeko ya moto oyo azali na bosɛnga bazali na makoki ya kosalisa ye, bango nde bato basengelaki kozwa mokumba yango. Mpo ete basi bakufeli-mibali oyo bazali na bosɛnga bázwa lisungi ya lisangá, esengelaki bákokisa mwa masɛngami. Nyonso wana emonisi ebongiseli ya mayele oyo Yehova azwaka mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Lisusu, yango emonisi ete esengeli komonisa ezaleli ya bokatikati, na bongo kaka moto oyo azali mpenza na bosɛnga nde akoki kozwa litomba na boboto oyo bamosusu bazali komonisa.—2 Batesaloniki 3:10-12.
Ndenge tokoki kosalisa bitike mpe basi bakufeli-mibali na mikolo na biso
Ntango bamibanzabanzaka mpo na baoyo bazali konyokwama mpe ntango basungaka bato yango, Batatoli ya Yehova basalelaka na masangá na bango kaka malako oyo basaleli ya Nzambe bazalaki kolanda na ntango ya kala. Bolingo ya bandeko ezali elembo oyo ezali kokesenisa biso, ndenge Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Soki bamoko bazali kokelela, to bazwi likama to mpe bampasi oyo euti na bitumba, libota ya bandeko na mokili mobimba bakosala nyonso mpo na kosunga bango na elimo mpe na mosuni. Tótala mwa masolo ya mikolo na biso oyo emonisi ndenge likambo yango ezali kosalema.
Pedro ayebi mpenzampenza mama na ye te, mpamba te mama na ye akufaki ntango ye azalaki na mbula moko na ndambo mpamba. Ntango Pedro akokisaki mbula mitano, tata na ye mpe akufaki. Pedro atikalaki kaka na bandeko na ye. Batatoli ya Yehova babandaki kosolola na tata na bango, yango wana Pedro na bayaya na ye nyonso bakómaki koyekola Biblia.
Pedro alobi boye: “Na pɔsɔ oyo elandaki, tobandaki koyangana na makita. Ntango tosanganaki na bandeko, tomonaki ete balingi biso. Lisangá ekómaki mpo na ngai esika ya komibomba, mpo bandeko bazalaki mpenza kolinga ngai lokola nde bazalaki baboti na ngai.” Pedro akanisi lisusu ndenge nkulutu moko azalaki kobengisa ye na ndako na ye. Kuna, Pedro azalaki kosolola mpe kosakana na libota ya nkulutu yango. Pedro, oyo abandaki kosakola ntango azalaki na mbula 11 mpe azwaki batisimo na mbula 15, alobi boye: “Wana ezali basuvenire oyo nalingaka mingi.” Lokola bandeko ya lisangá basalisaki mpe bayaya na ye, bango mpe bakolaki mingi na elimo.
Tólobela mpe David. Ntango baboti na bango bakabwanaki, basundolaki ye na lipasa na ye ya mwasi. Bankɔkɔ na bango mpe tata-mwasi na bango babɔkɔlaki bango. “Ntango tokolaki mpe tomonaki ndenge oyo tozalaki kofanda, tozalaki komiyoka ete tozangi kimya mpe tozalaki mawamawa. Tozalaki na mposa ya lisungi. Tata-mwasi akómaki Motatoli ya Yehova, mpe na nzela na ye tozwaki mateya ya solo ya Biblia. Bandeko bamoniselaki biso bolingo mpe boninga. Bazalaki kosepela na biso mingi mpe bazalaki kolendisa biso ete tómityela mikano mpe tólanda kosalela Yehova. Ntango nazalaki na mbula soki 10, ndeko moko oyo azalaki mosaleli ya misala azalaki kozwa ngai mpo tóbimaka na mosala ya kosakola. Ndeko mosusu azalaki kofutela ngai tike mpo na kokende na mayangani. Ndeko mosusu azalaki kutu kosalisa ngai mpo nakoka kopesa makabo na Ndako ya Bokonzi.”
David azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 17, mpe na nsima akómaki kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Mexique. Ezala lelo, andimi ete: “Bankulutu mingi basalaka nyonso oyo bakoki mpo na koteya ngai mpe basungaka ngai na toli na bango. Yango esalisaka ngai mpo namona te ete nazangi libateli to mpe nazali ngai moko.”
Abel, nkulutu na lisangá moko ya Mexique, lisangá oyo ezali na ebele ya basi bakufeli-mibali oyo bazali na mposa ya lisungi, ayebisi boye: “Nandimi mpenza ete lisungi monene oyo basi bakufeli-mibali bazalaka na yango mposa ezali lisungi ya mayoki. Mbala mosusu bakómaka konyokwama na makanisi; bamiyokaka ete bazali bango moko. Yango wana, tosengeli kosalisa bango mpe koyoka bango. Biso [bankulutu ya lisangá] totalaka bango mbala na mbala. Ezali malamu tózwaka ntango ya kotya likebi na mikakatano na bango. Yango ekosalisa bango na komiyoka ete babɔndisami na elimo.” Kasi ntango mosusu, bazalaka mpe na mposa tósunga bango na biloko ya mosuni. Eleki mwa mikolo, Abel ayebisaki ete: “Sikoyo, tozali kotongela ndeko mwasi moko mokufeli-mobali ndako. Tolekisaka mikolo mosusu ya pɔsɔ mpe bampokwa mosusu na mosala ya ndako yango.”
Na kotalela nyonso oyo ye moko asi asali mpo na kosunga bitike mpe basi bakufeli-mibali, nkulutu mosusu ya lisangá alobi boye: “Nakanisi ete bitike nde bato bazalaka na mposa makasi ete bámonisela bango bolingo koleka basi bakufeli-mibali. Namonaki ete soki bamikokanisi na bana mpe bilenge oyo baboti na bango bazali naino na bomoi, bakómaka mingimingi kokanisa ete moto moko te alingi bango. Bazalaka mpenza na mposa ete bandeko bámonisa ete balingaka bango mingi. Ezali malamu koluka bango nsima ya makita mpo na koyeba soki bazali ndenge nini. Ndeko moko oyo asi abalá, atikalaki etike ntango azalaki mwana moke. Ntango nyonso, na makita, napesaka ye mbote na esengo mpenza, mpe ye ayambaka ngai ntango amonaka ngai. Yango esalaka ete bolingo ya solo kati ya bandeko ekóma makasi.”
Yehova “akobikisa mobola”
Mpo na kolonga mokakatano ya basi bakufeli-mibali mpe bitike, esengeli kaka kotya elikya epai ya Yehova. Mpo na ye, Biblia elobi boye: “[Yehova] akobatela bapaya, akosimba bitike mpe basi bakufeli-mibali.” (Nzembo 146:9) Makambo ya motindo yango ekosila mpenza kaka na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, oyo apesi na mabɔkɔ ya Yesu Klisto. Na ndenge ya esakweli, mokomi ya nzembo alobelaki bokonzi yango ya Masiya, ntango akomaki boye: “Akobikisa mobola oyo akongangaka, mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola.”—Nzembo 72:12, 13.
Lokola nsuka ya mokili oyo ezali kokóma pene, mitungisi oyo baklisto nyonso bazali kokutana na yango ekobakisama se kobakisama. (Matai 24:9-13) Yango wana, esengeli ete, mokolo na mokolo, baklisto bámibanzabanzaka mpo na baklisto mosusu mpe ‘balinganaka makasi.” (1 Petelo 4:7-10) Mibali baklisto, mingimingi bankulutu, basengeli komibanzabanza mpe komonisa motema mawa mpo na baoyo bazali bitike. Bandeko basi oyo bakɔmeli bakoki mpe kosunga mingi basi bakufeli-mibali mpe kobɔndisa bango ntango nyonso. (Tito 2:3-5) Kutu, moto nyonso akoki kopesa mabɔkɔ na likambo yango, soki azali komibanzabanza mpo na bato mosusu oyo bazali komona mpasi.
Baklisto ya solo basengeli te ‘kokangela bandeko na bango mitema,’ ntango bazali ‘komona bango na kozanga.’ Bayebi malamu ete basengeli kolanda toli oyo ntoma Yoane apesaki, ete: “Bana, bólingana na bolingo ya maloba te soki ya monɔkɔ te kasi na bolingo ya misala mpe ya solo.” (1 Yoane 3:17, 18) Na yango, tiká ete ‘tótalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali na mpasi na bango.’—Yakobo 1:27.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]
‘Tólingana na bolingo ya maloba te soki ya monɔkɔ te kasi na bolingo ya misala mpe ya solo.’—1 Yoane 3:18
[Bililingi na lokasa 10]
Baklisto ya solo basalisaka bitike mpe basi bakufeli-mibali na mosuni . . . na elimo mpe na mayoki