Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/7 nk. 4-6
  • Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ ya bomoi oyo ezali na ntina
  • Kobanga Nzambe elimboli nini?
  • Bobangi mpe bolingo ekendaka nzela moko
  • Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/7 nk. 4-6

Mpo na nini tosengeli koyekola Biblia?

BILL azalaki elenge ya nzoto makasi oyo atángaki kelasi mingi, mpe azalaki na bomoi ya malamu. Kasi, azalaki kosepela te. Bomoi na ye ezalaki na ntina te, mpe likambo yango ezalaki kotungisa ye mingi. Mpo na koluka kozala na bomoi oyo ezali na ntina, akɔtaki na mangomba ndenge na ndenge, kasi amonaki eloko oyo azalaki koluka te. Na 1991, akutanaki na Motatoli ya Yehova moko, oyo atikelaki ye mokanda moko oyo ezali komonisa oyo Biblia elobi mpo na ntina ya bomoi. Bayokanaki báyekolaka Biblia mpo ete Bill atalela motuna yango mpe mituna mosusu.

Bill alobi boye: “Toyekolaki mpo na mbala ya liboso, mpe lokola tozalaki kotánga Biblia mbala na mbala, namonaki ete nazwaki eloko oyo nazalaki koluka. Biyano oyo nazalaki kozwa na Biblia ezalaki kosepelisa ngai mingi. Nsima ya koyekola, nazwaki motuka na ngai nakendaki na bangomba, nakitaki mpe nagangaki makasi na esengo. Natondaki na esengo ete, nsukansuka nakómaki kozwa biyano na mituna na ngai.”

Ya solo, ezali moto nyonso te oyo ayekoli mateya ya solo ya Biblia nde agangaka na esengo. Kasi, kozwa biyano na mituna ya ntina na bomoi ezali likambo ya esengo. Moto oyo azwi yango amiyokaka lokola moto oyo Yesu alobelaki na lisese na ye, oyo amonaki eloko ya motuya ebombami na elanga. Yesu alobaki boye: “Na esengo na ye, akei kotɛkisa biloko nyonso bizalaki na ye mpe asombi elanga yango.”​—Matai 13:44.

Sɛkɛlɛ ya bomoi oyo ezali na ntina

Bill azalaki kokanisa motuna moko ya ntina: Ntina ya bomoi ezali nini? Banda kalakala, bato ya filozofi, bato ya teoloji, bato ya siansi bazali kobundana mpo na kozwa eyano na motuna yango. Ebele ya mikanda ekomamá mpo na komeka kopesa eyano na motuna yango. Nyonso oyo basalaki ezali mpamba, mpe bato mingi bamonaki ete eyano ezali te na motuna yango. Nzokande, eyano ezali. Atako ezali eyano ya mozindo, kasi ezali ya mindɔndɔ te. Biblia ezali kopesa eyano na motuna yango. Sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo, bomoi oyo ezali na ntina ezali oyo: Kozala na boyokani malamu na Yehova, Mozalisi mpe Tata na biso oyo azali na likoló. Ndenge nini okoki kokóma na boyokani yango?

Ezali na ndenge mibale oyo ekoki komonana lokola eyokani te, ya kobɛlɛma na Nzambe. Baoyo basalaka yango babangaka ye, mpe bakómaka kolinga ye. Tótalela bavɛrsɛ mibale oyo ezali kondimisa maloba yango. Kalakala mpenza, Mokonzi Salomo, moto ya mayele mingi, ayekolaki makambo ya bato malamumalamu mpe makambo oyo amonaki akomaki yango na mokanda ya Mosakoli, na kati ya Biblia. Mpo na koloba na mokuse makanisi na ye nyonso, akomaki boye: “Nsuka ya likambo, nsima ya koyoka nyonso: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango esɛngami na moto nyonso.” (Mosakoli 12:13, NW) Bankama ya bambula na nsima, ntango batunaki Yesu mobeko oyo eleki monene na kati ya Mibeko ya Mose, ye alobaki boye: “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na elimo na yo mobimba.” (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 22:37) Ozali komona yango mindɔndɔ ete obanga Nzambe, bongo olinga ye lisusu? Tótalela ntina ya kobanga Nzambe mpe ya kolinga ye, mpe ndenge nini yango mibale etambolaka nzela moko mpo na kozala na boyokani malamu na Nzambe.

Kobanga Nzambe elimboli nini?

Mpo na kosambela Nzambe na ndenge ebongi, esengeli kobanga ye mpe komemya ye. Biblia elobi boye: “Kobanga [Yehova] ezali ebandeli ya mayele.” (Nzembo 111:10) Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete tólanda komonisa ngɔlu, oyo na nzela na yango tokoki kondima kosalela Nzambe na bobangi mpe na limemya.” (Baebele 12:28, NW) Ndenge moko mpe, anzelu oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli na katikati ya likoló, abandaki kosakola nsango malamu na maloba oyo: “Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye.”​—Emoniseli 14:6, 7, NW.

Kobanga Nzambe ndenge yango ezali na ntina mingi mpo na kozala na bomoi oyo ezali na ntina, mpe ekeseni na kozala na nsɔmɔ na ye. Toyokaka nsɔmɔ soki bazali kobangisa biso na moto oyo akoki kosala biso mabe. Kobanga Nzambe elimboli kozala na botosi mpe na limemya mozindo mpo na Mozalisi. Elimboli mpe kobanga koyokisa Nzambe nkanda, mpo ye azali Mosambisi oyo aleki basambisi nyonso mpe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo azali na nguya mpe na bokonzi ya kopesa etumbu epai na baoyo baboyi kotosa ye.

Bobangi mpe bolingo ekendaka nzela moko

Nzokande, Yehova alingaka te bato básalela ye kaka mpo bazali kobanga ye. Biblia emonisi ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Yango wana ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yehova Nzambe amonisaki bolingo na ye epai ya bato, mpe alingi ete na ngala na bango, bato mpe bámonisa bolingo na bango epai na ye. Kasi ndenge nini bolingo yango eyokani na ezaleli ya kobanga Nzambe? Kolinga mpe kobanga Nzambe ezali mpenza na boyokani ya penepene. Mokomi na nzembo akomaki ete: “Boninga ya malamu elongo na Yehova ezali kati na baoyo bazali sembo epai na ye.”​—Nzembo 25:14, NW.

Kanisá kaka botosi mpe limemya oyo mwana azalaka na yango mpo na tata na ye, oyo azali na nzoto makasi mpe atondi na bwanya. Tata yango akobanda kolinga mwana na ye. Mwana mpe akotya elikya na ye epai ya tata mpe akoluka litambwisi na ye, na elikya ete akozwa litomba na litambwisi yango. Ndenge moko, soki tolingaka Yehova mpe tobangaka ye, tokotosa litambwisi na ye, mpe yango ekopesa biso litomba. Tóyoka oyo Yehova alobaki mpo na Bayisalaele: “Ɛ, soko bazalaki bobele na motema boye seko, mpo na kobanga ngai mpe mpo na kotosa malako na ngai nyonso, ete bátikala malamu, mpe bana na bango libela!”​—Deteronome 5:29.

Ya solo, kobanga Nzambe ememaka na boombo te, kasi na bonsomi; epesaka mawa te, kasi esengo. Yisaya asakolaki mpo na Yesu ete: “Akosepelisa ye na botosi kotosa [Yehova].” (Yisaya 11:3) Mpe mokomi na nzembo akomaki ete: “Esengo ezali na moto oyo akobangaka [Yehova], oyo akosepelaka mibeko na ye mingi.”​—Nzembo 112:1.

Tomoni mpenza ete, tokoki soki moke te kobanga Nzambe to kolinga ye, soki toyebi ye te. Yango wana koyekola Biblia ezali mpenza na ntina. Kaka koyekola Biblia nde ekoki kosalisa biso na koyeba bomoto ya Nzambe mpe kokóma na bwanya ya kolanda litambwisi na ye. Lokola tobɛlɛmi na Nzambe, yango emonisi ete tolingi kosala mokano na ye mpe tolendisami na kobatela mibeko na ye, mpo toyebi ete yango ezali mpo na litomba na biso.​—1 Yoane 5:3.

Ezali esengo ya koyeba ete ozali kotambola na nzela ya solo. Ezali yango nde ekómelaki Bill, oyo tolobeli na ebandeli. Na mikolo oyo euti koleka, alobaki boye: “Na bambula libwa oyo esili koleka uta nabandá koyekola Biblia, boyokani na ngai na Yehova ekoli. Esengo oyo nayokaki na ebandeli ekolaki mpe ekómaki mpenza lolenge ya bomoi ya esengo. Sikoyo nazali komona ete bomoi na ngai ezali mpenza na ntina. Nalekisaka mikolo na ngai na mosala ya ntina, kasi te na koluka bisengo oyo ezangi ntina. Yehova asili kokóma moto ya solosolo mpo na ngai, mpe nayebi ete alingaka nazala malamu.”

Na lisolo elandi, tokomona ndenge nini boyebi ya Yehova epesaka esengo mpe matomba epai ya baoyo basalelaka yango na bomoi na bango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

soki tozali na boyokani ya malamu elongo na nzambe, tokolinga ye mpe tokobanga ye

[Elilingi na lokasa 6]

Yesu azalaki na esengo ya kobanga Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto