Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/7 nk. 12-17
  • Pesaká na esengo mpenza!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pesaká na esengo mpenza!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esengo oyo eutaka na kopesa
  • Tózwa baninga ya libela na libela
  • Tómibombelaka biloko ya motuya na likoló
  • Tólukaka bato oyo balingi solo
  • Salá nyonso oyo ekoki na yo
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Sepelá elongo na Nzambe ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tosalela Jéhovah na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tósalela Yehova na esengo na motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/7 nk. 12-17

Pesaká na esengo mpenza!

“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”​—MISALA 20:35.

1. Ndenge nini Yehova amonisaka esengo ya kopesa?

KOYEBA solo epesaka esengo. Bongo esengo yango, bakisa mpe mapamboli oyo tozwaka mpo toyebi solo, ezali makabo ya ntina mingi oyo Nzambe apesi biso. Bato oyo bayebi Yehova bazali na bantina mingi ya kosepela. Ya solo, ezalaka esengo bákabela yo eloko, kasi moto oyo apesi mpe ayokaka esengo. Yehova nde moto apesaka “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi,” mpe azali “Nzambe ya esengo.” (Yakobo 1:17; 1 Timote 1:11, NW) Apesaka bato nyonso oyo bayokaka ye mateya oyo epesaka matomba, mpe asepelaka na ndenge bato oyo ye ateyaka batosaka ye, ndenge mpe baboti basepelaka ntango bana na bango bazali kotosa mateya oyo bapesaka bango na bolingo mpenza.​—Masese 27:11.

2. (a) Yesu alobaki nini mpo na oyo etali kopesa? (b) Esengo nini toyokaka ntango toteyaka bato mosusu solo ya Biblia?

2 Ndenge moko mpe na Yesu; ntango azalaki awa na mabele, azalaki koyoka esengo ndenge bato bazalaki koyamba malamu mateya na ye. Ntoma Paulo azongelaki maloba oyo Yesu alobaki, ete: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Esengo oyo toyokaka ntango toteyaka bato mosusu Biblia ezalaka kaka te mpo tosepelaka komona bato bazali kondima mateya ya lingomba na biso. Soki tosepelaka mingi ezali mpenzampenza mpo toyebaka ete tozali kopesa bato eloko moko ya motuya mpe oyo ekoumela. Ntango tozali kopesa bato eloko ya ntina na elimo, tokoki kosalisa bango bázwa bolamu sikoyo mpe libela na libela.​—1 Timote 4:8.

Esengo oyo eutaka na kopesa

3. (a) Ndenge nini ntoma Paulo na ntoma Yoane bamonisaki esengo oyo bazwaki na ndenge basalisaki bato mosusu na elimo? (b) Mpo na nini koteya bana na biso solo ezali komonisa bolingo?

3 Ya solo, ndenge Yehova na Yesu bayokaka esengo ntango bapesaka bato makabo ya elimo, baklisto mpe bayokaka esengo. Ntoma Paulo ayokaki esengo na ndenge ayebaki ete asalisaki bato báyekola solo ya Liloba ya Nzambe. Akomelaki lisangá ya Tesaloniki boye: “Elikya mpe esengo mpe motole na lokumu na biso ezali nini? Bobele bino, liboso na Nkolo na biso Yesu wana ekomonana ye te? Mpo ete bino bozali nkembo na biso mpe esengo na biso.” (1 Batesaloniki 2:19, 20) Ndenge moko, ntoma Yoane mpe akomaki boye mpo na bana na ye ya elimo: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo na solo.” (3 Yoane 4) Lisusu, kanisá mpe esengo oyo ezalaka soki osalisi mwana na yo moko mpenza akóma mwana na yo ya elimo! Baboti bakomonisa ete balingaka bana na bango soki bazali kobɔkɔla bango na “mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Na ndenge wana nde baboti bamonisaka mpe ete bazali mpenza na mposa ete bana na bango bázala malamu libela na libela. Soki bana balandi ndenge baboti bazali kolakisa bango, baboti bazalaka na esengo mingi mpe bamiyokaka malamu.

4. Likambo nini oyo esalemaki emonisi esengo ya kopesa biloko ya elimo?

4 Dell azali mobongisi-nzela ya ntango nyonso, azali mpe mama ya bana mitano. Alobi boye: “Nandimi ya solo maloba ya ntoma Yoane mpo nasepelaka mingi ndenge bana na ngai minei bazali kotambola ‘na kati ya solo.’ Nayebi ete soki libota esangani esika moko na kati ya losambo ya solo, yango epesaka Yehova lokumu mpe nkembo. Yango wana, nayokaka esengo ntango namonaka ndenge azali kopambola milende oyo nasalaka mpo na koteya bana na ngai solo mokemoke. Koyeba ete makambo ya malamu ezali liboso na biso na mikolo ezali koya, elingi koloba kozala na bomoi ya seko na Paladiso elongo na libota na ngai, epesaka ngai elikya mpe epesaka ngai makasi nayika mpiko atako mikakatano mpe mabaku ezali na nzela.” Kasi likambo ya mawa ezali ete moko ya bana basi ya Dell abimisamaki na lisangá mpo alandaki nzela oyo ezali mabe mpo na baklisto. Atako bongo, Dell azali kosala makasi mpo azalaka ntango nyonso na makanisi ya malamu. Alobi boye: “Nazali na elikya ete mokolo mosusu mwana na ngai ya mwasi akomikitisa mpe akozongela Yehova na motema sembo. Kasi natɔndaka Nzambe mpo bana na ngai nyonso oyo batikali bazali kolanda kosalela Yehova na bosembo. Esengo oyo nayokaka epesaka ngai makasi mpenza.”​—Nehemia 8:10.

Tózwa baninga ya libela na libela

5. Ntango tozali komipesa na mosala ya kokómisa bato bayekoli, makambo nini oyo soki toyebi yango ekopesa biso esengo?

5 Yesu atindaki bayekoli na ye bákómisa bato bayekoli mpe bálakisa bango makambo etali Yehova mpe masɛngami na ye. (Matai 28:19, 20) Na motema moko mpenza, Yehova na Yesu bazali kosalisa bato báyeba nzela ya solo. Yango wana, biso mpe na ntango tozali komipesa na mosala ya kokómisa bato bayekoli, tozali na esengo na ndenge toyebi ete tozali kolanda ndakisa ya Yehova na Yesu, ndenge mpe baklisto ya ekeke ya liboso basalaki. (1 Bakolinti 11:1) Ntango tozali kosala elongo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe na Mwana na ye ya bolingo, bomoi na biso ezali kokóma na ntina mpenza. Kotángama na kati ya “basalani na Nzambe elongo” ezali mpenza lipamboli! (1 Bakolinti 3:9) Kutu, ata baanzelu mpe bazali kopesa mabɔkɔ na mosala yango ya koteya nsango malamu, likambo yango ezali kosepelisa biso makasi mpenza!​—Emoniseli 14:6, 7.

6. Tozali kokóma baninga ya banani ntango tozali kopesa biloko ya elimo na esengo nyonso?

6 Ya solo, na kopesáká biloko ya elimo na esengo nyonso, tokoki kosuka kaka te na kokóma basalani na Nzambe elongo; kasi tokoki kokóma mpenzampenza nde baninga na ye mpo na libela. Lokola Abalayama azalaki na kondima, abengamaki moninga ya Nzambe. (Yakobo 2:23) Ntango tozali kosala makasi mpo na kosala mokano ya Nzambe, biso mpe tozali kokóma baninga na ye. Soki tosali bongo, tokokóma mpe baninga ya Yesu. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nasili kobyanga bino baninga, zambi nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai ya Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Bato mingi basepelaka bátánga bango lokola baninga ya bato ya lokumu to ya bakonzi minene ya mboka, kasi biso tokoki kotángama baninga ya bato mibale oyo baleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba!

7. (a) Ndenge nini mwasi moko akómaki na moninga moko ya solosolo? (b) Likambo ya bongo esili kokómela yo mpe?

7 Lisusu, ntango tozali kosalisa bato báyeba Nzambe, bazali kokóma mpe baninga na biso, mpe yango ezali kopesa biso esengo oyo eleki mpenza. Joan azali mwasi moko oyo afandaka na États-Unis; akómaki koyekola Biblia na mwasi moko nkombo na ye Thelma. Bandeko ya Thelma baboyaki Thelma ayekola, kasi ye akangamaki kaka mpe na nsima ya mbula moko ayaki kozwa batisimo. Joan akomaki ete: “Koyebana na biso esukaki kaka wana te, toyaki kokóma baninga makasi, mpe tii lelo, mbula 35 yango oyo ekoki, tozali kaka baninga. Mbala na mbala tozalaki kobima elongo na mosala ya kosakola mpe tozalaki kokende na mayangani nzela moko. Na nsima, nakendaki kofanda mosika, na kilomɛtrɛ 800 longwa na esika oyo nazalaki liboso. Kasi, tii lelo Thelma atindelaka ngai mikanda oyo ezali komonisa mpenza bolingo mpe esepelisaka motema na ngai; ayebisaka ngai ete alingaka ngai mpe akanisaka ngai, mpe atɔndaka ngai lokola nazali moninga na ye mpe ndakisa na ye, mpe mpo nateyaki ye solo oyo euti na Biblia. Kozala na moninga ya motema mpe ya bolingo ndenge wana ezali mpenza lipamboli mpenza mpo na milende oyo nasalaki mpo na kosalisa ye ayekola makambo oyo etali Yehova.”

8. Makanisi nini ya malamu ekosalisa biso na kati ya mosala ya kosakola?

8 Soki otii na makanisi na yo ete okoki mokolo mosusu kozwa moto moko oyo akolinga koyekola solo, yango ekoki kosalisa yo oyika mpiko ata soki bato mingi oyo ozali kokutana na bango bazali kosepela mpenza te to mpe bazali kosepela ata moke te na Liloba ya Yehova. Soki bato bazali kosepela te, yango ekoki kokóma mokakatano mpo na kondima na yo mpe na molende na yo. Kasi kozala ntango nyonso na makanisi ya malamu nde ekosalisa biso. Fausto, moto ya Guatemala, alobaki ete: “Ntango napesaka bato mosusu litatoli, nalobaka na motema ete ekozala malamu mpenza soki moto oyo nazali kosolola na ye akómi ndeko na ngai na elimo. Nalobaka ete nakokutana ata na moto moko oyo akoki mokolo mosusu koyamba solo ya Liloba ya Nzambe. Soki nakanisi ndenge wana, esalisaka ngai natika te, mpe epesaka ngai esengo ya solosolo.”

Tómibombelaka biloko ya motuya na likoló

9. Yesu alobaki nini mpo na biloko ya motuya na likoló, mpe toli nini tokoki kozwa na likambo yango?

9 Ezala kokómisa bana na biso bayekoli, ezala mpe kokómisa bato mosusu bayekoli, ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Ekoki kosɛnga ntango mingi, kozala motema molai, mpe na molende. Kasi, tóbosana te ete bato mingi balingaka kosala mingi mpo na kozwa biloko mingi, biloko yango ememelaka bango ntango nyonso esengo te mpe eumelaka libela te. Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete eleki malamu kosala mpo na kozwa biloko ya elimo. Alobaki boye: “Bómibombela biloko ya motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ikolyaka mpe awa bayibi bakokɔtaka mpe bakobɔtɔlaka. Bómibombela biloko ya motuya kuna na Likoló, wana lopomboli mpe mabanga ikolyaka te mpe wana bayibi bakokɔtaka te mpe bakobɔtɔla te.” (Matai 6:19, 20) Ntango tozali koluka kokokisa mikano ya elimo, na ndakisa kosangana na mosala ya kokómisa bato bayekoli, tokoki kosepela na ntango toyebi ete tozali kosala mokano ya Nzambe mpe ye akopesa biso mbano. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.”​—Baebele 6:10.

10. (a) Mpo na nini Yesu azalaki na biloko ya motuya na elimo? (b) Ndenge nini Yesu amikabaki, mpe yango ememelaki bato mosusu bolamu nini?

10 Soki tosali mosala na molende mpo na kokómisa bato bayekoli, tokomibombela “biloko ya motuya na likoló,” ndenge Yesu alobaki yango. Yango ezali kopesa biso esengo ya kozwa. Soki topesi na motema moko, nsukansuka biso moko mpe tokozwa mingi. Yesu ye moko asalelaki Yehova bamiliare ya bambula. Kanisá naino biloko boni ya motuya azwaki kuna na likoló! Nzokande, Yesu alukaki bolamu na ye moko te. Ntoma Paulo akomaki ete: “[Yesu] amipesaki ye moko mpo na masumu na biso ete asikola biso na kati na ntango oyo mabe, [engebene, NW] mokano ya Nzambe mpe Tata na biso.” (Biso nde totɛngisi makomi; Bagalatia 1:4) Ya solo, Yesu amipesaki ye moko na motema mobimba, kasi apesaki mpe bomoi na ye lokola lisiko mpo bato mosusu bázwa nzela ya komibombela biloko ya motuya kuna na likoló.

11. Mpo na nini makabo ya elimo eleki makabo ya biloko ya mosuni?

11 Ntango tozali koteya bato makambo ya Nzambe, tozali kosalisa bango bámona ndenge nini bango mpe bakoki kobomba biloko ya motuya ya elimo oyo ebebaka te. Likabo nini ya monene oyo okoki kopesa bato mosusu? Soki okabeli moninga na yo montre moko ya ntalo mingi, motuka, to ata mpe ndako, moninga wana akosepela mpe akotɔnda yo mingi mpenza, mpe okoyoka esengo mpo okabeli moto eloko. Kasi likabo yango ekozala ndenge nini nsima ya mbula 20? Nsima ya mbula 200? Nsima ya mbula 2 000? Kasi soki omipesi mpo na kosalisa moto akóma kosalela Yehova, moto yango akoki kozwa bolamu ya likabo wana mpo na libela.

Tólukaka bato oyo balingi solo

12. Ndenge nini bato mosusu bamipesaki mpo na kosalisa bato mosusu na elimo?

12 Basaleli ya Yehova bapalangani na bansuka nyonso ya mabele mpo na kopesa biloko ya elimo na esengo mpenza. Ebele batiká bandako mpe mabota na bango mpo na kosala mosala ya misionɛrɛ na bamboka oyo basengeli koyekola minɔkɔ mosusu mpe ndenge mosusu ya kofanda na bato. Bato mosusu bakendaki na bisika mosusu na kati ya mboka na bango moko, epai oyo basengeli mpenza na basakoli ya Bokonzi. Bamosusu mpe bayekolaki minɔkɔ ya bapaya, na ndenge wana nde bafungolaki nzela ya kosakola na mboka na bango moko epai ya bapaya oyo bayá kofanda wana. Na ndakisa, mobali moko na mwasi na ye bazali Batatoli ya Yehova bafandaka na etúká ya New Jersey, na États-Unis; nsima ya kokolisa bana na bango mibale oyo bazali sikoyo kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova, babandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe bayekolaki lokota ya Chinois. Nsima ya mbula misato, bayekolaki Biblia na bato 74 oyo balobaka lokota ya Chinois; bato yango bazalaki kotánga na iniversite moko oyo ezalaki pene wana. Okoki kokolisa mosala na yo ya kosakola na ndenge moko boye mpo na koyoka esengo mingi lisusu na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

13. Osengeli kosala nini soki olingi ete mosala na yo ebotaka mbuma mingi koleka?

13 Mbala mosusu ozalaka mpenza na mposa makasi ya koyekola na moto Biblia kasi ozwi naino moto te. Na bamboka mosusu ezali mpasi mpo na kozwa bato oyo basepeli. Ntango mosusu bato oyo ozali kokutana na bango bazali kosepela na Biblia te. Soki ezali bongo, yebisaká Yehova mposa na yo mbala na mbala. Ntango ozali koyebisa yango, kobosana te ete miso ya Yehova mpe ya Yesu Klisto ezali likoló ya mosala oyo, mpe bango bakoki kolakisa yo epai wapi bato oyo bakokani na bampate bazali. Sɛngá toli epai ya bandeko ya lisangá na bino oyo bamesaná mingi na mosala ya kosakola to baoyo bazwaka mbuma mingi na mosala ya kosakola. Salelá malamu makambo oyo toyekolaka na kati ya makita ya boklisto mpe toli oyo tozwaka kuna. Landá toli ya bakɛngɛli-batamboli mpe ya basi na bango. Eloko oyo eleki mpenza malamu yango oyo: kotika te. Moto ya mayele akomaki boye: “Na ntɔngɔ, koná mboto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te; mpo ete oyebi te soki nini ekokóma malamu.” (Mosakoli 11:6) Na ntango oyo ozali kosala bongo, kanisaká mpe bato ya sembo lokola Noa mpe Yilimia. Atako bato moke kaka nde bayambaki malamu mosala na bango ya koteya, kasi mosala yango ekokisaki mokano na yango. Nzokande likambo ya ntina mpenza ezali ete mosala na bango esepelisaki Yehova.

Salá nyonso oyo ekoki na yo

14. Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo bakómi mibange na kati ya mosala na ye?

14 Mbala mosusu makambo oyo ozali na yango ezali kopesa yo nzela te ete osala ndenge olingaka mpenza na kati ya mosala ya kosakola. Na ndakisa soki okómi mobange, ekoki kozala mwa mpasi mpo osala mingi na mosala ya Yehova. Kasi, kobosana te maloba oyo moto ya mayele akomaki, ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezali motole ya kitoko na ntango oyo ezwami na nzela ya boyengebene.” (Masese 16:31, NW) Bomoi oyo moto alekisi na kati ya mosala ya Yehova ezali kitoko mingi na miso na ye. Makomami elobi lisusu boye: ‘Tee bokokoma babange, ngai [Yehova] nakobongwanaka te, tee bokokoma na nsuki mpembe, ngai nakosalisa bino, nasali bongo kala, mpe nakobatela bino lisusu, ngai nakosalisa mpe nakobikisa bino.’ (Yisaya 46:4, Liloba lya Nzambe) Tata na biso ya bolingo oyo afandaka kuna na likoló alobi akosalisa mpe akosunga bato na ye ya sembo.

15. Ondimi ya solo ete Yehova ayebaka makambo oyo okutanaka na yango? Mpo na nini?

15 Mbala mosusu obɛlaka, to mobali na yo to mwasi na yo azali mondimi te mpe azali kopekisa yo, to ozali na mikumba mingi na libota, to mokakatano mosusu. Yehova ayebaka epai wapi makoki na biso esuki mpe ayebaka makambo na biso, kasi alingaka biso mpo na milende ya solosolo oyo tosalaka mpo na kosalela ye, ata soki oyo tozali kosala ekoki komonana lokola ete ezali moke soki tokokanisi yango na oyo bato mosusu bazali kosala. (Bagalatia 6:4) Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, mpe alingaka tósalela ye na ndenge oyo ekoki na biso. (Nzembo 147:11) Soki tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso, tokoki ya solo kotya motema ete tozali na ntina na miso ya Nzambe mpe akobosana te misala na biso ya kondima.​—Luka 21:1-4.

16. Na ndenge nini lisangá mobimba esanganaka na kokómisa moto moyekoli?

16 Kobosana mpe te likambo oyo: mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala ya moto moko mpamba te. Moto moko kaka te nde akómisaka moto moyekoli, ndenge moko mpe litanga ya mbula kaka moko te nde ekoki kokolisa molona. Ya solo, Motatoli moko akoki kokende komona moto moko oyo asepeli mpe abandi koyekola na ye Biblia. Kasi soki moto wana ya sika ayei na Ndako ya Bokonzi, lisangá mobimba nde ekosalisa ye mpo ayeba solo. Esengo oyo ezalaka na kati ya bandeko nyonso elakisaka ete elimo santu ya Nzambe ezali kosala mosala. (1 Bakolinti 14:24, 25) Bana mike mpe bilenge bazali kopesa biyano oyo ezali kosimba mitema ya bato, yango ekomonisa moto oyo ayei sika ete bilenge na biso bakeseni na bilenge ya mokili. Bato oyo bazali na maladi, baoyo bazali na mokakatano na nzoto mpe mibange na lisangá bateyaka bato ya sika eloko oyo babengi koyika mpiko. Ata soki tokómi mibange to makambo mosusu ezali kopekisa biso kosala mingi, biso nyonso tosengeli kopesaka mabɔkɔ mpo na kosalisa bato ya sika ntango oyo bakómi kolinga solo ya Biblia makasi mpe bazali kopusana mpo na kozwa batisimo. Ngonga nyonso oyo tolekisaka na kati ya mosala ya kosakola, mbala nyonso oyo tozongelaka kotala bato, lisolo nyonso oyo tosololaka na moto oyo abandi kosepela oyo ayei na Ndako ya Bokonzi, ekoki komonana lokola likambo moko ya moke kaka, kasi ezali mwa eteni ya mosala na kati ya mosala ya nguya oyo Yehova azali kosala.

17, 18. (a) Longola mosala ya kokómisa bato bayekoli, ndenge nini tokoki koyoka esengo ya kopesa? (b) Ntango tozali kopesa na esengo mpenza, tozali nde kolanda ndakisa ya nani?

17 Ya solo, biso baklisto tosukaka kaka te na kosangana na mosala ya ntina mingi ya kokómisa bato bayekoli, topesaka mpe na esengo mpenza na ndenge mosusu. Tokoki kobomba mwa mbongo mpo na kopesa likabo mpo na kosimba losambo ya pɛto mpe kosalisa bato oyo bakeleli. (Luka 16:9; 1 Bakolinti 16:1, 2) Tokoki koluka mabaku ya koyamba bato mosusu na bandako na biso. (Baloma 12:13) Tokoki kosala makasi mpo “tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.” (Bagalatia 6:10) Mpe, na kozanga koluka makambo minene, kasi na kosala oyo ezali mpenza na ntina, tokoki kopesa bato mosusu na kotindeláká bango mokanda, na kobengáká bango na telefone, na kotindeláká bango likabo, na kosalisáká bango, na koyebisáká bango liloba moko ya kolendisa.

18 Ntango tozali kopesa, tozali komonisa ete tozali kolanda ndakisa ya Tata na biso oyo ofandi na likoló. Tozali mpe komonisa bolingo epai ya bandeko na biso, wana nde elembo ya baklisto ya solo. (Yoane 13:35) Kokanisa mbala na mbala makambo oyo nyonso ekoki kosalisa biso mpo tópesa na esengo nyonso.

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini Yehova na Yesu bapesi ndakisa na oyo etali kopesa biloko ya elimo?

• Ndenge nini tokoki kozwa baninga oyo tokoki koumela na bango seko?

• Tosengeli kosala nini mpo ete mosala na biso ebota mbuma mingi?

• Ndenge nini lisangá mobimba ekoki kopesa na esengo mpenza?

[Bililingi na lokasa 13]

Ntango bana bazali kosalela mateya oyo bazali kozwa, baboti bazalaka na esengo mingi mpe bamiyokaka malamu

[Elilingi na lokasa 15]

Ntango tozali kokómisa bato bayekoli, tokoki kozwa baninga ya solosolo

[Elilingi na lokasa 16]

Yehova asungaka baoyo bakómi mibange

[Bililingi na lokasa 17]

Na makambo ya minene te, kasi ya ntina mpenza, tozali koyoka esengo ya kopesa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto